Lolenge ya kolónga mokakatano yango
BIZALELI malamu ya moto na ntina na kosangisa nzoto etyamaka na likámá uta bomwana na ye mpamba te piblisité na televizyó, babúku, bazulunalo, bafilime mpe miziki oyo ezali kolobela mingimingi kosangisa nzoto ezali pembeni na ye. Bilenge bazali kopusama na kotalela makambo matali kosangisa nzoto lokola mikóló kozanga ete bábongisama mpenza na mayoki na bango. Kútu baboti mosusu bakólisaka bopusi yango na kopesáká nzela na bana na bango ete bábanda kokutana mbala na mbala na basi to na mibali wana bazali naino bilenge mpenza. Bopusi ya baninga mpe elendisaka bokutani ya mbala na mbala ya basi na mibali, bilenge mingi oyo bazalaka na mwa “mopɛlipɛli” (petit ami) na bango baumelaka te kokóma na mposa makasi ya kosangisa nzoto. Luther Baker, profɛsɛrɛ ya makambo matali mabota alobaki ete: “Emonanaka mingi ete . . . bilenge basi oyo bamiyokaka ete baboti na bango balingaka bango te . . . bakweaka na motambo ya kosangisa nzoto na mwa mopɛlipɛli na bango na kokanisáká ete bakomonisela bango bolingo mpe boninga ya motema.”
Na esika ete bátalela bolenge na bango lokola eleko moko ya komilɛngɛlɛ mpo na bomoi, bilenge balingaka kotalela eleko yango lokola ntango ya komisepelisa na makambo nyonso. Profɛsɛrɛ Baker alobaki ete: “Lokola bapusami na makoki na bango ya kosangisa nzoto mpe bandimisami na baninga na bango ete kosangisa nzoto nde ezali lolenge ya komonisa bomoto, bilenge mingi bakómaka baombo ya kosangisa nzoto.” Esili koleka mibu soko 30, Arnold Toynbee, mokomi na makambo ya kala amilelaki mpo na ezaleli wana oyo ezali kobebisa bilenge, lokola akanisaki yango, lisoló ya bato esili komonisa ete ndambo mosusu ya mayele ya mindɛlɛ eutaki na likambo oyo ete ‘balamusaki mposa ya kosangisa nzoto’ noki te mpo ete bámipesa na koluka kokóma na boyebi mingi.
Baboti oyo bazali ndakisa
Baboti oyo bazali kopesa nzela te na bana na bango ete bákutanaka mbala na mbala basi na mibali lokola likambo ya lisano, bazali komibanzabanza mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mpe bolamu ya bana na bango na mikolo mizali koya. Na komonisáká mitindá mitombwani mpe kosolola malamu, baboti bakoki kozala ndakisa malamu mpo na bana na bango. Bolukiluki na ntina na mposa ya kosangisa nzoto ya bana emonisi ete “bopusi yango ekoki kosala ete mposa ya bana ya kosangisa nzoto ebimisama noki te,” engebene Journal of Marriage and the Family.
Baboti oyo bateyaka bana na bango bizaleli ya komipekisa mpe ya koyeba komema mikumba bazwaka matomba malamu. Bolukiluki moko emonisi ete, “Ntango bilenge mpe baboti na bango bazali na bizaleli oyo epesaka motuya mingi na mposa ya kokokisa mikumba, likámá ya kosangisa nzoto mpe kozwa zemi na libándá ya libala ekitaka.” Yango esɛngaka na baboti ete báyebaka makambo bana na bango bazali kosala—kotalela badevware na bango; koyeba bipai bakendaka kotambola mpe baninga na bango, kotyela bango mikano milongobani mpo na kelasi, mpe koteya bango makambo ya elimo. Bana oyo bazali kokóla na boninga ya motema motindo wana elongo na baboti na bango, bamiyokaka malamu mpe babulunganisamaka te na makambo ya kosangisa nzoto.
Toli ya malamu koleka mpo na baboti mpe bana ezali mayele oyo mazwami kati na Biblia. Na Yisalaele ya kala bapesaki baboti mokumba ya koteya bana na bango bizaleli malamu. Yehova atunaki bango motuna ete: “Libota monene nini ezali na Mibeko mpe malako na sembo lokola mibeko oyo nyonso mitii ngai liboso na bino lelo?” Ezalaki ‘malako ya sembo’ nde basengelaki koteya yango na bana na bango na bolingo mpe na boninga kati na libota. “Okolakisa yango na etingya na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛma yo.” Bana bapesamaki toli ete: “Batelá lilako na tata na yo, mpe longwa na mibeko na mama na yo te.” Masoló motindo wana ya boninga mpe mateya oyo mazali kouta epai ya tata mpe ya mama mazali kopesa mwana miboko kitoko ya kozala na makanisi malongobani na ntina na kosangisa nzoto, mpe yango “ekobatela” ye na boumeli ya bomoi na ye mobimba.—Deteronome 4:8; 6:7; Masese 6:20, 22.
Bilenge, mpo na nini bolingi kobebisa bomoi na bino ya mikolo mizali koya na komitikáká kolɛngolama na mposa ya kosangisa nzoto? Eleko ya bolenge (adolescence) eumelaka mibu soko nsambo. Esengeli kosalela yango malamu mpo na kokóla na makanisi, na mayoki, mpe na elimo mpe kozala na makanisi malongobani na ntina na kosangisa nzoto, yango mpo na kolɛngɛlɛ mibu 50 to 60 oyo mizali liboso kati na bomoi na bino. Baboti, bókokisa malamumalamu mokumba na bino oyo Nzambe apesi bino, bóbatela bana na bino ete bázwa te mawa oyo eutaka na makɔnɔ mazwamaka na kosangisa nzoto mpe na bazemi oyo balingaki te. (Mosakoli 11:10) Tiká ete bana na bino bámona na bomoi na bino ya mokolo na mokolo lolenge bolingo mpe limemya mpo na basusu etongaka boyokani oyo eumelaka.
Kolónga mikakatano
Kotika nzela te ete bato oyo bazali baombo ya kosangisa nzoto na ntango na biso bábongola lolenge na yo ya kotalela bomoi mpe bábebisa libaku malamu oyo ozali na yango ya kozala na bomoi kitoko mpe ya esengo na mikolo mizali koya. Manyolá likoló na bandakisa mingi ya boyokani malamu oyo bato bazalaki na yango, oyo ezwami kati na Biblia. Mindimisá ete bomoi mpe bolingo ezalaka ntango nyonso malamu mpe eumelaka nsima ya ntango ya bolenge. Ntango baklisto basi mpe mibali batosi bosolo ya likambo oyo engebene mokano ya Nzambe, na bongo, mpo na bato mibale oyo balingani, moboko ekotyama mpo ete libala na bango ezala malamu mpe eumela.
Wana ozali kotalela kati na Biblia bato lokola Yakobo mpe Laele, Boazi mpe Luta, elenge mobateli na mpate mpe moseka Silamite, okomona eloko moko oyo ezalaki kobenda bango moko epai na mosusu mpo na mposa ya nzoto na boyokani na bango. Nzokande, soki otángi na likebi mpenza Genese mokapo 28 mpe mokapo 29, mokanda ya Luta, mpe Loyembo ya Salomo, okomona ete ezali na makambo mosusu ya ntina oyo ekólisaki bolingo motindo wana.a
Ndimá bibongiseli oyo bikamatami na Yehova mpo na bomoi
Yehova, Mozalisi ya bato ayebi malamu likoki oyo bato bazali na yango mpo na kosangisa nzoto mpe bopusi na yango. Na bolingo nyonso, asalaki biso na lolenge na ye, asalaki biso ete “tósangisaka nzoto na bato ebele ebele,” te kasi asalaki biso na likoki ya kozala na bokonzi likoló na mayoki na biso na boyokani na mokano ya Nzambe. “Mokano na Nzambe ezali boye ete . . . bótika makambo na pite. Moto na moto ayeba kozwa mwasi na ye moko kati na bulɛɛ mpe na litosi, mpo na mposa mabe na nzoto te, pelamoko ekosalaka bapakano baoyo bayebi Nzambe te, ete moto moko akwea te mpe asalela ndeko na ye mabe na likambo oyo te.”—1 Batesaloniki 4:3-6.
Yango ezali oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala na mokili mobimba. Batosaka mitindá mitombwani ya Nzambe mitali mibali mpe basi. Mibangé mibali batalelami lokola batata, “bilenge mibali lokola bandeko mibali mpe mibangé basi lokola bamama mpe bilenge basi lokola bandeko basi na pɛto nyonso.” (1 Timoté 5:1, 2) Oyo nde ezingelo malamu bilenge mibali mpe bilenge basi bazali na yango, bapusami te na kokutanáká mbala na mbala na basi to na mibali mpo na koluka kobala wana ntango ekoki naino te mpe banyokwamaka te na makɔnɔ oyo mazwamaka na kosangisa nzoto! Libota ya moklisto oyo lizali na molende, lilendisami na lisangá ya boklisto, ezali ebombamelo kati na mokili oyo mozali kotombola makambo ya kosangisa nzoto.
Na kosaleláká mitindá ya Biblia, bilenge baklisto bazali komibatela na boombo ya kosangisa nzoto mpe bazali kozwa esengo na kotyáká likebi na toli oyo epesami na Liloba ya Nzambe: “Ɛ elenge, sepelá na bolenge na yo mpe tiká ete motema na yo esepelisa yo na mikolo na bolenge na yo; tambolá mpe na nzela na motema na yo mpe na pole na miso na yo. Yebá mpe ete mpo na makambo oyo nyonso, Nzambe akoyeisa yo na kosambisama. Bongo, longolá mawa na motema na yo mpe bimisá mabe na nzoto na yo mpo ete bomwana mpe bolenge izali mpamba.”—Mosakoli 11:9, 10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá búku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi, lokasa 247, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 9]
Bilenge oyo basalaka misala elongo na baboti na bango bapɛngolaka bamposa ya kosangisa nzoto
[Elilingi na lokasa 10]
Kotika nzela te ete baombo ya kosangisa nzoto bábebisa libaku malamu oyo ozali na yango ya kozala na bomoi kitoko mpe ya esengo na mikolo mizali koya