Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g97 Octobre nk. 4-7
  • Nini ezali kopusa yo ete obongola bizaleli?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nini ezali kopusa yo ete obongola bizaleli?
  • Lamuká!—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bililingi ya bolumbu ezali kobebisa bosolo ya kosangisa nzoto
  • Bavɛdɛti bazali kosalela makambo matali kosangisa nzoto
  • Mbongwana ezali kobebisa bizaleli
  • Kopesa mateya matali kosangisa nzoto
  • Bolingo mpe kondima mikumba elimboli nini?
  • Mbongwana ya bizaleli ezali kobimisa mituna ya sika
    Lamuká!—1997
  • Kosangisa nzoto liboso ya kobala
    Lamuká!—2013
  • Lolenge ya kolónga mokakatano yango
    Lamuká!—1997
  • Ndenge nini nakoki kolimbola mateya oyo etali kosangisa nzoto?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Lamuká!—1997
g97 Octobre nk. 4-7

Nini ezali kopusa yo ete obongola bizaleli?

ESILI koleka mbula soko 2 700, mokomi moko oyo apemamaki na Nzambe akomaki lisese oyo ya kosimba motema: “Kosana na zoba ezali bobele ete asala mobulu.” (Masese 10:23) Bosolo ya likambo yango emonanaki mingimingi uta ntango oyo mbongwana ekɔtaki kati na makambo matali kosangisa nzoto. Liboso ete sida eyebana, bato mingi bazalaki kotalela kosangisa nzoto lokola ‘lisano ya komipesa na yango’ mpe ete mposa ya kosangisa nzoto esengeli kokokisama ‘atako mbuma mabe nini yango ekobimisa.’ Bizaleli yango bisili kobongwana? Soko moke te.

Lelo oyo, boombo ya makambo matali kosangisa nzoto ezali naino kobimisa “bandumba minene,” “basi to mibali ya ndɔngɔ́,” mpe “baalinga-kosangisa nzoto,” oyo balobaka ete bizaleli malamu ezali likambo litali moto na moto mpe ete bolingo ya balabála elongo na bato ebele ezali mabe te. (Talá etánda “Mitindo mikeseni ya kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo,” na lokasa 6.) Balobaka ete lokola yango esalemaka kati na bato mikóló, ‘moto moko te azwaka likámá’ soki asangisi nzoto na moto nyonso oyo ye alingi. Na 1964, Ira Reiss, nganga-mayele ya sociologie na Inivɛrsité ya Iowa alobelaki yango ete ezali “kokanga miso oyo esangani na bolingo.”

Emonani ete episkɔ́pɔ moko ya Lingomba ya Angleterre na Edimbourg, na ekólo Écosse, azalaki na makanisi motindo moko, mpamba te alobaki ete bato babotamaki mpo ete bázala na basi to mibali ebele mpo na kosangisa na bango nzoto. Na lisoló oyo asalaki na ntina na makambo matali kosangisa nzoto mpe boklisto, alobaki ete: “Ntango Nzambe azalisaki biso, ayebaki ete atyaki kati na biso mposa makasi ya kosangisa nzoto mpo ete tókokisaka yango kozanga komipekisa. Asalaki biso ete tósangisaka nzoto ntango nyonso. Nakanisi ete ekozala libunga soki lingomba ekokweisa bato oyo basili kolanda lɔɔmbi (instinct) na bango.”

Makanisi motindo wana mabongi mpenza? Bolingo ya balabála ebimisaka matomba nini? Bolingo ya ntango mokuse na kosangisáká nzoto na bato ebele epesaka bosepeli mpe esengo?

Kopalangana na mokili mobimba ya makɔnɔ oyo mazwamaka na kosangisa nzoto mpe bamilió ya bazemi oyo ezali kozwama kozanga kobalana, mingimingi kati na bilenge, ezali komonisa ete likanisi motindo wana elóngi te. Engebene zulunalo Newsweek, bobele na États-Unis, mbula na mbula, bilenge soko milió misato bazali kozwa makɔnɔ na kosangisáká nzoto. Lisusu, emonani ete “mikóló oyo bandimaka” “basepelaka te,” mpe balingaka te kozwa mokumba ya mwana oyo azali na libumu, mpe nokinoki balukaka kosopa zemi. (2 Timoté 3:3) Yango esukisaka bomoi ya mwana, mpamba te abimisami na makasi na libumu ya mama na ye. Nzokande mama na ye oyo mbala mosusu azali naino elenge akonyokwama na makanisi mpe akozala na mayoki ya komema ngambo na bomoi na ye mobimba.

Engebene bolukiluki ya Dr. Patrick Dixon, na katikati ya bambula ya 1990, bobele na Grande-Bretagne, motángo ya mosolo oyo mobimisamaki mpo na makɔnɔ oyo mauti na mbongwana na makambo matali kosangisa nzoto ezalaki dolare miliare 20. Kati na búku na ye Komata ya ntalo ya bolingo (na Lingelesi), Dr. Dixon ayebaki motángo yango na kopesáká bilembeteli likoló na mituya ya mosolo oyo ebimaka mpo na kosalisa makɔnɔ oyo mazwamaka na kosangisa nzoto, bakisá mpe sida; mpo na kobomama ya mabala; mpo na kopesa lisungi epai ya baboti oyo bazali na babalani te; mpe mpo na kosalisa bana mpe mabota oyo matungisami. Dr. Dixon asukisi na maloba oyo kati na zulunalo The Globe and Mail ya Canada: “Mbongwana na makambo matali kosangisa nzoto oyo ezali kolaka biso bonsomi esili kokómisa bato mingi baombo, kati na mokili oyo mobebisami na makambo ya kosangisa nzoto, na makámá, na mayoki ya kozala yo moko, na kotungisama na makanisi, na mobulu mpe na kobebisa.”

Kasi mpo na nini kokóba komipesa na boombo ya kosangisa nzoto motindo wana, kosepela na bolingo ya ntango mokuse, mpe kolobela mingi bolingo ya balabála? Atako matomba mabe masili komonana na boumeli ya bambula soko ntuku misato oyo euti koleka, nini ezali kopusa bato kati na likambo yango oyo emonani ete ezali mabe?

Bililingi ya bolumbu ezali kobebisa bosolo ya kosangisa nzoto

Kolakisama ya bililingi ya bolumbu na mikanda to na televizyó etángami lokola moko ya makambo oyo mazali kokólisa boombo ya kosangisa nzoto. Mobali moko oyo akómaki moombo ya kosangisa nzoto akomaki kati na zulunalo The Toronto Star ete: “Natiká komɛla likaya esili koleka mibu mitano, natiká komɛla masanga makasi esili koleka mibu mibale, kasi mpo na kotika pite mpe kotala bililingi ya bolumbu, ezali mpenza likambo lileki mpasi mpo na ngai.”

Mobali yango alobaki mpe ete bilenge oyo batalaka bililingi ya bolumbu, bazalaka na makanisi malongobani te na ntina na kosangisa nzoto. Bamipesaka na makanisi ezangi kolongobana mpe ezalaka mpasi mpo ete bákokisa bamposa na bango na lolenge bakanisaka. Yango ememaka moto na komitangola na basusu mpe na makambo mosusu oyo ezali kopesa mikakatano mpo na kozala na bolingo oyo ekoki koumela.

Bavɛdɛti bazali kosalela makambo matali kosangisa nzoto

Mbala mingi, bavɛdɛti bamipesaka na kosangisa nzoto na bato mingi, ezala babalá to babalá te, bazali kosala yango polele mpe bazali kolakisama na myango ya kominanola. Masano ya kosangisa nzoto na lolenge ezangi bolingo ya solosolo mpe ezangi bopɛto oyo ezali kolakisama na televizyó, ezali kopesa bato makanisi malongobani te na ntina na kosangisa nzoto. Bipanzeli-nsango mbala mingi ekosaka bato na komonisáká ete kosangisa nzoto na libándá ya libala ezali bongo bolingo. Emonani ete baoyo bakumisaka bavɛdɛti bazalaka na likoki te ya kokesenisa mposa ya nzoto mpe bolingo, to bolingo ya ntango mokuse mpe bolingo oyo eumelaka, to makanisi mpamba mpe bosolo.

Bobele bongo, mbala mingi mpenza piblisité esalelaka kosangisa nzoto lokola mwango oyo ekopesa nzela ete biloko ya mombongo esombama malamu. Monganga moko oyo asalisaka mikakatano euti na kosangisa nzoto alobaki ete, kosangisa nzoto ekómi “eloko moko oyo mokano na yango ezali ya kobenda likebi ya bato na eloko moko ya kotɛka.” Zulunalo Family Relations elobi ete basali ya piblisité bamonisaka ete mposa ya kosangisa nzoto yango nde bomoi ya malamu, nzokande yango ezali “konyɔngɔtana mosusu ya makanisi na ntina na kosangisa nzoto” na ekeke oyo ya 20.

Mbongwana ezali kobebisa bizaleli

Mbongwana ya bizaleli ya bato mpe kobimisama ya bankisi kobanda na 1960 mpo na koboya kozwa zemi ebongolaki ezaleli ya bamilió ya basi na ntina na kosangisa nzoto. Bankisi yango ezali kopesa basi likanisi ya kokokana na mibali, bonsomi to lipanda oyo bakanisaki naino te liboso. Bazali sikawa na makoki ya komipesa na bolingo ya ntango mokuse, kozanga kobanga kozwa zemi oyo balingi te. Lokola babebisami na bizaleli na bango, mibali mpe basi basili kotya mikumba ya libota mpe ya kosangisa nzoto na likámá.

Mokomi moko ya Biblia na ekeke ya liboso alobaki na ntina na bato motindo wana ete: “Miso na bango matondi na pite, makotika kosala masumu te. . . . Bazali na mitema mimesani na bilulela . . . Basili kobunga nzela.”​—2 Petelo 2:14, 15.

Kopesa mateya matali kosangisa nzoto

Ankɛ́tɛ moko esalemaki epai na bilenge basi minzemba 10 000 ya eteyelo ya ntéi na États-Unis emonisaki ete “boyebi oyo ezwami na mateya ya kosangisa nzoto mpe koboya kozwa zemi,” ezalaki ata na bopusi moko te likoló na motángo ya bilenge minzemba oyo bazwaki bazemi. Nzokande, biteyelo mosusu, mpo na kopɛngola bazemi, bazali kokabolela banakelasi bakapɔti, atako yango ezali kobimisa ntembe monene.

Ntango zulunalo Calgary Herald etunaki mwanakelasi moko ya mwasi ya mibu 17 na eteyelo ya ntéi, alobaki ete: “Ezali solo ete bilenge basi mingi ya eteyelo ya ntéi bazali kosangisa nzoto . . . ata mpe bana ya mibu 12.”

Bolingo mpe kondima mikumba elimboli nini?

Bolingo, kotyela moto motema mpe boninga malamu eyaka na mposa ya kosangisa nzoto te to mpe na kokokisama ya mposa yango te. Kosangisa nzoto yango moko ekoki te kosala bolingo ya solosolo. Bolingo mpe boninga ya motema ebotamaka na mitema ya bato mibale oyo bazali na mposa ya kotonga boyokani oyo ekoumela.

Bolingo ya ntango mokuse ekoki kotika moto na mayoki ya kozanga libateli, kozala ye moko mpe mbala mosusu kotikela ye bokɔnɔ moko oyo ezwamaka na kosangisa nzoto, lokola mpe sida. Baoyo bakumisaka bolingo ya balabála bakoki kokokana malamu na oyo emonisami na 2 Petelo 2:19: “Bakopesaka bango bilaka na bonsomi, ata bango mpenza bazali baombo na libebi; mpo ete soko moto akweisami na likambo nini, akómi moombo na likambo yango.”

Komisyó moko ya Lingomba ya Angleterre ebimisaki lapólo na yango na Yúni 1995, ezalaki na motó na likambo ete “Eloko moko ya kokumisa.” Engebene zulunalo The Toronto Star, na bokeseni na toli oyo ezwami na Biblia, komisyó yango elendisaki lingomba ete “elongola elobeli oyo ete ‘kosala masumu’ mpe etika ezaleli na yango ya kosambisasambisa baoyo bazali kofanda makango.” Lapólo esɛngaki ete “lingomba esengeli koyamba bato oyo bazali makango, koyoka bango, koyeba makambo na bango, . . . mpo ete bato nyonso báyeba ete Nzambe azali kati na bango.”

Yesu akokaki kobénga bakonzi ya mangomba wana na nkombo nini? Ntembe ezali te ete akokaki kobénga bango ‘bakambi oyo bakufá miso.’ Mpe ezali boni mpo na baoyo bazali kolanda bakambi yango? Apesi makanisi na ye boye: “Soko mokufi miso akokamba mokufi miso na nzela, bango mibale bakokwea na libulu.” Komikosa te, Yesu alobaki polele ete “pite” mpe “ekobo” ezali kati na makambo oyo “ekopesa moto mbindo.”​—Matai 15:14, 18-20.

Liboso na makambo ndenge na ndenge wana oyo mazali kobebisa mpe kosalela kosangisa nzoto; lolenge nini moto, mpe mingimingi bilenge, bakoki kolongwa na boombo ya kosangisa nzoto? Sɛkɛlɛ́ ya bolingo ya esengo mpe ya ntango molai ezali nini? Lisoló oyo lilandi likotalela lolenge baboti bakoki kosalisa bana na bango ete bámibongisa mpo na bomoi na bango na mikolo mizali koya.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]

Bobele na États-Unis, mbula na mbula, bilenge soko milió misato bazali kozwa makɔnɔ na kosangisáká nzoto

[Etanda na lokasa 6]

Mitindo mikeseni ya kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo

Bandumba minene: Ezali bato oyo balingaka kolula mingi, mpe balandelaka moto oyo baluli mbala moko ntango motema ebɛti, mpe soki bakokisi mposa, basundoli ye mpo na koluka mosusu. Ebéngeli yango ebimisamaki na Dr. Michael Liebwitz, na New York State Psychiatric Institute.

Basi to mibali ya ndɔngɔ́: Lolenge oyo basosiɔlɔ́gɛ na États-Unis babéngaka bato oyo balekisaka bomoi na bango na kobala, koboma libala mpe kobala lisusu.

Baalinga-kosangisa nzoto: Luther Baker, profɛsɛrɛ na makambo matali libota mpe monganga oyo ayebani na Letá mpo na kosalisa mikakatano ya kosangisa nzoto alobi ete bato yango balukaka komonisa bolombe na bango ya kosangisa nzoto na kosangisáká nzoto na bato ebele. Lelo oyo ebéngeli yango ezali mpe kosalelama mpo na bato oyo babebisaka bana mike na kosangisáká na bango nzoto.

[Elilingi na lokasa 7]

Kotala bililingi ya bolumbu ekómisaka moto moombo mpe ememaka moto na kotalela kosangisa nzoto na lolenge ezangi kolongobana

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto