Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/10 nk. 6-8
  • Makambo oyo esakolamaki mpo na ntango na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo esakolamaki mpo na ntango na biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Bolongi mpe mawa
    Lamuká!—1998
  • Nkisi ya kosilisa maladi ya ntolo
    Lamuká!—1999
  • Maladi ya ntolo ezali koboma bato lolenge moko na bitumba
    Lamuká!—1998
  • Makambo oyo nyonso elingi koloba nini?
    Bókɛngɛlaka!
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/10 nk. 6-8

Makambo oyo esakolamaki mpo na ntango na biso

BIBLIA esakoli ete Bokonzi ya Nzambe ekomema kimya mpe esengo ya libela awa na mabelé. (Danyele 2:44) Na libondeli ya Tata wa biso, to Libondeli ya Nkolo, Yesu alakisaki bayekoli na ye kobondela boye: “Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” (Matai 6:10) Na esakweli monene oyo apesaki bayekoli na ye na Ngomba ya Olive, Yesu asakolaki makambo oyo esengelaki kosalema mwa moke liboso Bokonzi yango eya. Makambo yango nyonso ezali elembo oyo bato ya motema sembo basengelaki komona polele mpenza. Yo osilá komona makambo boni ya elembo yango?

Bitumba na mokili mobimba. Yesu asakolaki boye: “Ekólo ekotombokela ekólo mpe bokonzi ekotombokela bokonzi.” (Matai 24:7) Liboso ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba oyo ebimaki na 1914, bitumba ezalaki bipai nyonso te. Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ezwaki bikólo mingi na mbala moko, mpe etindaki bato básala bibundeli ya makasi lisusu koleka nyonso oyo bazalaki kosalela liboso. Na ndakisa, basalelaki bampɛpɔ oyo eutaki kosalema mpo na kobwaka babɔmbi likoló ya bato oyo bazalaki basoda te. Ebele ya mindoki oyo basalaki ebomaki bato na ndenge oyo esalemá naino te, mpe na basoda milio 65 oyo babundaki etumba yango, soki milio 32 na ndambo bakufaki to bazokaki. Nzokande, ntango bambula ezalaki koleka, motángo ya bato oyo bazalaki kokufa ezalaki se kobakisama. Ndenge moto moko ya mayele na masolo ya kala alobaki yango, motángo ya bato nyonso oyo bakufaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ezala basoda to bato mosusu, “ekoyebana ata mokolo moko te.” Mpe ata tii lelo oyo, bitumba esili te.

Nzala na mokili mobimba. Yesu asakolaki ete “kozanga ya bilei ekozala.” (Matai 24:7) Na 2005, zulunalo moko (Science) elobaki boye: “Na mokili mobimba, bato milio 854 (soki 14% ya bato ya mokili mobimba) banyokwamaki na nzala na boumeli ya mwa ntango to bazali kokoba konyokwama na yango.” Na 2007, ebongiseli moko ya ONU (FAO) elobaki ete bikólo 33 ezali mpenza na bilei te mpo na koleisa bato na yango. Mpo na nini ezali bongo na ntango oyo, na mokili mobimba, bilanga ezali kobimisa mbuma beboo? Ntina moko ezali ete na esika ya kolona biloko mpo na koleisa bato, bazali kosalela mabelé mpo na kolona biloko ya kosala na yango gaze babengi ethanol. Zulunalo moko ya Afrika ya sudi (The Witness) elobi boye: “Mpo na kozwa ethanol oyo bakoki kotya na motuka mbala moko, basalelaka mbuma oyo moto akoki kolya na boumeli ya mbula mobimba.” Ata mpe na mikili ya bozwi, lokola ntalo ya bilei ezali se kobakisama, esɛngaka ntango mosusu bato bápona soki bakosomba biloko ya kolya to biloko mosusu ya ntina, lokola nkisi ya monganga to biloko ya kotya molunge na ndako.

Koningana ya mabelé. Yesu alobaki boye: “Koningana minene ya mabelé ekozala.” (Luka 21:11) Soki omoni ete lelo oyo bato bakómi kokufa mingi na koningana ya mabelé koleka ndenge ezalaki kala, omikosi te. Na 2007, R. K. Chadha, moto moko oyo ayekolaka makambo ya koningana ya mabelé alobaki boye: “Tomoni mbala moko ete mabelé ekómi koningana mingi na mokili mobimba. Moto moko te ayebi ntina oyo ezali kosalema bongo.” Longola yango, lokola bato bazali kobotama mingi na bisika oyo mabelé eninganaka, motángo ya bato oyo bazali kokufa na koningana ya mabelé ekómi mingi. Ankɛti oyo ebongiseli moko ya États-Unis esalaki emonisi ete mabelé oyo eninganaki na Océan Indien na 2004 mpe etombokisaki mai makasi “ebomaki bato ebele koleka nyonso oyo esalemaki na boumeli ya mbula soki 500,” mpe “ezwaki esika ya mibale na kati ya koningana ya mabelé nyonso oyo eyebani.”

Bamaladi ya mabe. Yesu asakolaki ete . . . ‘bamaladi mabe ekozala.’ (Luka 21:11) Na mokili mobimba, ebele ya bato bazali kobunda na bamaladi ya kala mpe ya sika, mpe elikya ya kosilisa yango ezali te. Na ndakisa, milende nyonso oyo bazali kosala na mokili mobimba mpo na kosilisa malaria ezali kokende kaka na mai. Longola yango, bamilio ya bato bazali kokufa na bamaladi ya kala lokola maladi ya ntolo, oyo ezali kotambola esika moko na sida mpe bamaladi mosusu ya sika. Ebongiseli moko ya ONU (OMS) elobi ete: “Bato mingi (1/3) na mokili mobimba bazali na mikrobe oyo epesaka maladi ya ntolo.” Ebongiseli yango ebakisi ete mikrobe ya sida ezali kobɛlisa bato ya bikólo mingi maladi ya ntolo. Na segɔnde mokomoko, moto moko azali kozwa maladi ya ntolo, mpe bankisi ezali kokoka lisusu mpenza te kosilisa maladi yango. Na 2007, zulunalo moko (New Scientist) elobaki ete bazwaki moto moko na Mpoto na maladi ya ntolo oyo “ata nkisi moko te oyo tozali na yango lelo ekoki kosilisa yango.”

Kobeba ya bizaleli ya bato. Yesu alobaki boye: “Lokola botyoli-mibeko ekobakisama mingi bolingo ya bato mingi ekokóma mpiɔ.” (Matai 24:12) Longola makambo oyo Yesu asakolaki, ntoma Paulo asakolaki ete bizaleli ya bato ekobeba. Alobelaki “mikolo ya nsuka” mpe ya mpasi oyo esengelaki koya liboso Bokonzi ya Nzambe esukisa mokili oyo. “Bato bakozala bato oyo bamilingaka bango moko, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, batuki, bato bazangi botosi epai ya baboti, bato bazangi botɔndi, bato bazangi bosembo, bazangi bolingo ya libota, bandimaka boyokani te, bakoselaka bato makambo, bazangi komipekisa, bato ya kongala, bazangi bolingo ya makambo ya malamu, bato oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, bato bavimbi na lolendo, bato balingá bisengo na esika ya kozala bato oyo balingaka Nzambe, bazali na motindo moko boye ya ezaleli ya kokangama na Nzambe kasi bazali kowangana nguya na yango.” (2 Timote 3:1-5) Omoni te ete bato bakómi na bizaleli wana mingi koleka ndenge ezalaki liboso?

Yesu ná Paulo bayebisaki te makambo nyonso oyo esengelaki komema mpasi nyonso oyo tozali na yango na mokili. Kasi, basakolaki na bosikisiki mpenza makambo mpe bizaleli oyo tozali komona lelo. Ezali boni mpo na mikolo ekoya? Esakweli ya Yisaya, oyo elobelaki koya ya Masiya, elobelaki mpe mbongwana oyo Bokonzi ya Nzambe ekomema na mabelé. Tokolobela yango na lisolo oyo elandi.

[Elilingi na lokasa 6]

“Ekólo ekotombokela ekólo”

[Elilingi na lokasa 7]

“Bamaladi mabe . . . ekozala”

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© WHO/​P. Virot

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto