Mituna oyo bilenge batunaka
Nasengeli koyeba nini na likambo ya komɛla makaya?
Talá makanisi oyo elandi, mpe tyá elembo oyo ✔ na karɛ oyo ezali pene ya likambo nyonso oyo omoni ete etaleli yo.
□ Nalingaka kaka koyeba
□ Nazali kotungisama mingi
□ Nalingi basusu bándima ngai
□ Nazali na mposa ya kobatela kilo na ngai
SOKI otye elembo ata na likambo moko, yango emonisi ete okokani na baninga na yo oyo bamɛlaka makaya to bazalaka na mposa na yango.a Na ndakisa:
Mposa ya koluka koyeba. “Nazalaki komituna soki esalaka ndenge nini; yango wana nazwaki likaya oyo moninga moko apesaki ngai na eteyelo mpe namɛlaki yango na ndenge ya kobombana.”—Tracy.
Mitungisi mpe kolinga ete basusu bándima ngai. “Na eteyelo, nazalaki koyoka bana-kelasi bazali koloba, ‘Nazali na mposa ya likaya,’ mpe soki bamɛli, bazalaki koloba, ‘Sikoyo nayoki nzoto!’ Na ntango ya mitungisi, nazalaki na mposa na yango.”—Nikki.
Nalingi kilo na ngai ekita. “Bana basi mosusu bamɛlaka makaya mpo batikala nzoto mike; yango ezali malamu koleka koboya kolya biloko mosusu!”—Samantha.
Kasi, liboso opelisa likaya mpo na mbala ya liboso to mpo na mbala ya nsima, fandá naino mpe kanisá. Kozala te lokola mbisi oyo alandi eloko batye ndɔbɔ. Ya solo, mbisi wana ekosepela mwa moke ntango ekolya, kasi ekokufa! Na esika ya kosala bongo, landá toli ya Biblia, mpe salelá ‘makoki na yo ya kokanisa malamu.’ (2 Petro 3:1) Yanolá na mituna oyo elandi:
Makambo nini oyebi mpenza na oyo etali komɛla makaya?
Yanolá solo to lokuta na makanisi oyo elandi:
a. ․․․ Komɛla makaya ekitisaka mitungisi.
b. ․․․ Nakoki kobimisa milinga nyonso oyo nabendi.
c. ․․․ Lokola nazali elenge, komɛla makaya ekosala ngai eloko te.
d. ․․․ Komɛla makaya ekosala ete basi to mibali bálinga ngai mingi.
e. ․․․ Ntango nazali komɛla makaya, nazali kosala moto moko te mabe.
f. ․․․ Namɛla makaya to te, etali Nzambe te.
Biyano
a. Komɛla makaya ekitisaka mitungisi.—Lokuta. Atako komɛla makaya ekitisaka mpo na mwa ntango mitungisi ya komona lokola ozangi eloko moko, bato ya siansi bamoni ete pwazɔ oyo babengi nicotine, oyo ezalaka na makaya, ematisaka lisusu mitungisi.
b. Nakoki kobimisa milinga nyonso oyo nabendi.—Lokuta. Baankɛti oyo basalaki emonisi ete milinga oyo obendaka, mingi na yango (80%) etikalaka na nzoto.
c. Lokola nazali elenge, komɛla makaya ekosala ngai eloko te.—Lokuta. Lokola makama ebakisamaka ntango nyonso oyo omɛli likaya, makama mosusu ekoki koya nokinoki. Bato mosusu bakómaka baombo ya makaya nsima ya komɛla kaka mbala moko. Komɛla makaya epekisaka mopɛpɛ ekɔta na mimpululu ndenge esengeli mpe okoki kobanda kokosola ntango nyonso. Loposo na yo ekobanda konuna liboso ete okóma mobange. Komɛla makaya ekoki kosala ete binama na yo ya kosangisa nzoto esala malamu te, okóma kobangabanga, mpe kozanga esengo mpe elikya.
d. Komɛla makaya ekosala ete basi to mibali bálinga ngai mingi.—Lokuta. Lloyd Johnston, moto moko ya mayele amonaki ete “basi to mibali mingi basepelaka mingi te” na bilenge oyo bamɛlaka makaya.
e. Ntango nazali komɛla makaya, nazali kosala moto moko te mabe.—Lokuta. Milinga ya likaya ya moto oyo azali komɛla, ezali koboma bankóto ya bato mbula na mbula; ekoki kobebisa libota na yo, baninga, ata mpe banyama oyo ezalaka esika moko na bato.
f. Namɛla makaya to te, etali Nzambe te.—Lokuta. Baoyo balingi kosepelisa Nzambe basengeli komipɛtola na “mbindo nyonso ya mosuni.” (2 Bakorinti 7:1) Ntembe ezali te ete komɛla makaya ekómisaka nzoto mbindo. Soki oponi kozala mbindo, komisala mabe, mpe kosala basusu mabe na komɛla makaya, okoki te kozala moninga ya Nzambe.—Matai 22:39; Bagalatia 5:19-21.
Ndenge ya kosala soki bapesi yo likaya
Kasi, okosala nini soki bapesi yo likaya? Eyano ya mokuse mpe ya polele, na ndakisa, “Mersi, kasi ngai namɛlaka makaya te,” oyo ekomonisa ete oboyi, ekoki kosalisa. Soki moto yango atingami kaka to akómi kotungisa yo, kobosana te ete yo nde osengeli kopona. Okoki koloba:
● “Nataleli makama ya makaya mpe namoni malamu namɛla yango te.”
● “Nazali na makambo mingi ya kosala na mikolo ezali koya, yango wana nalingi nakufa mobesu te.”
Kasi, na ndakisa ya bilenge oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo, okoki komona ete komekama makasi eutaka epai na yo moko. Soki ezali bongo, okoki kolonga ‘komekama’ yango soki okanisi na mozindo na mituna lokola oyo:
● Komɛla makaya ekopesa ngai mpenza litomba? Na ndakisa, soki nandimi komɛla kaka mpo baninga basepela na ngai, bakondima ngai lisusu soki ezali na eloko moko te oyo ekoyokanisa ngai ná bango? Nakolinga nde kosepelisa bato oyo mposa na bango ezali bámona ngai nabebisi nzoto na ngai?
● Komɛla makaya ekosɛnga ngai mbongo boni, ekobimisela mikakatano nini na nzoto? Bato mosusu bakopesa ngai limemya?
● Nakolinga kobebisa boninga na Nzambe kaka mpo na mbuma ya likaya?
Kasi, soki okómá moombo ya makaya, okoki kosala nini mpo olongwa na boombo yango?
Ndenge ya kotika
1. Omindimisa ete okotika. Komá bantina oyo omoni malamu otika, mpe zongeláká kotánga makambo yango mbala na mbala. Mposa ya kozala pɛto na miso ya Nzambe ekosalisa yo mingi.—Baroma 12:1; Baefese 4:17-19.
2. Luká lisalisi. Soki ozalaki komɛla na kobombana, ntango ekoki omipɛtola. Yebisá bato oyo ozalaki kobombela bango ete omɛlaka makaya ete olingi kotika, mpe sɛngá básalisa yo. Soki olingi kosalela Nzambe, bondelá ye asalisa yo.—1 Yoane 5:14.
3. Poná dati oyo okotika. Omipesá pɔsɔ moko to mibale, mpe komá na kalandriye na yo mokolo oyo omoni malamu otika. Yebisá libota mpe baninga na yo ete na dati wana okotika.
4. Luká mpe bebisá. Liboso dati oyo okotika ekoka, luká malamumalamu na shambre, motuka, mpe na bilamba na yo soki ata mwa ndambo ya likaya ezali. Bebisá yango nyonso. Bwaká biloko nyonso oyo osalelaka ntango omɛlaka likaya; na ndakisa alimɛti mpe mwa eloko batyaka putulu ya makaya.
5. Ndenge ya kolonga mitungisi ya komona lokola ozangi eloko moko. Mɛláká mai mpe mai ya bambuma mingi, mpe laláká mingi. Kobosana te ete mpasi ezali ya ntango mokuse, kasi matomba oyo okozwa ekozala ya ntango molai!
6. Boyá eloko nyonso oyo ekoki kotinda yo omɛla lisusu. Zalá mosika na bisika mpe makambo oyo ekoki komeka yo mpo omɛla likaya. Osengeli mpe koboya kozala esika moko na baninga oyo bamɛlaka makaya.—Masese 13:20.
7. Komikosa te komeka lisusu. Omikosa te na koloba ete, “Nameka kaka mwa moke.” Mbala mingi kosala bongo, ekotinda yo ozongela makaya.—Yirimia 17:9.
Kotika te bákosa yo
Mbula na mbula, bakompanyi ya makaya ebebisaka bamiliare ya badolare mpo na kosala piblisite. Soki bayebaka te ete bilenge mingi bakokangama na motambo na bango, mpe bakokóma baombo ya makaya na mikolo ezali koya, mbɛlɛ basalaka bongo?
Kopesa nzela te ete bato oyo basalaka makaya bályela yo mbongo. Mpo na nini okangama na motambo na bango? Ezala bango to baninga oyo bamɛlaka makaya, balukaka bolamu na yo te. Na esika ya koyokela bango, yoká toli oyo ezali na Biblia mpe yekolá “mpo na litomba na yo moko.”—Yisaya 48:17.
Okokuta masolo mosusu na “Mituna oyo bilenge batunaka” na Internet, na esika oyo: www.pr2711.com
[Maloba na nse ya lokasa]
a Atako lisolo oyo ezali kolobela bamɛli ya makaya, kasi makambo mpe makama oyo balobeli awa etaleli mpe baoyo batyaka tumbako.
[Etanda/Bililingi na lokasa 19]
NDENGE BANINGA NA YO MOSUSU BAYANOLAKA
“Soki moto atuni ngai mpo na nini namɛlaka makaya te, nakoloba: ‘Mpo nazali na mposa te ya kokómisa mimpululu na ngai moindo, mpe kokómisa bomoi na ngai mokuse.’”
“Soki moto apesi ngai likaya, nakoloba, ‘Te.’ Soki moto yango atingami kaka, nakoloba na ye, ‘Okoki kotika ngai kimya te napona oyo ezali malamu na bomoi na ngai? Ezali mpenza mpasi lelo oyo!’”
[Bililingi]
Benjamin
Heather
[Elilingi na lokasa 20]
● OYEBAKI YANGO?
Makaya oyo batyaka kotya ekoki kobimisa pwazɔ babengi nicotine koleka makaya oyo bamɛlaka mpe ezali na biloko koleka 25 na kati na yango oyo ekoki kopesa kanser ya mongongo to ya monɔkɔ.
[Elilingi na lokasa 20]
MPO NA NINI TE KOTUNA BABOTI NA YO?
Kolonga botɛmɛli ya baninga ekoki kozala pɛtɛɛ soki obongisamaki. Mpo na nini te kosalaka bilakiseli na baboti na yo mpo na koyeba ndenge okoki koyanola soki bapesi yo likaya? Bokoki kosala ete moboti na yo azala lokola moninga oyo azali kotinda yo omɛla likaya. Lisalisi: Okokuta makanisi mosusu ya malamu oyo ekoki kosalisa yo oyeba ndenge ya koyanola na lisolo, “Ndenge ya komibongisa liboso”, na nkasa 132 mpe 133 ya buku Mituna oyo bilenge batunaka—biyano oyo ebongi, volimi 2.
[Elilingi na lokasa 20]
Lokola mbisi oyo ekangami na ndɔbɔ, momɛli makaya ayokaka mwa esengo, kasi esukelaka ye mabe