Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g97 Octobre lok. 3
  • Mbongwana ya bizaleli ezali kobimisa mituna ya sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mbongwana ya bizaleli ezali kobimisa mituna ya sika
  • Lamuká!—1997
  • Masolo mosusu
  • Nini ezali kopusa yo ete obongola bizaleli?
    Lamuká!—1997
  • Lolenge ya kolónga mokakatano yango
    Lamuká!—1997
  • Kosangisa nzoto liboso ya kobala
    Lamuká!—2013
  • Bizaleli mabe kati na makambo matali kosangisa nzoto na ntango ya kala mpe na mikolo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Lamuká!—1997
g97 Octobre lok. 3

Mbongwana ya bizaleli ezali kobimisa mituna ya sika

“MBONGWANA KATI NA MAKAMBO MATALI KOSANGISA NZOTO,” “bato bamipesi mingi na kosangisa nzoto,” “mbongwana ya bizeleli.” Maloba motindo oyo masakolaki mbongwana ya bizaleli kati na makambo matali kosangisa nzoto, mingimingi kobanda na katikati ya bambula ya 1960 mpe na nsima. Bato mingi bakómaki kosalela likambo oyo ebéngami ete “bolingo ya balabála,” oyo emonisamaki na lolenge ya bomoi oyo kati na yango bato bazali kotalela libala mpe kozanga kosangisa nzoto liboso ya kobala lokola makambo mpamba.

Mokomi Ernest Hemingway akomi ete, “Likambo nyonso oyo, nsima ya kosala yango esepelisi yo, yango ezali malamu, kasi likambo nyonso oyo, nsima ya kosala yango eyokisi yo mpasi, yango ezali mabe,” maloba yango mamonisi malamu ezaleli ya bato oyo balɛngolami na bilaka ya bonsomi ya makambo matali kosangisa nzoto mpe esengo oyo yango epesaka. Maloba motindo yango mazalaki kolóngisa bolingo ya ntango mokuse mpe etamboli ya bondumba oyo mibali mpe basi bazalaki kosalela mpo na kokokisa bamposa na bango ya kosangisa nzoto. “Esengo yango ya kosangisa nzoto” ezalaki na ndelo te. Bankisi ya koboya kozwa zemi, oyo ebimisamaki na ntango wana, epesaki nzela na likambo ya kosangisa nzoto na bonsomi nyonso.

Nzokande, lolenge wana ya bomoi ya mbindo eyaki komema sida mpe makɔnɔ mosusu oyo mazwamaka na kosangisa nzoto. Likanisi ya bonsomi ya kosangisa nzoto ya libota oyo lisili konyɔngɔtana libebaki. Esili koleka mwa bambula, zulunalo Time ekomaki lisoló moko na motó na likambo ete: “Kosangisa nzoto na bambula ya 1980​—Mbongwana esili.” Endimiseli yango ezwaki moboko mingimingi na kopalangana ya makɔnɔ oyo mazwamaka na kosangisa nzoto oyo mazwaki ebele ya bato ya Amerika. Lelo oyo, bato pene na milió 30 na mokili mobimba bazali na sida!

Kobanga kozwa makɔnɔ oyo mazwamaka na kosangisa nzoto esili kobongola makanisi ya bato mingi na ntina na ezaleli ya kosala bolingo ya ntango mokuse na kosangisáká nzoto na bato mingi. Na 1992, lisoló moko ebimaki kati na zulunalo US oyo elobelaka kominanola emonisaki mitángo ya ankɛ́tɛ oyo esalemaki na Letá, elobaki ete: “Basi minzemba soko 6 800 000 basali mbongwana na bizaleli na bango ya kosangisa nzoto mpo na kobanga sida mpe makɔnɔ mosusu oyo mazwamaka na kosangisa nzoto.” Engebene lisoló yango, nsango na yango ezalaki polele ete: “Kosangisa nzoto, ezali likambo ya kosakana na yango te. Ezali komitya na likámá.”

Lolenge nini bambula oyo ya mobulungano ebongoli makanisi ya bato na ntina na kosangisa nzoto? Bato bazwaki toli na ezaleli ya bozoba mpe ya kozanga komipekisa oyo emonanaki na bambula eleki na ntina na bolingo ya balabála mpe bazwaki toli na komonáká mbuma mabe ya makɔnɔ oyo mazwamaka na kosangisa nzoto, oyo ebimaki na bambula ya 1980? Na biteyelo, kokɔtisama ya mateya matali makambo ya kosangisa nzoto esungi mpenza bilenge basi mpe mibali ete bátalela malamumalamu bamposa na bango ya kosangisa nzoto? Mwango nini ya malamu koleka esengeli mpo na kolónga mbongwana ya lelo na makambo matali kosangisa nzoto?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto