Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/5 nk. 25-29
  • Kobondisa mobeli oyo akobika te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobondisa mobeli oyo akobika te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Likambo oyo tokoki kokamwa te
  • Tyá likebi na moto, kasi na maladi na ye te
  • Yebá koyoka
  • Yebá bamposa ya ntina
  • Libɔndisi na mikolo ya nsuka mpenza
  • Ntango moto oyo tolingaka azali na maladi oyo akobika na yango te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Maloba ya kolendisa mauti na babateli bato ya maladi
    Lamuká!—1997
  • Ntango ndeko to moninga moko azali kobɛla
    Lamuká!—2015
  • Ndenge ya kosalisa moninga oyo azali kobɛla
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/5 nk. 25-29

Kobɔndisa mobɛli oyo akobika te

“Nayokaki motema mpasi ntango nayebaki ete mama akobika te na maladi oyo azalaki na yango. Makanisi na ngai ebulunganaki mpenza mpe nazalaki kondima te ete mama akokufa.”​—Grace, Canada.

NTANGO monganga ayebisi ete moto akobika te na maladi oyo azali na yango, baninga mpe bandeko na ye babulunganaka mingi mpe basilaka mayele. Bato mosusu bamitunaka soki basengeli koyebisa moto ya maladi likambo yango. Bamosusu mpe bamonaka ete bakokoka te komona ndeko to moninga na bango azali konyokwama to mbala mosusu kokoka te kosala makambo mosusu ye moko. Bato mingi bayebaka te likambo oyo bakoki kosalela mobɛli to koloba na ye ntango alingi kokufa.

Osengeli kosala nini ntango oyoki likambo ya ndenge wana? Ndenge nini okoki kozala “moninga” ya solosolo mpe kobɔndisa moto ya maladi na ntango wana ya mpasi?​—Masese 17:17.

Likambo oyo tokoki kokamwa te

Moto nyonso atungisamaka ntango ayoki ete moninga to ndeko na ye azali na maladi makasi. Kutu, minganga bango moko, atako bamesaná komona bato bazali kokufa, mbala mingi babulunganaka, ntango mosusu mpe bayebaka likambo ya kosala te, mpo na kosunga moto oyo azali na maladi oyo ekoboma ye.

Yo mpe okoki kobulungana makanisi ntango ndeko na yo azali konyokwama na maladi. Hosa, mwasi moko na ekólo Brésil, oyo leki na ye azalaki na maladi oyo esengelaki koboma ye, alobi boye: “Esalaka mpasi mingi komona ndeko to moninga na yo azali konyokwama na maladi.” Ntango Moize, moto moko ya sembo, amonaki ndeko na ye ya mwasi azwi maladi ya maba, abelelaki ete: “Ee Nzambe, bikisá ye, nabondeli yo.”​—Mituya 12:12, 13.

Toyokaka mpasi na motema ntango ndeko to moninga na biso azali konyokwama na maladi mpamba te tosalami na elilingi ya Yehova, Nzambe oyo atondi na mawa. (Genese 1:27; Yisaya 63:9) Yehova ayokaka ndenge nini ntango azali komona mpasi ya bato? Tótala ndenge oyo Yesu ayokaki. Yesu amonisaki bizaleli ya Tata na ye na ndenge ya kokoka. (Yoane 14:9) Ntango Yesu amonaki bato oyo bazalaki konyokwama na maladi, “mawa ekangaki ye.” (Matai 20:29-34; Malako 1:40, 41) Ndenge lisolo oyo eleki emonisi yango, na liwa ya moninga na ye Lazalo, ntango Yesu amonaki mawa ya baninga mpe bandeko ya Lazalo, abulunganaki mpe “alelaki na mai na miso.” (Yoane 11:32-35) Kutu, Biblia elobi ete liwa ezali monguna mpe elaki ete mosika te, maladi mpe liwa ekozala lisusu te.​—1 Bakolinti 15:26; Emoniseli 21:3, 4.

Ya solo, ntango oyoki ete ndeko na yo azali na maladi oyo ekoboma ye, motema na yo ekoki kotinda yo oluka kopesa moto moko foti. Nzokande, Marta Ortiz, monganga moko oyo akomaki mokanda oyo elobeli bato oyo babɛlaka maladi oyo ekoboma bango, apesi toli oyo: “Ntango ndeko na yo azali na maladi oyo ekoboma ye, koluka te kopesa bato mosusu foti, na ndakisa minganga, mafulume, to mpe yo moko. Yango ekobebisa boyokani na yo ná bato yango mpe bokobosana likambo ya libosoliboso oyo bosengeli kotyela likebi: bamposa ya moto ya maladi.” Makambo nini okoki kosala mpo na kosalisa ndeko to moninga oyo azali na maladi oyo ekoboma ye ayika mpiko?

Tyá likebi na moto, kasi na maladi na ye te

Ya liboso, kosuka kaka te na kotala ndenge moto yango akondi to ndenge nzoto na ye ebebi. Osengeli lisusu kosala nini? Sarah, mwasi moko oyo azali lifulume, alobi boye: “Natalaka bafɔtɔ ya mobɛli ntango azalaki naino nzoto malamu. Nayokaka ye na likebi ntango azali kobɛtela ngai masolo na ye. Yango esalisaka ngai nakanisa bomoi na ye mpe makambo oyo akutaná na yango, na esika natala kaka ndenge akómi.”

Anne-Catherine, mwasi mosusu oyo azali lifulume, ayebisi biso ndenge asalaka mpo asuka kaka te na kotala ndenge nzoto ya mobɛli ebebi. Alobi boye: “Natalaka moto ya maladi na elongi mpe nalukaka oyo nakoki kosala mpo na kosunga ye.” Buku moko (The Needs of the Dying​—A Guide for Bringing Hope, Comfort, and Love to Life’s Final Chapter) elobi boye: “Moto ayokaka mawa mingi ntango amoni ndenge nzoto ya ndeko to moninga na ye ebebi na maladi to na aksida. Likambo eleki malamu ya kosala na ntango wana ezali kotala moto na elongi mpe komona bomoto na ye.”

Ya solo, mpo na kosala yango, esɛngaka kozala na komipekisa mpe kokanga motema. Georges, nkulutu moko oyo akendaka kotala bato ya maladi oyo bakobika te, alobi boye: “Tosengeli mpenza kolinga ndeko na biso oyo azali maladi mpo tókakatana te mpo na kosunga ye.” Soki ozali kotala moto, na esika osuka kaka na kokanisa maladi na ye, ekozala na litomba mpo na yo moko mpe mpo na ye. Yvonne, ndeko moko oyo azalaki kosalisa bana oyo bazalaki na maladi ya kanser, alobi boye: “Koyeba ete okoki kosalisa bato ya maladi bámona ete bazali kaka na ntina, esalisaka moto amitungisa mingi te ntango azali komona ndenge oyo nzoto na bango ezali kobeba.”

Yebá koyoka

Bato mingi bakakatanaka kokende kotala moto oyo azali pene ya kokufa, ata soki balingaka ye mingi. Mpo na nini? Mpamba te bayebaka te soki basengeli koloba na ye nini. Nzokande, Anne-Catherine, oyo asalisaki moninga na ye oyo azalaki pene ya kokufa, amonisi ete na bantango mosusu, ezalaka mpe malamu kofanda kimya. Alobi boye: “Kobɔndisa moto ezalaka kaka na maloba te, ezalaka mpe na ezaleli na biso mpe na makambo oyo tozali kosala. Kofanda pembeni ya moto ya maladi, kosimba ye na lobɔkɔ, mpe ntango mosusu kolela, emonisaka ete tozali komibanzabanza mpo na ye.”

Moto oyo azali kobɛla akoki kozala na mposa ya koloba polele ndenge azali koyoka. Kasi, mbala mingi moto ya maladi ayebaka ete bandeko na ye bazali kotungisama mingi; yango wana aboyaka kolobela makambo mosusu oyo etali ye. Epai mosusu, bandeko ná baninga bakoki koboya kosolola na moto makambo mosusu oyo etali maladi na ye, to bakoki kobombela ye makambo oyo minganga bayebisi bango. Yango ememaka likambo nini? Monganga moko oyo asalisaka bato oyo bazali na maladi oyo ekoboma bango alobi ete milende oyo bato basalaka mpo na kobombela moto makambo etali maladi na ye ebakisaka mikakatano mpo na kosalisa ye ayeba malamu mpasi oyo azali na yango mpe akakatana te kolobela yango mpe elɛmbisaka milende na bango mpo na kosalisa ye. Yango wana, soki moto ya maladi azali na mposa ya koloba, esengeli te kopekisa ye amonisa makanisi na ye, ndenge oyo azali koyoka to mpe soki azali komona ete akokufa.

Basaleli mosusu ya Nzambe na ntango ya kala bayebisaki Yehova mabanzo na bango ntango bamonaki ete liwa na bango ekómi pene. Na ndakisa, Hizikiya, mokonzi oyo azalaki na mbula 39, amonisaki mabanzo na ye ntango ayokaki ete akokufa. (Yisaya 38:9-12, 18-20) Na yango, esengeli kotika ete moto oyo azali na maladi oyo ekoboma ye amonisa mawa na ye ntango amoni ete bomoi na ye ekómi na nsuka. Mbala mosusu akoki kozala na mawa ete akokokisa te mikano oyo amityelaki; na ndakisa, kosala mibembo, kobota, komema bankɔkɔ, to mpe kosala mingi na mosala ya Nzambe. Mbala mosusu akoki kobanga ete baninga mpe bandeko bákima ye mpo bayebi te oyo basengeli kosala. (Yobo 19:16-18) Akoki mpe kobanga ete maladi enyokola ye mingi, to akoka lisusu te kosala makambo mosusu, to mpe azanga bato pembeni na ye ntango akokufa.

Anne-Catherine alobi boye: “Ezali na ntina mingi otika moto ya maladi aloba, kokata ye maloba te, kopamela ye mpe te to komonisa ye ete azali kobanga mpamba. Yango nde lolenge eleki malamu ya koyeba ndenge mpenza oyo azali komiyoka, bamposa na ye, mabanzo na ye mpe makambo oyo alingi.”

Yebá bamposa ya ntina

Ntango moto ya maladi azali komilelalela, mbala mosusu mpo nkisi oyo azali kozwa ezali kobakisela ye mpasi, okoki kotungisama mingi mpe okoki kobosana mposa ya ntina mingi oyo moto azalaka na yango: mposa ya kopona makambo ye moko.

Na bamboka mosusu, bandeko ya moto ya maladi bakoki kokanisa ete mpo na bolamu na ye, ebongi bábombela ye makambo mosusu etali maladi na ye, mbala mosusu mpe koboya kotuna makanisi na ye ntango bazali kopona lisalisi ya monganga oyo akoki kozwa. Na bamboka mosusu, likambo mosusu ekoki komonana. Na ndakisa, Jerry, mobali moko oyo azali lifulume, alobi boye: “Na bantango mosusu, bandeko ya moto ya maladi balobelaka makambo na ye na miso na ye, lokola nde azali wana te.” Na makambo ya ndenge wana, moto ya maladi amiyokaka lokola nde azali na ntina te.

Longola yango, moto azalaka na mposa ya kozala na elikya. Na mikili oyo ezali na balopitalo ya malamu, mbala mingi, moto akómaka na elikya ntango azwi nkisi oyo emonani ete ekosalisa ye. Michelle, oyo asalisaki mama na ye oyo abɛlaki kanser mbala misato, alobi boye: “Soki Mama amonisi mposa ya kozwa nkisi mosusu to ya komona monganga mosusu, nazalaki kosalisa ye mpo na koluka. Namonaki ete nasengeli kozala na bokatikati na motema na ngai, kasi nasengeli mpe te koloba makambo oyo ekolɛmbisa ye.”

Esengeli kosala nini soki elikya ya kozwa lisalisi ya malamu ezali te? Tóbosana te ete moto oyo azali na maladi oyo akobika na yango te asengeli kolobela polele likoki ya kokufa. Georges, nkulutu oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Ezali na ntina mingi tóbombela moto ya maladi te ete atikali na mikolo ya kotánga. Yango ekopesa ye likoki ya kozwa bibongiseli mosusu mpe kobongisa makanisi na ye liboso akufa.” Moto ya maladi oyo azali komibongisa ndenge yango akoki komiyoka ete asali nyonso oyo asengelaki kosala mpe akoki kolongola makanisi ete akozala ntango nyonso mokumba mpo na bato mosusu.

Ya solo, kolobela makambo wana ezalaka pɛtɛɛ te. Kasi, kosolola yango polele epesaka libaku ya komonisa mayoki ya motema na biso. Moto oyo azali pene na liwa akoki kozala na mposa ya kozongisa boyokani na moto mosusu oyo bazalaki na ye na matata, kondima mabunga na ye, to mpe kosɛnga bolimbisi. Lisolo ya ndenge wana ekoki kosala ete okóma na boyokani makasi na moto oyo azali pene ya kokufa.

Libɔndisi na mikolo ya nsuka mpenza

Ndenge nini okoki kobɔndisa moto oyo akómi mpenza pene ya liwa? Ortiz, monganga oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Tiká moto ya maladi aloba maloba na ye ya nsuka. Yoká ye na likebi. Soki likoki ezali, kokisá mposa na ye. Soki likoki ya kosala ndenge alingi ezali te, yebisá ye yango polele.”

Moto oyo akómi pene ya liwa akoki kozala na mposa makasi ya komonaka mpe kosololaka na bato oyo alingaka mingi. Georges alobi boye: “Esengeli kosalisa moto ya maladi asolola na bango, ata soki masolo yango ezali mokuse mpo azali lisusu na makasi ya koloba te.” Ata soki bakoki kosolola kaka na telefone, masolo yango esalisaka bango bálendisana mpe bábondela elongo. Christina, mwasi moko ya ekólo Canada oyo akufelaki bandeko misato na mwa ntango mokuse, alobi boye: “Ntango bazalaki kokóma pene ya kokufa, bazalaki mpe kokóma na mposa makasi ete bandeko na bango baklisto bábondela mpo na bango.”

Ezali mabe kolela na miso ya moto ya maladi? Te. Ntango ozali kolela na miso ya moto oyo akómi pene ya kokufa, ozali mpe kopesa ye libaku ya kobɔndisa yo. Buku moko (The Needs of the Dying) elobi boye: “Kobɔndisama na moto oyo azali pene ya kokufa esimbaka mpenza motema; likambo yango ekoki mpe kozala malamu mingi mpo na ye moko.” Ntango moto oyo azali pene ya kokufa azali kobɔndisa bato oyo basalisi ye mingi, amiyokaka ete azali kaka moninga, tata, to mama oyo amibanzabanzaka mpo na basusu.

Ya solo, makambo mosusu ekoki kopekisa yo ozala pembeni ya ndeko to moninga oyo akómi pene ya kokufa. Kasi, soki ozali na ye na lopitalo to na ndako, simbá ye na lobɔkɔ tii ntango akokata motema. Na ngonga wana ya nsuka mpenza, okoki kozwa libaku ya koloba na ye maloba oyo otikalá koloba te. Ata soki azali koloba te to koningana te, kokakatana te koloba na ye ete bozali kokabwana, kasi olingi ye mingi mpe ozali na elikya ete bokomonana lisusu na lisekwa.​—Yobo 14:14, 15; Misala 24:15.

Soki osali makambo oyo ebongi mpenza na bangonga wana ya nsuka, okoyoka mawa na likambo moko te na nsima. Kutu, makambo oyo ekoleka na bangonga wana ya nsuka ekoki kobɔndisa yo. Okomona ete ozalaki moninga ya solosolo “na ntango ya mpasi.”​—Masese 17:17.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 27]

Soki ozali kotala moto, na esika osuka kaka na kokanisa maladi na ye, ekozala na litomba mpo na yo moko mpe mpo na ye

[Etanda/​Elilingi na lokasa 29]

Makanisi mpo na komemya moto ya maladi

Na mikili mingi, bakonzi ya Leta bazali kolendisa likanisi ete moto oyo azali na maladi oyo akobika na yango te, azali na lotomo ya kokufa na kimya. Soki moto ya maladi akomaki makambo oyo alingi, esalisaka mingi mpo bato mosusu bátosa yango mpe bandeko na ye bázwa ekateli ya kozongisa ye na ndako to kotika ye na lopitalo tii akokufa.

Makanisi oyo moto akomi liboso ekoki kosalisa na makambo oyo:

• Kosala ete boyokani malamu ezala kati na minganga mpe bandeko ya mobɛli

• Kolongola bandeko ya libota mokumba ya kozwa bikateli mosusu ya mpasi

• Kosalela te lolenge moko boye ya nkisi oyo mobɛli akosepela na yango te, oyo ezali na ntina moko te, oyo ekonyokola ye nzoto mpamba mpe oyo eleki ntalo

Makambo oyo moto akomi liboso esengeli komonisa:

• Nkombo ya moto oyo akoki kozwa bikateli mpo na ye

• Nkisi to lisalisi mosusu oyo akoki kondima mpe oyo okondima te soki emonani polele ete akobika lisusu te

• Soki likoki ezali, nkombo ya monganga oyo ayebi bamposa na ye malamu

[Elilingi na lokasa 26]

Kanisáká bomoi ya moto mpe makambo oyo asalá na bomoi na ye, na esika ya kotala kaka ndenge akómi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto