Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Avril nk. 4-9
  • Bolongi mpe mawa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bolongi mpe mawa
  • Lamuká!—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nsukansuka, nkisi ezwami!
  • Mobomi azongi lisusu
  • Mpo na nini mobomi yango azongi lisusu?
  • Mikrobe ya sida mpe maladi ya ntolo​—Mikakatano mibale
  • Mikrobe mosusu ya maladi ya ntolo ezali kokufa na bankisi te
  • Myango ya komibatela mpe ya kosalisama na maladi yango
  • Nkisi ya kosilisa maladi ya ntolo
    Lamuká!—1999
  • Maladi ya ntolo ezali koboma bato lolenge moko na bitumba
    Lamuká!—1998
  • Mwango ya kosilisa maladi yango na mokili mobimba: Ekoki kozwama?
    Lamuká!—1998
  • Makambo oyo esakolamaki mpo na ntango na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Lamuká!—1998
g98 Avril nk. 4-9

Bolongi mpe mawa

“Lisolo ya maladi ya ntolo na boumeli ya mbula 30 oyo euti koleka emonisaki bolongi mpe mawa​—bolongi mpo ete bato ya siansi babimisaki myango ya kosalisa mpe kosilisa bokɔnɔ yango, mawa ezali mpo ete balongi te kosalela makambo oyo babimisaki.”​—J. R. Bignall, 1982.

MALADI ya ntolo ezali koboma bato uta kala. Ezalaki koboma ba Incas na ekólo Pérou liboso ete bato ya Mpoto bákóma na Amerika ya Súdi. Baezipito bazalaki kobɛla maladi yango ntango oyo Bafalo bazalaki koyangela na mpipo mpenza. Makomi ya kala mazali komonisa ete na ntango ya kala, bato minene lokola mpe bato mpamba bazalaki kobɛla maladi yango na Babilone, na Grèce, mpe na Chine.

Kobanda na ekeke ya 18 kino ekeke ya 20, maladi ya ntolo ezalaki koboma bato mingi na mikili ya Mpoto. Nsukansuka, na 1882, Robert Koch, ye monganga moto ya ekólo Allemagne alobaki polele ete na bolukiluki na ye amonaki mikrobe oyo epesaka maladi ya ntolo. Nsima ya mibu zomi na misato, Wilhelm Röntgen abimisaki mwango ya kosalela rayons X, yango epesaki nzela na kotala mimpululu ya moto oyo azali na bomoi mpo na komona bilembo ya maladi ya ntolo. Na nsima, na 1921, bato ya siansi na ekólo France babimisaki nkisi ya mangwele mpo na maladi ya ntolo. Bapesaki yango nkombo ya bato oyo babimisaki yango, BCG (bacille Bilié de Calmette et Guérin) yango ezali nkisi bobele moko ya mangwele oyo ezali kosalelama kino lelo mpo na bokɔnɔ yango. Likambo ya mawa, maladi ya ntolo ekóbaki koboma ebele ya bato.

Nsukansuka, nkisi ezwami!

Minganga bazalaki kotinda bato ya maladi ya ntolo na mapitalo oyo ebéngami sanatoriums. Mapitalo yango ezalaki kotongama mingimingi na likoló ya ngomba, epai kuna bato ya maladi bakokaki komipemisa malamu mpe kopema mopɛpɛ ya kitoko. Na nsima, na 1944, na États-Unis, minganga babimisaki streptomycine, nkisi ya liboso oyo ezalaki malamu mpo na koboma mikrobe ya maladi ya ntolo. Nokinoki, bankisi mosusu ebimisamaki. Nsukansuka, bato ya maladi bakómaki kobika, ata na bandako na bango moko.

Lokola motángo ya bato ya maladi yango ezalaki kokita, bato bakómaki kotalela mikolo mizali koya na elikya malamu. Bakangaki bikuke ya mapitalo na yango mpe bolukiluluki likoló na maladi ya ntolo ezalaki lisusu kosalema mpenza te. Bibongiseli mpo na komibatela na maladi yango bizalaki lisusu na ntina te, bato ya siansi mpe minganga bakómaki kotya likebi na bango na makɔnɔ mosusu.

Atako maladi ya ntolo ezalaki naino koboma bato mingi na mikili ya bobola, na ntembe te makambo makokaki kobonga. Maladi ya ntolo ekómaki kotalelama lokola mokakatano oyo eleka kala. Yango ezali lolenge bato bakanisaki, kasi bazalalaki komikosa.

Mobomi azongi lisusu

Na katikati ya bambula ya 1980, maladi ya ntolo ezongaki lisusu makasi. Na nsima, na Apríli 1993, Ebongiseli ya Mabota Masangani mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto (O.M.S.) elobaki ete maladi ya ntolo ezali “likama monene mpo na mokili mobimba,” mpe ebakisaki ete “maladi yango ekoboma bato koleka milio 30 na mibu zomi oyo mizali koya, soki mwango moko te ekamatami nokinoki mpo na kopekisa kopalangana ya maladi yango.” Ezalaki mbala ya liboso mpo ete O.M.S. ebimisa maloba ya lolenge wana.

Banda ntango wana, “mwango moko ya nokinoki” ekamatamaki te mpo na kopekisa kopalangana ya bokɔnɔ yango. Ya solo, maladi yango ezali sé kopalangana. Euti koleka mwa mikolo, O.M.S. elobaki na 1995 ete bato mingi bakufaki na maladi ya ntolo koleka bambula mosusu nyonso uta maladi yango ebanda. O.M.S. ekebisaki mpe ete bato soko milio 500 bakozwa maladi ya ntolo na boumeli ya mibu 50 oyo mizali koya. Bato oyo bazali kozwa mikrobe ya maladi yango bazali sé kokóma mingi mpe maladi na bango ezali kosila te mpamba te mikrobe yango mizali kokufa na nkisi te.

Mpo na nini mobomi yango azongi lisusu?

Ntina ezali ete na boumeli ya mibu 20 oyo miuti koleka, bibongiseli oyo bikamatamaki mpo na kotalela maladi ya ntolo bizali lisusu kosalelama te to mpe bibongiseli yango bizali lisusu te na bipai mingi na mokili. Yango elɛmbisi myango oyo misalelamaki mpo na koyeba mbala moko ete moto azali na maladi ya ntolo mpe kosalisa ye. Na yango, bato bakufi mingi koleka mpe maladi yango epalangani mingi.

Ntina mosusu ya bozongi ya maladi yango ezali ete babola bazali sé kokóma mingi, mpe bato oyo bazali kolya malamu te oyo bazali kofanda na bingumba oyo bitondi na bato, mingimingi bingumba ya mikili ya bobola oyo bizali na bamilio ya bato. Nzokande, maladi ya ntolo ezwaka bobele babola te​—moto nyonso akoki kozwa yango​—bosɔtɔ na mboka, mpe kotondana ya bato esika moko ezali kopesa nzela ete maladi yango epalangana. Bizalela motindo wana bizali kosala ete ebongiseli ya nzoto mpo na komibatela na makɔnɔ (système immunitaire) ezala lisusu na makoki te mpo na kotɛmɛla makɔnɔ.

Mikrobe ya sida mpe maladi ya ntolo​—Mikakatano mibale

Mokakatano monene ezali ete maladi ya ntolo esili kosala boyokani na mikrobe ya sida. Ekanisami ete kati na bato milio moko oyo bakufaki na sida na mobu 1995, mbala mosusu moto moko kati na bato misato akufaki na maladi ya ntolo. Yango ezali bongo mpamba te mikrobe ya sida elɛmbisaka makoki ya nzoto na boye ete ekokoka lisusu te kotɛmɛla maladi ya ntolo.

Epai na bato mingi oyo bazwaka mikrobe ya maladi ya ntolo emonanaka ete bato yango babɛlaka maladi yango te. Mpo na nini? Mpamba te baselile ebéngami macrophages ekangaka mikrobe yango. Kuna na kati ebongiseli ya nzoto oyo etɛmɛlaka makɔnɔ, mingimingi lymphocytes T, to na cellules thymodépendantes ekopekisa mikrobe yango.

Mikrobe ya maladi ya ntolo ezali lokola nyoka ibéngami kobra oyo izipami na kati ya bikɔlɔ oyo bizipeli na yango bikangami makasi. Bikɔlɔ ezali bongo macrophages, mpe bizipeli ezali bongo cellules thymodépendantes. Nzokande, ntango mikrobe ya sida ekoya, ekolongola bizipeli ya bikɔlɔ. Na bongo, mikrobe ekobima mpe ekozala na bonsomi ya kobebisa ata eteni nini ya nzoto.

Na bongo, bato oyo bazali na sida bakoki mpenza kozwa maladi ya ntolo koleka baoyo makoki na bango ya nzoto mpo na kotɛmɛla makɔnɔ ezali malamu. Monganga moko oyo asalisaka maladi ya ntolo na ekólo Écosse alobaki ete: “Bato oyo bazali na mikrobe ya sida bakoki mpenza kozwa na bolɛmbu nyonso maladi ya ntolo. Bato mibale oyo bazalaki na sida na lopitalo moko na Londres bazwaki mikrobe ya maladi yango ntango bafandaki na mbalasani epai bazalaki koleka na moto moko oyo azalaki na maladi ya ntolo.”

Na yango, sida epesi nzela na kopalangana ya maladi ya ntolo. Engebene makanisi oyo mabimisami, kino mobu 2000, bato milio 1,4 bakozwa maladi ya ntolo mpo na mikrobe ya sida mpe oyo mbala mosusu bakoki kobikisama te. Ntina monene oyo maladi ya ntolo ezali kopalangana ezali ete bato ya sida bazali kozwa maladi yango na bolɛmbu nyonso mpe bazali lisusu kopesa yango epai na bato mosusu, ata mpe baoyo bazali na sida te.

Mikrobe mosusu ya maladi ya ntolo ezali kokufa na bankisi te

Likambo mosusu oyo ezali kosala ete kosalisa maladi ya ntolo ekóma mokakatano makasi ezali bongo kobotama ya mikrobe ya maladi ya ntolo oyo ezali kokufa na bankisi te. Mikrobe motindo wana ekosala ete maladi ya ntolo ekóma lisusu maladi oyo ezangi nkisi, lokola yango ezalaki na eleko oyo bankisi ya koboma mikrobe ebimaki naino te.

Nzokande, kozanga kosalela malamu bankisi ya maladi ya ntolo ezali ntina ya liboso oyo ezali kosala ete bankisi mingi ekoka te koboma mikrobe yango. Mpo na kozwa lisalisi malamu na maladi ya ntolo esengeli kolanda kozwa nkisi na boumeli ya sanza motoba mpe esɛngaka komɛla lolenge minei ya nkisi na bangonga ya sikisiki mikolo nyonso kino ekosila. Na yango, moto ya maladi akomɛla mbala mosusu nkisi ya mbuma soko zomi na mibale na mokolo. Soki alandisi komɛla nkisi te to soki asilisi yango nyonso te, mikrobe yango ekobotama lisusu mingi mpe ekozala mpasi mpo na koboma yango. Mikrobe mosusu ya maladi ya ntolo ekufaka te ata soki moto oyo azali na yango amɛli mitindo nsambo ya bankisi oyo eyebani.

Kosalisa bato oyo bazali na mikrobe ya maladi ya ntolo oyo ezali kokufa na bankisi te ezali bobele mokakatano te, kasi yango esɛngaka mpe mbongo mingi. Mbongo oyo yango esɛngaka ekoki kozala pene na mbala 100 koleka mbongo oyo ekoki kobimisama mpo na kosalisa bato ya maladi oyo bazali na mikrobe ya motindo wana te. Na ndakisa, na États-Unis, mbongo oyo ekoki kosalisa moto moko oyo azali na mikrobe ya maladi ya ntolo oyo ezali kokufa na bankisi te ekoki koleka dolare 250 000!

O.M.S. ekanisi ete bato soko milio 100 na mokili mobimba bakoki kozwa mikrobe ya maladi ya ntolo oyo ezali kokufa na nkisi te, mwa ndambo kati na mikrobe yango ekobomama te na bankisi oyo eyebani mpe epalanganisi maladi koleka mikrobe mosusu oyo eyebani mingi.

Myango ya komibatela mpe ya kosalisama na maladi yango

Myango nini mizali kosalema mpo na kobundisa maladi oyo mapalangani na mokili mobimba? Mwango moleki malamu ya kobundisa maladi yango ezali koyeba mpe kobikisa bato oyo bazali na yango ntango ezali naino na ebandeli. Yango esalisaka baoyo bazali na maladi yango mpe epekisaka kopalangana na yango.

Soki maladi ya ntolo esalisami te, ebomaka koleka katikati ya motángo ya bato oyo bazali na yango. Nzokande, soki esalisami malamu mpenza, mpe soki euti te na mikrobe oyo ekufaka na bankisi te, esilaka.

Lokola tosilaki kolobela yango, kosalisama ya malamu esɛngaka ete moto ya maladi asilisa bankisi nyonso oyo monganga akopesa ye. Mbala mingi, emonanaka ete bato ya maladi basilisaka bankisi yango te. Mpo na nini? Mpamba te, kɔsukɔsu, fɛfɛlɛ, mpe bilembo mosusu esilaka nsima ya komɛla bankisi na boumeli ya mwa bapɔsɔ. Na bongo, bato ya maladi yango, mingi kati na bango bamilobaka ete maladi na bango esili mpe batikaka komɛla bankisi.

Mpo na kolonga mokakatano yango, O.M.S. esalaki ebongiseli moko oyo ebéngamaki ete “Kosalisama na ntango mokuse mpe kosɛnzɛlama na monganga.” Lokola yango elobami, minganga bakosɛnzɛla mpo na komindimisa ete bato ya maladi bazali komɛla bankisi nyonso oyo bapesaki bango, mingi mpenza na boumeli ya sanza mibale ya liboso. Nzokande, yango ezalaka ntango nyonso likambo ya pɛtɛɛ te mpamba te bato mingi oyo bazali na maladi ya ntolo bazali babola. Lokola bomoi na bango etondi na mitungisi mpe na mikakatano​—basusu kutu bazali na bandako te​—kolandela ndenge bazali kozwa nkisi ekoki kozala mpenza mokakatano monene.

Na bongo, tokoki komizela ete mokakatano yango oyo ezali kotungisa bato esila mokolo mosusu?

[Etanda na lokasa 5]

Mayebisi na ntina na maladi ya ntolo

Ndimbola: Maladi ya ntolo ezali maladi oyo mingimingi ebebisaka mimpululu, kasi ekoki mpe kopalangana na biteni mosusu ya nzoto, mingimingi bɔɔngɔ́, bangei, mpe mikuwa.

Bilembo oyo emonisaka yango: Maladi ya ntolo oyo ekɔti na mimpululu ekoki kopesa kɔsukɔsu, kokɔndisa mpe kozangisa mposa ya kolya, kosala ete moto atɔka makasi na butu, kolɛmbisa nzoto, mpema mokuse, mpe koyoka mpasi na ntolo.

Lolenge ya koyeba yango: Ekizamɛ́ ya lomposo ya nzoto ekoki komonisa soki moto yango azwaki mikrobe ya maladi yango. Ekizamɛ́ ya radio na ntolo ekoki komonisa kobeba ya mimpululu, oyo ekoki kolakisa mikrobe ya maladi yango. Kosalisa ekizamɛ́ ya nsɔi na laboratware ezali mwango moleki malamu ya koyeba ete moto azali na mikrobe ya maladi ya ntolo.

Nani asengeli kosalisa ekizamɛ́ yango: Baoyo bazali na bilembo ya maladi yango to baoyo bazalaki esika moko na moto oyo azali na maladi yango​—mingimingi na bandako oyo ezali kolekisa mopɛpɛ malamu te.

Mangwele: Ezali na mangwele bobele moko​—eyebani na nkombo BCG. Mangwele yango ebatelaka mingi mpenza bana mike kasi ezali na litomba moke epai na bilenge mpe bakóló. Likambo ya malamu mpenza ezali ete mangwele yango ebatelaka moto oyo azwi yango na boumeli ya mibu soko 15. Mangwele BCG ebatelaka bobele baoyo bazali na maladi yango te; ezali na litomba te epai na baoyo basili kozwa maladi yango.

[Etanda na lokasa 6]

Maladi ya ntolo mpe koyebana

Likambo ya kokamwa, na boumeli ya ekeke ya 19, maladi ya ntolo etalelamaki lokola eloko oyo ekoki kosala ete moto ayebana, mpamba te bato bazalaki kokanisa ete bilembo na yango ekólisaka mayoki mpe mayele ya kobotama ya bato ya ntɔki.

Kati na buku na ye Mémoires, Alexandre Dumas akomaki na ntina na bambula ya 1820 ete: “Maladi ya ntolo ezali kopesa nzela na koyebana, moto nyonso azali kolinga koyebana lokola moto ya maladi ya ntolo, mingimingi bakomi ya masolo ya ntɔki; kokufa liboso ya kokokisa mibu ntuku misato etalelamaki lokola eloko oyo ezalaki kosala ete moto ayebana.”

Lord Byron, mokomi ya masolo ya ntɔki, moto ya Angleterre alobaki ete: “Nakosepela kokufa na [maladi ya ntolo] . . . mpamba te basi nyonso bakoloba ete, ‘Talá Byron, akufi mpenza kitoko!’”

Henry David Thoreau, mokomi ye moto ya Amerika, oyo mbala mosusu akufaki na maladi ya ntolo akomaki ete: “Konuna mpe kozala na maladi ezali kitoko, lokola . . . nzoto oyo ebebisami na maladi ya ntolo.”

Kolobeláká lolenge bato bazalaki kokumisa yango mpo na maladi ya ntolo, lisolo moko kati na The Journal of the American Medical Association limonisaki ete: “Bolingo ya motindo wana mpo na bokɔnɔ ekólisaki makambo oyo moto ye moko alingaka na ntina na koluka koyebana; basi bazalaki kosala milende mpo na kozala loposo pɛɛ, kozala nzoto pɛtɛpɛtɛ, kosalela biloko ya monzele oyo ekómisaka loposo mpɛmbɛ, mpe kozala nzoto mike, kolata bilamba ya pɛtɛpɛtɛ oyo esalemi na ntokya​—lolenge moko lokola bamanɛkɛ́ ya lelo balingaka kozala nzoto mike.”

[Etanda na lokasa 7]

Maladi ya ntolo ezwamaka mpambampamba?

Monganga Arata Kochi, mokambi ya ebongiseli ya O.M.S. mpo na kosalisa maladi ya ntolo akebisaki ete: “Esika moko ezali te mpo na kokima mikrobe ya maladi ya ntolo. Moto nyonso akoki kozwa maladi ya ntolo na komeláká na nzela ya kopema mikrobe na yango oyo bakɔsɔlaki to babimisaki na likisɛ kati na mpema. Mikrobe yango ekoki kotikala kati na mopɛpɛ na boumeli ya bangonga mingi; ata na boumeli ya bambula. Biso banso tozali na likama.”

Nzokande, liboso ete moto akóma na maladi ya ntolo, makambo mibale masengeli kosalema. Ya liboso, esengeli ete mikrobe ya maladi yango mikɔta na nzoto na ye. Ya mibale, mikrobe yango esengeli kokóla kino moto akokóma na maladi.

Atako maladi yango ekoki kozwama na kozaláká esika moko na ntango mokuse na moto oyo azali na yango, maladi ya ntolo epalanganaka mingi na kozaláká esika moko mbala na mbala na moto oyo azali na yango, lokola yango esalemaka epai na basangani ya libota oyo bafandi na bisika ya nkaka.

Mikrobe oyo moto amɛli yango na mpema ebotamaka kati na ntolo. Nzokande, epai na bato 9 likoló na 10, makoki ya nzoto oyo etɛmɛlaka makɔnɔ epekisaka kopalangana ya mikrobe yango, mpe moto oyo amɛli yango akobɛla te. Kasi, na bantango mosusu, mikrobe oyo elalaki mpɔngi ekoki kolamusama soki ebongiseli ya nzoto mpo na kotɛmɛla makɔnɔ elɛmbi mpo na mikrobe ya sida, diabète, kanser, to bantina mosusu.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]

New Jersey Medical School​—National Tuberculosis Center

[Elilingi na lokasa 7]

Mikrobe ya sida ekangolaka mikrobe ya maladi ya ntolo lokola nyoka ibéngami kobra ikangolami na ekɔlɔ epai izipamaki

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto