Nkoma ya batángi
Ekobo Matɔndi mingi mpo na Lamuká! ya Ɔkɔtɔbɛ-Desɛmbɛ 1999 oyo ezalaki na lisolo “Okosala nini soki mobali na yo to mwasi na yo asali ekobo?” Molongani na ngai asalaki ekobo. Atako libala na biso ekufi esili koleka mbula misato, likambo yango ezali naino kosala ngai mpasi. Masolo yango esalisaki ngai nayeba ete nasengeli kotika kokanisa ntango nyonso makambo ya mpasi oyo eleká, namipesa na makambo oyo nazali kosala sikoyo na bomoi na ngai.
V. B., Trinité
Natángaki mwa masolo mosusu liboso mpo na likambo yango, kasi elimbolamaki malamu boye te. Uta nayokaki nsango ya Biblia mpo na mbala ya liboso, nakangaki ntina ete ezalaki mpenza solo. Sikoyo Yehova apesi ngai ntina mosusu ya kondima yango.
G. B., Italie
Lokola libala na ngai ekufi, nakómi konyokwama makasi na makanisi, nazali komimona lisusu na ntina te, mpe nakómi na mikakatano mingi na nzoto. Atako nazali naino konyokwama, bilaka oyo Yehova apesi ezali kobɔndisa ngai, bakisa mpe bolingo mpe lisungi ya bandeko ya lisangá!
A. B., Canada
Sanza libwa nsima ya kokabwana na mobali na ngai, nazali naino kotungisama mpo na kofanda ngai moko. Ndenge nini nakokoka kotambola na nzela moto te asimbi ngai na lobɔkɔ? Nani akofanda pembeni na ngai na makita ya boklisto? Nani akokenda kotika ngai epai ya monganga? Matɔndi mingi na ndenge bokundoleli ngai ete mobalani oyo asalaki likambo te, Yehova abwakaka ye te.
E. S., Brésil
Etanda oyo ezali na motó ya likambo ete “Foti ya nani?” elendisaki ngai mingi. Naponaki koboma libala ntango mobali na ngai asalaki ekobo. Ndenge moko na Yobo, mbala mosusu nazalaki kutu kolinga kokufa. (Yobo 17:11-13) Kasi libota na ngai mpe bandeko baklisto basalisaki ngai mingi.
M. O., Argentine
Nakoki koloba te ete natángaki masolo yango kotánga, kasi nadundaki yango nde kodunda! Libala na ngai ekufá mpe masolo yango elobelaki mituna mpe mitungisi nyonso oyo likambo yango ebimisaka. Matɔndi mingi ndenge bozali komibanzabanza mpo na biso.
E. L., France
Nazalaki na mbula nsambo ntango tata asundolaki biso. Ezalaki mpenza mpasi. Nsima ya mwa bambula, tata asɛngaki biso ete azonga na ndako. Ngai na bayaya na ngai ya mibali toboyaki likanisi na ye, kasi mama andimaki. Nsima ya kotánga masolo na bino, nabandi kokanga ntina oyo mama azwaki ekateli makasi wana.
A. A., Brésil
Natɔndi bino mingi, mingi, mingi mpo na masolo yango! Koyeba ete makanisi mpe mayoki na yo ezali ndenge moko na oyo ya bato mosusu oyo bakutani mpe na likambo yango, ezali mpenza kobɔndisa. Nzokande, bolobaki ete: “Ekoki kozala ete bozalaki lisusu kolingana na bolingo ya motema moko te, kopesana longonya te, mpe kopesana lokumu oyo esengeli te.” Maloba wana ezali kozokisa mpenza biso baoyo tomekaki kosala milende mpo na kobongisa libala oyo ekómaki na mobulu. Ntango moto akani kosala ekobo, akoki kokóma na bizaleli mabe mpe ezali mpasi mpo na koyokana na moto ya ndenge wana.
L. W., États-Unis
Tosɛngi bolimbisi soki maloba yango ezokisaki batángi mosusu. Kasi tolingaki koloba te ete moto oyo asali ekobo akoki kobwaka etamboli mabe na ye likoló na mobalani na ye. Na etanda oyo ezalaki na moto ya likambo ete “Foti ya nani?” tolobaki mpenza ete moto oyo asali ekobo asengeli komema mokumba ya etamboli mabe na ye atako “mobalani oyo asali likambo te akoki kozala na bolɛmbu.” Maloba yango etalelaki lisolo mpo na kobongisa libala. Tozalaki kaka kolobela ntina ya kosolola malamu, kolendisa babalani oyo bazali kobongisa lisusu boyokani na bango báyeba epai mikakatano eutaki kati na libala na bango, mikakatano oyo ekoki kosɛnga likebi makasi. Ekoki mpe kozala ete moto abombi nkanda, yango ezali kosɛnga kobimisa yango na lisolo. Mbala mingi, lisolo ya ndenge wana epesaka nzela ete babalani nyonso mibale bándima mabunga na bango mosusu ya mikemike. Ntembe ezali te, “biso nyonso tokweaka na makambo mingi.” (Yakobo 3:2) Mpe atako masolo ya ndenge wana epesaka mpasi, lokola lisolo na biso elobaki, yango ezalaka “na ntina mpo na kozongisa boyokani na libala.”—BAKOMI