Nguya ya miziki
“Miziki ya kitoko ekoki kokitisa moto motema mpe kozongisa ye makanisi oyo ezalaki kotambolatambola.”
WILLIAM CONGREVE akomaki maloba wana esili koleka mbula 300 na buku na ye Hymne à l’harmonie. Bikeke mingi liboso, buku moko ya Greke ya kala elobaki ete “ezali na eloko te oyo esimbaka motema ya moto lokola miziki mpo na mindule na yango.”
Baboti mosusu bamonaka likambo yango epai ya bana na bango oyo bakómi bilenge soki bamipesi na miziki ya heavy metal, bakómaka mokemoke na ezaleli ya mawamawa to mpe ya botomboki. Na bambula ya 1930 mpe 1940, na Allemagne, Banazi bazalaki kosalela miziki oyo babɛtaka na defile ya basoda mpo na kobenda ebele ya bato báya koyoka masukulu ya kafukafu ya Adolf Hitler.
Na ntembe te, miziki ekɔtaka na makanisi mpe na mitema ya bato, ekoki mpe kosalelama mpo na kotinda bato oyo bazali koyoka yango na kosala malamu to mabe. Na ndakisa, ekoki kozala ete miziki mosusu ekolisaka mayele mpe mayoki ya bana mike. Kutu bato ya likukuma bakokaka koyemba na maloba mosusu oyo bakokaka koloba yango te.
Na buku moko oyo akomaki (Music and the Mind), Anthony Storr alobi ete, mbala mosusu miziki esalisaka bato ya maladi ya motó na ndenge ya kokamwa. Storr atángi ndakisa ya mwasi moko oyo azalaki na maladi, alobi ete: “Lokola mwasi yango azalaki kotambola te mpo na maladi ya [Parkinson], azalaki kokoka ata koningana te, kino ntango miziki oyo ayebaki na bolenge na ye eyelaki ye na makanisi. Na lisalisi ya miziki yango, abandaki mbala moko koningana.”
Mpo na nini tosengeli komitungisa?
Emonani ete miziki ekoki kozala na matomba. Nzokande, nguya na yango ekoki kozala likama soki bato ya lokoso to bato oyo bazali na mposa makasi ya kobebisa basusu basaleli yango. Baankɛtɛ oyo esalamaki emonisi ete bizaleli mosusu ya mabe oyo bato bazalaka na yango eutaka na miziki mosusu oyo bayokaka.
Mpo na yango, zulunalo moko (Psychology of Women Quarterly) ekomi ete: “Ezali ya solo ete kotala bakasɛti video ya miziki ya rock ezali ndenge moko na kotala bafilme ya kosangisa nzoto. Emonanaki ete mibali oyo batalaki bakasɛti video ya miziki ya rock oyo ezalaki na mobulu bakómaki na bizaleli ya koyina basi koleka mibali mosusu oyo batalaki bakasɛti video ya miziki ya rock oyo ezalaki na mobulu te.”
Likambo yango etaleli bobele mibali te, kasi mpe basi. Lisolo yango elobaki lisusu ete: “Ezala mibali to basi, bakoki kobanda kondima mokemoke makambo oyo ezali kolobama na nzembo yango oyo ezali kotyola basi.”
Zulunalo Sex Roles elobi ndenge moko: “Ankɛtɛ moko euti kosalema emonisi ete bilenge basi oyo babɔkɔlamaki na mabota ya mobulu mpe bazalaki kotala mbala na mbala miziki na bakasɛti video, mingi kati na bango bakómi na bizaleli mabe na makambo ya kosangisa nzoto.” Zuzi moko na etúká moko ya États-Unis alobelaki nzembo moko ya rap oyo etondi na maloba ya mbindo mpe ya nsɔni ete ezali mpenza “bosɔtɔ liboso ya bato.”
Zuzi yango alekisaki ndelo? Soko moke te! Zulunalo Adolescence elobi ete “bilenge mpe baboti balobi polele ete bilenge oyo balandaka miziki ya heavy metal to ya rap bakomá moto likolólikoló.” Yango euti na “bizaleli ya matumoli mpe ya kobebisa” mpe na bilembo mabe oyo bazwaka na kelasi.
Ya solo, boyokani oyo ezali kati na miziki mosusu mpe makambo ya kosangisa nzoto, komiboma, mpe ezaleli ya koyina bato, emonani polele. Kasi yango elingi koloba ete miziki nyonso ezali mabe? Tángá masolo oyo elandi, elobeli likambo yango.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]
Miziki ekoki kotinda mitema mpe makanisi ya bato oyo bazali koyoka yango na kosala malamu to mabe