Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g99 Octobre nk. 16-19
  • Nkisi ya kosilisa maladi ya ntolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkisi ya kosilisa maladi ya ntolo
  • Lamuká!—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Elikya ezali
  • Wapi matomba na yango?
  • Matomba ya DOTS ezali ya kokamwa te—Kasi ezali nde bokoli
  • Bolongi mpe mawa
    Lamuká!—1998
  • Mwango ya kosilisa maladi yango na mokili mobimba: Ekoki kozwama?
    Lamuká!—1998
  • Maladi ya ntolo ezali koboma bato lolenge moko na bitumba
    Lamuká!—1998
  • Makambo oyo esakolamaki mpo na ntango na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Lamuká!—1999
g99 Octobre nk. 16-19

Nkisi ya kosilisa maladi ya ntolo

Maladi ya ntolo (tuberculose) ezali moko ya maladi ya kalakala oyo ebomaka, mpe ezali naino kotungisa bato. Na yango, Organisation mondiale de la santé (OMS) ekokanisaki maladi yango na bombe oyo epanzani naino te. Lapolo moko ya OMS mpo na maladi ya ntolo ekebisaki bato na maloba oyo: “Tozali na ntango ya kobungisa te.” Soki bato bakokoka kofungola bombe yango te, mokolo mosusu maladi moko ekobima, ekozala na nkisi te mpo na kosilisa yango, mpe bato “bakozwa yango na mpema mpe bakokoka kobikisama te ndenge moko na sida.” OMS eyebisi ete, oyo ezali ntango ya kokeba mpamba te maladi ya ntolo ezali kopalangana mingi mpenza. “Moto nyonso oyo azali kopema mopɛpɛ, kobanda na Wall Street kino na Efelo Monene (Grande Muraille) ya Chine . . . , asengeli kobanga noki akozwa maladi yango.”

Likanisi yango eleki ndelo? Soko moke te. Kanisá ete maladi moko ebimi mpe ekoki kosilisa bato nyonso ya ekólo Canada na mbula zomi. Bato bakosala milende nokinoki mpo na kosilisa maladi yango, boye te? Soki yango ezali kobangisa, esengeli koyeba ete likama ezali mpenza. Na mokili mobimba, maladi ya ntolo ezali koboma bato 8000 mokolo na mokolo; koleka bato nyonso oyo bazali kokufa mokolo na mokolo na sida, na malaria, mpe na maladi mosusu ya mikili ya molunge. Bato soko milio 20 bazali kobɛla maladi ya ntolo, mpe bato soko milio 30 bakoki kokufa na maladi yango na boumeli ya mbula zomi oyo ezali koya—motángo yango eleki bafandi nyonso ya ekólo Canada.​—Talá etanda “Maladi ya ntolo epalangani na mokili mobimba,” na lokasa oyo elandi.

Elikya ezali

Nzokande, lelo elikya ezali. Nsima ya kosala bolukiluki na boumeli ya mbula zomi, balukiluki babimisi lolenge moko ya kosalisa oyo ekosala ete bato bákufa lisusu mingi te na maladi yango. Monganga Hiroshi Nakajima, mokambi ya kala ya OMS, alobaki ete: “Tozwi mpenza nzela na makambo ya kolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato lokola yango esalemaki na boumeli ya mbula zomi oyo.” Monganga Arata Kochi, mokambi ya oyo babéngi Programme mondial de lutte contre la tuberculose na OMS alobi ete mpo na mbala ya liboso tozwi ndenge ya “kobundisa maladi ya ntolo.” Mpo na nini elikya malamu boye? Mpo na lolenge ya kosalisa oyo babéngi DOTS.

DOTS euti na Lingelesi (directly observed treatment, short-course) elingi koloba kozwa nkisi na mikolo moke mpe na ntango yango minganga bazali kolandela yo malamumalamu. Ezali lolenge ya kosalisa oyo ezali kopesa nzela na kobikisa bato ya maladi ya ntolo mingi na boumeli ya sanza motoba kino sanza mwambe kozanga ete moto oyo azali na maladi yango akɔta lopitalo ata mokolo moko. Lolenge yango ya lisalisi esɛngi makambo mitano. OMS elobi ete, soki likambo moko esalelami te, likoki ya kobikisa moto ya maladi yango “ekobunga.” Wapi makambo yango mitano?

● 1. Koyeba mpenza bato oyo bazali na maladi yango: Maladi ya ntolo oyo ezali na likama koleka ezali oyo basali ekzamɛ na yango te. OMS esɛngi na minganga bátya milende na bango liboso mpo na koyeba bato oyo bazali na maladi yango.

● 2. Kolandela bato ya maladi: Likambo ya mibale ya kosalisama na DOTS etaleli misala ya minganga mpe bato mosusu oyo basalaka mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato—kasi moto ya maladi te. Mpo na koyeba ete bato ya maladi bazali komela nkisi nyonso oyo bakomeli bango, minganga to bato mosusu oyo babongisami, na ndakisa, bato ya mombongo, balakisi, to bato oyo bazalaki na maladi ya ntolo kala, basengeli koyeba ndenge ya kopesa nkisi yango mpe kolandela bato ya maladi yango ndenge bazali komela nkisi nyonso. “Bato yango” bazali na mokumba monene mpamba te ntina monene oyo maladi ya ntolo ekómi lelo ezali ete bato ya maladi yango bakataka noki mpenza komela bankisi na bango. (Talá etanda “Mpo na nini maladi yango ezongi lisusu makasi?,” na lokasa 17.) Nsima ya komela nkisi na boumeli ya mwa bapɔsɔ, ntango bayoki mwa malamu, bakataka komela yango. Nzokande, mpo na koboma mikrobe nyonso ya maladi ya ntolo, esengeli komela nkisi na boumeli ya sanza motoba kino sanza mwambe.

● 3. Ndenge ya kopesa nkisi: Na boumeli ya sanza yango motoba to mwambe bato oyo basalaka mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato, bakotala malamu soki nkisi oyo moto azali komela ezali mpenza kosalisa ye mpe bakokoma mbongwana oyo ezali komonana. Na ndenge wana, bakomindimisa ete moto ya maladi yango abiki mpenza mpe akoki te kopalanganisa maladi yango epai ya bato mosusu.

● 4. Eleko mokuse: Minganga basangisaka nkisi ndenge na ndenge mpo na kopesa moto ya maladi mpe yango ekosalema bongo na ntango mokuse. Babéngaka yango chimiothérapie. Bankisi yango oyo esangisami ebomaka noki mpenza mikrobe ya maladi ya ntolo.a Esengeli kokeba ntango nyonso ete bankisi yango ezala mpo ete ntango oyo bayebisaki moto ya maladi amela nkisi eleka te.

● 5. !: OMS ezali kolobela makasi likambo ya mitano ya kosalisama na DOTS. Yango esɛngaka mbongo. OMS ezali kosɛnga ete minganga báluka mbongo epai ya bakonzi ya Leta mpe epai ya masangá oyo epesaka mbongo mpe básala ete misala ya minganga oyo ezali koluka nkisi mpo na kosilisa maladi ya ntolo ekɔta na programe mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato na bikólo na bango.

Kosalisama na DOTS esengeli mpenza kosimbama na masangá minene ya mokili oyo epesaka mbongo. Banque mondiale emonisi ete soki babimisi mbongo mpo na DOTS, “mbongo yango ekosala mosala malamu koleka mbongo nyonso oyo ebimaka mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato . . . ” OMS ekanisi ete na mikili ya bobola makasi mpenza, dolare 100 ekoki mpo na kosalisa moto moko ya maladi ya ntolo. “Na mikili ya bobola, yango elekaka mpenza te santime 10 na mbongo ya États-Unis mpo na moto moko mpe yango ekoki kozwama ata soki nkita ezali mabe koleka.” Nzokande, mbongo yango atako ezali moke ekoki kobimisa matomba mingi.

Wapi matomba na yango?

Na sanza ya Marsi 1997, bamonisi ya OMS balobaki ete uta babandá kosalisa na DOTS “maladi ya ntolo ezali mpenza kopalangana te ndenge ezalaki kosalema na boumeli ya bambula mingi.” “Na bipai oyo minganga basalelaki DOTS, bato oyo babiki bakómi mingi.” Kosalela DOTS na bisika oyo maladi ya ntolo epalangani mingi emonisi ete mwango yango ezali kobimisa matomba mingi mpenza. Tótalela mwa makambo mosusu OMS alobi mpo na komonisa matomba ya DOTS.

Na ekólo Inde, “basalelaki DOTS na bamboka oyo ezali na bato koleka milio 12. . . . Kati na bato ya maladi mitano, minei babikaki.” Na programe moko oyo esalemaki mpo na kosalisa bato milio moko oyo bazalaki na maladi ya ntolo na DOTS na ekólo Bangladesh, “bato mingi (87 %) [oyo bazalaki na maladi yango] babikaki.” Na esanga moko ya ekólo Indonésie, “bato 9 likoló ya zomi oyo bazalaki na maladi yango babiki” ntango basalelaki DOTS. Na ekólo Chine, programe yango “elongi mpenza na ndenge ya kokamwa,” bato 94 likoló ya monkama babikaki na lisalisi yango. Na engumba moko ya Afrique du Sud, “bato [ya maladi ya ntolo] koleka 80 likoló ya monkama basalisi bango malamu.” Eleki mikolo mingi te, basalelaki mpe DOTS na engumba New York, ebimisaki matomba malamu mpenza.

Monganga Kochi alobi ete matomba ya DOTS ndenge esalelami kati na bikoló ezali komonisa ete “ekoki kosalelama bipai nyonso mpe kobikisa bato 85 likoló ya monkama to koleka.”

Matomba ya DOTS ezali ya kokamwa te—Kasi ezali nde bokoli

Koyeba ete DOTS ezali mpenza kopesa likoki ya kosilisa moko ya maladi oyo ezali koboma bato mingi koleka, bato bakolinga ete esalema mpenza. Momonisi moko ya OMS alobi ete, “Kasi, tozali kokamwa ete bobele bikoló moke nde ezali koluka kosalisa maladi ya ntolo ndenge elimbolami na OMS, ezali na matomba mpe ezali kosɛnga mbongo mingi te.” Ya solo, na ebandeli ya mobu 1996, bobele bikólo 34 esalelaki DOTS na bikólo na bango mobimba.

Atako bongo, bokoli ezali kosalema. Liboso ya mobu 1993, ntango OMS eyebisaki ete maladi ya ntolo ezali kopalangana, bobele moto ya maladi ya ntolo moko kati na bato 50 nde asalisamaki na DOTS. Lelo oyo, moto moko kati na bato 10 azali kosalisama na yango. Na 1998, bikólo soko 98 esalelaki DOTS. Soki DOTS esalelami na bikólo mingi, ‘na boumeli ya mbula zomi oyo ekolanda, bato mingi’ bakozwa lisusu te maladi yango ya ntolo oyo ezali kozwa bato mbula na mbula. Monganga Kochi alobi ete: “Tozali na lolenge ya kosalisama oyo endimami mpe esɛngi bobele kosalela yango mingi.”

Lokola bato bazali na boyebi mpe na bisaleli oyo ebongi mpo na kobunda na maladi ya ntolo, bazali kozanga bobele ‘bato oyo bakosala ete bankisi yango esalelama na mokili mobimba.’ Likambo ya kokamwa ezali te na komona ete kati na buku moko oyo ebimisamaki mpo na minganga mpe bato mosusu oyo basalaka mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato na mokili mobimba, OMS atuni ete: “Mpo na nini tozali kozela kosalela bisaleli yango?”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Kati na bankisi yango ezali na oyo babéngi isoniazide, rifampicine, pyrazinamide, streptomycine mpe éthambutol.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 16]

Na segɔndɛ mokomoko, moto moko na mokili azali kozwa maladi ya ntolo

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 16]

‘Bankisi ya malamu elali na farmasi kasi bamilio ya bato bazali kokufa.’—Monganga Arata Kochi

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 18]

“Kosalisama na DOTS ezali nzela oyo emonani ete eleki ntina na makambo ya kolɔngɔnɔ ya nzoto bato na boumeli ya mbula zomi oyo.”​—Liyebisi ya zulunalo ya OMS

[Etanda na lokasa 17]

Mpo na nini maladi yango—Ezongi lisusu makasi?

Nkisi mpo na kosalisa maladi ya ntolo ezwamaki esili koleka mbula ntuku minei. Uta ntango wana, bato koleka milio 120 bakufi na maladi ya ntolo, mpe maladi yango ekoboma lisusu bato milio misato na mobu oyo. Mpo na nini bato mingi mpenza bazali kokufa na maladi ya ntolo atako nkisi mpo na kosalisa yango ezali? Bantina ezali misato: bato bazali kotyela yango likebi te, mikrobe ya sida, mpe mikrobe ya maladi ya ntolo oyo ezali kokufa noki te na nkisi.

Bato bazali kotyela yango likebi te. Mokili etii miso likoló ya maladi lokola sida mpe Ebola. Nzokande, na 1995, soki moto moko akufaki na Ebola, bato 12000 bakufaki na maladi ya ntolo. Na yango, na mikili ya bobola, maladi ya ntolo epalangani mpenza mpe bato bameseni na yango. Nzokande, na mikili ya bozwi, bato bazali kotikela maladi yango nzela epalangana atako nkisi ya kosilisa yango ezali na farmasi. Lokola bazali kotyela yango likebi te, ezali libunga moko monene mpenza. Wana mokili ezalaki lisusu kotalela mpenza te maladi ya ntolo, mikrobe na yango ezalaki kokóma makasi koleka. Lelo oyo, mikrobe yango ezali kozwa bato na bikólo mingi koleka bantango mosusu nyonso.

Mikrobe ya sida. Mbala mingi maladi ya ntolo etambolaka nzela moko na mirobe ya sida. Moto oyo azali na mikrobe ya sida azali na likama mbala 30 ya kozwa maladi ya ntolo koleka moto oyo ebongiseli ya nzoto oyo ebundisaka mikrobe elɛmbi te na mikrobe ya sida. Likambo ya kokamwa ezali te ete kopalangana ya mikrobe ya sida na mokili mobimba epesi nzela ete bato ya maladi ya ntolo bákóma mpe mingi! Ekanisami ete bato 266000 oyo bazalaki na mikrobe ya sida bakufaki na maladi ya ntolo na 1997. Peter Piot, mokambi ya Onusida alobi ete: “Ezali bato oyo bazalaki na likoki te ya kosomba bankisi oyo basengelaki na yango mpo na komisalisa na maladi ya ntolo.”

Mikrobe ya maladi ya ntolo oyo ekufaka noki te na nkisi. “Bato bakanisaki ete mikrobe ya makasi,” oyo ekoki kokufa noki te na nkisi ya makasi, ekoki kozala te, kasi mpo na maladi ya ntolo, mikrobe yango ezali. Bato koleka milio 50 bazali konyokwama na mikrobe ya maladi ya ntolo oyo ekufaka noki te na nkisi. Bato yango bango oyo: baoyo bakataka komela bankisi na bango na nsima ya mwa bapɔsɔ mpo bamiyoki malamu, to mpo bazali lisusu kozwa bankisi yango te, to mpo bato batalelaka bankisi ya maladi ya ntolo na lolenge mabe, mpe balobaka ete ebomaka mikrobe nyonso te oyo ezali na kati ya nzoto. Na ekólo moko ya Azia, bato mibale ya maladi ya ntolo kati na bato misato bakataka komela nkisi. Soki maladi yango ezongi lisusu, ekoki kokóma mpasi mpo na kosalisa yango mpamba te mikrobe oyo ebiki ezalaka makasi mpe ekufaka na nkisi noki mpenza te. Na yango, bato ya maladi yango bakómaka na maladi ya ntolo oyo ekoki kosila te —mpo na bango moko mpe mpo na moto nyonso oyo akozwa yango. Mpe lokola mikrobe ya maladi yango oyo ekufaka na nkisi noki mpenza te ezali kopalangana, totikali na motuna oyo: Moto akokoka kosilisa maladi yango?

[Etanda na lokasa 17]

Maladi ya ntolo—epalangani na mokili mobimba

Mbula na mbula, maladi ya ntolo ezali se kopalangana, ezali kosɛnga mbongo mingi mpe ezali koboma bato mingi koleka. Balapolo oyo esangisami na OMS ezali kosalisa mpo na koyeba ndenge maladi yango ezali koboma bato. Talá mwa bandakisa oyo: “Pakistan elongi te kosilisa maladi ya ntolo.” “Maladi ya ntolo ezongi lisusu makasi na Thaïlande.” “Lelo oyo, na Brésil, maladi ya ntolo ezali kati na molɔngɔ ya maladi oyo ezali koboma bato mingi koleka.” “Maladi ya ntolo ezali ntango nyonso kotungisa bato na Mexique.” Na Russie, “bato mingi bazali kozwa maladi ya ntolo.” Na Éthiopie, “maladi ya ntolo ezali bisika nyonso.” “Afrique du Sud ezali kati na bikólo oyo ezali na bato ya maladi ya ntolo mingi koleka.”

Atako bato 95 kati na bato monkama oyo bazali na maladi ya ntolo bafandi na mikili ya bobola, maladi ya ntolo ezali mpe kopalangana na mikili ya bozwi. Na ebandeli ya bambula ya 1990, na États-Unis, bato ya maladi ya ntolo bakómaki mingi. Mopanzi-nsango Valery Gartseff alobi ete maladi ya ntolo “ezongi lisusu kotungisa bato na États-Unis.” Bobele bongo, monganga Jaap Broekmans, mokambi ya Association royale des Pays-Bas contre la tuberculose, alobaki ete maladi ya ntolo ebandi “kopalangana na Mpoto ya Ɛsti mpe na bisika mosusu ya Mpoto ya Wɛsti.” Likambo ya kokamwa ezali te ete zulunalo Science (ya mwa 22 Augusto 1997), elobi ete “maladi ya ntolo ezali ntango nyonso mokakatano monene mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato.”

[Etanda na lokasa 19]

Mikrobe ya maladi ya ntolo emonani

Eleki mikolo mingi te, balukuluki balongi kotya matériel génétique ya mikrobe ya maladi ya ntolo. Monganga Douglas Young, ya Imperial College School of Medicine na Londres alobi ete, bolongi yango ezali komonisa “bokoli ya sika na etumba oyo ezali kobundama na moko na banguna mabe ya bato.” OMS elobi ete boyebi yango “ekoki kozala na ntina mingi mpo na kobimisa bankisi ya sika mpe mangwele mpo na maladi ya ntolo.” —The TB Treatment Observer ya 15 Sɛtɛmbɛ 1998.

[Bililingi na lokasa 18]

Bankisi oyo basangisi boye, ebomaka mikrobe ya maladi ya ntolo

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Foto epesami na OMS, Genève

Foto: OMS/Thierry Falise

[Bililingi na lokasa 19]

Dolare 100 ekoki mpo na kobikisa moto ya maladi ya ntolo

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Foto epesami na OMS, Genève

Foto: OMS/Thierry Falise

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 16]

Foto: OMS/Thierry Falise

Foto epesami na OMS, Genève

Foto: OMS/Thierry Falise

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto