LISOLO YA BOYEKOLI 45
LOYEMBO 111 Ntina ya esengo na biso
Ndenge ya kobatela esengo ntango ozali kosunga mobange to moto ya maladi
“Baoyo bazali kolona mboto na mai ya miso bakobuka na koganga ya esengo.”—NZ. 126:5.
NA MOKUSE
Ndenge bato oyo basungaka mibange mpe bato ya maladi bakoki koyika mpiko na mikakatano mpe kobatela esengo na bango.
1-2. Ndenge nini Yehova atalelaka baoyo basungaka mibange to bato ya maladi? (Masese 19:17) (Talá mpe bililingi.)
NDEKO mobali moko ya Corée na nkombo Jin-yeol alobi boye: “Ngai ná mwasi na ngai tosali mbula koleka 32 na libala. Eleki sikoyo mbula mitano, nasungaka ye mpo abɛlá. Azali na maladi ya Parkinson mpe asalaka lisusu makambo ye moko te. Nalingaka mwasi na ngai, azali na motuya mingi na miso na ngai mpe nasepelaka kosalisa ye. Butu nyonso, alalaka na mbeto ya bato ya maladi na ndako na biso. Nalalaka pene na ye, mpe tosimbanaka na lobɔkɔ ntango tolali.”
2 Yo mpe osungaka moto ya maladi, na ndakisa papa to mama na yo, molongani, mwana, to moninga moko? Soki ezali bongo, na ntembe te osepelaka kosalisa moto yango mpo olingaka ye. Lisusu, kosalisa moto oyo olingaka emonisaka ete okangami na Yehova. (1 Tim. 5:4, 8; Yak. 1:27) Atako bongo, ozali na mikakatano oyo mbala mosusu bato bayebaka te. Na bantango mosusu, okoki kutu kokanisa ete kaka yo moko nde ozali konyokwama. Mbala mosusu otyaka elongi ya kosɛka ntango ozali elongo na bato, kasi ntango otikali kaka yo moko, okokaka kokanga mai ya miso te. (Nz. 6:6) Ata soki bato bayebi te mikakatano oyo ozali kobundana na yango, Yehova ayebi yango. (Talá mpe Kobima 3:7.) Mai ya miso na yo mpe milende oyo ozali kosala ezali na motuya na miso na ye. (Nz. 56:8; 126:5) Amonaka makambo nyonso oyo osalaka mpo na kosunga ndeko to moninga na yo oyo azali kobɛla. Amonaka ete ozali kokɔtisa ye nyongo mpe alaki ete akofuta yo mpo na yango.—Tángá Masese 19:17.
Ozali kosunga mobange moko to moto ya maladi? (Talá paragrafe 2)
3. Ekoki kozala ete Abrahama ná Sara bakutanaki na mikakatano nini ntango bazalaki kobatela Tera?
3 Biblia ezali na masolo ya basi mpe mibali ebele oyo basungaki moto oyo azali mobange to maladi. Tózwa ndakisa ya Abrahama ná Sara. Ntango balongwaki na Ure, Tera, tata na bango azalaki na mbula soki 200. Kasi, akendaki elongo na bango. Basalaki mobembo ya kilomɛtrɛ soki 960 mpo na kokóma na Harane. (Eba. 11:31, 32) Na ntembe te, Abrahama ná Sara balingaki Tera, kasi meká kokanisa ndenge ezalaki mpasi kokokisa bamposa na ye, mingimingi wana bazalaki kosala mobembo. Emonani ete basalaki mobembo na bakamela to bampunda, mpe na ntembe te yango ezalaki mpasi mingi mpo na Tera, oyo akómaki mobange. Boye Abrahama ná Sara bazalaki kolɛmba mpenza na bantango mosusu, to kutu makasi ezalaki kosila bango. Ezala bongo to te, na ntembe te Yehova apesaki bango makasi oyo esengeli. Kaka ndenge Yehova asalisaki bango, akosalisa yo mpe akopesa yo makasi.—Nz. 55:22.
4. Tokolobela nini na lisolo oyo?
4 Esengo ekoki kosalisa yo okoba kosunga ndeko to moninga na yo. (Mas. 15:13) Moto ya esengo abatelaka esengo na ye ata soki akutani na makambo nini. (Yak. 1:2, 3) Okoki kosala nini mpo obatela esengo na yo? Lolenge moko ezali ya kobondela Yehova na motema mobimba, mpe kosɛnga ye asalisa yo okoba kobatela makanisi malamu. Na lisolo oyo, tokolobela makambo mosusu oyo bato oyo bazali kosunga mibange to bato ya maladi bakoki kosala mpo na kobatela esengo na bango. Tokotalela mpe ndenge oyo basusu bakoki kopesa bango mabɔkɔ. Kasi, tótalela liboso ntina oyo bato oyo bazali kosunga mibange to bato ya maladi basengeli kosala makasi bábatela esengo na bango mpe mikakatano oyo ekoki kosilisa esengo na bango.
NTINA OYO KOSUNGA MOTO EKOKI KOSILISA YO ESENGO
5. Mpo na nini baoyo basungaka mibange to bato ya maladi basengeli kobatela esengo na bango?
5 Soki baoyo bazali kosunga mibange to bato ya maladi bazali lisusu na esengo te, bakoki kosila makasi. (Mas. 24:10) Mpe ntango basili makasi, bakoki kokóma nkandankanda mpe bakosalisa lisusu bango te ndenge esengeli. Mikakatano nini ekoki kosilisa esengo ya baoyo bazali kosunga mibange to bato ya maladi?
6. Mpo na nini bato mosusu oyo basungaka mibange to bato ya maladi basilaka mpenza makasi?
6 Baoyo basungaka mibange to bato ya maladi bakoki mpenza kosila makasi. Ndeko mwasi moko na nkombo Leah alobi boye: “Kosunga mobange to moto ya maladi elɛmbisaka mpenza ata soki mokolo eleki malamu. Na nsuka ya mokolo, mbala mingi nayokaka lokola nakokoka lisusu kosala eloko te. Na bantango mosusu, nazalaka ata na makasi te mpo na koyanola na bamesaje.” Basusu bamonaka ete ezali mpasi kopema mwa moke to kozwa ata ntango ya kozwa mwa mopɛpɛ. Ndeko mwasi moko na nkombo Inés alobi boye: “Nalalaka mpenza malamu te. Na butu, nalamukaka nsima ya ngonga mibale nyonso mpo na kokipe mama-bokilo na ngai. Mpe esali sikoyo bambula ebele ngai ná mobali na ngai tozwaka konje te.” Bato mosusu oyo basungaka mibange to bato ya maladi báboyaka kokende kolekisa ntango elongo na baninga, mpe ata kokokisa mikumba mosusu na lisangá mpo basengeli kokipe bato yango ntango nyonso. Na yango, bakoki komiyoka ete bazali kaka bango moko mpe bakangami na motambo.
7. Mpo na nini baoyo basungaka mibange to bato ya maladi bakoki kozala na mayoki ya komipesa foti to ya mawa?
7 Baoyo basungaka mibange to bato ya maladi bakoki kozala na mayoki ya komipesa foti to ya mawa. Ndeko mwasi moko na nkombo Jessica alobi boye: “Mbala mingi namonaka ete nasengeli kosala makambo mingi mpo na kosunga papa na ngai. Mpe ntango nazali kopema, namonaka ete nazali na ezaleli ya moimi.” Basusu bamipesaka foti mpo na nkanda oyo bayokaka na bantango mosusu. Basusu mpe bamitungisaka ndenge basalaka te oyo bakoki mpo na kosunga ndeko na bango oyo azali mobange to oyo azali maladi. Nzokande, basusu bamipesaka foti mpo, ntango makambo elekelaki bango, balobaki likambo ya mabe epai ya moto oyo bazali kosunga. (Yak. 3:2) Basusu bayokaka mawa ntango bazali komona ndenge ndeko na bango oyo azalaki makasi mpe nzoto kolɔngɔnɔ akómi. Ndeko mwasi moko na nkombo Barbara alobi boye: “Moko ya mikakatano na ngai ya monene ezali ya komona ndenge kolɔngɔnɔ ya nzoto ya moto oyo nalingaka ezali kobeba mokolo na mokolo.”
8. Pesá ndakisa oyo emonisi ntina ya kopesa moto oyo azali kosunga moto ya maladi matɔndi.
8 Basusu bamonaka lokola bazali kosala mosala ya mpunda. Mpo na nini? Mpo bato mosusu bapesaka bango mpenza mersi te to longonya te mpo na mosala na bango ya makasi mpe makambo oyo bamipimeli. Na yango, kopesa bango mersi, ekoki kosalisa mingi. (1 Tes. 5:18) Ndeko mwasi moko na nkombo Melissa alobi boye: “Na bantango mosusu, mai ya miso ekitaka ngai mpo makambo elekeli ngai. Kasi ntango baoyo nazali kosunga balobi na ngai: ‘Mersi mpo na nyonso oyo ozali kosalela ngai,’ epesaka ngai makasi! Maloba yango esalisaka ngai nalamuka lisusu na makasi mokolo elandi mpe na mposa mpenza ya kosunga bango.” Ndeko mobali moko na nkombo Ahmadu amonisi ndenge amiyokaka ntango basusu bamonisi ye botɔndi. Ye ná mwasi na ye basungaka mwana ya ndeko na bango oyo afandaka elongo na bango; abɛlaka maladi ya ndɛkɛ. Alobi boye: “Atako mwana yango ayebi te ebele ya makambo oyo tomipimelaka mpo na kosunga ye, nayokaka esengo mingi ntango apesi biso matɔndi to ntango alobi na biso ete ‘Nalingaka bino.’”
NDENGE YA KOBATELA ESENGO
9. Ndenge nini moto oyo azali kosunga mobange to moto ya maladi akoki komonisa bopɔlɔ?
9 Yebá esika makoki na yo esuki. (Mas. 11:2) Tozalaka ntango nyonso te na makasi mpe na ntango ya kosala makambo nyonso oyo tolingi. Na yango, omityela bandelo mpo na makambo oyo okoki kosala mpe na bantango mosusu, koboya kosala makambo mosusu. Kosala bongo ezali mabe te! Emonisi ete oyebi esika makoki na yo esuki. Soki basusu balingi kopesa yo mabɔkɔ, koboya te. Ndeko mobali moko na kombo Jay alobi boye: “Mokolo na mokolo, tosalaka makambo oyo ntango mpe makasi epesi biso nzela ya kosala. Koyeba esika makoki na biso esuki mpe kosala kaka oyo tokoki, esalisaka biso tóbatela esengo.”
10. Mpo na nini moto oyo azali kosunga moto ya maladi asengeli kozala na bososoli? (Masese 19:11)
10 Zalá na bososoli. (Tángá Masese 19:11.) Bososoli ekosalisa yo obatela kimya ntango moto oyo ozali kosunga alobi na yo likambo ezangi boboto. Moto oyo azali na bososoli ayebaka ntina oyo moto asali likambo boye to boye. Mpo na koloba solo, bamaladi mosusu oyo esilaka te ekoki kobebisa bizaleli ya moto. (Mos. 7:7) Na ndakisa, moto oyo azalaka na boboto to akanisaka liboso ya koloba akoki kokóma matata mpe kokóma kobendana na yo. To akoki kolinga kaka makambo esalema ndenge alingi, akoki koloba na yo mabe, komilelalela to akoki kokóma nkandankanda. Soki ozali kosunga moto oyo azali na maladi makasi, ekoki kozala malamu soki osali bolukiluki mpo na maladi yango. Soki oyebi ndenge maladi yango esalaka, ekosalisa yo oyeba ete bizaleli oyo akómi na yango ezali nde mpo na maladi.—Mas. 14:29.
11. Moto oyo azali kosunga moto ya maladi asengeli kozwaka ntango mpo na kosala makambo nini ya ntina? (Nzembo 132:4, 5)
11 Zwáká ntango ya kokómisa makasi boyokani na yo ná Yehova. Ekoki kosɛnga otya misala mosusu pembeni mpo osala makambo “oyo eleki ntina.” (Flp. 1:10) Moko na yango ezali kokómisa makasi boyokani na yo ná Yehova. Mokonzi Davidi atyaki losambo ya Yehova na esika ya liboso. (Tángá Nzembo 132:4, 5.) Ndenge moko mpe, ezali na ntina ozwaka mwa ntango mokolo na mokolo mpo na kotánga Biblia mpe kobondela. Ndeko mwasi moko na nkombo Elisha alobi: “Nabatelaka esengo na ngai mpo nabondelaka mpe namanyolaka maloba ya kobɔndisa oyo ezali na mokanda ya Nzembo. Kobondela Yehova nde esalisaka ngai mingi. Mbala mingi na boumeli ya mokolo nabondelaka Yehova apesa ngai kimya.”
12. Mpo na nini bato oyo basungaka bato ya maladi basengeli kozwaka ntango ya kokipe nzoto na bango moko?
12 Zwáká ntango ya kokipe mpe nzoto na yo moko. Bato mosusu oyo basalaka mingi, na ndakisa baoyo basungaka bato ya maladi, bakokaka te kolya malamu mpo bazalaka na ntango te ya kosomba biloko ya mobesu mpe kolamba bilei oyo etongaka nzoto. Nzokande, kolya malamu mpe kosala ngalasisi ekosalisa yo mpo ozala na kolɔngɔnɔ ya nzoto mpe ya makanisi. Na yango, salá makasi ozwaka ntango ya kolya bilei ya malamu mpe ya kosala ngalasisi mbala na mbala. (Ef. 5:15, 16) Lisusu, salá makasi olalaka malamu. (Mos. 4:6) Bato ya mayele bamonisi ete mpɔngi ekoki kolongola biloko ya mabe na bɔɔngɔ na biso. Lisolo “Mpɔngi ekoki kosilisa mitungisi,” oyo ebongiseli moko (Banner Health) ebimisaki elobi ete kolala malamu ekoki kokitisa mayoki ya kobangabanga mpe kosalisa biso tólonga mitungisi. Osengeli mpe kozwaka ntango mpo na kominanola. (Mos. 8:15) Ndeko mwasi moko alobeli likambo oyo esalisaka ye abatela esengo. Alobi boye: “Soki klima ezali malamu, nabimaka libándá mpo na kozwa mwa moi. Mpe ata mbala moko na sanza, nasalaka programɛ ya kobima mpo na kozwa mwa mopɛpɛ elongo na baninga.”
13. Mpo na nini kosɛka ezali malamu? (Masese 17:22)
13 Sɛkáká. (Tángá Masese 17:22; Mos. 3:1, 4) Kosɛka ezalaka malamu mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto mpe ya makanisi. Nzokande, ntango ozali kosunga moto ya maladi, ezalaka mpasi ete makambo nyonso esalema kaka ndenge obongisaki. Kasi, soki ozali kosɛka mpo na makambo oyo esimbi te, ekosalisa yo okangela yango motema. Mpe kosɛka elongo na moto oyo ozali kosunga ekokómisa boninga na bino makasi.
14. Ndenge nini kosolola na moninga oyo otyelaka motema ekoki kosalisa yo?
14 Sololáká na moninga oyo otyelaka motema. Ata soki osali nyonso, na bantango mosusu makambo ekolekela yo. Na bantango yango, ekoki kozala malamu koyebisa ndenge ozali komiyoka epai ya moninga moko ya motema oyo akosambisa yo te mpe oyo akolekisa ndelo te. (Mas. 17:17) Ndenge oyo akoyoka yo na boboto mpe maloba na ye ya kobɔndisa nde eloko oyo ekoki mpenza kosalisa yo mpo obatela esengo na yo.—Mas. 12:25.
15. Ndenge nini kokanisa elikya na biso ekoki kopesa yo esengo?
15 Kanisá ntango bokozala elongo na Paradiso. Kobosana te ete mosala ya kosunga mibange to bato ya maladi ezali ya ntango mokuse, mpe ete na ebandeli, Yehova akanaki te ete bato básalaka mosala yango. (2 Ko. 4:16-18) “Bomoi ya solosolo” ezali koya. (1 Tim. 6:19) Na ntembe te okosepela mpenza soki yo ná moto oyo ozali kosunga bolobeli makambo oyo bokosala elongo na Paradiso. (Yis. 33:24; 65:21) Ndeko mwasi moko na nkombo Heather alobi boye: “Mbala mingi nayebisaka baoyo nazali kosunga ete mosika te tokotonga bilamba elongo, tokokima mbangu elongo, mpe tokotambwisa velo elongo. Tokosala mampa mpe tokolambela bandeko mpe baninga oyo bakosekwa. Topesaka Yehova matɔndi elongo mpo na elikya oyo apesi biso.”
NDENGE OYO BASUSU BAKOKI KOPESA YO MABƆKƆ
16. Ndenge nini bandeko ya lisangá bakoki kopesa mabɔkɔ na moto oyo asungaka moto ya maladi? (Talá mpe elilingi.)
16 Salisáká moto oyo azali kosunga mobange to moto ya maladi azwaka ntango ya kopema. Biso bandeko ya lisangá tokoki kosɛnga ete tólekisa ntango elongo na moto oyo azali kosunga moto ya maladi. Yango ekosalisa moto yango azwa libaku ya kopema mwa moke mpe ya kosala mwa makambo na ye moko. (Gal. 6:2) Mpo na yango, bandeko mosusu basalá programɛ ya pɔsɔ mobimba mpo na kokende kosala na esika ya moto oyo asungaka moto ya maladi. Ndeko mwasi moko na nkombo Natalya, oyo asungaka mobali na ye oyo azali paralysé, alobi boye: “Ndeko moko ya lisangá ayaka mbala moko to mbala mibale na pɔsɔ mpo na kolekisa ntango elongo na mobali na ngai. Babimaka mosala ya kosakola, basololaka, mpe batalaka ata bafilme elongo. Mobali na ngai asepelaka mingi na mabaku yango mpe epesaka ngai ntango ya kosala makambo na ngai moko, na ndakisa kobima mpo na kotambola mwa moke.” Na bantango mosusu, okoki ata kosɛnga ete olala na moto ya maladi mpo esalisa moto oyo asungaka ye alala malamu na butu.
Ndenge nini okoki kosalisa bandeko oyo basungaka mobange to moto ya maladi? (Talá paragrafe 16)a
17. Na oyo etali makita, ndenge nini tokoki kosalisa baoyo bazali kosunga mobange to moto ya maladi?
17 Salisáká bato oyo basungaka mobange to moto ya maladi na makita. Bato oyo basungaka mobange to moto ya maladi balandaka malamu te makita, liyangani ya zongazonga, ya etúká, mpo esɛngaka bakipe ndeko na bango oyo azali mobange to maladi. Bandeko ya lisangá bakoki kosɛnga ete báfanda elongo na moto ya maladi na makita to na liyangani. Soki moto ya maladi akɔtá ndako, okoki kosɛnga okende epai na ye mpe bólanda makita na nzela ya video mpo moto oyo asungaka ye akende na makita na Ndako ya Bokonzi mpo akutana na bandeko.
18. Tokoki kosala lisusu nini mpo na baoyo basungaka mobange to moto ya maladi?
18 Pesáká bango longonya mpe bondeláká mpo na bango. Ezali malamu bankulutu bákendaka kotala mbala na mbala baoyo bazali kosunga mobange to moto ya maladi mpo na kolendisa bango. (Mas. 27:23) Tózala bazwi to babola, biso nyonso na lisangá tokoki komonisa ezaleli ya kokaba mpe kopesa baoyo basungaka mobange to moto ya maladi longonya mpo na kolendisa bango. Tokoki mpe kosɛnga Yehova akoba kopesa bango makasi mpe asalisa bango bábatela esengo.—2 Ko. 1:11.
19. Tozali kozela nini?
19 Mosika te, Yehova akopangwisa mai ya miso nyonso oyo totangisaka mpo na mpasi. Maladi mpe liwa ekozala lisusu te. (Em. 21:3, 4) “Motɛngumi akopumbwa lokola serfe.” (Yis. 35:5, 6) Mikakatano ya bobange mpe mpasi ya kosunga ndeko oyo azali na maladi ekokóma “makambo ya kala [oyo] ekokanisama lisusu te.” (Yis. 65:17) Ata sikoyo, wana tozali kozela elaka kitoko yango ekokisama, Yehova akosundola biso te. Soki tokobi kotyela ye motema mpo apesa biso makasi, akosalisa biso ‘tóyika mpenza mpiko na motema molai ná esengo.’—Kol. 1:11.
LOYEMBO 155 Esengo ya seko
a NDIMBOLA YA ELILINGI: Bandeko basi mibale bakei kotala ndeko moko ya mobange mpo moto oyo asungaka ye akende kozwa mwa mopɛpɛ.