Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Janvier nk. 15-17
  • Bilei mpo na bato nyonso: Ezali ndɔtɔ mpamba?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilei mpo na bato nyonso: Ezali ndɔtɔ mpamba?
  • Lamuká!—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Kokoka komileisa”​—Mpo na nini ezali kosalema te?
  • ‘Tolingi komona bikela, kasi ebele ya makita te’
  • Nani akoleisa bato oyo bazali kokufa nzala?
  • Mikano mizwami mpo na kosalisa bana
    Lamuká!—1993
  • “Likama ya kotalela nokinoki oyo eyebani malamu te” etikali moke esila!
    Lamuká!—2003
  • Olyaka malamu na elimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Bilei na yo bizali mpenza ya malamu?
    Lamuká!—1995
Lamuká!—1998
g98 Janvier nk. 15-17

Bilei mpo na bato nyonso: Ezali ndɔtɔ mpamba?

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA ITALIE

NA 1974, Likita ya mokili mobimba mpo na bilei (Conférence mondiale sur l’alimentation) oyo etambwisamaki na Ebongiseli ya Mabota Masangani mpo na milóna mpe bilei (Organisation des Nations Unies pour l’alimentation et l’agriculture) (F.A.O.) elobaki ete “Mobali nyonso, mwasi nyonso mpe mwana nyonso asengeli kokufa nzala te kasi asengeli kolya malamu.” Na yango libyangi lisalemaki mpo na kosilisa nzala na mokili mobimba “nsima ya mbula zomi.”

Nzokande, ntango batindami ya bikólo 173 bayanganaki na Biro monene ya F.A.O. na engumba Rome pene na nsuka ya mobu 1996 mpo na likita ya mikolo mitano oyo ebéngamaki Likita ya mokili mobimba mpo na bilei, mokano na bango ezalaki ya komituna ete: “Mpo na nini libyangi ya kosilisa nzala elóngaki te?” Yango esukaki te bobele na kozanga kopesa moto nyonso bilei, kasi, lelo oyo, nsima ya mibu koleka ntuku mibale, makambo mazali sé kobeba.

Mikakatano minene lokola kozwa bilei, koyikana ya bato mpe bobola misengeli kosilisama noki. Lokola lapólo moko na likita wana elobelaki yango, soki mikakatano wana mitalelami te, “bomoi ya bato na mikili mingi mpe na bitúká mingi ekoki mpenza kobeba, mbala mosusu kobebisa mpe kimya na mokili mobimba.” Moto moko alobaki mpenza polele ete: “Tokomona kobebisama ya sivilizasyó mpe mimeseno ya bikólo.”

Engebene Jacques Diouf, nkumu-mokambi ya F.A.O., “lelo oyo, bato koleka milió 800 bazali kolya malamu te; kati na bango bana bazali milió 200.” Ekanisami ete bato miliare 5,8 oyo bazali lelo na mokili bakokóma miliare 8,3 na mobu 2025, mpe koyikana ya bato ekouta mingi na mikili ya bobola. Diouf amileli ete: “Motuya ya mibali, basi mpe bana oyo bapimeli bango lotómo ya kozala na bomoi mpe lokumu ya bomoto ezali mpenza monene. Kolela mpo na nzala ezali koyokana elongo na kokimela mpo na mabelé oyo ezali lisusu kobimisa milóna te, bazamba oyo bazali kosilisa banzeté mpe bibale oyo bazali kosilisa mbisi.”

Mwango mpo na kosilisa mokakatano yango ezali nini? Nkumu-mokambi Diouf alobi ete mwango yango ezali bobele kozwa “ekateli ya mpiko,” kosala ete mikili ya bobola “mikoka komileisa,” kopesa bango makoki, kosala bakompanyi, mpe kopesa bango bisaleli oyo ekosalisa bango ete bámileisa bango moko.

“Kokoka komileisa”​—Mpo na nini ezali kosalema te?

Engebene mokanda moko oyo mobimisamaki na likita yango, “moto akokoka komileisa bobele ntango bato nyonso, na bileko nyonso, bakozala na nkita mpe na nzoto oyo ekoki na bango mpe wana bakokoka kopona bilei balingi oyo bikopesa bango mikakatano te kasi ya malamu mpo ya kozala nzoto makasi na misala mpe kotikala nzoto kolɔngɔ́nɔ́.”

Ntango bato bakimá mboka bakɔtaki na République démocratique du Congo (ex-Zaïre), yango emonisaki lolenge oyo kokoka komileisa ekoki kokóma na likama. Ntango bamilió ya Barwandais oyo bakimá mboka bazalaki kokufa na nzala, bibongiseli ya O.N.U. bizalaki na bilei mingi oyo bikokaki mpo na koleisa bango. Kasi mpo na kokómisa bilei yango na bisika bato bakimá mboka bazalaki mpe mpo ete bilei yango bikoka kokabolama, esengelaki kozwa ndingisa ya bakonzi ya Letá mpe koyokana na bakonzi mosusu ya mboka wana​—to koyokana na bakonzi ya basodá oyo bazali kotambwisa bitumba soki bazali kokɛngɛla bakáa ya bato bakimá mboka. Makambo masalemaki na République démocratique du Congo mamonisi lisusu mokakatano oyo bibongiseli ya mikili mingi ezalaka na yango mpo na koleisa bato, ata soki bilei bizali. Moto moko alobaki ete: “Esengeli koyokana mpe kobondela ebele ya batambwisi ya bibongiseli mpe bakonzi mosusu liboso ete lisungi ekóma na esika mposa ezali.”

Lokola mokanda moko ya ministère ya États-Unis mpo na bilanga elobaki yango, ezali na makambo mingi oyo makoki kobebisa milende nyonso mpo ete bato bákoka komileisa. Longola makama mauti na biloko bizalisami, makambo lokola bitumba, kozanga koyokana ya banamboka, myango ya baguvernemá oyo milongobani te, bolukiluki mpe myango ya tɛknoloji ya malamu te, kobeba ya ezingelo, bobola, kobakisama ya bato, bokeseni kati na basi mpe mibali, mpe nzoto soki ezali kolɔngɔ́nɔ́ te, ezali mpe kopekisa ete bato bákoka komileisa.

Mwa milende mosusu mibimisaki matomba. Uta bambula ya 1970, kati na mikili ya bobola, bilei ya mokolo moko mpo na moto moko ekómi kopesa calories 2 140 kino calories 2 520. Kasi engebene F.A.O., na kokanisáká ete bato bakobakisama lisusu miliare mingi na mobu 2030, “mpo na kobatela bilei oyo tozali na yango lelo, ekosɛnga lisusu kobakisa bilei mingi na meko ya 75 likoló ya monkámá, kozanga kobebisa bisika bilei eutaka oyo bomoi na biso nyonso esimbami na yango.” Na yango, mosala ya kobimisa bilei mpo na bato oyo bazali kokufa nzala ezali monene.

‘Tolingi komona bikela, kasi ebele ya makita te’

Koimaima mingi eyokanaki likoló na misala mpe mikano ya likita ya mokili mobimba mpo na bilei. Momonisi ya ekólo moko ya Amérique latine alobi ete elaka oyo esɛngi kokitisa motuya ya bato oyo bazali kolya malamu te bobele na katikati, na kotalela ndenge bazali lelo, ezali likambo “lilongabani te” mpe ya “nsoni.” Mikili 15 etɛmɛlaki makanisi oyo likita yango endimaki. Zulunalo moko ya Italie na nkombo La Repubblica elobaki ete bobele mpo na kokoma makambo matali elaka yango na mokanda ya boyokani oyo ezali mpenza na makambo mingi te, “esɛngaki mbula mibale ya bowelani mpe koluka boyokani. Liloba nyonso, elembo nyonso ya komatisa to kokitisa lolaka, ezalaki kotalelama mpo na kosala ete bokabwani ezala lisusu te.”

Bato mingi oyo bapesaki mabɔkɔ mpo na kobongisa mikanda ya likita yango basepelaki te na mbuma na yango. Moko kati na bango alobaki ete: “Tozali kondima te ete makanisi malamu oyo mayebisami makolónga.” Likambo oyo ezalaki kobimisa ntembe ezalaki ya koyeba soki kolya malamu esengeli kotalelama lokola “lotómo oyo endimami na mikili nyonso,” mpamba te moto akoki kofunda likambo na ntina na “lotómo” na ye na bisambiselo. Moto moko ya ekólo Canada alobaki ete: “Mikili ya bozwi bazali kobanga ete bakosɛngisa bango kopesaka lisungi. Yango wana basalaki nyonso ete mokanda yango ya elaka ya boyokani ezala na nguya mingi te.”

Na ntina na bowelani oyo esilaka te na makita oyo matambwisamaka na O.N.U., ministre ya guvernemá ya mokili moko ya Mpótó alobaki ete: “Lokola tosilaki kokamata makatami mingi na likita oyo lisalemaki na engumba Caire [na 1994, oyo litalelaki koyikana ya bato mpe kobongisa makoki ya bato], tomoni ete na makita oyo malandaki tozalaki bobele kozongela makambo yango.” Asɛngaki ete: “Mokano na biso ya libosoliboso esengeli kozala ya kosalela makatami mpo na bolamu ya baninga na biso bato, na esika ya kosala makita ebele ebele.”

Bato mosusu mpe balobaki ete ata koyangana na likita yango esɛngaki kobimisa mosolo mingi mpo na mikili misusu ya bobola. Ekólo moko moke ya Afrika etindaki bamonisi 14 bakisa mpe baministre 2, bango nyonso bafandaki na Rome na boumeli ya pɔ́sɔ koleka mibale. Corriere della Sera, zulunalo moko ya Italie elobaki ete mwasi ya prezidá ya ekólo moko ya Afrika oyo na mboka na ye mwayene ya lifuti ya moto mokomoko na mbula mobimba elekaka dolare nkóto 3 na nkámá 3 (3 300$) te, abimisaki badolare nkóto 23 mpo na kosomba biloko na bamagazini oyo biloko na yango ezali na ntalo koleka bamagazini nyonso na engumba Rome.

Ezali na ntina oyo ekoki kondimisa ete mikano oyo mikamatamaki na likita yango mikolónga? Mopanzi-nsango moko ayanoli ete: “Oyo tozali kolikya sikawa ezali ete baguvernemá ekotalela mikano yango malamumalamu mpe ekosala makambo oyo masɛngami. Bakosala bongo mpenza? . . . Makambo oyo mamonana mapesi mpenza nzela ya kondimisa yango te.” Molobi yango alobelaki likambo ya mawa oyo esilaki komonana ete atako na likita oyo esalemaki na engumba Rio de Janeiro na 1992, mikili mingi mindimaki ete mikopesa mosolo 0,7 likoló ya monkámá ya mosolo mouti na biloko bibimisami na ekólo na bango mpo na kosunga bato, “bobele mwa bikólo moke nde bakokisaki mokano yango.”

Nani akoleisa bato oyo bazali kokufa nzala?

Lisoló ya bato esili komonisa ete atako bato bazali na mikano malamu, “nzela na moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” (Yilimia 10:23) Na bongo, emonani ete bato bango moko na makoki na bango, bakoki koleisa bato banso te. Lokoso, kosalela biloko na lolenge mabe, mpe moimi esili komema bato na likama. Diouf, nkumu-mokambi ya F.A.O. alobaki ete: “Likambo oyo esengeli mpenza kosala nsima ya kotalela nyonso oyo ezali bongo mbongwana ya mitema, ya makanisi mpe ya bolingi.”

Yango ezali likambo oyo bobele Bokonzi ya Nzambe nde ekoki kosala. Na yango, esili koleka bikeke mingi, Yehova asakolaki na ntina na libota na ye ete: “Nakotya Mobeko na ngai na kati na bango, nakokoma yango na mitema na bango; nakozala Nzambe na bango mpe bango bakozala bato na ngai.”​—Yilimia 31:33.

Ntango Yehova Nzambe abongisaki elanga mpo ete bato báfanda wana, apesaki moto “ndunda nyonso ikobotaka mbuma, yango izali na mokili nyonso, mpe nzeté nyonso yango izali na nkóna kati na mbuma na kolya” lokola bilei. (Genese 1:29) Bilei yango bizalaki mingi, ya malamu, mpe mpo na moto nyonso. Yango ezalaki oyo moto asengelaki na yango mpo na kolya.

Mokano ya Nzambe ebongwani te. (Yisaya 55:10, 11) Esili koleka ntango molai andimisaki ete akokokisa bamposa ya bato na nzela ya Bokonzi oyo ekotambwisama na Klisto, akopesa bilei mpo na bato banso, akosilisa bobola, akosilisa makama mauti na biloko bizalisami, mpe akosukisa bowelani kati na bato. (Nzembo 46:8, 9; Yisaya 11:9; kokanisá na Malako 4:37-41; 6:37-44.) Na ntango yango ‘mokili ekobota mbuma na yango; Nzambe, ɛɛ Nzambe na biso akopambola biso.’ “Masango ikotondana na mokili ata kino likoló na nkeka.”​—Nzembo 67:6; 72:16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto