Engebene Biblia
Mobola apesameli nzela ya koyiba?
“Bobola ezali monguna monene ya esengo ya moto; ezali mpenza kobebisa bonsomi oyo moto akoki kozala na yango mpe ezali kosala ete moto azala na mokakatano ya kosalela makoki oyo azali na yango, kutu akokoka te kosalela yango.”—Samuel Johnson, mokomi oyo azalaki na bomoi na ekeke ya 18.
Magnus Aurelius Cassiodorus, ye Moloma moto ya politiki alobaki ete: “Bobola ezali kobota mobulu.” Emonani ete makanisi yango malingi koloba ete bato mosusu basalaka mobulu mpo ete bazali babola. Lelo oyo, bato mingi bazali kondima likanisi yango, mingimingi ntango mobulu yango ezali bongo koyiba.
Likanisi oyo ete monyoko mpe bobola ezali kopesa nzela ete moto ayiba epalangani mpenza mingi. Tótalela maloba ya ntɔki ya Lingelesi oyo makomamaki na ekeke ya 14 na ntina na Robin Hood, oyo mazali komonisa moto moko oyo azalaki kotalela mibeko te, azalaki koyiba epai ya bato ya bozwi mpe kokabolela babola biloko oyo ye ayibaki. Na boumeli ya bikeke atalelamaki lokola elombe.
Lelo oyo, bato mingi bazali na mikakatano makasi ya kozwa mbongo. Euti koleka mwa mikolo, Banque mondiale emonisaki ete bato miliare 1,3 bazali kobikela na mosolo ekoki ata dolare moko te na mokolo. Na ankɛtɛ moko oyo esalemaki, bato 70 likoló ya monkama na ekólo Philippines balobaki ete bamitalelaka lokola babola. Na ekólo Brésil, bato ya bozwi 20 likoló ya monkama bazali kozwa mosolo mbala 32 koleka bato ya bobola makasi 20 likoló ya monkama. Bizalela motindo yango bikoki koyokisa bato mosusu mawa kino bakoki kosalela myango nyonso, ata koyiba, bobele mpo na kokokisa bamposa na bango ya kobikela mokolo na mokolo.
Biblia ezali kokweisa moyibi polele mpenza. Kati na Mibeko Zomi oyo Nzambe apesaki, mobeko ya mwambe elobi ete: “Okoyiba te.” (Exode 20:15) Nzokande, bato mingi oyo bandimaka Biblia balingaka komonisa ete koyiba ezali mabe te soki moto azali mobola.
Yango ezali kobimisa mituna minene: Mobola apesameli nzela ya koyiba? Moto asengeli kosala nini soki azali na mikakatano makasi ya mbongo? Ezali boni soki azali na bana oyo bazali kokufa nzala mpe bazali kobɛla oyo asengeli kosalisa? Yehova Nzambe azali nde kopesa nzela na koyiba mpo na makambo motindo wana, mingimingi soki biloko oyo biyibami bizali ya bato oyo mbala mosusu bazali na mposa na yango te?
Nzambe alobi nini na ntina na likambo yango?
Lokola Yesu azalaki elilingi ya Tata na ye, ndakisa na ye ekoki kosalisa biso ete tókanga ntina ya likanisi ya Nzambe. (Yoane 12:49) Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu azalaki koyokela bato oyo bazalaki kati na bosɛnga mawa. Biblia elobi ete: “Emoni ye bibele, ayoki mawa mpo na bango.” (Matai 9:36) Nzokande, ata na libaku moko te amonisaki ete koyiba ezali mabe te. Bobele bongo, atako Nzambe amibanzabanzaka mpo na babola, atalelaka bobola te lokola likambo oyo ekoki kopesa moto nzela ya koyiba. Na Yisaya 61:8 (NW), Biblia ezali koyebisa biso ete Nzambe ‘aboi moyibi mpe kozanga boyengebene.’ Mpe ntoma Paulo alobi polele ete bayibi bakosangola Bokonzi ya Nzambe te. Na bongo, tozali kososola likanisi ya Nzambe na ntina na likambo yango.—1 Bakolinti 6:10.
Nzokande, Masese 6:30 elobi ete: “Bato bakotyola moyibi te soko akoyiba kotondisa motema na ye wana eyoki ye nzala?” Maloba yango mazali kolongisa koyiba? Soko moke te. Maloba mazali zingazinga na yango mazali komonisa ete Nzambe azali te koboya kopesa etumbu na moyibi mpo na mbeba oyo asali. Vɛrsɛ oyo elandi elobi ete: “Kasi soko amonani, akozongisa kino mbala nsambo, akobimisa biloko nyonso na ndako na ye.”—Masese 6:31.
Lokola moyibi oyo ayibi mpo na nzala akoki kotalelama lolenge moko te na moyibi oyo ayibi mpo na lokoso to na likanisi ya koyokisa moto oyo ayibeli mpasi, baoyo balingi kondimama na Nzambe basengeli te komimemisa ngambo na lolenge moko to mosusu ya moyibi. Ata kati na bobola oyo eleki, koyiba ezali kobwaka nsɔni likoló ya nkombo ya Nzambe. Masese 30:8, 9 elobi ete: “Leisá ngai bilei bikoki na ngai, . . . ete nazala mobola te mpe nayiba te, nabimisa nkombo na Nzambe na ngai na mpamba te.” Ɛɛ, moyibi azali kobwaka nsɔni likoló na nkombo ya Nzambe. Lokola moyibi ezali likambo ya kozanga bolingo, ezala ata esalemi epai na moto ya bozwi to epai na mobola, ezali mpenza lisumu. Mpo na baoyo bazali kolinga Nzambe mpe bazalani na bango, koyiba epesameli nzela soko moke te.—Matai 22:39; Baloma 13:9, 10.
Likanisi oyo ete moto oyo azali mobola azali na lotomo ya koyiba elongobani te. Koloba bongo ezali lokola koloba ete mopoti mbango oyo azali na nzoto makasi te azali na lotomo ya kosalela bilangwiseli mpo na kolonga momekano. Ata soki alongi, asili kosalela myango ya mabe. Basusu bakomona mpenza ete azwi elonga yango na nzela ya mabe. Ezali mpe bongo mpo na moyibi. Akamati eloko oyo ezali ya ye te na lolenge ya mabe. Bobola na ye ezali kopesa ye nzela te ya kosala bongo.
Moyibi nyonso oyo alingi kondimama na Nzambe asengeli kobongola motema. Biblia ekebisi ete: “Moyibi ayiba lisusu te, kasi tika ete asalisa mabɔkɔ na ye misala.” (Baefese 4:28) Bato oyo kala bazalaki koyiba kasi babongoli mpenza motema bakoki kondimisama ete Nzambe akolimbisa bango.—Ezekiele 33:14-16.
Mobola akoki kosala nini?
Biblia elaki ete: “[Yehova] akotika te ete molimo na moyengebeni ebeba na nzala, kasi akopekisa mposa na bato mabe.” (Masese 10:3) Nzambe akosunga te baoyo bazali kobuka mobeko na ye na nko mpo na kokokisa bamposa na bango. Kasi azali na mawa epai na baoyo bazali kosala milende ya kotosa ye, mpe akopambola milende na bango mpo ete bázwa oyo bazali na yango mposa.—Nzembo 37:25.
Bamilio ya bato basili komona ete ntango bazali kolanda mitinda ya Nzambe, ezaleli na bango ebongaka. Na ndakisa, kosalela toli ya Biblia etali kozala mosali malamu mpe kopɛngola misala mabe, lokola masano ya mbongo, milangwa, komɛla makaya, mpe kosalela bilangwiseli, esili kosalisa bango na kozwa mwa biloko mingi oyo bazali na yango mpenza mposa. (Bagalatia 5:19-21) Yango esɛngaka ete bámonisa kondima, mpe baoyo basili kosala bongo bamoni ete ‘Yehova azali malamu’ mpe ete asalisaka mpenza baoyo bazali kotya elikya epai na ye.—Nzembo 34:8.