“Ngai oyo! Tinda ngai”
LISOLO YA WILFRED JOHN
Basoda ya mboka Birmanie oyo bazalaki na mindoki babundisaki biso na bipai nyonso mibale ya ebale. Bazalaki na mbeli ya mindoki mpe na mindoki oyo milakisamaki liboso na bato, bazalaki kotambola kati na mai oyo mazalaki kosuka bango kino na loketo mpe bazingaki biso na nse ya gbagba.
NGAI mpe moninga na ngai ya mosala tozalaki na nsomo mingi. Ezalaki likambo nini? Atako toyebaki lokota ya mboka te, kasi nde tososolaki nokinoki oyo bazalaki koloba—bakangaki biso. Wana ezalaki biso bobele na baesumé oyo tomizingaki na loketo, bamemaki biso kozanga mindondo na biro ya bapolisi oyo ezalaki penepene mpo ete tosamba liboso ya mokonzi na basoda oyo azalaki koloba lingelesi.
Ezalaki na 1941, na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mpe bazalaki kokanisa ete biso tozalaki bato mabe. Nsima na kolimbola na mokonzi na basoda oyo asepelaki mingi, ete tozali kosala mosala ya boklisto etali kosakola, balobaki na biso ete tobiki mpenza na likama ya liwa. Bato mingi oyo batalelamaki ete bazali bato mabe bazalaki kobetama liboso ete basambisama. Totondaki Jéhovah mpe tondimaki toli ya mokonzi na basoda oyo asengaki biso ete tozalaka lisusu zingazinga na ghagba te na mikolo mizali koya.
Lolenge nini nakomaki na ezalela wana kati na mboka Birmanie (oyo ebengami sikawa Myanmar)? Tika ngai nalimbwela bino mpe nalobela bino makambo matali ngai moko.
Liponi lisalemaki uta kala kati na bomoi
Nabotamaki na mboka Galles na 1917, mpe wana ezalaki ngai bobele na mibu motoba, ngai, baboti na ngai mpe leki na ngai ya moke, tokendaki kofanda na mboka Nouvelle-Zélande, epai nakolaki kati na ferme ya banyama ya tata na ngai. Mokolo moko, [tata] ayaki na ndako na liboke ya mikanda ya kala oyo autaki kosomba. Kati na mikanda yango, ezalaki na ba volumes mibale ya mokanda Etudes des Ecritures, oyo ebimisamaki na Watch Tower Bible and Tract Society. Mikómaki na motuya mingi mpo na mama na ngai, oyo azalaki lokola Eunice mama ya Timoté, akolisaki kati na ngai mposa ya kopesa bolenge na ngai kati na mosala etali matomba ya Bokonzi na Jéhovah.—2 Timote 1:5.
Na 1937 natyamaki liboso ya maponi mibale: kokitana tata na ngai na mosala ya ferme to koloba na Jéhovah, lokola mosakoli na Nzambe Yisaya asalaki yango ete: “Ngai oyo! Tinda ngai.” (Yisaya 6:8) Nazalaki elenge, na nzoto kolongono mpe nazalaki na mokumba te. Nasilaki koyoka lolenge ya bomoi oyo ezalaki na ferme mpe nasepelaki mingi na yango. Nzokande, nazalaki ata na eksperianse moko te mpo na oyo etali mosala ya pionnier. Nasengelaki kosala nini—kosala na ferme to kosala lokola pionnier?
Balóbi oyo bautaki na filiale ya ba Témoins de Jéhovah oyo ezali na Australie balendisaki ngai mingi. Batalaki etúka na biso kati na Nouvelle-Zélande mpe balendisaki ngai ete nasalela bolenge na ngai kati na mosala na Nzambe. (Mosakoli 12:1) Nasololaki likambo yango elongo na baboti na ngai, mpe bandimaki ete ezali likambo ya mayele kotya mokano na Nzambe na esika ya liboso. Nakanisaki lisusu mingi na ntina na maloba na Yesu Klisto kati na Lisolo na ye likolo na ngomba: “Bolukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye mpe biloko oyo nyonso bikobakisama na bino.”—Matai 6:33.
Liponi na ngai lisalemaki! Lokola filiale ya ba Témoins de Jéhovah ezalaki te kati na Nouvelle-Zélande, nabyangamaki na filiale ya Australie, na engumba Sydney. Na 1937, nakamataki bongo masuwa mpo na kokenda na Australie mpo na kokoma pionnier ya Jéhovah Nzambe.
Nazalaki komituna: ˈEpai wapi nakotindama?ˈ Nzokande, yango ezalaki na ntina? Ya solo, nalobaki na Jéhovah ete: ˈNgai oyo! Tinda ngai bipai nyonso okolinga.ˈ Na boumeli ya mbula mibale, napesaki maboko na mosala ya kosala bafono oyo bazalaki kosalela na ntango wana na ba Témoins de Jéhovah mpo na koyokisa ba discours oyo ebongisamaki epai na bafandi na bateritware na bango. Nzokande, nabongisamaki mingimingi mpo na kosala na ebombelo ya mikanda ya filiale.
Na Singapour
Na 1939, natindamaki na Extreme-Orient mpo na kosala na ebombelo ya mikanda ya la Société na Singapour. Ezalaki ebombelo moko ya monene oyo ezalaki kozwa mpe kotinda mikanda na masuwa oyo mazalaki kouta na Australie, na Angleterre mpe na Etats-Unis mpo na kokende na mikili mingi ya Asie.
Singapour ezalaki engumba moko oyo ezalaki na minoko mingi epai mimeseno ya Orient mpe ya Mpótó misanganaki. Malais ezalaki lokota oyo esalelamaki mpo na kosolola na bato, mpo na kosakola ndako na ndako, biso bapaya tosengelaki koyekola yango. Mpo na minoko mingi tozalaki na oyo bazalaki kobenga cartes de témoignage. Kati na yango bakomaki na mokuse lolenge ya kolakisa nsango ya Bokonzi.
Mpo na kobanda, nayekolaki makambo oyo mazalaki kati na carte de témoignage na lokota Malais, na nsima nakolisaki mokemoke maloba na ngai na lokota yango. Kasi tozalaki lisusu komema mikanda mikolimbolaka Biblia na nkota mosusu mingi. Na ndakisa, mpo na bato ya Inde tozalaki komema mikanda oyo mizalaki na nkota Bengali, Goujrati, Hindi, Malayalam, Ourdou mpe Tamoul. Kokutana na bato bazalaki na nkota mingi ezalaki likambo ya sika mpo na ngai.
Nazali lisusu komikundola malamu nsango ya nsomo ya Septembre 1939, kosakolama ya etumba kati na mikili na Mpótó. Tozalaki komituna soki yango ekokóma kino na Extreme-Orient. Nazalaki kokanisa ete ezalaki ebandeli ya Armagédon—nakanisaki ete ezalaki ntango yango mpenza! Nasepelaki mingi lokola nasalelaki malamu bolenge na ngai.
Longola mosala na ngai na ebombelo, nazalaki kosangana mingi na makita ya lisanga mpe na mosala ya kosakola. Boyekoli ya Biblia ezalaki kotambwisama, mpe bato mosusu bandimaki mpe bazwaki batisimo. Bamemaki bango na esika ya zelo oyo ezalaki zingazinga epai bazindisamaki kati na mai ya mɔ́tɔ na libongo ya Singapour. Tozwaki ata ekateli ya kosala assemblée mpe totambwisaki na kobombana nyonso nkasa ya libyangami epai na bato oyo bazalaki kosepela. Tozalaki na esengo mingi nakomona ete bato soko 25 bayaki na oyo tozalaki kokanisa ete ezalaki assemblée ya nsuka liboso ya Armagedon.
Boyokani kati na ba filiales ekeseni ezalaki lisusu mingi te na ntina na etumba. Na ndakisa, ebombelo na biso ya Singapour ezwaki mokanda moko ya mokuse oyo eyebisaki ete ba pionniers misato ya Allemagne basengelaki kokóma na Singapour nsima na mwa mikolo, na masuwa moko oyo ezalaki na nkombo te, oyo ezalaki kokende epai eyebani te. Bakómaki nsima na mwa baposo mpe balekisaki elongo na biso mwa bangonga ya kolendisa. Atako tozalaki koloba lokóta moko te, tososolaki ete bazalaki kokende na Shanghaï.
Natindami na Shanghaï
Mbula moko na nsima, natindamaki mpe na Shanghaï. Nazalaki na adresse te, nazalaki bobele na nimero ya engbongóló moko ya mikanda. Na biro ya poste, nsima na kotuna ngai malamumalamu, nazalaki na likoki ya koloba na sikisiki makambo mingi matalaki ngai mpo ete bapesa ngai adresse ya la Société. Nzokande, Chinois oyo azalaki kofanda wana ayebisaki ngai ete filiale esili kolongwa esika yango ezalaki liboso mpe ayebaki te adresse na yango ya sika.
Namitunaki ete: ˈNasengeli sikawa kosala nini?ˈ Nabondelaki na motema mpo na koluka litambwisi. Ntango natombolaki miso, namonaki mibali misato, oyo bazalaki mwa molai koleka bato mingi mpe lolenge na bango ekesenaki mwa moke na bato mosusu. Bakokanaki mpenza na ba allemands misato oyo batelemaki na Singapour na boumeli ya mwa bangonga wana moke. Nokinoki, nalandaki bango.
Wana ezalaki ngai kolenga, nalobaki na bango ete: “Bolimbisa ngai.” Batelemaki mpe batalaki ngai na likebi nyonso. Natunaki: “Singapour. Témoins de Jéhovah. Boyebi ngai lisusu?”
Nsima na mwa ntango, bayanolaki ete: “Ja! Ja! Ja!” Na mbala moko, toyambanaki, mpe mpisoli ya esengo ebimaki na miso na ngai. Ndenge nini esalemaki ete, kati na bamilio wana ya bato, mibali oyo misato baleka bobele esika oyo, na ntango wana? Nalobaki bobele ete: “Merci, Jéhovah.” Mabota misato ya ba Chinois, ba Allemands misato mpe ngai bobele biso nde tozalaki Batemwe na Shanghai.
Na Hong-Kong mpe na nsima na Birmanie
Nsima na kosakola na Shanghaï na boumeli ya mwa basanza, natindamaki na Hong-Kong. Lokola moninga na ngai ya mosala oyo asengelaki kouta na Australie ayaki te lokola ekanamaki, nazalaki ngai moko, Temwe bobele moko na engumba wana. Na mbala oyo lisusu, namikundolaki ete nalobaki na Jéhovah ete: “Ngai oyo! Tinda ngai.”
Nazalaki mingimingi kosala mosala na ngai epai na ba Chinois oyo bazalaki koloba Lingelesi; nzokande, nazalaki na mikakatano mpo na kokota na bifandelo ya bato, mpo ete basaleli bazalaki koloba bobele lokota Chinois. Na yango, nayekolaki mwa moke minoko mibale oyo balobaka mingi. Yango esalisaki ngai! Nazalaki kosolola na basaleli, nazalaki kolakisa carte na ngai, nazalaki koloba mwa maloba ya Chinois oyo nayebaki, mpe mbala mingi bazalaki kokotisa ngai.
Mokolo moko, kati na eteyelo moko, nasalelaki mwango wana mpo na kosolola na directeur. Elenge molakisi moko ya mwasi akutaki ngai na ekotelo ya kelasi. Elongo na ye, nalekaki bakelasi mingi, nazalaki kondima mbote ya limemya oyo bana bazalaki kopesa ngai, mpe namibongisaki mpo na kokota epai na directeur. Molakisi abetaki na ekuke, afungolaki ekuke, amityaki mpembeni mpe asengaki ngai ete nakota. Nakamwaki mingi, nakomona ete na boboto nyonso amemaki ngai kino na batwalɛtɛ! Emonani ete makambo nazalaki koloba na Chinois bazalaki koyoka yango malamu te, lokola directeur ayebisaki ngai yango na nsima, bakamataki ngai lokola inspecteur ya makambo matali bopeto.
Nsima na sanza minei ya mosala, bapolisi ya Hong-Kong bayebisaki ngai ete mosala na biso ya kosakola epekisamaki mpe nasengelaki kotika kosakola noki bakobengana ngai. Naponaki kotika mboka wana, mpo ete likoki lizalaki ya kosakola bipai mosusu. Na boumeli ya ntango oyo nalekisaki na Hong-Kong, nakabolaki mikanda 462 mpe nasalisaki bato mibale na kosangana na mosala ya kosakola.
Kolongwa na Hong-Kong, natindamaki na Birmanie. Nazalaki pionnier mpe nazalaki kosala na ebombelo ya mikanda na Rangoun (ebengami sikawa Yangon). Moko na baekeperianse kitoko tokutanaki na yango ezalaki mosala na biso ya kosakola kati na bingumba mpe bamboka mike oyo epalangani na nzela ya monene oyo ezali kokende longwa na Rangoun kino na Mandalay mpe, na ngambo mosusu kino na engumba Lashio oyo ezali pene na ndelo ya Chine. Ngai mpe moninga na ngai ya mosala tosakolaki mingi epai na bato oyo balobaka Lingelesi, mpe tosalisaki ba abonnements mingi ya Consolation (zulunalo oyo eyebani lelo na nkombo Lamuká!) Nzela wana monene ya Rangoun kino na Mandalay eyaki koyebana na nsima na nkombo nzela ya Birmanie, nzela oyo biloko ya etumba ya ba américains esengelaki kotindama na Chine.
Tozalaki kotambola na mpasi mpenza kati na putulu oyo ezalaki kosukela biso na matonga ya matindi, na yango tozalaki mbala mingi na mposa ya kosukola na esika moko malamu. Ezali yango nde epesaki nzela na likama tokutanaki na yango oyo tolobelaki na ebandeli ya lisoló: tokangamaki ntango tozalaki kosukola na ebale moko, na nse ya gbagba. Mwa moke na nsima, bitumba mpe maladi esengisaki biso na kozonga na Rangoun. Natikalaki na Birmanie kino na 1943, wana etumba eyaki makasi na ntango yango, nasengisamaki kozonga na Australie.
Bozongi na Australie
Na kati wana, misala ya ba Témoins de Jéhovah mipekisamaki na Australie. Nzokande, epekiseli elongolamaki nokinoki, mpe na nsima, nabyangamaki lisusu kokende kosala na filiale. Na nsima, na 1947, nabalaki Betty Moss, oyo azalaki kosala na filiale ya la Société, na Australie. Tata mpe mama ya Betty bazalaki ba pionniers mpe balendisaki bana na bango, Betty mpe ndeko na ye ya mobali Bill, ete bakomisa mosala ya pionnier mosala na bango kati na bomoi. Betty azalaki pionnier uta mokolo oyo atikaki kelasi, wana azalaki na mibu 14. Nakanisaki ete tokozala malamu elongo, mpo ete ye mpe alobaki na Jéhovah ete: “Ngai oyo! Tinda ngai.”
Wana tokokisaki mbula moko nsima na kobalana, nabyangamaki kosala mosala ya kotambolatambola, mpo na kotala masanga ya ba Témoins de Jéhovah. Mosala na biso ezalaki mpenza ntembe monene kati na Australie. Bampela makasi ezalaki mbala mingi kobimisela biso mikakatano mpo na kosala mibembo, mingimingi na bisika oyo ezalaki na mabelé ya moselu. Na elanga, molunge emataka kino na 43°C na bisika oyo ezali na mwa malili. Lokola tozalaki kofanda na ndako moko ya moke, tozalaki komona ete bileko ya moi bizalaki na molunge moko makasi koleka mpe bileko ya malili bizalaki na mpio lokola oyo ezali na Siberie.
Ezalaki esengo monene kozala mokengeli ya district wana ba districts ezalaki bobele mibale na Australie. Donald MacLean azalaki kosala na district moko, mpe ngai nazalaki kosala na mosusu. Na nsima, tozalaki kosombitanya ba districts na biso. Ezali likambo ya kosepelisa na kotanga motuya ya masangá oyo mazali lelo kati na etúka wana epai tosalaki na mikolo mileki. Kozanga ntembe milona ya solo ya Biblia misili kobima mpe kobota mbuma.
Bozongi epai makambo nyonso mabandaki
Na 1961, nazwaki libaku kitoko ya koyangana na Eteyelo ya Galaad (eteyelo mpo na kobongisa bamisionere), kelasi ya liboso nsima na kosalema na yango na Brooklyn (New York). Nasilaki kozwa mabyangami mpo na eteyelo wana, kasi nandimaki yango te na ntina na kolongono ya nzoto. Na nsuka ya sanza ya zomi ya mateya, natindamaki na Nouvelle-Zélande.
Na yango, kobanda Janvier 1962, Betty mpe ngai tozali na Nouvelle-Zélande, na esika oyo makambo makeseni. Balobelaka mbala mingi yango lokola moko na bisika bileki kitoko ya Pacifique. Mpo na oyo etali makambo ya teokrasi, tozwaki esengo ya kosala liboso kati na mosala ya circonscription mpe mosala ya district. Yango ekokisi sikawa mibu 14, elingi koloba kobanda Avril 1979, uta tozali kosala na filiale ya Nouvelle-Zélande.
Betty mpe ngai biso nyonso mibale tozali sikawa na mibu soko 75, mpe elongo tokokisi mibu 116 na mosala ya pionnier kozanga kokata. Betty abandaki mosala ya pionnier na Janvier 1933, mpe ngai na Avril 1937. Tozwaki bisengo mingi na komona bana na biso mpe bankoko na biso ya elimo kosala oyo biso tosalaki wana tozalaki bilenge, elingi koloba kolanda toli oyo ezali kati na Mosakoli 12:1: “Kanisa Mozalisi na yo Monene kati na mikolo na bolenge na yo.”
Oyo nde libaku kitoko tozwaki ya kolekisa bomoi na biso mobimba na kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe mpe kozalisa bayekoli lokola Nkolo na biso Yesu Klisto atindaki yangoˈ (Matai 24:14; 28:19, 20) Tozalaki na esengo mingi ya koyanola na libyangami na Nzambe, lokola esalaki yango kala Mosakoli Yisaya: “Ngai oyo! Tinda ngai.”