Kolɛmba: motambo oyo basɔfɛlɛ ya mituka ya minene bayebaka te
EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA ALLEMAGNE
BANGONGA ezali koleka. Motɛlɛ ezali kobimisa lokito mpe bapiné 14 ezali kosala makɛlɛlɛ makasi. Na yenda, sɔfɛlɛ alɛmbi mpenza. Bilembo ya nzela oyo bikabolaka milɔngɔ́ ya mituka bizali kongɛngisama na miinda ya motuka mpe kolekaleka. Na mbala moko, remorke ya motuka ekómi kokende epai na epai mpe ebandi kolongwa na nzela.
Nokinoki, sɔfɛlɛ asimbi yenda mpe azongisi motuka na nzela, motuka oyo ememi mokumba ya toni 40. Lokola alamuki, azali koyeba te makambo oyo mauti koleka na mwa basɛgɔndɛ. Alɛmbi mpenza.a
Moto oyo alɛmbi ntango azali kotambwisa motuka akoki kobanda kolalalala. Na kotalela lolenge banzela etondaka na mituka lelo oyo, kolalalala ntango ozali kotambwisa motuka ekoki kozala mpenza likama—ata mpo na mituka mosusu. Na ndakisa, na Afrique du Sud, kati na makama nyonso ya mituka ya minene oyo masalemaki kobanda Yanuáli 1989 kino Mársi 1994, makama koleka 35 likoló na monkámá masalemaki na basɔfɛlɛ oyo bazalaki kolalalala na yenda.
Profɛsɛrɛ G. Stöcker, moyekoli ya makambo matali basɔfɛlɛ alobaki na zulunalo Fahrschule ya Allemagne ete kolɛmba mingi esalaka ete sɔfɛlɛ abanda kolalalala mpe yango ezalaka na mbeba lolenge moko na oyo ya molangwa ya masanga. Ya solo, azali kolobela basɔfɛlɛ nyonso, bobele oyo ya mituka ya minene te.
Bantina ya kolɛmba
Mpo na nini makama oyo mauti na kolɛmba masalemaka mingi, nzokande na mikili mingi mobeko ezali kosɛnga motángo ya sikisiki ya bangonga oyo sɔfɛlɛ ya motuka ya monene asengeli kosala ntango azali kotambwisa motuka? Mpo na kolobela yango, tosengeli naino koyeba liboso motángo ya bangonga oyo sɔfɛlɛ ya motuka ya monene asengeli kosala ntango azali kotambwisa motuka, oyo esangisi mpe ntango oyo alekisaka na misala mosusu. Mosala ya basɔfɛlɛ esuki bobele na kotambwisa te, misala mosusu mpe mizali. Mbala mingi bangonga ya mosala ezalaka ebele mpe elandaka manáka ya sikisiki te.
Basɔfɛlɛ mingi ya mituka ya minene balingaka kokokisa mosala na bango kino nsuka, yango esɛngaka komema masandisi mpe bakiliya ezala ata mokolo ya molungé to ya malili. Makoki na ye emonanaka na ntaka ya bakilomɛtɛlɛ oyo akosala mpe bozito ya biloko oyo akomema. Akoki kosala na boumeli ya bangonga mingi koleka bangonga oyo esɛngami. Na ekólo Allemagne, bato mingi basalaka ngonga 40 te na mosala na boumeli ya pɔ́sɔ, kasi basɔfɛlɛ mingi ya mituka ya minene basalaka mbala mibale koleka bangonga yango.
Na mikili mosusu makambo yango mazali sé ndenge moko. Na Afrique du Sud, basɔfɛlɛ bafutamaka malamu te, yango wana balekisaka bangonga oyo esɛngami mpo na kozwa mosolo mingi. Balapólo oyo euti na ekólo Inde ezali komonisa ete bakompanyi ya transport ezali kotyela basɔfɛlɛ ntango mingi mpo na kotika masandisi na bisika esengeli kokende, kasi basɔfɛlɛ mingi ya mituka ya minene bazwaka bakiliya mpe masandisi na nzela mpo na kozwa mbongo mingi, yango esalaka ete bálekisa ntango mingi na kotambwisáká motuka. Na yango, basengeli kokata mpɔngi na bango mpo na kozonga na kompanyi na ngonga esengeli.
Na mikili ya Mpótó, na kotalela bangonga oyo esɛngami na mobeko, sɔfɛlɛ ya motuka ya monene akoki kosala ngonga 56 na yenda na boumeli ya pɔ́sɔ. Kasi na pɔ́sɔ oyo ekolanda, bangonga yango ekokita kino 34. Bangonga na ye ya mosala, bakisa mpe ntango oyo alekisi na kokɔtisa mpe kokitisa masandisi, etalelami na masini moko elakisaka ngonga. Lolenge yango ya kolandela bangonga ya mosala epesaka likoki ya koyeba soki sɔfɛlɛ mokomoko azali kotosa mitindá to azali kotosa te.
Likambo mosusu oyo epesaka mokakatano na bangonga oyo sɔfɛlɛ asalaka wana azali kotambwisa motuka eutaka na nkolo motuka. Motuka na ye ezali eloko ya kozwa na yango mosolo mingi mpe esengeli kosalelama, soki likoki ezali butu na moi kozanga kopema. Lokola momekano kati na bakompanyi ya transport ezali sé kokóla, bankolo mituka bazali mpe kopusa basɔfɛlɛ ete básala bangonga mingi koleka oyo esɛngami.
Kolɛmba eyaka ntango mosala esalami na boumeli ya bangonga mingi kasi mpe lisusu ntango mosala ebandi na ngonga ya malamu te. Na ndakisa, mosala ebandaka mpenzampenza na ngonga ya liboso kino ngonga ya minei ya ntɔ́ngɔ́. Wana ezali ntango oyo basɔfɛlɛ mingi balɛmbaka mpe makanisi na bango ezalaka esika moko te. Ekómaka lisusu mpasi ntango bakompanyi oyo ezwaka masandisi elingaka te ete bátondisela bango biloko, kasi esɛngaka ete biloko yango ekóma na ‘ntango oyo esɛngamaki.’ Yango elingi koloba ete sɔfɛlɛ asengeli kokóma epai ya kiliya na masandisi oyo esɛngamaki mpe bobele na ntango oyo bayokanaki. Nzela etondi na mituka, kobeba ya nzela na eleko ya mbula, mpe misala ya kobongisa nzela ekoki kosala ete ntango eleka mpe sɔfɛlɛ akosala nyonso oyo ekoki na ye mpo ete akóma na ntango malamu.
Atako mibeko ezali mpo na kotosisa bangonga oyo esengeli kosala na kotambwisáká motuka, mosala ya bapolisi emonisi ete basɔfɛlɛ bazali naino kobuka mobeko. Engebene zulunalo Polizei Verkehr & Technik, “pene na sɔfɛlɛ 1 likoló na basɔfɛlɛ 8 ya mituka ya minene, babísi, mpe mituka oyo ememaka bosɔtɔ oyo etondi na ngɛngɛ ndenge na ndenge batosaka te motángo ya bangonga oyo esɛngami mpo na kotambwisa mpe kozwa bopemi.” Na boumeli ya botaleli lolenge mituka mizali kotambola na engumba Hambourg, bapolisi bamonaki sɔfɛlɛ moko ya motuka ya monene oyo atambwisaki na boumeli ya ngonga 32 kozanga kozwa bopemi.
Yebá ete likama lizali
Batunaki sɔfɛlɛ moko oyo azalaki kosala bantaka milai, asilaki komema biloko na boumeli ya mbula 30 na mikili mingi ete alobela mokakatano ya kolɛmba. Alobaki ete: “Lolendo mpe komityela motema koleka ekoki kosala ete sɔfɛlɛ atyola likambo litali kolɛmba. Yango wana makama masalemaka.” Bilembo oyo bimonisaka ete sɔfɛlɛ alɛmbi bityami na etánda.
Koyeba noki bilembo ya liboso ekoki kobikisa bomoi. Bolukiluki moko esalemaki na États-Unis na Ebongiseli mpo na libateli ya batambwisi mituka (National Transportation Safety Board) emonisaki mitángo ya mawa: Kati na makama 107 ya mituka oyo masalemaki kozanga kotuta motuka mosusu, makama 62 esalemaki mpo na kolɛmba. Nzokande, bakompanyi oyo esalaka mituka ezali kokólisa tekiniki oyo ekebisaka ntango nyonso sɔfɛlɛ oyo azali kobunda na mpɔngi.
Kompanyi moko ya ekólo Japon ezali kobongisa mwango moko ya elektroniki oyo ekosalela kamera-video mpo na kotalaka mbala boni sɔfɛlɛ azali kokanga miso. Soki sɔfɛlɛ abandi kokanga mpe kofungola miso mbala na mbala mpe malɛmbɛmalɛmbɛ, mongongo moko ekokebisa ye na likama oyo ekoki kozwa. Kompanyi moko na Mpótó ezali kobongisa masini oyo ekomeka koyeba lolenge motuka ezali kotambwisama. Na nzela, soki motuka ebandi kokende epai na epai, mongongo moko ekokebisa sɔfɛlɛ. Nzokande, mwa ntango esengeli naino koleka liboso ete bisaleli yango ya litomba mpenza bikoka kobimisama.
Likama
Kolɛmba esepelisaka motambwisi moko te ya motuka. Motuna ezali ya koyeba lolenge nini kopɛngola yango. Basɔfɛlɛ ebele bamɛlaka kafe mingi, kasi kolɛmba elandaka bango ntango nyonso. Basusu bamɛlaka bilangwiseli. Esengeli kolobela yango, bizaleli motindo wana bipesaka makama na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto. Na ekólo Mexique, basɔfɛlɛ mosusu balyaka chile (pilipili moko ya makasi) mpo ete bálala te.
Liboso ya kobanda mosala ya ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́, ebongi kolala malamu. Mpe esengeli kozwa ekateli ya kotosa bangonga oyo esɛngami na boumeli na yango okotambwisa motuka. Na Afrique du Sud, banganga-mayele balobi ete nsima ya kotambwisa motuka na boumeli ya ngonga mitano, esengeli kozwa bopemi. Na nzela ya molai, sɔfɛlɛ asengeli kotya makanisi na ye esika moko mpe kokeba. Basɔfɛlɛ mosusu balandaka radio to basololaka na batambwisi mosusu na radio B.C. Sɔfɛlɛ oyo azali Motatoli ya Yehova, akoki kolanda botángi ya masoló mauti na Biblia oyo matyami na kasɛti, na ndakisa masoló ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mpe mikapo ya Biblia. Okoki kozwa makanisi mosusu na etánda oyo ezali na lokasa oyo.
Kozwa mosolo mokoki mpo na kokokisa bamposa ya bomoi ekómi mpenza mpasi, na bongo ezali likambo ya pɛtɛɛ te mpo na kozala na bokatikati. Bakompanyi mosusu to bankolo mituka mosusu batyolaka likama oyo eutaka na kolɛmba ya basɔfɛlɛ. Na yango, moto nyonso oyo azali kosala na kompanyi ya transport asengeli kobatela makambo oyo toyekoli na ntina na kolɛmba. Lisusu, mbala mingi, basɔfɛlɛ bazalaka na lolenge na bango moko ya kolónga mokakatano ya kolɛmba na makambo oyo bango moko bakutanaki na yango, bakoki kosalisa basusu ete bálónga mokakatano ya kolɛmba.
Ya solo, lolenge malamu ya kosɛnzɛla ezali ya kofuta nyongo ya mpɔngi: Soki ososoli elembo moko oyo ezali komonisa yo ete olɛmbi, tɛlɛmá na esika moko ya kopema oyo okómeli yango liboso mpe lalá mwa moke. Nsima ya kopema, zongelá mosala mbala moko. Kokwea te na motambo ya kolɛmba.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Allemagne, lokola basi oyo batambwisaka mituka ya minene bazali mingi te, kati na lisoló oyo, tolobeli basɔfɛlɛ mibali.
[Etanda na lokasa 25]
Bilembo ya likebisi oyo bisengeli kotalelama noki
• Miso na yo mateli ngwaa to makómi kiló?
• Ozali kokanisa makambo to ozali kotambwisa makanisi?
• Nzela ezali komonana ete ekómi moke mpenza, na bongo ezali kosala ete otambwisa motuka likoló ya bilembo ya nzela?
• Okómi kobosana ntango ozali kolobela bisika mosusu ya mobembo oyo ozali kosala?
• Okómi kobalola yenda mpe kotɛlɛmisa motuka na mbalakaka?
Soki eyano na yo ezali ɛɛ na moko ya mituna yango elingi koloba ete osengeli kozwa bopemi noki
[Etanda na lokasa 26]
Na mibembo ya milai
• Lalá malamu
• Komipesa na bilangwiseli te
• Zwá bopemi mbala na mbala na nzela, na kosaláká ngalasisi mpo na konyolisa nzoto
• Yebá ete nzela oyo ezali molai mpe alimá ezali mpenza likama
• Kobanda kosala mobembo na nzala te. Zwá momeseno ya kolya malamu; bilei ya pɛpɛlɛ mpe ya malamu
• Melá mai mingi, kasi masanga makasi te