Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g03 Janvier nk. 22-24
  • Omibatelaka ntango ozali kotambwisa motuka?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Omibatelaka ntango ozali kotambwisa motuka?
  • Lamuká!—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Basofɛlɛ oyo mpɔngi eyibaka bango
  • Bamesani kotambwisa motuka kasi bakómi bampaka
  • Ekateli oyo okoki kozwa
  • Nasengeli kotika kotambwisa motuka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Ndenge ya kokima makama ya motuka
    Lamuká!—2011
  • Kolɛmba: motambo oyo basɔfɛlɛ ya mituka ya minene bayebaka te
    Lamuká!—1998
Lamuká!—2003
g03 Janvier nk. 22-24

Omibatelaka ntango ozali kotambwisa motuka?

“Nabandi kotambwisa motuka lelo te; ntina ya kobanga ete nakosala likama ezali te.” “Bato oyo basalaka makama ezali kaka bilenge mpe basofɛlɛ oyo bazalaka mafumafu.” Mingi bakanisaka ete bakoki kosala likama na motuka ata mokolo moko te. Yo mpe okanisaka bongo? Okanisaka ete yo okoki kosala likama na motuka te?

BALAPOLO ezali komonisa ete soki ofandaka na ekólo moko ya bozwi, likoki ezali ete mokolo mosusu osala likama na motuka, ata mbala moko na bomoi na yo. Bato mingi oyo basalaka makama ya ndenge wana bakufaka. Na mokili mobimba, bato koleka nkóto nkama mitano bazali kokufa na makama ya mituka mbula na mbula. Ntango mosusu bato mingi oyo bakufaki na makama yango na mbula oyo euti koleka bakanisaki ete likambo ya ndenge wana ekoki kokómela bango te. Okoki kosala nini mpo omibatela na makama na motuka? Likambo ya ntina ezali nde koyeba komibatela na nzela. Tótala nini okoki kosala mpo na komibatela na makama oyo esalemaka mpo na mpɔngi to mpo na bompaka.

Basofɛlɛ oyo mpɔngi eyibaka bango

Bato mosusu ya mayele balobaka ete sofɛlɛ oyo mpɔngi ezali koyiba ye ntango azali kotambwisa motuka akoki kozala na likama monene ndenge moko na sofɛlɛ oyo amɛli masanga. Balapolo emonisi ete makama oyo ezali kosalema mpo mpɔngi ezali koyiba basofɛlɛ, ezali se kokóma mingi. Eleki mwa mikolo, lapolo moko (Fleet Maintenance & Safety Report) elobaki ete na Norvège, na mbula moko mpamba, sofɛlɛ moko kati ya basofɛlɛ 12 oyo batunaki bango, andimaki ete mpɔngi eyibaka ye ntango azali kotambwisa motuka. Zulunalo moko (The Star) ya Johannesburg, na Afrika ya Sudi, emonisi ete na makama nyonso ya mituka oyo esalemaka na ekólo wana, soki tozwi misato, moko ezalaka mpo sofɛlɛ alɛmbi. Balapolo oyo euti na bikólo mosusu emonisi mpe ete, na bisika nyonso, basofɛlɛ bazali kolɛmba mingi. Mpo na nini mpɔngi eyibaka basofɛlɛ mingi ntango bazali kotambwisa motuka?

Bomoi ya lelo ekómi na makambo kilikili ya kosala, bato bazali mpenza kozwa ntango ya kolala te. Eleki mwa mikolo, zulunalo moko (Newsweek) epesaki lapolo ete ebele ya bato ya Amerika “balalaka lisusu mingi te ndenge bazalaki kolala na ebandeli ya ekeke ya ntuku mibale; bakómá kozangisa mpɔngi ngonga moko na ndambo​—⁠mpe ezali komonana ete momeseno yango ekoya lisusu makasi.” Mpo na nini bongo? Zulunalo yango ezongeli maloba ya Terry Young, ye ayebi malamu makambo ya mpɔngi, mpe alobi ete: “Bato bakómi kotalela mpɔngi lokola eloko oyo bakoki kotya naino yango pembeni. Bakómi kokanisa ete moto oyo alalaka moke azali moto oyo asalaka mingi mpe oyo mosala na ye ezali kokende liboso.”

Balobaka ete esengeli moto alala ngonga kobanda motoba na ndambo tii ngonga libwa. Soki moto azali kokokisa ngonga wana te, akotikala na “nyongo ya mpɔngi.” Ebongiseli moko (Fondation AAA pour la sécurité routière) elobi ete: “Kozangisa mpɔngi ata miniti 30 to 40 na butu mokomoko na boumeli ya pɔsɔ mobimba, ekoki kosala ete na nsuka ya pɔsɔ moto akóma na nyongo ya mpɔngi ngonga 3 to 4; nyongo monene ndenge wana ekoki se kosala ete mpɔngi eyibaka moto na moi.”

Mbala mosusu, ekómaka ete butu mobimba eleki, olali mpenza malamu te. Ekoki kozala ete mpɔngi ekimi yo na miso to mwana abɛli, to mpe makambo mosusu oyo yo moko olingaki te kasi ezangisi yo mpɔngi. Mokolo oyo elandi, mpɔngi ekoki kobanda koyiba yo ntango ozali kotambwisa motuka. Osengeli kosala nini mpo na yango?

Balobaka ete soki omɛli kafe, ofungoli bavitre ya motuka, olei bazoka to mpe olei eloko moko oyo batii mwa matungulu to pilipili okoki kolala te; kasi, na bantango mosusu, nyonso wana esimbaka te. Na biloko wana nyonso, ata moko te ezali mpenza nkisi ya solosolo ya kosilisa mpɔngi. Eloko osengeli na yango ezali nde kolala. Na yango, mpo na nini te kopema naino mpe kolala moke? Zulunalo moko (The New York Times) epesi toli oyo: “Mwa mpɔngi ya moi oyo ezongisaka nzoto makasi esengeli te koleka miniti 30; soki eleki, nzoto ekoleka na mpɔngi ya makasi, oyo ekómaka mpasi mpo na kolamuka.” Kotɛlɛma mpo na kolala mwa moke ekoki kokómisa yo mwa nsima epai ozali kokende, kasi ekoki kobikisa bomoi na yo.

Bizaleli na yo moko mpe ekoki kosala ete oyokaka mpɔngi ntango ozali kotambwisa motuka. Olekisaka ngonga mingi na kotala Internet, to mpe otalaka televizyo tii na butu makasi? Okendaka na bafɛti oyo esalaka ntɔngɔ saa? Kopesa nzela te na makambo ya ndenge wana epekisaka yo kolala mingi. Salomo, mokonzi ya bwanya, amonisaki ete ata “mwa kopema moke” ezali na ntina mingi.​—⁠Mosakoli 4:​6, NW.

Bamesani kotambwisa motuka kasi bakómi bampaka

Mbala mingi, basofɛlɛ oyo bakómi bampaka nde bayebaka malamu mosala ya kotambwisa motuka. Longola yango, bango batambwisaka mobulumobulu te mpe bayebi ete bazali lisusu na makasi mingi te. Atako bongo, bakoki mpe kosala makama ya kotutana na motuka mosusu. Kutu, lokola babandi kokóma bampaka, likoki ezali ete básalaka makama mbala na mbala. Zulunalo moko ya États-Unis (Car & Travel) elobi ete: “Bato oyo bakómi na mbula koleka 70 bazali lisusu mingi te (9 %), kasi basalaka makama mwa mingi (13 %).” Ezali mpenza mawa komona ete basofɛlɛ oyo bakómi bampaka bazali se kosala makama mingi.

Tózwa ndakisa ya Myrtle, oyo azali na mbula 80.a Ye akokisi sikoyo mbula koleka 60 banda atambwisaka motuka mpe asalá naino likama te. Atako bongo, ndenge kaka ezalaka mpo na moto nyonso oyo akómi mpaka, ye mpe azali koyoka ete kilo ya bobange ekangi ye​—⁠mpe yango ekoki kosalisa ye likama. Eleki mwa mikolo, ayebisaki bakomi ya zulunalo Lamuká! ete: “Ntango okómi mobange, makambo nyonso ya bomoi [ata mpe kotambwisa motuka] ekómaka etumba.”

Asalaka nini mpo akoka kozwa likama te? Myrtle alobi ete: “Mbula na mbula, nazalaki kobongisa mimeseno na ngai mosusu na kotalela bambula oyo nakómaki na yango.” Na ndakisa, alingaka lisusu kotambwisa motuka ntango molai te, mingi mpenza na butu. Mwa mbongwana wana esalisi ye asala likama te mpe atika kotambwisa motuka te.

Atako ezali mpasi mpo na kondima yango, bobange ekokómelaka moto nyonso. (Mosakoli 12:​1-7) Okomona mikakatano ndenge na ndenge ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto, nzoto ekómi kilo mpo na kosala makambo, mpe miso ekómi kolɛmba​—⁠nyonso wana ekoki kosala ete kotambwisa motuka ekóma mpasi. Kasi, bompaka epekisi moto te atambwisa motuka. Likambo ya ntina ezali nde ezaleli ya sofɛlɛ ntango azali kotambwisa motuka. Esengeli kondima ete nzoto ebandi kolɛmba mpe kotalela likambo yango mpo na kotambwisa lisusu malamu motuka.

Ntango mosusu yo moko okoyeba yango te, nzokande miso na yo ezali kobeba mokemoke. Ntango ozali kokóma mpaka, okobanda lisusu komona mosika mingi te mpe miso na yo ekozala na mposa ya mwa kongɛnga mingi koleka. Mwa buku (Motambwisi motuka oyo akómi mobange mpe azali na mayele [na Lingelesi]) elobi ete: “Sofɛlɛ oyo akómi na mbula 60 asengeli na mwa kongɛnga makasi mbala misato koleka elenge mpo amona malamu, mpe esengeli mwa ntango eleka mpo miso na ye emesene na kongɛnga yango.” Lokola miso na biso ekómaka kolɛmba bongo, kotambwisa motuka na butu ekoki kokóma mpasi.

Henry azali na mbula 72 mpe esali sikoyo mbula koleka 50 banda azali kotambwisa motuka na likebi mpenza. Nsima ya bambula, abandaki komona ete na butu, miinda ya mituka mosusu ezalaki kosala ye miso mpasi. Ntango akɛndaki epai ya monganga ya miso, monganga ayebisaki ye ete mpo amonaka malamu, asengeli kolata linɛti mosusu oyo ekosala ete miinda ebɛta ye makasi te na miso na butu. Ye moko alobi ete: “Nazali lisusu na mokakatano te mpo na kotambwisa motuka na butu.” Mpo na ye, kolata linɛti wana esalisi ye mingi mpo akoka kotambwisa motuka malamu. Mpo na basusu, na ndakisa Myrtle, ekoki kozala malamu koboya mpenza kotambwisa motuka na butu.

Bompaka mpe ebongolaka lolenge moto asengeli kosala ntango akutani na mokakatano moko boye. Bampaka bakoki kokóma na bwanya mingi mpe na ekɛngɛ koleka bilenge. Nzokande, ntango moto azali kokóma mpaka, ekobanda kosɛnga ye mwa ntango mpo likambo amoni, atalela yango naino mpo akoka koyeba soki akosala nini. Yango esalaka ete kotambwisa motuka ekóma lisusu mpasi koleka, mpamba te banzela mpe lolenge mituka etambolaka ebongwanaka ntango nyonso. Esɛngaka kotalela likambo nokinoki mpe koyeba mbala moko soki okosala nini.

Zulunalo moko (Car & Travel) elobi ete “kokatisa na esika oyo banzela mingi ekutaná ezali likambo oyo ebimisaka makama mingi ya liwa epai ya bampaka.” Mpo na nini? Lapolo yango ebakisi ete: “Mokakatano . . . eutaka nde na likambo oyo: sofɛlɛ asengeli kozala ekɛngɛ mpo na komona nokinoki mituka oyo ezali koya na lobɔkɔ na ye ya mwasi mpe na lobɔkɔ na ye ya mobali liboso akatisa na esika oyo banzela mingi ekutaná.”

Okoki kosala nini mpo oumelaka te koyeba soki okosala nini? Zalá ekɛngɛ ntango okómi pene na esika oyo banzela mingi ekutaná. Bwakáká mwa liso mbala mibale ngámbo na ngámbo liboso ya kokatisa. Zalá ekɛngɛ, mingimingi ntango ozali kobaluka mpo na kozwa nzela mosusu. Kobaluka na esika oyo banzela mingi ekutaná ekoki kobimisa likama ya liwa, mingimingi soki ekosɛnga ete okatisa nzela oyo mituka ebele ezali koya.

Na États-Unis, makama mingi ya liwa (40 %) oyo basofɛlɛ ya mbula koleka 75 basalaka na bisika banzela mingi ekutaná, esalemaka na ntango ya kobaluka na lobɔkɔ ya mwasi. Ebongiseli moko (Fondation AAA pour la sécurité routière) epesi basofɛlɛ ya ekólo yango toli oyo: “Ekozala mbala mosusu malamu ete obaluka mbala misato na lobɔkɔ ya mobali mpo na kokóma epai ozali kokende na esika ya kabaluka mbala moko na lobɔkɔ ya mwasi.” Yo mpe okoki kosalela toli yango ntango ozali kotambola na nzela. Okoki koluka koleka na banzela mosusu na esika ya koleka na bisika oyo banzela mingi ekutaná, bisika oyo ebimisaka makama mingi.

Ekateli oyo okoki kozwa

Nini ekoki kosalisa yo oyeba soki otambwisaka motuka malamu to osengeli kobongisa na bisika mosusu? Ntango mosusu okoki kosɛnga moninga moko oyo omemyaka mingi to ndeko na yo ete bótambola na ye na motuka mpe atala soki ozali kotambwisa malamu to osengeli kobongisa na bisika mosusu. Na nsima, yoká bango malamu mpe landá toli nyonso oyo bakoki kopesa yo. Okoki mpe kokɔta lisusu kelasi ya kotambwisa motuka. Bibongiseli mingi oyo etalelaka makambo ya kotambwisa mituka ezalaka mpe na bakelasi mosusu mpo na basofɛlɛ oyo bakómi bampaka. Soki ntango ozali kotambwisa motuka, omoni ete mbala mibale mobimba to mpe koleka, osali likama ya moke to olingaki kosala likama, yebá ete ozali lisusu kotambwisa malamu te ndenge ozalaki kosala yango liboso.

Kasi soki totali malamu, mpo na bolamu na yo, ekoki mbala mosusu kozala malamu otika kotambwisa motuka. Ekoki kozala mpasi mpo na kozwa ekateli ya ndenge wana. Myrtle, oyo tolobelaki liboso, ayebi ete etikali moke atika kotambwisa motuka mpo na libela. Lokola ayebi ete etikali moke atika kotambwisa motuka, akómá kotikela bato mosusu bámemaka ye. Amiyokaka ndenge nini lokola atikelaka moto mosusu atambwisa? Alobi ete, “Ezali esengo kotambola na motuka kozanga ete nayoka motungisi ya kotambwisa.”

Nsima ya kotalela likambo yango malamumalamu, yo mpe okoki kokóma na likanisi wana. Kokende kosomba biloko, kobimabima mpo na mwa misala mikemike, kokende kotala bato oyo oyokanaki na bango mpe kokende na makita ezalaka malamu mingi soki ozali elongo na moninga moko. Ntango mosusu moninga yango akoki kotambwisa yo na vuatire na yo moko. Kobima elongo na moto mosusu ndenge wana ekoki kozala libateli mpe yango ezali malamu mingi koleka kobima yo moko. Na bisika oyo taksi mpe bisi ezali mingi, ekoki mpe kozala malamu komataka na yango. Kobosana te ete valɛrɛ na yo ezali na koyeba kotambwisa motuka te. Eloko ekopesa yo valɛrɛ na miso ya libota na yo, ya bandeko na yo mpe na miso ya Nzambe, ezali nde bizaleli na yo ya malamu.​—⁠Masese 12:2; Baloma 14:⁠18.

Ozala mpaka to elenge, ozala sofɛlɛ ya kala to oyo azali naino koyekola, kobosana te ete okoki kosala likama na motuka. Yebá ete kotambwisa motuka ezali mokumba monene oyo osengeli kozwa yango na lisɛki te. Salá nyonso mpo na kokima ete otuta motuka mosusu te to mpe bátuta yo te. Soki osali bongo, okoki komibatela yo moko mpe bamosusu, mbala nyonso oyo okobanda kobima na motuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi bango bankombo mosusu.

[Elilingi na lokasa 22]

Esengeli ete olalaka “malamu” na butu

[Elilingi na lokasa 23]

Kopema mwa moke ekoki kokómisa yo mwa nsima, kasi ekoki kobikisa bomoi na yo

[Elilingi na lokasa 23]

Basofɛlɛ oyo bakómi bampaka bameseni kotambwisa motuka, kasi bakutanaka na mikakatano ya bango ya bampaka

[Elilingi na lokasa 24]

Kobima na moninga moko ezalaka mpenza na matomba

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto