Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g99 Juillet nk. 13-15
  • Ndenge nini nakoki koluka kobala moto oyo azali mosika?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini nakoki koluka kobala moto oyo azali mosika?
  • Lamuká!—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Koluka koyebana
  • Koloba na bosembo ezali likambo oyo eleki malamu
  • Azali mpenza moto ya ndenge nini?
  • Kokutana mpe kosolola elongo
  • Ndenge ya kosala mpo eleko oyo bolingani esalisa mpenza
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Lolenge ya komibongisa mpo na libala oyo ekolónga
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Ndenge nini okoki kozwa moto oyo akoki kokóma molongani na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Libala—Likabo oyo euti na Nzambe
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
Lamuká!—1999
g99 Juillet nk. 13-15

Mituna oyo bilenge batunaka . . .

Ndenge nini nakoki koluka kobala moto oyo azali mosika?

“Nautaki kotika etuluku moko ya batindami na otɛlɛ na bango, batindami yango bayanganaki na liyangani ya mikili mingi ya Batatoli ya Yehova. Nalingaki kozonga ndako, kasi nakutanaki na etuluku ya Batatoli mosusu bazalaki kozonga. Na yango, natɛlɛmaki kosolola na bango, mpe namonanaki na Odette. Tokutanaki lisusu nsima bobele na pɔsɔ yango. Toyokanaki ete tokobanda kokomelana mikanda, mpe na nsima ya mbula soko mibale ya kokomelana mikanda, tolukaki koyebana malamu mpo tóbalana.”​—Tony.

MOKILI ekómi lokola mwa esika moko moke mpenza. Na mikolo na biso, kosala mibembo na mpɛpɔ mpe na ntalo moke ezali likambo ya mpasi te, kosolola na bato kati na mokili mobimba na telefone, kotinda mikanda na posita na lombangu, mpe Internet, nyonso wana epesi bato makoki ya sika mpo na koluka kobala ata mosika. Mpe likanisi ya koluka kobala mosika na ntaka ya bakilomɛtɛlɛ ebele ekoki kosepelisa—mingimingi soki mwaye ya kobala na mboka na yo moko ezali mpenza te.

Mpo na babalani mosusu, koluka kobala mosika ezalaki mpenza lipamboli mpo na bango. Tony alobi ete: “Tofandi na libala ya esengo na boumeli ya mbula 16.” Basusu kutu bakoki koloba ete koluka kobala moto oyo azali mosika ezali na litomba, ekosalisa bato oyo balingani báyebana kozanga kopusama na kitoko ya nzoto. Nzokande, ata soki yango ezali na litomba nini, koluka kobala moto oyo azali mosika ezali na mikakatano na yango oyo ekeseni na mosusu.

Koluka koyebana

Ezali na ntina mingi koyeba malamu moto oyo ozali kokanisa kobala. Nzokande, lokola mobali moko na nkombo Frank alobi oyo ekómelaki ye, “ezali likambo ya pɛtɛɛ te koyeba bomoto mpenza ya moto yango, ‘bomoto oyo ebombami na motema.’” (1 Petelo 3:4) Doug, moklisto mosusu oyo alukaki kobala moto oyo azalaki mosika, alobi ete: “Soki nazongisi makanisi nsima, namonaka ete toyebanaki mpenza malamu te.”

Likoki ya koyeba moto oyo afandi mosika na ntaka ya bakilomɛtɛlɛ mingi ezali mpenza? Ɛɛ, kasi ekoki kosɛnga milende mingi. Doug alobi ete: “Tozalaki na mbongo te ya kosolola na telefone, na yango tozalaki kokomelana mikanda mbala moko na pɔsɔ.” Nzokande, Joanne na Frank bamonaki ete kokoma mikanda ebongi te mpo na bango. Joanne alobi ete: “Na ebandeli tozalaki kokomelana mikanda mpe kosolola na telefone. Na nsima, Frank atindelaki ngai masini moko moke ya kokɔtisa maloba. Tozalaki kotindelana maloba na kasɛtɛ pɔsɔ na pɔsɔ.”

Koloba na bosembo ezali likambo oyo eleki malamu

Ezala lolenge nini bozali kosala mpo na kosolola, kozala na bosembo ezali na ntina mingi. Moklisto mwasi moko na nkombo Ester alobi ete: “Soki ozali kokosa, ekoyebana nsima mpe ekobebisa boyokani na bino. Bózala sembo moko epai na mosusu. Zalá mpe sembo epai na yo moko. Soki ezali na likambo moko oyo ondimi te, kotika te eleka. Bólobela yango.” Ntoma Paulo apesi toli moko malamu: “Tiká ete moto na moto aloba sembo na mozalani na ye.”​—Baefese 4:25; kokanisá na Baebele 13:18.

Wapi makambo mosusu oyo bosengeli kolobela? Bato nyonso oyo balingi kobalana basengeli kolobela makambo lokola mikano na bango, bana boni bakobota, makambo ya mbongo, mpe kolɔngɔnɔ ya nzoto. Nzokande, ezali na makambo oyo ekoki kosɛnga likebi makasi. Na ndakisa, moko na bino—to bino nyonso mibale—bosengeli kotika mboka na bino soki bobalani. Olingi mpe ozali na likoki ya kosala bongo, na makanisi mpe na mayoki? Ndenge nini oyebi yango? Osilá kotika mboka na yo to kokabwana na libota na yo na boumeli ya ntango molai? Fianse ya Joanne alingaki ete bango nyonso mibale básala na biro monene ya la Société Watch Tower, babimisi ya zulunalo oyo. Joanne alobaki ete: “Atunaki ngai soki nakokoka kofanda na eteni ya ndako moke, mpe kozala na mwa mbongo moke. Tosengelaki kolobela likambo yango polele.”

Soki moto oyo ozali koluka kobala azali moto ya mokili mosusu, okolinga komesana na makambo ya mboka na ye? Frank atuni ete: “Na makambo ya mokolo na mokolo, moto na moto asepelaka na mimeseno ya mboka ya moninga? Bólobela makambo yango noki mpenza na ebandeli ya boyokani na bino mpamba te ezali na ntina mingi. Soki oyebi makambo yango noki, ekozala malamu—liboso ya komipesa mingi na mayoki mpe na mbongo.” Ɛɛ, kofanda mokolo na mokolo na mboka ya bato mosusu mpe na mimeseno na bango ekeseni mpenza na kozala turiste bobele mpo na boumeli ya mwa mikolo. Ekosɛnga oyekola lokota mosusu? Okokoka kosala mbongwana monene na bomoi na yo? Lisusu, ekoki kozala ete ozali nde kosepela na mimeseno ya mboka ya moto oyo olingi kasi mbala mosusu olingi mpenza ye mingi te? Bosepeli ya ndenge wana ekolimwa nsima ya mwa ntango. Kasi libala esangisaka bato mibale esika moko mpo na libela.​—Matai 19:6.

Tony alobi ete: “Nayebi mwana mwasi moko ya mokili mosusu oyo abalaki mobali moko ya Bisanga Caraïbes. Kasi, mwana mwasi yango amonaki ete bomoi na Bisanga ezalaki mpasi. Molunge ezalaki ntango nyonso makasi, mpe abɛlaki. Bilei ezalaki ndenge mosusu, mpe azalaki mosika na libota na ye. Na yango, bamekaki kofanda na mboka ya mwana mwasi yango. Kasi mobali amonaki ete bomoi ya kuna elingi kozala na biloko ya mosuni mingi, mpe azalaki lisusu te komona boninga oyo azalaki na yango na libota na ye mpe na bato ya kartye na ye. Sikawa bakabwaná; mobali azali kofanda na mboka na ye; mwasi mpe na mboka na ye. Bana mibale oyo babotaki bazali kozanga bolingo mpe likebi ya baboti nyonso mibale.”

Kobalana na moto ya mboka mosika, mbala mosusu ya mimeseno ekeseni, ezali mpe na mikakatano mosusu. Osili komibongisa mpo na mbongo ya kosala mobembo mpe ya kosolola? Lydia alobi ete: “Phil alobaki mokolo mosusu na lisɛki ete tobalanaki mpamba te azalaki kofuta bafaktire ya telefone na ntalo mingi, kasi sikawa tosengeli kofuta mbongo ya telefone mpo na kosolola na mama na ngai!” Ekozala boni soki boboti bana? Bana mosusu bakolaka kozanga koyeba makambo mingi ya bandeko na bango, bazalaka kutu na likoki te ya kosolola na bango na telefone mpo bayebi monɔkɔ ya mboka na bango te! Yango elingi koloba te ete bakoki kolonga mikakatano ya ndenge wana te. Kasi esengeli kotalela na mozindo makambo oyo ezali kosɛnga mpo na komikɔtisa na libala ya motindo oyo.​—Kokanisá na Luka 14:28.

Azali mpenza moto ya ndenge nini?

Okoyeba ndenge nini soki moninga na yo alobaka solo mpe azali sembo na maloba na ye? Matai 7:17 elobi ete: “Nzete malamu na nzete malamu ekobota mbuma malamu.” Na yango, azali na misala ya ndenge nini? Makambo oyo asalaka endimisaka maloba na ye? Bomoi na ye ya kala ezali komonisa ete akokokisa mikano oyo azali kozwa mpo na mikolo mizali koya? Ester alobi ete: “Likambo ya liboso oyo toyebaki mpo na mokomoko na biso ezalaki mikano na biso na makambo ya elimo. Azalaki mopalanganisi ya nsango malamu ya ntango nyonso na boumeli ya mbula mwambe, mpe yango endimisaki ngai ete azalaki sembo mpe akolinga kokoba na mosala yango.”

Kasi kanisá ete emonani lokola nde moto oyo olingi kobalana na ye azali koluka kokima mituna na yo. Koleka likambo yango boye te na elikya ete ekobonga. Luká koyeba malamumalamu! Omituna MPO NA NINI azali kosala bongo? Lisese moko elobi ete: “Toli kati na motema na moto ezali lokola mai na bozindo, nde moto na mayele akotoka yango.” (Masese 20:5) Lisese mosusu ekebisi ete: “Moto na zoba ayambi maloba nyonso, nde moto na mayele akotala malamu na nzela ekokenda ye.”​—Masese 14:15.

Kokutana mpe kosolola elongo

Kasi, bobele na mokanda to na telefone mpamba, okoki koyeba moto malamumalamu te. Ntoma Yoane akomelaki bandeko na ye baklisto mikanda mingi. Atako mikanda yango elendisaki boyokani oyo ezalaki kati na bango, Yoane alobaki ete: “Nazali na makambo mingi [ya] kokomela bino, nde nalingi kokoma yango na mokanda mpe mai na mokanda te, kasi nazali na elikya ete nakómela bino mpe nasolola na bino na monɔkɔ.” (2 Yoane 12) Bobele bongo, eloko moko te eleki kolekisa ntango elongo na moto. Ekoki kutu kozala malamu mpo na moko na bino asala mobembo mpo na mwa ntango mpo bókoka komonana na miso. Yango mpe ekosalisa oyo asali mobembo ayeba klima mpe bizaleli ya bomoi ya esika oyo ekokóma mboka na ye.

Ndenge nini bokoki kosalela ntango na bino malamu elongo? Bósala makambo oyo ekomonisa bizaleli ya mokomoko na bino. Bóyekola Liloba ya Nzambe elongo. Bótala ndenge mokomoko na bino azali kopesa biyano na makita ya lisangá mpe kosangana na mosala ya kosakola. Bósala misala ya ndako mbala na mbala elongo, lokola kotya bopɛto na ndako mpe kosomba biloko. Komona ndenge moninga na yo asalaka na ntango makambo ya kosala ezali mingi ekoki mpenza kopesa yo likanisi oyo elongobani mpo na ye.a

Esengeli mpe kolekisa ntango elongo na babokilo mpe basemeki. Luká kosala boyokani malamu elongo na bango. Kutu, soki bino mibale bobalani, bango mpe bakokóma libota na yo. Oyebi bango? Oyokanaka na bango? Joanne apesi toli ete: “Soki likoki ezali, ebongi malamu mabota mibale bákutana.” Tony alobaki lisusu ete: “Lolenge moninga na yo azalaka na libota na ye ezali lolenge oyo akozala na yo.”

Ezala ete bosololaka esika moko to na telefone mpe mikanda, kozwa bikateli ya mbangumbangu te. (Masese 21:5) Soki emonani ete libala yango ekosimba te, na yango ekozala malamu bósolola mpo na kokata boyokani yango. (Masese 22:3) Ntango mosusu ekoki kozala ete bosengeli nde na ntango mingi mpo na kosolola malamumalamu mpe na bosembo.

Koluka koyebana malamu na moto oyo azali mosika ekoki kozala mpasi, kasi ekoki mpe kozala na matomba. Ata ndenge nini, ezali likambo ya lisɛki te. Bózwa ntango mwa molai. Bóluka koyebana malamu. Na nsima, soki bozwi ekateli ya kobalana, bokomona ete ntango oyo bosalelaki mpo na koyebana ezali na motuya mingi, mpe bokoyoka mawa mpo na yango te.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu ya kozala bafianse, talá buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi, na lokasa 254 kino 260, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

[Elilingi na lokasa 15]

Bóbosana te kosolola polele mikano na bino, bana boni bokobota, mpe makambo ya mbongo na ebandeli mpenza ya boyokani na bino

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto