Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w24 Mai nk. 26-31
  • Ndenge ya kosala mpo eleko oyo bolingani esalisa mpenza

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kosala mpo eleko oyo bolingani esalisa mpenza
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MOKANO YA ELEKO OYO BATO BALINGANI
  • BÓYEKOLA KOYEBANA MALAMU
  • MAKAMBO MOSUSU YA KOKANISA
  • NDENGE NINI BASUSU BAKOKI KOSUNGA BATO OYO BALINGANI?
  • Ndenge nini okoki kozwa moto oyo akoki kokóma molongani na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Ndenge nini nakoki koluka kobala moto oyo azali mosika?
    Lamuká!—1999
  • Lolenge ya komibongisa mpo na libala oyo ekolónga
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Bikateli oyo emonisaka ete totyelaka Yehova motema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
w24 Mai nk. 26-31

LISOLO YA BOYEKOLI 22

LOYEMBO 127 Lolenge ya moto oyo nasengeli kozala

Ndenge ya kosala mpo eleko oyo bolingani esalisa mpenza

“Bomoto ya motema oyo ebombaná . . . ezali na motuya monene na miso ya Nzambe.”—1 PE. 3:4.

NA MOKUSE

Oyo ndeko mwasi ná ndeko mobali bakoki kosala mpo eleko oyo balingani esalisa mpenza, mpe ndenge bandeko mosusu na lisangá bakoki kosunga bango.

1-2. Bato mosusu bamiyokaka ndenge nini mpo na eleko oyo balinganaki?

ELEKO oyo bato balingani ekoki kozala ntango ya esengo mpenza. Soki ozali na kati ya eleko yango, na ntembe te olingi ete makambo etambola malamu. Mpe esalemaka bongo mpo na bato mingi. Tsion,a ndeko mwasi moko ya Éthiopie, alobi boye: “Moko ya bileko ya esengo mingi na bomoi na ngai ezali ntango nalinganaki na mobali na ngai. Tozalaki kosolola makambo ya ntina, kasi tozalaki mpe kosɛka. Nazalaki na esengo ntango namonaki ete nazwaki moto oyo nalingi mpe oyo alingi ngai.”

2 Nzokande, Alessio, ndeko mobali moko na Pays-Bas, alobi boye: “Ezalaki ntango ya esengo koyekola koyeba mwasi na ngai ntango tolinganaki, kasi eleko yango ezalaki mpe na mikakatano.” Na lisolo oyo, tokolobela mwa mikakatano oyo bato oyo balingani bakoki kokutana na yango mpe mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa bango mpo makambo etambola malamu. Tokotalela mpe ndenge bandeko ya lisangá bakoki kosunga bato oyo balingani.

MOKANO YA ELEKO OYO BATO BALINGANI

3. Mokano ya eleko oyo ndeko mwasi ná ndeko mobali balingani ezali nini? (Masese 20:25)

3 Atako eleko oyo ndeko mwasi mpe ndeko mobali balingani ekoki kosepelisa, ezali mpe eleko ya ntina mingi oyo ekoki komema na libala. Na mokolo ya libala na bango, mwasi ná mobali basalaka elako liboso ya Yehova ete bakolingana mpe bakopesana limemya ntango nyonso oyo bazali na bomoi. Liboso ya kosala ata elako nini, tosengeli kokanisa malamu. (Tángá Masese 20:25.) Ezali mpe bongo mpo na elako ya libala. Eleko oyo bato balingani epesaka bango nzela ya koyebana malamu mpe ya kozwa ekateli ya malamu. Ntango mosusu bakozwa ekateli ya kobalana; ntango mosusu mpe bakozwa ekateli ya kokata boyokani yango. Soki bato oyo balinganaki bakabwani, elingi koloba te ete eleko na bango ya kolingana elongi te. Ekokisi nde mokano na yango: Esalisi bango bázwa ekateli oyo ebongi.

4. Mpo na nini tosengeli kozala na makanisi malamu na oyo etali eleko oyo bato balingani?

4 Mpo na nini ezali na ntina kozala na makanisi malamu na oyo etali eleko oyo bato balingani? Monzemba oyo azali na makanisi ya malamu akokende te kolinga moto soki azali na likanisi ya libala te. Kasi, kaka minzemba te nde basengeli kozala na makanisi malamu. Biso nyonso tosengeli koyeba mokano ya eleko oyo bato balingani. Na ndakisa, bato mosusu bakanisaka ete soki bato mibale balingani, basengeli kaka kobalana. Makanisi ya ndenge wana esalaka nini epai ya minzemba? Melissa, ndeko mwasi moko na États-Unis, alobi boye: “Bato mosusu batyaka bandeko oyo balingani mpanzi likoló. Mpo na yango, bato mosusu balingaka te kokata boyokani na bango ata soki makambo ezali kotambola malamu te. Minzemba mosusu kutu baboyaka kolingana na moto. Makambo ya bongo ekoki komema mitungisi mingi.”

BÓYEKOLA KOYEBANA MALAMU

5-6. Makambo nini bato oyo balingani basengeli kosala makasi báyeba mpo na mokomoko? (1 Petro 3:4)

5 Soki olingani na moto, nini ekosalisa bino bóyeba soki bokoki kobalana to te? Bóyekola koyebana malamu. Mbala mosusu oyebaki makambo mosusu ya moto yango liboso bólingana. Kasi, sikoyo lokola bolingani, ozwi libaku ya koyekola koyeba “bomoto ya motema oyo ebombaná.” (Tángá 1 Petro 3:4.) Yango elimboli koyeba malamu elimo na ye, bomoto na ye, mpe ndenge na ye ya kokanisa. Nsima ya mikolo, osengeli kozala na likoki ya kopesa biyano na mituna lokola oyo: ‘Moto yango akozala molongani ya malamu mpo na ngai?’ (Mas. 31:​26, 27, 30; Ef. 5:33; 1 Tim. 5:8) ‘Tokokoka komoniselana bolingo mpe kotyelana likebi na ndenge oyo esengeli? Tokokoka kofanda elongo atako bolɛmbu na biso?’b (Rom. 3:23) Wana bozali koyebana, kobosana likambo oyo te: Mpo na koyeba soki ekosimba, etaleli mpenza te soki bokokani na makambo mingi, kasi nde likoki na bino ya komesana na makambo oyo ekesenisi bino.

6 Makambo nini mosusu ya moninga osengeli koyeba na eleko oyo bolingani na ye? Liboso ete motema ekende mobimba, okoki kosepela kosolola na ye makambo mosusu ya ntina, na ndakisa mikano na ye. Bongo mpo na makambo oyo etali moto ye moko, na ndakisa kolɔngɔnɔ ya nzoto na ye, makambo ya mbongo, to makambo ya mabe oyo akutaná na yango mpe ebongolá bomoto na ye? Esengeli te kosolola makambo nyonso kaka ntango bolingani sika. (Talá mpe Yoane 16:12.) Soki omoni ete okoki te kopesa biyano na makambo mosusu oyo etali yo moko kaka na ebandeli ya boyokani na bino, yebisá moninga ayeba. Atako bongo, kendekende, moto oyo akoki kokóma molongani na yo asengeli koyeba makambo yango mpo azwa ekateli oyo ebongi. Na yango, na ntango moko boye, osengeli kofungwama mpe koyebisa ye solo.

7. Bato oyo balingani bakoki kosala nini mpo báyebana? (Talá mpe etanda “Kolingana na moto na mosika.”) (Talá mpe bililingi.)

7 Ndenge nini okoki koyeba bomoto ya kati ya moto oyo bolingani na ye? Lolenge moko ya malamu ezali ya kosolola polele mpe na bosembo, kotuna mituna mpe koyoka na likebi. (Mas. 20:5; Yak. 1:19) Mpo na yango, kosala makambo mosusu oyo ekobimisa masolo ekosalisa mingi, na ndakisa kolya elongo, kotambola na bisika ya bato nyonso, mpe kobima na mosala ya kosakola elongo. Bokoki mpe koyebana wana bozali kolekisa ntango elongo na baninga mpe bato ya libota. Longola yango, bósalaka makambo oyo ekomonisa ndenge moninga amitambwisaka na mabaku ndenge na ndenge mpe ntango azali na bato ndenge na ndenge. Talá makambo oyo Aschwin, oyo afandaka na Pays-Bas, amekaki kosala. Mpo na eleko oyo balinganaki na mwasi na ye Alicia, alobi boye: “Tozalaki koluka kosala makambo oyo ekosalisa biso tóyebana. Mbala mingi ezalaki makambo ya mindɔndɔ te, na ndakisa kolamba elongo to kosukola basaani elongo. Ntango tozalaki kosala makambo yango, tomonaki makambo ya malamu mpe bolɛmbu oyo mokomoko azalaki na yango.”

Bililingi: 1. Ndeko mwasi ná ndeko mobali oyo balingani bafandi na restora mpe bazali kosolola na esengo. 2. Ndeko mwasi ná ndeko mobali mosusu oyo balingani bazali kolamba elongo na bokutani elongo na bandeko mosusu. 3. Ndeko mobali ná ndeko mwasi moko bazali kosolola na video. Bazali koyekola lisolo ya jw.org “Nakoki komizela kokutana na makambo nini na libala?​—⁠Eteni 1.” Ndeko mobali azali na Biblia liboso na ye.

Soki bozali kosala elongo makambo oyo ebimisaka masolo, ekosalisa bino bóyebana malamu koleka (Talá paragrafe 7-8)


Kolingana na moto na mosika

Soki olingani na moto oyo azali mosika, okoki kosalela makanisi mosusu ya lisolo oyo na nzela ya video to ya telefone. Bokoki kosala makasi mpo na kosololaka na bosembo mpe koyoka moninga. Nzokande, ekoki kozala mpasi koyeba makambo mosusu ya moto yango soki bolekisi ntango te na miso boye. Na yango, kende esika moninga azali soki likoki ezali. Okotalela mpe makambo mosusu. Na ndakisa: Okondima to okokoka kokende kofanda esika mosusu mpe mbala mosusu komesana na mimeseno ya sika to koyekola monɔkɔ mosusu? Ozali na mbongo ya kosala mibembo mpo na kokende kotalaka moto oyo olingani na ye, mpe ata nsima ya libala, mpo na kokende kotala bato ya libota na ye mpe baninga na ye?—Luka 14:28.

8. Matomba nini baoyo balingani bakoki kozwa soki bazali koyekola elongo?

8 Bokoki mpe koyebana malamu soki bozali koyekola makambo ya elimo elongo. Soki bobalani, ekosɛnga bózwaka ntango ya kosala losambo na kati ya libota, mpo Nzambe azala na esika ya liboso na libala na bino. (Mos. 4:12) Na yango, mpo na nini te kozwa ntango mpo na koyekola elongo banda sikoyo, na eleko oyo bolingani? Ezali solo ete bato oyo balingani basali naino libota te, mpe ndeko mobali azali naino mokonzi ya ndeko mwasi te. Atako bongo, ntango bozali koyekola elongo, bokoki koyeba soki moto na moto azali makasi na elimo to te. Max ná Laysa, oyo bafandaka na États-Unis, bamonaki litomba mosusu ya koyekola. Max alobi boye: “Kaka ntango tolinganaki sika, tobandaki koyekola mikanda oyo elobeli kolingana, libala, mpe bomoi ya libota. Mikanda yango ezalaki kotinda biso tósolola makambo mingi ya ntina oyo elingaki kobima yango moko te.”

MAKAMBO MOSUSU YA KOKANISA

9. Makambo nini bato oyo balingani basengeli kokanisa mpo báyeba soki bakoyebisa nani likambo na bango?

9 Bosengeli koyebisa nani ete bolingani? Bokoyokana bino mibale. Na ebandeli ya boyokani na bino, bokoki komona malamu bóyebisa kaka bato moke. (Mas. 17:27) Soki bosali bongo, bokoboya mitungisi mpe mituna ebele-ebele. Kasi, soki mpe boyebisi moto te, bokoki kobanda kobombanabombana mpo na kobanga ete bato bámona bino. Yango ekoki kozala likama. Yango wana ekozala likambo ya bwanya koyebisa ata baoyo bakoki kopesa bino toli ya malamu mpe kosalisa bino na makambo mosusu. (Mas. 15:22) Na ndakisa, bokoki koyebisa bato mosusu ya libota na bino, baninga oyo bakɔmɛli, to mpe bankulutu ya lisangá.

10. Bato oyo balingani bakoki kosala nini mpo bámibatela pɛto? (Masese 22:3)

10 Ndenge nini bokoki komibatela pɛto na eleko oyo bolingani? Wana bolingo na bino ezali kokola, moto na moto akobanda koyoka mposa ya moninga. Nini ekosalisa bino bóbatela bizaleli ya pɛto? (1 Ko. 6:18) Bóbɛtaka te masolo ya makambo ya mbindo, bózalaka kaka bino mibale te, mpe bóboya komɛla masanga mingi. (Ef. 5:3) Makambo wana ekoki kolamwisa bamposa ya nzoto mpe kolɛmbisa ekateli na bino ya kosala oyo ezali malamu. Ekozala likambo ya bwanya kosolola mbala na mbala mpo na bandelo oyo bokoki komityela mpo bómibatela pɛto. (Tángá Masese 22:3.) Talá likambo oyo esalisaki Dawit ná Almaz oyo bafandaka na Éthiopie. Balobi boye: “Tozalaki kolekisa ntango na bisika oyo bato bazali mingi to mpe elongo na baninga mosusu. Tozalaki kotikala kaka biso mibale te na motuka to na ndako. Na ndenge yango, toboyaki komitya na komekama.”

11. Makambo nini bato oyo balingani basengeli kotalela na oyo etali komoniselana lolango?

11 Bato oyo balingani basengeli komoniselana lolango? Bakoki kosala yango na ndenge oyo ebongi wana boyokani na bango ekoli mpenza. Nzokande, soki bamposa ya nzoto na yo ekómi makasi, ekoki kokóma mpasi mpo okanisa malamu mpo na moto oyo bolingani na ye. (Loy. 1:2; 2:6) Komoniselana lolango ekoki mpe komema noki na etamboli ya mbindo. (Mas. 6:27) Yango wana, banda na ebandeli ya boyokani na bino, bólobela bandelo oyo bokomityela, na boyokani na mitinda ya Biblia.c (1 Tes. 4:​3-7) Bino mibale bokoki komituna boye: ‘Bato ya esika oyo tofandi bakomona yango ndenge nini soki tomoniselani lolango? Makambo yango ekoki kolamwisa mposa ya nzoto epai ya moko na biso?’

12. Bato oyo balingani basengeli koyeba likambo nini na oyo etali mikakatano mpe kozanga boyokani na eleko yango?

12 Bokoki kosala nini soki bokutani na mikakatano mpe boyokani te na makambo mosusu? Soki na bantango mosusu bozali koyokana te, yango elakisi nde ete bino mibale ezali kosimba te? Ezali mpenza bongo te, mpo babalani nyonso bayokanaka te na makambo mosusu. Libala ya malamu esangisaka bato mibale oyo bakoki kosala elongo mpo na komesana na makambo oyo ekesenisi bango. Na yango, ndenge oyo bozali kosilisa mikakatano sikoyo ekoki komonisa soki bokozala na libala ya malamu to te. Bino mibale bómituna boye: ‘Tokokaka kosolola makambo na kimya mpe na limemya? Tondimaka mbala moko mabunga na biso mpe tosalaka makasi tóbongisa? Mokomoko aboyaka kotingama na makambo oyo alingi, tosɛngaka bolimbisi, mpe tolimbisaka noki?’ (Ef. 4:​31, 32) Nzokande, soki boyokanaka te ntango nyonso to boswanaka mpambampamba na eleko oyo bolingani, mbala mosusu likambo yango ekobonga te nsima ya kobalana. Soki omoni ete moto yango abongi na yo te, kokata boyokani ekozala ekateli oyo eleki malamu mpo na bino mibale.d

13. Makambo nini ekosalisa bato oyo balingani báyeba soki eleko yango esengeli koumela ntango boni?

13 Eleko oyo bato balingani esengeli koumela ntango boni? Mbala mingi kosala makambo mbangumbangu ebimisaka mbuma ya mabe. (Mas. 21:5) Na yango, eleko oyo bolingani esengeli kozala mwa molai mpo bóyebana malamu. Kasi, bosengeli mpe te kobenda yango molai kaka mpamba. Biblia elobi mpe: “Eloko ya kozelisazelisa ebɛlisaka motema.” (Mas. 13:12) Longola yango, wana eleko yango ezali kokoba, ekoki kokóma mpasi bókanga bamposa ya kosangisa nzoto. (1 Ko. 7:9) Na esika otya makanisi nyonso na ntango boni eleko oyo bolingani esengeli koumela, okoki komituna boye: ‘Nazali kozela nayeba lisusu nini oyo etali ye mpo nazwa ekateli?’

NDENGE NINI BASUSU BAKOKI KOSUNGA BATO OYO BALINGANI?

14. Ndenge nini basusu bakoki kosunga bato mibale oyo balingani? (Talá mpe elilingi.)

14 Soki toyebi bato mibale oyo balingani, ndenge nini tokoki kosalisa bango? Tokoki kobengisa bango mpo na kolya elongo, mpo na losambo na kati ya libota, to mpo na kominanola. (Rom. 12:13) Na mabaku ya ndenge wana, bakoki koyebana lisusu malamu. Bazali na mposa moto azala elongo na bango (chaperon), amema bango na motuka, to apesa bango esika oyo bakoki kososola kaka bango mibale? Soki bongo, okoki kosalisa bango na likambo yango? (Gal. 6:10) Alicia, oyo tolobelaki liboso, akanisi likambo oyo ye ná Aschwin bazalaki kosepela basusu básalela bango. Alobi boye: “Tozalaki kosepela mingi ntango bandeko bazalaki koyebisa biso ete tokoki kokende epai na bango soki tozali koluka esika ya kosolola kaka biso mibale, kasi bato bazali komona biso.” Soki bato oyo balingani basɛngi yo okende kotika bango esika moko, moná yango ete ezali libaku ya kosalisa bango. Salá makasi osundola bango kaka bango mibale te, kasi zalá mpe na bososoli mpo oyeba soki balingi kosolola makambo oyo etali kaka bango mibale.—Flp. 2:4.

Ndeko mobali ná ndeko mwasi oyo balingani bafandi kaka bango mibale ntango bazali elongo na bandeko mosusu. Bazali kosolola makambo na bango.

Soki oyebi bato mibale oyo balingani, luká ndenge ya kosunga bango (Talá paragrafe 14-15)


15. Ndenge nini baninga bakoki mpe kosalisa bato oyo balingani? (Mas. 12:18)

15 Tokoki mpe kosunga bato mibale oyo balingani na makambo oyo tozali koloba to koboya koloba. Na ntango mosusu, tosengeli koyeba komipekisa. (Tángá Masese 12:18.) Na ndakisa, tokoki koyoka mpenza mposa ya koyebisa basusu ete songolo ná mpakala balingani, kasi mbala mosusu balingi ete bango moko nde báyebisa basusu nsango yango. Tosengeli te kotɔnga bato oyo balingani to koloba mabe mpo na makambo oyo etali kaka bango moko. (Mas. 20:19; Rom. 14:10; 1 Tes. 4:11) Lisusu, mbala mosusu bato oyo balingani bakolinga te bóloba na bango makambo to bótuna bango mituna oyo ezali komonisa ete basengeli kaka kobalana. Ndeko mwasi moko na nkombo Elise ná mobali na ye balobi boye: “Tozalaki koyoka mabe soki basusu batuni biso ndenge tozali kobongisa fɛti ya libala nzokande biso moko tolobelaki yango naino te.”

16. Tosengeli kosala nini soki bato mibale oyo balinganaki bakati boyokani na bango?

16 Bongo soki bandeko yango bamoni malamu bákata boyokani na bango? Tosengeli koboya kokɔta na likambo yango to kokɔtela moto moko. (1 Pe. 4:15) Ndeko mwasi moko na nkombo Lea alobi boye: “Nayokaki ete bato bazalaki kobimisa makanisi ndenge na ndenge mpo na ntina oyo naboyanaki na ndeko mobali moko. Esalaki ngai mpasi mpenza.” Ndenge tolobaki yango liboso, soki bato bakabwani, elingi koloba te ete bazwi ekateli ya mabe. Mbala mingi, emonisaka kaka ete eleko yango ekokisi mokano na yango: esalisi bato oyo balinganaki bázwa ekateli oyo ebongi. Kasi, ekateli yango ekoki kaka kosala bango mpasi mpe ekoki kosala ete bámiyoka ete bazali kaka bango moko. Yango wana, malamu tóluka ndenge ya kosunga bango.—Mas. 17:17.

17. Bato oyo balingani basengeli kokoba kosala nini?

17 Ndenge tomoni yango, eleko ya kolingana ekoki kozala na mikakatano, kasi ekoki kozala mpe eleko ya esengo. Jessica alobi boye: “Mpo na koloba solo, eleko oyo tolinganaki ezalaki na makambo mingi. Kasi tosalaki malamu ndenge topesaki yango ntango mpe makasi na biso.” Soki bolingani na moto sikoyo, bókoba kosala makasi bóyebana malamu. Soki bosali bongo, makambo na bino ekotambola malamu, mpe ekosalisa bino bózwa ekateli ya bwanya.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Mokano ya eleko oyo bato balingani ezali nini?

  • Ndenge nini bato oyo balingani bakoki koyebana malamu?

  • Ndenge nini basusu na lisangá bakoki kosunga bato oyo balingani?

LOYEMBO 49 Tósepelisa motema ya Yehova

a Topesi bango bankombo mosusu.

b Mpo omona mituna mosusu, talá Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2, nk. 39-40.

c Kosimbasimba binama ya kobotela ya moto mosusu ezali lolenge moko ya pite, mpe esɛngaka ete bankulutu básala komite ya kosambisa. Kosimbasimba to kofina moto mabɛlɛ to kosolola masolo ya mbindo na bamesaje to na telefone ekoki mpe kosɛnga kosala komite ya kosambisa, na kotalela ndenge makambo ezali.

d Mpo na koyeba makambo mosusu, talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/08/1999.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto