Mikano mizwami mpo na kosalisa bana
LOBI loleki, bana 40 000 oyo bakokisi naino mibu mitano te, bakufaki kati na mikili ya bobólá. Nkóto ntuku minei mosusu bakokufa lelo. Lobi lokoya, 40 000 mosusu bakokufa. Mingi kati na bango mbɛlɛ bakoki kobikisama.
Uta mbula mingi, bazali kolobela likambo yango lokola “mpasi monene oyo nsango na yango ezali kotambola te,” mpamba te bato mingi kati na mokili bazali kotya likebi na yango te. Peter Teeley, molobeli ya Leta ya Amerika na Likita ya mokili mobimba oyo O.N.U. esalaki na 1990, na New York, mpo na kotalela makambo ya bana, amilelaki ete: “Soki bandeke 40 000 oyo babéngi chouettes ekufi na mokolo moko, mbɛlɛ ekosala bato mingi mpasi na motema. Nzokande, bana 40 000 bazali kokufa, kasi bazali mpenza kotyela bango likebi te.”
Bamoko bakanisaki ete nsima na likita yango, makambo nyonso makobongwana. Mikili 159 miyanganaki wana na nzela na bamonisi na yango, bato minene ya politike ya mboka na bango; kati na bango ezalaki na baprezidá 71 to bakonzi ya liboso ya bikólo na bango. Banso bamonisaki 99% ya motuya mobimba ya bafandi na mokili. Komonisáká likanisi lisengelaki kozala na bai-likita banso, Mikhaïl Gorbatchev alobaki ete: “Mokili mokoki lisusu te kokanga motema ntango molai wana ezali yango komona bamilió mingi ya bana oyo bazali kokufa mbula na mbula.”
Mikolo mizalaki liboso ya likita, mokili emonisaki ete banso balingi kosunga likita yango. Ebele mpe ebele ya makita, ya myango, ya bibongiseli mpo ya masoló, mpe masoló ndenge na ndenge mabéndaki likebi likoló ya mpasi ya bana. Koleka milió moko ya bato kati na mikili 80 bapɛlisaki babuji mpo na komonisa elikya na bango ete, atako mikakatano mizali mpe makámá mazali, mokili mokoki kobonga.
Kolobáká mpo na mokolo ya nsuka ya Likita yango, UNICEF (Ebongiseli ya Lisangá ya Mabota mpo na kosunga bana) elobaki ete, mokolo yango mozalaki “mbala mosusu mokolo oyo moleki monene kati na Lisoló ya bato mpo na bana na mokili mobimba.” Mpo na nini bazalaki na esengo mingi boye? Mpo ete batambwisi ya mokili bazwaki mikano ya polelepolele mpo na kobatela bana na mokili mobimba ete banyokwama lisusu mingi te mpe bakufa lisusu mingi te.
Makita minene ya mokili mobimba masalemi mbala mingi mpe bayangani bakamataki mikano mingi, nde basalelaki yango te. Nzokande, ya mbala oyo, mingi bamonaki ete, lokola kowelana na ntina na bibundeli ezali lisusu te kati na mikili mibale oyo milekaki nyonso mosusu na nguya, bato bakómi na elimo ya sika na koloba solo mpe kosalisana. James Grant, directeur général ya UNICEF, alobaki na esengo nyonso ete: “Bakonzi ya liboso ya bikólo mpe ya baguvernemá balobi ete, kati na ebongiseli ya sika ya mokili mobimba, mokano ya liboso bazali koluka ezali ete, bato nyonso bazala malamu.”
Yango wana, mbula moko nsima na Likita yango, ntalo monene na mikili basilaki kosala myango kati na bikólo na bango mpo ete bakoka kosalela mikano mikamatamaki. Nde mpo na yango, James Grant ayaki koloba ete: “Na kotalela ndenge makambo mazali koleka lelo, tokoki kotya elikya mpenza ete tokolónga kopesa nzoto kolongono na bana nyonso, kobanda lelo kino na mobu 2 000.”
Kasi mpasi yango nini oyo bana na mokili mobimba bazali na yango, sekele ya nsɔni mingi mpo na libota ya bato, oyo bapanzi-nsango na mokili mobimba basili kobimisa yango? Mposa ya kosalisana kati na bikólo, oyo ezali komonana uta nsuka ya kowelana na ntina na bibundeli makasi kati na mikili mibale oyo milekaki nyonso mosusu na nguya, epesi biso ntina ya kondima ete O.N.U. ekobimisa ebongiseli ya sika ya mokili mobimba oyo ekozala malamu mpo na bato nyonso? Tokoki kolikya ete mikolo malamu mpenza mizali koya mpo na bana na biso? Masoló mibale oyo malandi makoyanola na mituna oyo.