Banani bafandaka na mokili ya bilimu?
MOKILI ekómi “zándo monene” ya bindimeli mpe milulu ya mangomba. Bobele na Afrika, ezali na bankóto ya bituluku ya mangomba, oyo moko na moko ezali na makanisi na yango mpenza na ntina na mokili ya bilimu. Kasi mpo na kozwa ndimbola ya polele mpe ya solo, tosengeli kotya likebi na biso na Biblia. Ezali kolobela bilimu—ya malamu mpe ya mabe—oyo efandaka na mokili ya bilimu. Ezali mpe komonisa epai ya nani tokoki kolónga kozwa lisungi mpe libateli.
Yehova, Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso
Losambo ya bonkɔ́kɔ na Afrika eteyaka ete Nzambe moko mozwi-na-nguya-nyonso azali likoló ya bankɔ́kɔ mpe ya banzambe mosusu nyonso. Búku African Mythology elobi ete: “Ntembe ezali te ete pene na bato nyonso ya Afrika, soki bango nyonso te, bazalaka na kondima epai na Moto moko oyo Aleki likoló, mozalisi ya biloko binso.” Búku African Religion in African Scholarship elobi ete: “Lokola Nzambe azali motaleli bobele moko ya molɔ́ngɔ́, bikelamu mosusu nyonso mpe nguya nyonso ezali na bomoi mpo na Ye. Azali na bokonzi mpe na nguya ezangi ndelo.”
Biblia endimi ete ezali na Moto moko oyo azali mokonzi monene kati na mokili ya bilimu. Ezali kolobela ye lokola “Nzambe na banzambe mpe Nkolo na bankolo, Nzambe monene mpe makasi mpe na nsɔ́mɔ, oyo akoponaponaka bato te mpe akondimaka lifuti te.”—Deteronome 10:17.
Bipai binso na Afrika ezali na bankámá ya bankombo mpe ya bibéngeli ya lokumu epesami epai na oyo atalelami lokola mokonzi monene. Nzokande, Liloba ya Nzambe lilobi nini na ntina na nkombo ya Nzambe? Mokomi na Nzembo akomaki ete: “Bobele yo oyo azali na nkombo [Yehova] Oyo-Aleki likoló na mokili mobimba.” (Nzembo 83:18) Nkombo yango mosantu ezali komonana koleka mbala 7 000 kati na lisoló ya Biblia, atako babongoli mosusu ya Biblia bakitinyi yango na bibéngeli lokola “Nzambe” to “Nkolo.”
Mpo ete Yehova azali mozwi-na-nguya-nyonso, akoki kosalisa biso. Amimonisaka ye moko lokola “Nzambe na mawa mpe na ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo. Akobatela boboto na ye mpo na nkóto nkóto, mpe akolimbisa mabe mpe nkanza mpe lisumu, kasi akolóngisa mokiti soko moke te.”—Exode 34:6, 7; 1 Samwele 2:6, 7.
Baanzelu, baministre ya nguya ya Nzambe
Liboso ete Yehova akela bato to mabelé yango moko, akelaki bilimu kati na makoló. Biblia elobi ete na ntango Nzambe ‘atyaki miboko na mokili . . . , bana [baanzelu] nyonso na Nzambe bangangaki na esengo.’ (Yobo 38:4-7) Ezali na bamilió ya baanzelu. Danyele, mosaleli ya Nzambe, akomaki emonaneli ya biloko oyo bizwami kati na makoló kati na yango amonaki “nkóto nkóto basalelaki ye, mpe nkóto zomi mbala nkóto zomi batɛlɛmaki liboso na ye.”—Danyele 7:10.
Ekelamu ya liboso ya elimo oyo Yehova akelaki ezalaki bongo ye oyo ayaki koyebana na nkombo Yesu Klisto. (Yoane 17:5; Bakolose 1:15) Liboso ete akóma moto awa na mabelé, Yesu azalaki kati na makoló lokola ekelamu ya elimo ya nguya. Nsima ya liwa na ye, Yesu asekwisamaki mpe amataki na makoló, epai kuna azongelaki lisusu bomoi na ye lokola ekelamu ya elimo ya nguya.—Misala 2:32, 33.
Yesu azali na bokonzi monene kati na makoló. Na Yuda 9, Yesu alobelami lokola Mikaele, abéngami “mokóló na baanzelu,” elingi koloba ete azali mokonzi, to anzelu ya liboso. (1 Batesaloniki 4:16) Azali mpe na bokonzi likoló na mabelé. Yehova asili kopesa ye “nguya na nkembo na bokonzi, ete mabota mpe mikili mpe nkótá nyonso básalela ye.” (Danyele 7:13, 14) Atako azali na bokonzi monene, Yesu azali ntango nyonso na nsé ya Tata na ye, Yehova.—1 Bakolinti 11:3.
Wana baanzelu ya sembo bazali kosalela Yehova, bazali mpe kosala mpo na basaleli ya Nzambe awa na nsé. Ntoma Paulo akomaki ete: “Baanzelu nyonso bazali [bilimu, NW] na mosala bakotindamaka mpo na kosalela baoyo balingi kozwa libula na lobiko, boye te?” (Baebele 1:14) Bamibanzabanzaka mingimingi ete bato báyekola mateya ya solo na ntina na Yehova. Ntoma Yoane amonaki na emonaneli “anzelu [moko] kopombwa na nzánga, mpe azalaki na nsango malamu na seko mpo na kosakola na bafandi na mokili mpe na mabota nyonso, na mikili nyonso, na minɔkɔ nyonso, na [bikólo] nyonso. Alobi na mongongo makasi ete, bómemisa Nzambe mpe pesá ye nkembo.”—Emoniseli 14:6, 7.
Satana mpe bademó, banguna ya Nzambe mpe ya bato
Likambo ya mawa, baanzelu nyonso te batikalaki sembo epai na Nzambe. Basusu batombokelaki ye, bakómaki bongo banguna ya Nzambe mpe ya bato. Mokonzi ya batomboki wana ezali bongo Satana Zábolo.
Atako bato mingi lelo bazali kondima te ete Satana azali, moto moko te akoki kobɛta ntembe ete mabe ezali. Búku The Death of Satan elobi ete kondima ete mabe ezali mpe bobele na ntango yango kobɛta ntembe na ntina na eutelo na yango, ezali likambo oyo lipesi nzela na “mokakatano moko oyo mokoki kopɛngolama te. Bato bakanisaka ete mabe ezali, kasi bazali lisusu na momeseno te ya kosalela liloba ‘zábolo’ mpo na kolobela eutelo na yango.”
Nzokande, Biblia ezali na liloba libongi mpe ezali komonisa polele bosolo na ntina na eutelo ya mabe. Ezali kolimbola ete baanzelu oyo Nzambe akelaki bazalaki bango nyonso sembo mpe malamu; asalaki anzelu moko te ya mabe. (Deteronome 32:4; Nzembo 5:4) Nzokande, baanzelu, lolenge moko na bato, bapesamelaki likoki ya kopona kati na mabe mpe malamu. Moko kati na bana yango ya elimo ya kokoka akólisaki mposa ya moimi ya koluka kopesamela losambo oyo na bosembo nyonso esengelaki kopesamela epai na Nzambe. Na yango, azwaki nkombo Satana, oyo elimboli “Motɛmɛli.” (Kokanisá na Yakobo 1:14, 15.) Satana azali te bobele “mozimbisi,” lokola mangomba mosusu ya Afrika bateyaka yango; azali mpe te “sinzili” oyo abatelaka baoyo bapesaka ye makabo mbala na mbala. Biblia ezali komonisa ye ete azali mpenza mabe mpe mosáli na mabe.
Baanzelu mosusu bamityaki na ngámbo ya Satana mpo na kotombokela Nzambe. Baanzelu yango bademó bazali mpe banguna ya bato awa na mabelé. Bango mpe bazali mabe mpe basáli na mabe. Na ntango ya kala, bakómisaki bato mosusu bimimi mpe lolanda. (Matai 9:32, 33; 12:22) Basusu, sangisá mpe bana, bazalaki konyokwama na maladi ya bonsinga. (Matai 17:15, 18; Malako 5:2-5) Ya solo, moto moko te oyo azali na mayoki akoki kolinga kosala boyokani elongo na Satana to bademó wana.
Bankɔ́kɔ bazali wapi?
Bamilió ya bato na Afrika mpe bipai mosusu bakanisaka ete kufa ezali te nsuka ya bomoi ya moto, kasi yango ezali bobele mbongwana, elekelo mpo na kozala na bomoi na mokili ya bilimu, esika oyo banzambe mpe bankɔ́kɔ bafandaka. John Mbiti, nganga-mayele na makambo matali mangomba ya Afrika, akomaki na ntina na kondima kati na bankɔ́kɔ, oyo abéngaka bango ete “bawei-na-bomoi”: “Yango ezali ‘milimo’ oyo bato ya Afrika bamibanzabanzaka mingi mpo na yango . . . Bayebi mpe batyaka likebi na makambo mazali koleka kati na mabota na bango [awa na mabelé]. Bazali babateli ya makambo ya mabota, ya makambo ya bonkɔ́kɔ, ya bizaleli malamu mpe ya misala. Kosala mbeba na makambo yango ezali mpenza lokola kosala mabe na bankɔ́kɔ oyo, na etɛlɛmɛlo wana, bazali kosala mosala lokola bapolisi oyo bamonanaka te ya mabota mpe ya bitúlúká. Mpo ete batalelami lokola ‘bato,’ na bongo bawei-na-bomoi bazali etuluku eleki malamu ya balobeli kati na bato mpe Nzambe: bayebi bamposa ya bato, ‘kala mingi te’ bazalaki awa elongo na bato, mpe bobele na ntango yango bazali na likoki nyonso ya kosolola elongo na Nzambe.”
Nzokande, Biblia elobi nini na ntina na ezalela ya bakufi? Emonisi ete “bawei-na-bomoi” bazalaka te. Bato bazalaka to na bomoi to bakufá—kasi bazalaka soko moke te na bizalela nyonso mibale na mbala moko. Liloba ya Nzambe lizali koteya ete bakufi bazali na likoki te ya koyoka, ya komona, ya koloba to ya kokanisa. Bakufi bazali na etɛlɛmɛlo moko te ya kosɛnzɛla bato na bomoi. Biblia elobi ete: “Bakufi bayebi likambo te . . . Bolingo na bango mpe koyina na bango mpe zuwa na bango esili kobeba . . . Ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na esika na bakufi, esika ekokenda yo.” (Mosakoli 9:5, 6, 10) “Moto akozonga na mabelé lisusu; bobele na mokolo yango kokanisa na ye esili.”—Nzembo 146:4.
Kozonga na mabelé
Soki ozali komona nkaká mpo na kondima yango, talelá oyo ekómelaki moto ya liboso, Adama. Yehova asalaki Adama na “mputulu na mabelé.” (Genese 2:7) Ntango Adama aboyaki kotosa mobeko ya Yehova, apesamelaki etumbu ya liwa. Nzambe alobaki na ye ete: “Okozonga kati na mabelé, mpo ete okamatamaki na yango. Zambi ozali mputulu, mpe okozonga kati na mputulu.”—Genese 3:19, NW.
Liboso ete Nzambe akela Adama na mputulu, Adama azalaki te. Na bongo ntango ‘azongaki na mabelé,’ azalaki lisusu te. Akatisaki te kino na mokili ya bilimu, mokili ya bankɔ́kɔ. Akendaki te na makoló to na lifelo. Ntango akufaki, yango ezalaki nsuka ya bomoi na ye.
Ezali yango nde ekómelaka bato ntango bakufi? Ɛɛ, ezali bongo. Biblia elobi ete: “Nyonso [bato mpe banyama] bakokenda na esika moko; nyonso ilongwi na mputulu, nyonso ikozonga na mputulu.” (Mosakoli 3:20) Biblia elaki ete Nzambe akosekwisa bakufi kati na paladiso awa na mabelé, kasi ntango yango ezali naino mpo na mikolo mizali koya. (Yoane 5:28, 29; Misala 24:15) Liboso ete yango esalema, tosengeli kobanga bakufi te to kopesa mbeka mpo na bango te, mpamba te bazali na likoki te ya kosalisa biso to ya kosala biso mabe.
Satana mpe bademó na ye balingi kobulunganisa bato na oyo etali ezalela ya bato na bango bakufá, na yango bazali kobimisa lokuta ete bato bazalaka na bomoi nsima ya liwa. Mwango moko oyo basalelaka yango ezali bongo masoló ya lokuta. (1 Timoté 4:1) Basalelaka mpe bimonaneli, bandɔ́tɔ, mpe banganga-nkisi mpo na kozimbisa makanisi ya bato ete basololaki elongo na bakufi. Kasi ezali te bakufi nde basololaki na bango. Nzokande, ezali bongo bademó nde bamimonisaka lokola bato oyo bakufá. Yango wana Yehova azali kopamela makasi baoyo basololaka na bakufi, ezala mbala moko to na nzela ya moto mosusu, to na nzela ya myango misusu lokola kosakola makambo mabombami.—Deteronome 18:10-12.
[Elilingi na lokasa 6]
Na nzela ya bimonaneli, bandɔ́tɔ, mpe banganga-nkisi, bademó bazali kozimbisa mpe kobangisa bato
[Bililingi na lokasa 7]
Mpo na kozimbisa bato, bademó bamimonisaka lokola bato oyo bakufá