LISOLO YA BOYEKOLI 21
LOYEMBO 107 Ndakisa ya bolingo ya Nzambe
Ndenge ya kozwa moto oyo akoki kokóma molongani na yo
“Nani akoki kozwa mwasi ya malonga? Motuya na ye eleki mosika oyo ya mabanga kitoko ya korai.”—MAS. 31:10.
NA MOKUSE
Mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa moto azwa molongani oyo abongi mpe ndenge oyo bandeko mosusu na lisangá bakoki kosunga minzemba oyo bazali na mposa ya kobala.
1-2. (a) Makambo nini bakristo oyo bazali minzemba basengeli kokokisa liboso ya kolingana na moto? (b) Mpo na biso, “kolingana na moto” elakisi nini? (Talá “Ndimbola ya maloba.”)
OZALI na mposa ya kobala? Bandeko mingi ya minzemba, bázala bilenge to mikóló, balukaka moto oyo akoki kokóma molongani na bango, atako libala kaka te nde epesaka esengo. Ya solo, liboso ya kolingana na moto, osengeli kozala na boyokani malamu na Yehova, kokɔmɛla na makanisi, mpe kozala na makoki to mbongo mpo na kokokisa mikumba ya libala.a (1 Ko. 7:36) Soki okokisi makambo yango, ekoki kosalisa yo ozala na libala ya malamu.
2 Kasi, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te kozwa molongani oyo abongi. (Mas. 31:10) Mpe ata ntango omoni moto oyo okosepela bóyebana na ye malamu, ntango mosusu ekozala pɛtɛɛ te mpo bólingana.b Na lisolo oyo, tokolobela makambo oyo ekoki kosalisa mokristo oyo azali monzemba azwa moto oyo akoki kokóma molongani na ye mpe bálingana. Tokotalela mpe ndenge oyo bandeko mosusu na lisangá bakoki kosunga baoyo bazali na mposa ya kobala.
NDENGE YA KOZWA MOLONGANI OYO ABONGI NA YO
3. Makambo nini mokristo oyo azali monzemba asengeli kotalela ntango azali koluka molongani?
3 Soki ozali na mposa ya kobala, eleki malamu oyeba bizaleli nini osepelaka kokuta epai ya molongani liboso ete olingana na moto.c Soki oyebi yango te, okoki kolekisa moto oyo akokaki kokóma molongani na yo, to okoki kolingana na moto oyo abongi na yo te. Tóbosana te, moto nyonso oyo akoki kokóma molongani na yo asengeli kozala mokristo oyo azwá batisimo. (1 Ko. 7:39) Kasi, ezali te moto nyonso oyo azwá batisimo nde akozala molongani ya malamu mpo na yo. Na yango, okoki komituna boye: ‘Mikano nini nazalaka na yango? Bizaleli nini namonaka ete molongani na ngai asengeli kozala na yango? Makambo oyo nalukaka ezali na bokatikati?’
4. Makambo nini bandeko mosusu bakɔtisaka na mabondeli na bango?
4 Soki ozali na mposa ya kozwa molongani, na ntembe te osili kobondela mpo na yango. (Flp. 4:6) Ya solo, Yehova alaki te kopesa basaleli na ye molongani. Atako bongo, atyaka likebi na mposa na yo mpe mayoki na yo, mpe akoki kosalisa yo ntango ozali koluka moto oyo akoki kokóma molongani na yo. Na yango, kobá koyebisa ye mposa na yo mpe ndenge oyo ozali komiyoka. (Nz. 62:8) Sɛngá ye apesa yo motema molai mpe bwanya. (Yak. 1:5) Ndeko moko ya monzemba na nkombo John,d oyo afandaka na États-Unis, alobeli makambo oyo akɔtisaka na mabondeli na ye; alobi boye: “Nayebisaka Yehova bizaleli oyo nalingaka kokuta epai ya molongani. Nabondelaka ye apesa ngai mabaku ya kokutana na mwasi oyo nakoki kobala. Nabondelaka ye mpe asalisa ngai nakolisa bizaleli oyo ekosalisa ngai nazala mobali ya malamu.” Tanya, ndeko moko ya Sri Lanka, alobi boye: “Wana nazali koluka moto oyo akoki kokóma mobali na ngai, nasɛngaka Yehova asalisa ngai natikala sembo, nabatela makanisi ya malamu, mpe nazala na esengo.” Ata soki ozwi mbala moko te moto oyo akoki kokóma molongani na yo, Yehova alaki ete akokoba kolinga yo mpe kotyela yo likebi na ndenge oyo esengeli.—Nz. 55:22.
5. Na mabaku nini bakristo ya minzemba bakoki kokutana na moto oyo alingaka Yehova? (1 Bakorinti 15:58) (Talá mpe elilingi.)
5 Biblia elendisi biso tózala na “mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.” (Tángá 1 Bakorinti 15:58.) Soki omipesi na mosala ya Yehova mpe ozali kolekisa ntango elongo na bandeko ndenge na ndenge, baninga yango ya malamu bakolendisa yo, kasi okozala mpe na mabaku ya kokutana na bandeko mosusu ya minzemba, oyo lokola yo, batye makanisi na mosala ya Yehova. Mpe wana ozali kosala oyo okoki mpo na kosepelisa Yehova, okozala na esengo ya solosolo.
Soki omipesi na mosala ya Yehova mpe ozali kolekisa ntango na bandeko ndenge na ndenge, okoki kokutana na bato oyo bazali mpe na mposa ya kobala (Talá paragrafe 5)
6. Ntango mokristo oyo azali monzemba azali koluka molongani, likambo nini asengeli kobosana te?
6 Kasi, zalá ekɛngɛ: Kotika te ete koluka molongani elya yo nzoto. (Flp. 1:10) Esengo ya solosolo etaleli te soki ozali monzemba to obalá, etaleli nde boyokani na yo na Yehova. (Mat. 5:3) Mpe wana ozali monzemba, okoki kozala na ntango mingi mpo na komipesa na mosala ya kosakola. (1 Ko. 7:32, 33) Salelá ntango na yo malamu. Jessica, ndeko mwasi moko ya États-Unis, oyo abalaki na mbula pene na 40, alobi boye: “Namipesaki na mosala ya kosakola, mpe yango esalisaki ngai nabatela esengo na ngai atako nazalaki na mposa ya libala.”
ZWÁ NTANGO YA KOTALELA MOTO
7. Mpo na nini ezali likambo ya bwanya kotalela moto mpo na mwa ntango liboso ya koyebisa ye ete osepeli na ye? (Masese 13:16)
7 Okosala nini soki okanisi ete moto moko akoki kozala molongani oyo abongi mpo na yo? Osengeli kokende mbala moko koyebisa moto yango ete olingi ye? Biblia elobi ete moto ya bwanya azwaka naino boyebi liboso ya kosala likambo. (Tángá Masese 13:16.) Na yango, ekozala likambo ya bwanya kotalela naino moto na mayele mpo na mwa ntango liboso oyebisa ye ete osepeli na ye. Ndeko Aschwin oyo afandaka na Pays-Bas alobi boye: “Mayoki ekoki kokola nokinoki, kasi esilaka mpe nokinoki. Na yango, soki ozwi ntango ya kotalela moto, okokende kolinga ye ngulungulu te.” Longola yango, soki ozwi ntango ya kotalela moto, mbala mosusu okomona ete akozala molongani ya malamu te mpo na yo.
8. Ndenge nini moto oyo azali monzemba akoki kotalela moto oyo akoki kokóma molongani na ye? (Talá mpe elilingi.)
8 Ndenge nini okoki kotalela moto na mayele? Na makita ya lisangá to ntango bozali kolekisa ntango elongo na baninga, okoki komona makambo oyo ekosalisa yo oyeba elimo ya moto yango, bomoto na ye, mpe bizaleli na ye. Baninga na ye ezali banani, mpe alobelaka makambo nini? (Luka 6:45) Mikano na ye ekokani na oyo ya yo? Okoki mpe kotuna bankulutu ya lisangá na bango to bakristo mosusu oyo bakɔmɛli, oyo bayebi ye malamu. (Mas. 20:18) Okoki kotuna ndenge oyo moto yango ayebani mpe bizaleli na ye. (Ruta 2:11) Wana ozali kotalela moto yango, kebá ete otya ye mpanzi likoló te. Monisá limemya mpo na mayoki na ye, komikɔtisa na makambo na ye te, mpe kolandelalandela ye te.
Liboso oyebisa moto ete osepeli na ye, talelá ye na mayele mpo na mwa ntango (Talá paragrafe 7-8)
9. Liboso osolola na moto oyo osepeli na ye, osengeli komindimisa likambo nini?
9 Ntango boni osengeli kotalela moto liboso oyebisa ye ete osepeli na ye? Soki osololi na ye mbangumbangu, ekobima lokola osalaka makambo kozanga kokanisa. (Mas. 29:20) Kasi, soki mpe oumeli mingi mpo na kosolola na ye, ekobima lokola ozali kobanga, mingimingi soki moto yango amonaka ete osepelaka na ye. (Mos. 11:4) Kobosana te, liboso okende kosolola na moto, esɛngi te omindimisa mpenza ete okobala ye. Osengeli nde komindimisa ete okoki mpo na kobala mpe ete moto yango akoki kozala molongani oyo abongi na yo.
10. Osengeli kosala nini soki omoni ete moto moko azali kosepela na yo kasi yo ozali kosepela na ye te?
10 Kasi, okosala nini soki omoni ete moto moko azali kosepela na yo? Soki yo ozali kosepela na ye te, meká komonisa yango polele na misala na yo. Ekozala malamu te kotinda moto akanisa ete ntango mosusu okoki kondima kolingana na ye, nzokande ezali bongo te.—1 Ko. 10:24; Ef. 4:25.
11. Soki basɛngi yo osalisa bato bálingana to bábalana, makambo nini osengeli kobatela na makanisi?
11 Na mikili mosusu, baboti to mikóló mosusu nde baponelaka mwana na bango molongani. Na bisika mosusu, libota to baninga nde bazwaka moto oyo akoki kokóma molongani ya ndeko na bango mpe na nsima bazwaka bibongiseli mpo mwana mwasi ná mwana mobali yango bákutana mpo bátala soki bakoki kolingana. Soki basɛngi yo osalisa bato bálingana to bábalana, luká koyeba soki mwana mwasi alingaka nini mpe mwana mobali alingaka nini. Soki omoni moto oyo akosimba mpo na ye, salá mpenza bolukiluki mpo na koyeba bomoto ya moto yango, bizaleli na ye, mpe koleka nyonso, elimo na ye. Kozala na boyokani malamu na Yehova ezali na ntina mingi mpenza koleka mbongo, kelasi oyo moto atángá, to lokumu oyo azali na yango na mokili. Kasi, kobosana te ete na nsuka, ndeko mobali to ndeko mwasi ya monzemba nde asengeli kozwa ekateli ya kobala ye to te.—Gal. 6:5.
NDENGE YA KOLINGANA NA MOTO
12. Soki osepeli kolingana na moto moko, ndenge nini okoyebisa ye makanisi na yo?
12 Soki olingi kolingana na moto moko, ndenge nini okoki koyebisa ye ete osepeli na ye?e Okoki kozwa bibongiseli mpo osolola na moto yango, ezala na miso boye to na telefone. Yebisá ye makanisi na yo polele. (1 Ko. 14:9) Soki esengeli, tikelá ye ntango ya kokanisa liboso apesa yo eyano. (Mas. 15:28) Mpe soki moto yango asepeli te ete bólingana, tosá ekateli na ye.
13. Okoki kosala nini soki ndeko moko ayebisi yo ete asepeli na yo? (Bakolose 4:6)
13 Soki yo nde ndeko moko ayebisi yo ete asepeli na yo, okosala nini? Na ntembe te esɛngaki mpiko mpo moto yango aya kosolola na yo, na yango zalá na boboto mpe na limemya. (Tángá Bakolose 4:6.) Soki esɛngi atikela yo ntango mpo okanisa soki okondima kolingana na ye, yebisá ye yango. Kasi, salá makasi oumela te mpo na kopesa eyano. (Mas. 13:12) Soki osepeli te kolingana na ye, yebisá ye yango na boboto mpe polele. Talá ndenge Hans, ndeko mobali moko ya Autriche, asalaki ntango ndeko mwasi moko ayebisaki ye ete asepeli na ye; alobi: “Nayebisaki ye ekateli na ngai na boboto kasi polele. Nasalaki yango mbala moko mpo nalingaki te kopesa ye elikya ya lokuta. Kaka mpo na ntina yango, nazalaki kokeba na ndenge na ngai ya kosolola na ye mpo amona te ete nakoki kobongola makanisi.” Kasi, soki osepeli kolingana na moto yango, yebisá ye mayoki na yo mpe ndenge olingi ete makambo etambola. Mbala mosusu oyo yo olingi ekeseni na mposa na ye, na kotalela mimeseno na bino to makambo mosusu.
NDENGE OYO BASUSU BAKOKI KOSUNGA BAKRISTO OYO BAZALI MINZEMBA
14. Na maloba na biso, ndenge nini tokoki kosunga bandeko oyo bazali minzemba?
14 Ndenge nini biso nyonso tokoki kosunga bakristo oyo bazali na mposa ya kobala? Lolenge moko ya kosala ezali ya kokeba na makambo oyo tozali koloba. (Ef. 4:29) Tokoki komituna boye: ‘Natumolaka baoyo bazalaka na mposa ya kobala? Ntango namoni ndeko mobali moko ya monzemba ná ndeko mwasi ya monzemba bazali kosolola, nakanisaka mbala moko ete balingani?’ (1 Tim. 5:13) Longola yango, tosengeli ata moke te kotinda bakristo oyo bazali minzemba bámiyoka lokola nde bazangi eloko moko mpo babali te. Hans, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Bandeko mosusu balobaka: ‘Mpo na nini ozali kobala te? Ozali lisusu mwana moke te.’ Maloba ya ndenge wana etindaka minzemba bámiyoka lokola bato basepelaka na bango te mpe ekoki kotya bango mpanzi likoló ete bábala kaka.” Ekoleka malamu tólukaka mabaku ya kopesa bakristo oyo bazali minzemba longonya!—1 Tes. 5:11.
15. (a) Na kolanda etinda oyo ezali na Baroma 15:2, tosengeli kotalela nini liboso ya kosalisa moto azwa molongani? (Talá mpe elilingi.) (b) Mateya nini ya ntina ozwi na video?
15 Bongo soki ozali komona ete ekosimba soki ndeko songolo abalani na ndeko mpakala? Biblia eyebisi biso ete tótalelaka mayoki ya basusu. (Tángá Baroma 15:2.) Bandeko mingi ya minzemba balingaka te moto alakisa bango moto oyo bakoki kobalana na ye, mpe tosengeli komemya makanisi na bango. (2 Tes. 3:11) Basusu bakoki kondima lisalisi ya bongo, kasi tosengeli kosala yango kaka soki basɛngi biso.f (Mas. 3:27) Bandeko mosusu ya minzemba balingaka ete bálakisa bango moto na ndenge ya mayele. Lydia, ndeko mwasi moko ya monzemba na Allemagne, alobi boye: “Okoki kobengisa ndeko mobali ná ndeko mwasi elongo na bandeko mosusu ebele. Pesá kaka ndeko mobali ná ndeko mwasi yango libaku ya kokutana mpe tiká bango moko bátala oyo bakosala.”
Bokutani ya bandeko ebele epesaka minzemba libaku ya kokutana (Talá paragrafe 15)
16. Bakristo ya minzemba basengeli te kobosana likambo nini?
16 Biso nyonso, tózala minzemba to tobalá, tokoki kozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo! (Nz. 128:1) Na yango, soki ozali na mposa ya kobala kasi ozwi naino moto te, kobá kotya makanisi na mosala ya Yehova. Ndeko mwasi Sin Yin oyo afandaka na etúká ya Macao (na Chine) alobi boye: “Soki okanisi ntango oyo okolekisa na molongani na yo na Paradiso, okomona ete ntango oyo ozali monzemba ezali mokuse. Zwá ntango yango na motuya mingi mpe salelá yango malamu.” Kasi, okosala nini soki ozwi moto oyo akoki kokóma molongani na yo mpe bolingani? Na lisolo oyo elandi, tokolobela oyo bokoki kosala mpo eleko oyo bolingani esalisa mpenza.
LOYEMBO 137 Basi ya sembo, basi bakristo
a Mpo na koyeba soki okoki kobanda kolinga, talá na jw.org lisolo “Kolingana na moto—Eteni 1: Nakoki mpo na kolingana na moto?”
b NDIMBOLA YA MALOBA: Na lisolo oyo mpe na lisolo oyo elandi, maloba “kolingana na moto” (fréquentations) emonisi eleko oyo mwasi ná mobali bazali koyebana malamu mpo bátala soki ekosimba ete bábalana. Na mikili mosusu, babengaka yango kolinga, koyekola koyeba moto, to eleko oyo ezalaka liboso ya “kangá-lopango.” Eleko ya kolingana na moto ebandaka ntango mwasi ná mobali balobani polele ete basepelani, mpe ekobaka tii ntango bakomonisa polele ete bazwi mpenza ekateli ya kobalana to ya kokabwana.
c Na lisolo oyo ntango tozali kolobela moto oyo azali koluka molongani, tozali kolobela bandeko mibali, kasi mitinda yango etali mpe bandeko basi oyo bazali koluka molongani.
d Topesi bango bankombo mosusu.
e Na mimeseno mosusu, mbala mingi ndeko mobali nde akendaka kolinga ndeko mwasi. Kasi, ezali mpe mabe te soki ndeko mwasi aponi kokende kosolola na ndeko mobali. (Ruta 3:1-13) Mpo na koyeba makambo mosusu, Talá lisolo “Les jeunes s’interrogent . . . Comment lui dire ce que je ressens pour lui ?” na Lamuká! ya 22/10/2004, na Français.
f Talá na jw.org video Bazali kolonga etumba mpo na kondima—Bakristo oyo bazali minzemba.