Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g03 Octobre nk. 10-12
  • “Likama ya kotalela nokinoki oyo eyebani malamu te” etikali moke esila!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Likama ya kotalela nokinoki oyo eyebani malamu te” etikali moke esila!
  • Lamuká!—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bosembo mpe komibanzabanza mpo na basusu
  • Ndenge mokakatano yango ekosila
  • Eutaka mpenza na nini, mpe mikakatano nini ya minene ebimisaka?
    Lamuká!—2003
  • Likama moko monene mpenza
    Lamuká!—2003
  • Bilei mpo na bato nyonso: Ezali ndɔtɔ mpamba?
    Lamuká!—1998
  • Bilei na yo bizali mpenza ya malamu?
    Lamuká!—1995
Makambo mosusu
Lamuká!—2003
g03 Octobre nk. 10-12

“Likama ya kotalela nokinoki oyo eyebani malamu te” etikali moke esila!

LAPOLO moko ya Ebongiseli ya mokili mobimba mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto (OMS) elobi ete: “Soki tokokanisi mikolo na biso na bambula oyo eleki, biso tozali lelo na mokili oyo biloko ya kolya ezali beboo. . . . Biloko ya kolya ezali ebele, kutu koleka, mpo na bato nyonso . . . kaka na maloba.” Soki ezali ndenge wana, nini mpenza ezali kosala ete bato bályaka malamu te?

OMS elobi boye: “Mokakatano ezali ete biloko ya kolya ebotaka ndenge moko te na bisika nyonso mpe bakabolaka yango ndenge moko te. Mbala mingi, okomona babola oyo bafandaka na mikili ya bobola esika mabelé ebotaka biloko mingi ya kolya, batɛlɛmi, mabɔkɔ mpamba, na nzala na libumu, bazali komona na miso na bango ndenge ebele ya biloko ya bilanga na bango ezali kokenda kotɛkama na mikili ya bopaya mpo na kozwa mbongo. Bato moke lobilobi bakozala malamu mpo na mbongo yango, nzokande ebele ya bato bakotikala komona mpasi ntango molai.” Lapolo moko ya Ebongiseli ya ONU mpo na bilei mpe mosala ya bilanga (FAO) euti komonisa ete ‘mwa bato moke kaka (20%) oyo baleki na bozwi balyaka nyama mpe mbisi mingi (45%) oyo babomaka na mokili mobimba; kasi baoyo baleki na bobola (20%) balyaka yango kaka moke (5%).’

Longola yango, Ebongiseli ya ONU mpo na kosalisa bana (UNICEF) elobi ete “kozanga likoki ya kotánga kelasi ya malamu mpe ya koyeba makambo mingi, ezali mpe ntina mosusu ya kozanga kolya malamu.” Ebakisi boye: “Soki bibongiseli ya malamu oyo ekopesa bato nzela báyebaka makambo mingi ezali te, soki mpe bakelasi ya malamu ezali mingi te, bato bakoyeba te mokakatano ya kozanga kolya malamu; bakozwa mpe te mayele mpe bizaleli oyo ebongi mpo na kosilisa mokakatano yango.” Nzokande, soki moto azali kolya malamu te, akozala mpe nzoto makasi te mpe akokoka kotánga kelasi malamu te.

Bosembo mpe komibanzabanza mpo na basusu

Atako mikakatano wana nyonso ezali, bato mosusu oyo bayekolaka likambo yango bazali kaka na elikya. Na ndakisa, Jacques Diouf, mokambi ya FAO, amonisaki elikya na ye na maloba oyo: “Nakanisi ete mokolo mosusu ekozala na mokili moko oyo, mobali nyonso, mwasi nyonso mpe mwana nyonso akozala mikolo nyonso na biloko ya kolya ebele mpe ya malamu. Nakanisi, na mokili yango, ekozala na bato oyo bazali na bozwi ya koleka ndelo te to na bobola ya koleka ndelo te. Na mokili yango, moto akoboya makanisi ya baninga te, koponapona mpe ekozala te; ekozala mokili ya kimya kasi ya bitumba te, bato bakobebisa mokili yango te; bato bakofanda na bisika na bango libela mpe moto nyonso akozala na bomoi ya malamu, ntina ya kozanga elikya ekozala te.”

Kasi, ndenge touti komona yango, mpo mokili ya ndenge wana esalema, esengeli kaka te biloko ya kolya ezala ebele mpe bákabola yango malamu na bato nyonso. Esengeli mpe bosembo ezala mpe bato bámibanzabanzaka mpo na basusu. Kasi, bizaleli wana ya malamu ezali komonana ata moke te na mokili ya lelo oyo bato bazali na lokoso ya mbongo.

Ekoki nde kosalema ete makambo lokola lokoso, bobola, kozanga koyokana mpe moimi esila, mpo bato nyonso bákóma kolya malamu? To mpe likambo yango ezali nde ndɔtɔ mpamba?

Ndenge mokakatano yango ekosila

Biblia emonisi ete tosengeli kokamwa te mpo na makambo oyo ezali kosala ete bato bályaka malamu te. Liloba ya Nzambe elobi ete: “Na mikolo ya nsuka bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza ekozala. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka bango moko, bato balingá mbongo, . . . bazangi bolingo ya libota, bandimaka boyokani te, . . . bazangi bolingo ya makambo ya malamu, . . . bazali na motindo moko boye ya ezaleli ya kokangama na Nzambe kasi bazali kowangana nguya na yango.”​—⁠2 Timote 3:​1-5.

Bato bakoki nde kotika bizaleli wana, oyo ekɔtelá bango na makila kozanga ete Nzambe asalisa bango? Emonani lokola ete bakoki kotika yango te. Ekoki kozala ete osilá komona mbala mosusu bakonzi oyo bazali na makanisi ya malamu. Balingaka kosilisa mikakatano ya bato, kasi bizaleli lokola moimi, kolinga mbongo, mpe kozanga kokoka ya bato mosusu epesaka bango nzela te, kutu bizaleli yango ebebisaka makambo malamu oyo bakonzi yango bakanaka kosala.​—⁠Yilimia 10:⁠23.

Atako bongo, mokakatano yango ekosila. Biblia elaki ete Bokonzi ya Nzambe ekotya nsuka na kozanga bosembo mpe na mikakatano nyonso mosusu oyo ezali konyokola bato lelo.

Yisaya 9:​6, 7 epesi elikya oyo kitoko: “Mwana abotameli biso, mwana mobali apesameli biso; bokonzi ekozala likoló na lipeka na ye, nkombo na ye akobiangama ete, Mosungi na kokamwa, Nzambe na nguya, Tata na seko, Nkolo na kimya. Kofuluka na bokonzi na ye mpe na kimya ekosuka te; na kiti na bokonzi na Davidi mpe likoló na bokonzi na ye, ete abongisa yango mpe ete atɛmisa yango na kosambisa-sembo mpe na boyengebene longwa na ntango oyo kino libela. Mposa na [Yehova] na bibele ekosala oyo.”

Ezali Bokonzi wana moko nde bato babondelaka mpo na yango ntango bazongelaka libondeli ya Tata na Biso mpe balobaka na Nzambe: “Tiká bokonzi na yo eya.” (Matai 6:​9, 10) Tomoni ete Yisaya alobi: “Mposa ya [Yehova] na bibele ekosala oyo.” Ya solo, banda kala, Yehova Nzambe amibanzabanzaka mpo na kokokisa bamposa ya bato. Asalá mabelé mpo ebimisaka biloko ya kolya ebele mpo na bato nyonso.

Mpo na ye, Nzembo 65:​9-13 elobi: “Okoyaka epai na mokili mpe okomwangisela yango mai, okopambola yango mingi. Ebale ya Nzambe etondi na mai, okobimisela bango masangu, mpo ete obongisaki yango bongo. Okonokisa mbula likoló na bikonelo na yango ete okitisa mwa ngomba na yango; okolɛmbisa yango na mbula mike, okopambola mpe kotɔa na yango. . . . Bilanga ekotonda na mpate mpe mabwaku ekozipama na masangu.”

Ya solo, ezali Yehova Mozalisi, nde akokisaka mpenza bamposa nyonso ya bato. “Ye akopesaka kolya na nyonso ezali na bomoi, zambi boboto na ye ekoumela seko.”​—⁠Nzembo 136:25.

Tokoki kozala na elikya ete Bokonzi ya Nzambe, oyo Klisto azali kotambwisa yango, ekokokisa bamposa ya bato nyonso. Biblia elobi ete: “Masangu ekotondana na mokili ata kino likoló na nkeka.” Lisusu, bakokabola biloko yango na bato nyonso ndenge moko, “mpamba te [Yesu Klisto] akobikisa mobola oyo akogangaka, mpe moto na mawa oyo azali na mosungi te. . . . Akobikisa milimo na babola.” (Nzembo 72:​12, 13, 16) Yango wana, zalá na mpiko! Etikali moke, “likama ya kotalela nokinoki oyo eyebani malamu te” ekosila mpo na libela.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 11]

“Mayele ya kosilisa nzala mpe kosala ete moto nyonso alya malamu ezali. Makoki ezali kozanga te. Mokakatano ezali nde . . . ndenge ya kosala yango na bomoko na ekólo mokomoko mpe na mokili mobimba.”​—⁠Ebongiseli ya mokili mobimba mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto (OMS)

[Elilingi na lokasa mobimba 10]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto