Singapour: Libanga ya ntalo na Azia ebungisi kongɛnga na yango
GBUMM! Ekuke monene ya bibende ekangamaki makasi nsima wana mwasi moko mobangé moklisto, mokufeli mobali, oyo azalaki na mbula 71 mpe na nzoto makasi te, akɔtisamaki na bolɔ́kɔ ya basi ya kartyé Changi na ekólo Singapour. Amekaki kolimbola etɛlɛmɛlo na ye ya Motatoli ya Yehova epai na zúzi-mokambi ete: “Nazali soko moke te likámá mpo na boyangeli oyo.”
GBUMM! Ekuke ekangamaki makasi nsima wana mwasi mosusu mobangé moklisto, oyo azalaki na mbula 72 atyamaki na bolɔ́kɔ. Likambo nini asalaki? Azalaki na mikanda minei mikolimbolaka Biblia, oyo mibimisami na la Société Watch Tower, bakisá mpe Biblia na ye moko.
Na nyonso, banamboka 64 ya ekólo Singapour, oyo bazalaki na mibu kobanda na 16 kino 72, bakangamaki na bolɔ́kɔ mpe bakatelaki bango bitumbu. Kati na bango, bakangami 47 baboyaki kofuta lomande na ntina na lisosoli na bango mpe bakatelaki bango etumbu ya bolɔ́kɔ kobanda pɔ́sɔ moko kino pɔ́sɔ minei. Lolenge nini yango ekoki kosalema kati na engumba oyo ezali mpe ekólo, oyo balobelaka ete ezali moko na bisika oyo bomoi ezali malamu koleka kati na mokili? Lolenge nini yango ekoki kosalema kati na engumba oyo ezali mpe ekólo, oyo eyebani na mokili mobimba mpo na bomɛngo, bokóli ya kokamwa ya nkita na yango mpe babuludingi na yango ya sika mpe bonsɔ́mi oyo yango ezali kopesa na makambo matali losambo?
Engumba ya sika oyo ezali mpe ekólo
Tótalela naino na mokuse lisoló na yango. Na mikolo na biso, lisoló ya ekólo Singapour ebandi na mobu 1819 ntango Sir Thomas Stamford Raffles moto ya ekólo Grande-Bretagne akómaki kuna. Sir Raffles, momonisi ya Compagnie des Indes orientales, azalaki koluka esika ebongi mpo na kotya libóngo ya botekisi biloko na bango na mikili ya Azia ya Ɛ́sti. Aponaki bongo mabelé ya Singapour. Uta ntango wana esika yango ekómá esika monene ya mombongo mpe esalá bopusi makasi mpo na bokóli ya mikili ya Azia ya Ɛ́sti kino lelo.
Liboso ya kozwa lipanda, Singapour ezalaki engumba moko ya bosɔtɔ mpenza. Lelo, moto moko te akoki kolobela yango bongo. Bokeseni ezali mpenza komonana lelo. Na boumeli ya mbula 30 oyo euti koleka, basili kotonga bandako ya sika soko na mboka mobimba, kozongeláká lolenge ya botongi bandako ya kala ya engumba mpe kotongáká libándá ya bandako yango na lolenge ya bandako ya kala to kokɔ́tisáká lolenge ya kala ya botongi bandako kati na bandako ya sika. Ekólo Singapour esili kokóma esika monene ya bokutani ya mombongo kati na mai monene na mikili ya Azia ya Ɛ́sti mpe mbala mingi masuwa soko 800 esɛmaka na libóngo na yango. Zɛ́ki (grue) minene oyo isalemi na tekiniki ya sika isalisaka mpo na kobimisa mpe kokɔ́tisa batɔ́ni ya masandisi kati na masuwa minene bobele na boumeli ya mwa bangonga. Na bakartyé ya mombongo ya engumba yango, mabelé ezali na ntalo na boye ete mètre carré moko ezali na motuya ya dolare 5 000 to koleka.
Engumba yango ezali na bato pene na 3 400 000 oyo bauti na bosangani kati na bato ya Chine, ya Malaisie, ya Inde, ya Mikili ya Mpótó, mpe bato mosusu. Bazali koloba nkótá lokola Mandarin, Malais, Tamoul mpe Lingelesi.
Balabála ya engumba Singapour mpe métro na kati ya mabelé ezali na bolai ya kilomɛtɛlɛ 83 mpe etángami lokola moko na bibongiseli ya transport oyo ebongisami malamu mpenza kati na mokili. Bitando kitoko ya matiti bizwami na engumba mobimba, kokaboláká babuludingi yango kitoko. Turiste oyo akómi mpo na mbala ya liboso akoluka libosoliboso komona Hôtel Raffles, oyo esili kobongisama lisusu na mobimba na yango mpe oyo etángami lelo lokola monimá ya makambo ya kala ya mboka mpamba te yango esalemaki na mobu 1889. Esika ya mibale oyo turiste akozanga te kotala ezali bongo elanga ya fololo mpe ya banzeté ya hectares 52, kati na yango zamba ya hectares 4 epai wapi banyama oyo ebéngami tigre ezalaki kotambolatambola.
Bonsɔ́mi ya losambo mpe ebatelami
Lolenge moko na bomɛngo na yango na makambo ya nkita, ekólo Singapour epesi ndanga ya bonsɔ́mi ya losambo epai na bafandi na yango nyonso. Nde likambo ya mawa, Singapour ekokisi elaka yango te. Mingi mpenza baoyo bayanganaka elongo na lisangá ya Batatoli ya Yehova nde basili komona bosolo ya likambo yango.
Búku ya Mibeko ya ekólo Singapour, na article 15(1), epesi ndingisa ya moboko mpo na bonsɔ́mi ya losambo na maloba oyo: “Moto na moto azali na lotómo ya koyambola mpe kosalela mpe kopalanganisa [bindimeli ya] lingomba na ye.”
Article 15(3) ya Búku ya Mibeko epesi ndanga ete: “Lingomba mokomoko ezali na lotómo:
(a) ya kotambwisa makambo na yango ya lingomba,
(b) ya kotya mpe kobatela bibongiseli mpo na kokokisa mikano ya lingomba to mpo na misala ya kosunga bato; mpe
(c) ya kosomba mpe kozala na bandako na yango mpenza mpe kotambwisa yango engebene mibeko.”
Kobanda 1936, Batatoli ya Yehova bazalaki moko na mangomba oyo mayebanaki na Singapour. Na boumeli ya bambula, bazalaki kosala makita na bango ya lisangá na Ndako ya Bokonzi oyo ezwami na Exeter Road nimero 8, na ngambo ya zándo moko ya monene. Lisangá ezalaki kokóla mpe kopesa lisungi na yango mpo na bomoi ya kimya kati na mboka.
Batatoli ya Yehova bapekisami
Na mwa 12 Yanuáli 1972, makambo nyonso wana mabongwanaki. Mobeko moko ebimaki, oyo ebéngamaki Government Banishment Act, oyo na mokapo na yango 109, etindaki ete bábengana bamisionere Norman David Bellotti mpe mwasi na ye Gladys, oyo baumelaki mbula 23 na ekólo Singapour. Mobeko mosusu elandaki mpe elongolaki nkombo ya lisangá ya Batatoli ya Yehova na mikanda ya Letá na ekólo Singapour. Mwa bangonga na nsima, bapolisi bayaki kokanga Ndako ya Bokonzi na kobukáká ekuke na yango. Eumelaki te, mikanda nyonso mikolimbolaka Biblia oyo mibimisami na la Société Watch Tower mipekisamaki. Na bongo, ntango ya minyoko makasi koleka mpo na Batatoli ya Yehova ebandaki.
Guvɛrnemá etɛkaki Ndako ya Bokonzi kozanga kotalela mibeko, kozanga kolaka—kozanga koyoka Batatoli, kozanga kosambisa bango, kozanga kopesa bango likoki ya kozongisa eyano.
Guvɛrnemá ya ekólo Singapour elobaka mbala na mbala ete epekisi misala nyonso ya Batatoli ya Yehova mpamba te bango basalaka mosala ya sodá te. Eumelaki mpenza te, na mwa 29 Desɛ́mbɛ 1995, Mr. K. Kesavapany, momonisi monene ya ekólo Singapour kati na Mabota Masangani na Genève, atindaki nkomá epai na H.E. Ibrahim Fall, assistant personnel du Secrétaire Général pour les Droits de l’homme ya Mabota Masangani na Genève, kolobáká ete:
“Epekiseli ya guvɛrnemá na biso likoló na Batatoli ya Yehova ezali mpo na kobatela mboka. Kozala ya etuluku yango ekokóba kobebisa kimya ya mboka mpe etamboli malamu ya makambo kati na ekólo Singapour. Lisusu, esengelaki mpenza ete tópekisa mikanda na bango nyonso mpo na koyeisa epekiseli makasi mpe kosukisa nyɛɛ kopalangana ya bindimeli na bango.”
Na kotalela efundeli ya bakonzi ya Letá oyo ete Batatoli bazali kotya libateli ya ekólo Singapour na likámá, esengeli koyeba ete ezali bobele na bilenge soko 5 na mbula moko, oyo bazali koboya kosala mosala ya sodá. Singapour ezali na limpinga ya basodá soko 300 000. Guvɛrnemá ya Singapour eboyi kútu kolobela mosala mosusu oyo bilenge yango bakoki kosala na esika ya kosala mosala ya sodá.
Balingi mpenza kosilisa Batatoli
Nsima ya bambula mingi oyo Batatoli bazalaki na mwa bonsɔ́mi ya losambo, eleko ya sika oyo ebebisaki mpenza ntómo ya bato ebandaki na 1992 ntango bato mingi kati na bango bakangamaki na bolɔ́kɔ—to bafundamaki mpo ete bazalaki na mikanda oyo mipekisamaki. Na 1994, W. Glen How, mobangé ya mbula 75 oyo azali moto na mibeko mpe azali Motatoli ya Yehova na boumeli ya bomoi na ye mobimba, atindamaki na la Société Watch Tower na ekólo Singapour. Lokola azali moko kati na baavoká ya makoki ya guvɛrnemá ya ekólo Angleterre, etɛlɛmɛlo yango ya lokumu esalaki ete andimama liboso na bisambiselo ya ekólo Singapour. Na kotalela ndanga ya bonsɔ́mi ya losambo oyo elobelami kati na Búku ya Mibeko, Batatoli batindaki nkomá ete likambo na bango lisambisama na Esambiselo Monene ya ekólo Singapour mpo na komonisa kozanga kolongobana ya epekiseli ya mosala na bango na 1972 mpe kokangama ya bamoko na bango na 1992. Na mwa 8 Augústo 1994, Yong Pung How, zúzi-mokambi ya Esambiselo Monene ya ekólo Singapour, aboyaki lisɛngi yango. Milende oyo misalemaki nsima mpo na kosɛnga ete bátalela lisusu ekateli yango mibimisaki litomba moko te.
Na ebandeli ya 1995, emonanaki ete bakonzi ya Letá bazalaki kosalela Búku ya Mibeko bobele mpo na kozwa moboko ya bifundeli na bango epai na Batatoli ya Yehova te, kasi mpe mpo na kolukaluka myango mosusu ya konyokola bango makasi koleka. Basodá basalaki mwango ya nkúku oyo ebéngamaki Opération Espoir ya Secret Societies Branch of the Criminal Investigation Department (Police criminelle) mpe bakɔtelaki bituluku mike ya baklisto oyo bazalaki koyangana na bandako. Bakonzi ya basodá soko 70 mpe basodá na bango bazalaki koluka Batatoli lokola banguna na etumba mpe bakangaki bato 69. Bamemaki bango nyonso mpo na koyoka bango mpe batunaki bamoko kati na bango mituna na boumeli ya butu mobimba, mpe bango nyonso bafundamaki ete bazalaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova mpe bazalaki na mikanda mikolimbolaka Biblia. Bamoko batangolamaki na bakangami mosusu na boumeli ya ngonga koleka 18, mpe bapesaki bango ata likoki te ya koyebisa nsango na telefone epai na basangani ya mabota na bango.
Bafundaki te bapaya oyo bazalaki koyangana na makita. Kasi na nsuka ya 1995 mpe na ebandeli ya 1996, bafundaki banamboka 64 ya ekólo Singapour. Bango nyonso 64 bakweisamaki na likambo. Bato 47 kati na bango, bazalaki na mbula kobanda na 16 kino 72, baboyaki kofuta lomande monene ya bankóto ya badolare mpe bakɔtisamaki na bolɔ́kɔ kobanda pɔ́sɔ moko kino pɔ́sɔ minei.
Liboso ete bákɔtisa bakangami na biteni na bango ya bandako na bolɔ́kɔ, balongolaki bango bilamba, basi mpe mibali, mpe batikaki bango bolumbu liboso na ebele na bato. Basɛngaki na basi mosusu ete bátombola mabɔ́kɔ na bango, mpe básunama mbala mitano, mpe báfungola monɔkɔ mpe bábimisa lolemo na bango. Likambo ya nsɔ́ni koleka, basɛngaki na mwasi moko ete afungola lisoko na ye na misapi. Kati na bolɔ́kɔ, basɛngaki na mibali mosusu ete bámela mai ya twalɛti. Batalelaki bamoko na bilenge basi lokola bato mabe, babomi na bato, mpe batangolamaki na bato mosusu ya bolɔ́kɔ na boumeli ya bokangami na bango, wana bazalaki kopesa bango bobele mwa ndambo ya bilei na eleko ya kolya. Bakɛngɛli mosusu ya bolɔ́kɔ kútu babɔtɔlaki Batatoli Babiblia na bango.
Kasi tiká ete tóyoka mwa maloba ya bamoko kati na basi yango oyo bakangamaki. Lapólo na bango emonisi mpenza bokeseni monene kati na kitoko ya engumba yango ya sika mpe makambo kati na bolɔ́kɔ.
“Eteni ya ndako na bolɔ́kɔ ezalaki bosɔtɔ. Twalɛti mpe saani ya mai ya kosukola esilaki kobeba mpenza. Ezalaki mike mpenza mpe etondaki na salité. Bosɔtɔ mpe bandako ya mampúlututú (araignée) ezalaki na nsé na kiti oyo nafandaki.”
“Balobaki na ngai ete nalongola bilamba mpe natikala bolumbu, mpe bapesaki ngai saani ya sabuni (ezanga sabuni), mpe nzeté ya mino. Bakangami oyo basilaki koumela na bolɔ́kɔ balobaki na ngai ete bakangami ya ntango mokuse bazwaka nkisi ya mino te, papyé ya twalɛti mpe te.”
“Tozalaki bato 20 kati na eteni moko ya bolɔ́kɔ. Twalɛti ezalaki ya kofanda likoló na yango te kasi oyo basalá libulu na simá mpe efelo ya kozipa yango ezalaki molai kino na loketo na ngai. Esika ya kosukola ezalaki bobele na tiyó moko ya mai mpe saani ya kosukola moko oyo ezalaki na ezipeli na yango. Tosengelaki kosukola bato 6 na mbala moko—na ntɔ́ngɔ́, biso nyonso kati na eteni ya bolɔ́kɔ, tosengelaki kosukola na boumeli ya miniti 30.”
Atako bazalaki kati na bwale nyonso wana na bolɔ́kɔ, bango nyonso bamonaki ete kosalela Yehova ezali libaku malamu—ezala ntango nini, epai wapi, to na likambo nini. Talelá maloba malandi oyo mauti na elenge mwasi moko oyo akangamaki:
“Kobanda ntango nakɔtisamaki na bolɔ́kɔ, nazalaki ntango nyonso komikundola ntina oyo nakómaki kuna. Mokolo na mokolo nazalaki kobondela Yehova ete ayoka mabondeli na ngai mpe atika ngai te. Namindimisaki ete ayokaki mabondeli na ngai mpamba te ezalaki bobele elimo santu na ye nde esungaki ngai mpo ete nayika mpiko. Bobele na kosaláká bongo nde nayaki kososola ete nakómaki mpenza na boyokani ya penepene elongo na ye, mpe yango esili kolendisa ngai mingi, awa nayebi ete ye azali kobatela ngai. Namiyoki ete nazwi libaku malamu ya kolónga komekama oyo mpo na lokumu ya nkombo na ye.”
Nsima ya mwa ntango, bazulunalo ya mikili mingi elobelaki likambo yango. Bapanzi nsango ya Australie, ya Canada, ya États-Unis, ya Hong Kong, ya Malaisie, ya Mikili ya Mpótó, mpe ya bisika mosusu bayokaki mpe balobelaki makambo yango. Zulunalo The Toronto Star, ya ekólo Canada, elobelaki lisoló yango ya nsɔ́ni na motó na likambo oyo: “Mama-nkɔkɔ moko asambisami mpo ete azali na Biblia.” Eyebani ete mokili ezali na mikakatano minene oyo mizali kokómela bato mingi mpenza, kasi na likambo oyo tozali kolobela, bato bazali kokamwa bipai na bipai ete: “Makambo motindo wana mazali solo kosalema na ekólo Singapour?”
Ezali mpasi mpo na kondima ete lingomba oyo lizali kosala na bonsɔ́mi na nsé ya libateli ya mibeko na mikili koleka 200 kati na mabelé mobimba, ekóma konyokwama na ekólo Singapour. Ezali lisusu mpasi koleka mpo na kondima, soki totali ete lingomba mosusu te kati na ekólo Singapour ezali konyokwama na makambo makasi mpe mazangi kolongobana motindo wana.
Ɛɛ, mokonzi-mosungi ya bapolisi oyo atambwisaki mosala ya bokangi Batatoli ya Yehova andimaki ete ezalaki mbala ya liboso mpenza oyo ye mpe basodá na ye batindamaki mpo na kopekisa likita ya lingomba moko. Mwa maloba ya kosambisama yango oyo malandi mazali komonisa yango:
MOTUNA: (Epai na nzɛnɛnɛkɛ) Na lolenge yo oyebi, longola Batatoli ya Yehova, bapolisi ya Secret Societies Branch (eteni moko ya police criminelle) basilá kosala ankɛ́tɛ mpe kokangisa bato ya lingomba mosusu oyo liyebani na mibeko te?
EYANO: Nayebi te.
Mpe mituna elandaki kotunama.
MOTUNA: (Epai na nzɛnɛnɛkɛ) Osilá kokende yo moko kokanga bato ya lingomba moko ya moke oyo eyebani na mibeko te, oyo bato na yango bazalaki koyangana na ndako moko?
EYANO: Nasalá yango te.
Lisɛngi mpo na kolóngisa ntómo
Amnistie internationale mpe Association internationale de barreaux batindaki moko na moko momonisi na yango mpo na kotalela soki likambo yango lisambisamaki na bosembo. Andrew Raffell, oyo azali momonisi azangi koponapona ya Amnistie internationale mpe avoká ya Hong Kong, alobaki ete: “Nakomi na lapólo na ngai ete kosambisama yango ezalaki lokola lisano mpamba.” Alimbolaki lisusu ete bakonzi ya Letá bafundaki batatoli na esambiselo mpamba te bayebaki ete bakopesa bango likoki te ya koyebisa ntina oyo mikanda na bango mipekisamaki. Raffell akomaki nkombo ya mwa mikanda mikolimbolaka Biblia oyo mipekisamaki, kati na yango búku Le bonheur — Comment le trouver ? mpe Votre jeunesse — Comment en tirer le meilleur parti. Abakisaki ete ezali ata na ntina moko te oyo bakokaki kopekisa mikanda yango.
Cecil Rajendra, momonisi ya International Bar Association, alobaki ete:
“Longwa na ebandeli, namonaki mpenza ete kosambisama yango ezalaki bobele . . . lisɛki mpamba oyo libongisamaki malamumalamu mpo na kolakisa na mokili mobimba ete demokrasi ezali mpenza kosalelama na ekólo Singapour.
“Bakataki likambo mbangumbangu mpe ntembe ezalaki ata moke te ete baoyo nyonso bafundamaki bakopesamela ekweli, ezala na boumeli ya kosambisama to na bosukisi na yango.
“Atako kosambisama esalemaki na esambiselo ya moke mpe bifundeli bizalaki bobele mwa mbeba ya mibeko, nzokande kati na ndako na esambiselo bato bazalaki kobanga mpe babangisamaki.
“Ezalaki mpenza bongo mpamba te bapolisi ata koleka 10 batelemaki wana (motoba kati na esambiselo mpe minei na libándá) elongo na ebele na bakonzi ya bapolisi ya Brigade Spéciale oyo balataki bilamba ya sivili mpe bafandaki na mbalasani.”
Kolobeláká lolenge kosambisama ezalaki kosalema, Rajendra akóbaki koloba ete:
“Na boumeli ya ntango oyo nazalaki kolanda kosambisama (ezala na boumeli ya kosambisama mobimba), ezaleli ya zúzi-mokambi ezalaki malamu te. . . . Na bokeseni mpenza na malako nyonso matali kosambisama na bosembo, zúzi-mokambi azalaki mbala na mbala kokɔtela Letá mpe kopekisa baavoká oyo balingaki komona bilembeteli ya solo ya bifundeli, na ndakisa, baavoká yango basɛngaki ete bálakisa bango libongoli ya Biblia ya Roi Jacques, oyo bakonzi ya Letá bafundaki Batatoli ete bazalaki na yango lokola elembo ya moko na mikanda oyo mipekisamaki!”
Mikili mingi ezali komibanzabanza mpenza na ntina na kobebisama ya ntómo ya bato na ekólo Singapour na boye ete zulunalo moko ya Belgique, oyo ebéngami Droits de l’Homme Sans Frontières, ebimisaki lapólo ya nkasa 18 oyo na mobimba na yango elobelaki minyoko ya guvɛrnemá ya ekólo Singapour likoló na Batatoli ya Yehova. Willy Fautré, mokomi-mokambi ya zulunalo yango, alimbolaki na mokuse na lokasa ya ebandeli ntina monene ya bonsɔ́mi ya moto kati na bokonzi nyonso ya politiki:
“Atako kosalelama ya bonsɔ́mi ya losambo ezali moko na bilembo malamu koleka mpo na komonisa bonsɔ́mi ya moto na esika nyonso oyo ye azali, nzokande bobele mwa ndambo moke ya bibongiseli mpo na libateli ya ntómo ya bato nde emipesi mpo na kosukisa lolenge nyonso ya bokeseni oyo euti na bokabwani ya mangomba to na bindimeli, to mpo na kokólisa myango ya kobatela mpe kotombola bonsɔ́mi ya losambo.”
Na makomi minene, zulunalo Droits de l’Homme Sans Frontières ebimisaki liste na yango ya masɛngami na lokasa ya nsuka ya lapólo na yango.
Batatoli ya Yehova bazali na ntina kati na ekólo Singapour. Bazalaka na limemya na ntómo ya bazalani na bango mpe bakanaka kosalela bango mabe te. Mofandi moko te ya ekólo Singapour akoki komitungisa ete Motatoli moko abuki ndako na ye mpo na koyiba, to kobɛta ye to kobebisa ye na kosangisáká na ye nzoto na makasi.
Mosala na bango ya kosakola, oyo bazali kosala na bolingo malamu liboso na bato banso, ezali kolendisa mpe kobongisa bomoi ya mabota mpe kolendisa boninga kati na banamboka. Bazali kotambwisa boyekoli ya Biblia kozanga lifuti epai na moto nyonso oyo alingi koyekola mitindá mitombwani ya Biblia mpe lolenge ya kosalela yango kati na bomoi na ye. Makita na bango oyo mabongisami mpo na boyekoli ya Biblia mpe losambo mazali na esika ya ntina kati na kobongisama na bango ya boklisto. Yango esili kokómisa bango banamboka oyo bazali na etamboli malamu.
Banamboka ya ekólo Singapour oyo bazali kotosa mibeko ya mboka na bango mpe oyo balingi mpenza bolamu na yango mpo na mikolo mizali koya basengeli kolendisa bakonzi ya mboka na bango ete bátalela malamumalamu esika ya ntina oyo Batatoli ya Yehova bazali na yango na ekólo Singapour. Oyo ezali ntango ya kolongola bitumbu nyonso oyo bityami likoló na bango mpe kozongisela bango oyo mwanamboka mokomoko azali na lotómo na yango—elingi koloba bonsɔ́mi ya losambo.
[Etanda na lokasa 27]
Mokili mobimba ezali kotalela
1. “Ntango bapolisi ya ekólo Singapour bakɔtelaki mabota mitano na butu moko ya Febwáli ya mbula oyo euti koleka, bakangaki bato 69, kati na bango basi, mibali, bilenge mpe bamemaki bango na biro ya polisi. Makita mpo na boyekoli ya Biblia masukaka na lolenge wana te.”—Zulunalo The Ottawa Citizen ya ekólo Canada ya 28 Desɛ́mbɛ 1995, lokasa A10.
2. “Ekozala bosepeli mpenza epai na baoyo nyonso bazali komibanzabanza mpo na bonsɔ́mi ya losambo mpe ntómo ya lisosoli soki guvɛrnemá ya ekólo Singapour etaleli malamu etɛlɛmɛlo na yango likoló na basangani ya lisangá oyo, bato ya sembo mpe oyo bazali likámá te, mpe epesi bango nzela ya kosalela mpe kopalanganisa kondima na bango kozanga kobanga to kopekisama.” —Profesere Bryan R. Wilson ya Eteyelo monene ya Oxford, na ekólo Angleterre.
3. “Kobanda sanza ya Novɛ́mbɛ ya mbula oyo euti koleka, bisambiselo ya ekólo Singapour bisili kosambisa Batatoli ya Yehova 63 kati na molɔngɔ́ ya makambo oyo makweisami na masangani ya mokili mobimba mpo na botomboli ntómo ya bato.”—Zulunalo Asahi Evening News ya ekólo Japon ya 19 Yanuáli 1996, lokasa 3.
4. “Batatoli ya Yehova basengeli kopesamela nzela mpo na koyangana mpe kosalela losambo na bango na kimya nyonso kozanga ete bákana kokanga bango to kotya bango na bolɔ́kɔ. Bonsɔ́mi ya losambo ezali lotómo ya moboko oyo ezwi ndanga na Búku ya Mibeko ya ekólo Singapour.”—Lapólo ya Amnistie internationale ya 22 Novɛ́mbɛ 1995.
5. Kati na nkomá na ye ya 1 Yúni 1995, epai na Lee Kuan Yew, ministre ya Letá mpe ministre-mokambi, Chan Siu-ching, mokambi ya Justice and Peace Commission ya diosɛ́zɛ ya Katolike na Hong Kong, alobaki ete: “Likambo ya ntina ezali ete atako boyangeli ya ekólo Singapour ezali kokanisa ete baoyo bazali koboya kosala mosala ya sodá bazali kobuka mobeko mpe na bongo basengeli kofundama, basangani mosusu oyo basɛngisami te mpo na kosala mosala ya sodá, kasi bazali bobele kosangana na makita mpo na kosambela, basengeli kofundama te. . . .
“Yango wana tokomi nkomá epai na Guvɛrnemá na yo mpo na kosɛnga na bakonzi ya mboka ete:
1. bápekisa mosala ya Batatoli ya Yehova te mpo ete bákoka kozala na bonsɔ́mi ya losambo mpe ya lisosoli;
2. bátika kofunda Batatoli ya Yehova bobele mpo ete bazali koyangana na makita mpo na kosambela;
3. bábimisa Batatoli ya Yehova oyo bautaki kokangama bobele mpo ete bayanganaki mpo na makambo matali losambo.”
[Elilingi na lokasa 24]
Batatoli ya Yehova na esambiselo nsima wana bauti kokatela bango etumbu ya bolɔ́kɔ
[Elilingi na lokasa 24]
Motatoli oyo, mobangé ya mbula 71, alobaki na zúzi-mokambi ete: “Nazali soko moke te likámá mpo na boyangeli oyo.” Atako bongo, akangamaki na bolɔ́kɔ