Maloba ya kolendisa mauti na babateli bato ya maladi
“KOBULUNGANISAMA na mayoki te mpo na makanisi ya kozanga kolónga oyo makoki koyela yo. Makoki koya na mabaku motindo wana. Ya solo, osengeli te kobomba mayoki na yo. Yebisá mayoki na yo epai na moto moko oyo bozalaka na boninga, mpe soki likoki ezali, zwá mwa bopemi—tambolá mwa moke—mpo ete omiyoka malamu.”—Lucile, oyo mosala na ye na lopitalo esangisi kopesa mabɔkɔ na babateli bato ya maladi mpe bato ya maladi bango mpenza.
“Soki basangani ya libota to baninga bazali wana mpe balingi kopesa lisungi, tiká bango bápesa. Ezali malamu ete okabola mokumba yo na basusu.”—Suzanne, oyo abatelaki tata na ye liboso ete akufa na bokɔnɔ bobéngami Hodgkin.
“Yekolá kosala mwa lisɛki.”—Maria, oyo asungaki moninga na ye ya motema oyo akufaki na kansɛr.
“Zalá ntango nyonso makasi na elimo. Kangamá na Yehova, mpe bondelá ntango nyonso. (1 Batesaloniki 5:17; Yakobo 4:8) Apesaka lisungi mpe libɔndisi na nzela ya elimo santu na ye, ya Liloba na ye, ya basaleli na ye awa na mabelé, mpe ya bilaka na ye. Meká kosala nyonso mpo na kotambwisa makambo engebene manáka. Na ndakisa, ezali malamu kosala manáka mpo na nkisi ya mobɛli mpe liste ya babateli bato ya maladi.”—Hervé, oyo asungaki sɛmɛki na ye ya mobali ntango akómaki pene na liwa.
“Meká koyeba nyonso oyo okoki na ntina na bokɔnɔ ya mobɛli. Yango, ekosunga yo ete oyeba oyo okomizela na yango mpo na mobɛli mpe mpo na yo moko mpe lolenge okobatela mobɛli.”—Jocelyne, oyo mobali na ye azali na bokɔnɔ bobéngami Alzheimer.
“Yebá ete basusu bakutanaki na makambo lolenge yango liboso na yo mpe ete Yehova akoki kosunga yo ete oyika mpiko na oyo nyonso ekoki kokóma.”—Jeanine, oyo abatelaki mobali na ye liboso ete akufa.