Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Batata oyo bakimaka bana na bango—Bakoki mpe kokima mikumba na bango?
“Ntango ayebisaki ngai ete azali na zemi na ngai, nabangaki mingi. Namitunaki soki nani akobɔkɔla mwana yango. Nazalaki na makoki ya koleisa libota te mpe nakanisaki kaka likambo moko: kokima.”—Jim.a
LAPOLO ya ebongiseli moko (Institut Alan Guttmacher) elobi ete: “Mbula na mbula, bilenge basi soko milio moko . . . bazwaka zemi, mpe bana 78 likoló na 100 oyo bazali kobotama, bazali bana ya makango.”
Na ntango ya kala, mibali bazalaki kondima kobɔkɔla bana oyo bazalaki kobota. Kasi lelo oyo, lokola buku Bilenge oyo bakómi batata (na Lingelesi) elobi yango, “kozwa zemi ya makango, ezali lisusu likambo ya nsɔni te ndenge ezalaki [kala].” Na bisika mosusu, soki elenge mobali abotisá mwana mwasi, bakómaka kotalela ye lokola mobali ya solosolo! Kasi, bilenge mingi te bamipesaka mpenza mpo na kobɔkɔla bana oyo bango baboti. Emonanaka ete nsukansuka mingi bakimaka.b
Kasi elenge mobali akoki mpenza kokima mikakatano oyo ebimi mpo na etamboli na ye ya mabe? Ezali bongo te soki totaleli Biblia. Yango elobi ete: “Bómizimbisaka te; Nzambe akokosama te. Soko moto akokona nini, akobuka bobele yango.” (Bagalatia 6:7) Lokola tokomona yango, mbala mingi pite ebimisaka mikakatano mingi, ezala mpo na bilenge basi to mpo na bilenge mibali. Nzokande, bilenge bakoki kokima mikakatano yango soki balandi toli ya Biblia mpe baboi pite.
Ezali pɛtɛɛ te kokima mikumba
Kobɔkɔla mwana esɛngaka makambo mingi lokola ntango, mbongo, mpe komipimela ntango malamu mpo na yo moko. Buku Bilenge mibali oyo bazali na bana kasi bazali naino minzemba (na Lingelesi) elobi ete: “Bilenge mibali mosusu balingaka te ‘kozwa moto na mokumba,’ soki yango ekosɛnga ete bápesaka mbongo mingi.” Kasi, bilenge mingi bayaka kozwa mikakatano mingi mpo na etamboli na bango mabe. Na ndakisa, bazuzi mpe bato oyo basalaka mibeko ya Leta, na bikólo mingi bakómi kolandela mibali oyo balingaka kobɔkɔla bana na bango te. Soki eyebani ete moto boye nde azali mpenza tata ya mwana, bakoki kosɛnga na ye ete apesaka mbongo ya koleisa mwana na boumeli ya bambula mingi—mpe esengeli mpenza asala bongo. Mpo na kokokisa mokumba yango, mbala mosusu ekosɛnga ete elenge wana alongwa kelasi mpo na kosala mosala, ata ezali mpenza na mbongo mingi te. Buku Kobota na bolenge (na Lingelesi) elobi ete: “Soki elenge mobali moko abotisi mwana mwasi na bolenge mpenza, akotánga mpe kelasi mingi te.” Mpe soki elenge mobali oyo abotisi mwana mwasi azali ye moko kokoka te kopesa mbongo mpo na koleisa mwana na ye, akoki kokɔta banyongo mingi.
Ya solo, tokoki koloba te ete bilenge mibali nyonso oyo babotisi bana basi baboyaka kobɔkɔla bana na bango. Bilenge mingi babandaka malamu. Ankɛtɛ moko emonisi ete bilenge 75 likoló ya mokama oyo babotisaki bana basi, bakendaki kotala bana yango ntango babotami na lopitalo. Nzokande, eumelaka te, bamiyokaka ete mokumba ya kobɔkɔla mwana eleki kilo.
Bilenge mingi bamonaka ete bazali na makoki te to bayebi makambo mingi te oyo esengeli mpo na kozwa mosala oyo ebongi. Lokola bayokaka nsɔni mpo bazali na mbongo te, basukaka na kokima. Kasi, elenge mobali oyo akimi mwana na ye, akoyoka mawa mpe akomitungisa bambula mingi na nsima. Elenge mobali moko oyo abotisaki mwana mwasi kasi akimaki mwana na ye, alobi ete: “Ntango mosusu namitunaka soki mwana na ngai ya mobali akómi ndenge nini . . . Nazali koyoka mawa mingi ndenge nasundolaki [ye], kasi sikawa nazangi ye. Mbala mosusu, mokolo moko akoyeba ngai.”
Mabe oyo basalelaka bana
Batata oyo bakimaka bana na bango bakoki mpe koyoka nsɔni—nsɔni mpo basaleli bana na bango moko mabe. Ya solo, lokola Biblia ezali komonisa yango, mwana azalaka na mposa ya mama mpe ya tata na ye. (Exode 20:12; Masese 1:8, 9) Soki mobali asundoli mwana na ye, mwana yango akoki kokóma na mikakatano mingi na bomoi na ye. Lapolo moko ya Departema ya makambo ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto na États-Unis elobi ete: “Bana oyo babɔkwami bobele na bamama bango moko, bazwaka bilembo mingi te na kelasi na mateya ya koloba mpe na matematiki. Ntango bakómaka na mbula nsambo kino zomi, bana oyo babɔkwami na moboti kaka moko, bazwaka bilembo mingi te na kelasi, bazalaka na mikakatano mingi ya bizaleli, mpe babɛlaka bamaladi oyo eumelaka mingi mpe babɛlaka mingi motó. Emonanaka mbala mingi ete bilenge, bakisa mpe bilenge oyo bauti kokóma mwa mikóló, oyo bakolá na libota oyo mama azali kobɔkɔla bana kaka ye moko, bazalaka na likama mingi ya kozwa zemi noki, basukaka na kotika kelasi na nzela, basukaka na kokɔta bolɔkɔ, bazwaka misala mpenza te to batángaka kelasi te.”
Zulunalo moko (Atlantic Monthly) elobi ete: “Baankɛtɛ oyo bato ya mayele ya sosioloji basalaki, ezali komonisa ete bana mingi oyo bazali kobɔkwama na baboti oyo babomá libala bazalaka mpenza na bomoi ya malamu te lokola bana oyo bazali na baboti na bango nyonso mibale. Bana oyo babɔkwami na moboti kaka moko bazali na likama mbala motoba ya kozala babola. Mbala mosusu bakotikala kaka babola bomoi na bango mobimba.”
Kobosana te ete makambo yango euti na baankɛtɛ oyo esalemi likóló ya bituluku ya bana, na yango esengeli te kokanisa ete ekozala kaka bongo mpo na mwana nyonso. Atako bana mosusu bakutanaka na mikakatano mingi na mabota na bango, bakolaka mpe bakómaka mikóló oyo babongi mpenza. Atako bongo, makanisi ya komema ngambo ekoki kotungisa elenge mobali oyo asundolaki mwana na ye. Tata moko monzemba oyo asundolaki mwana, alobi ete: “Nazali kobanga mpamba te [nabebisi] bomoi na ye libela.”—Buku Bilenge oyo bazali na bana (na Lingelesi).
Mokakatano ya komema mokumba ya moboti
Tokoki koloba te ete bilenge mibali nyonso oyo babotisi bana basi bakimaka bana na bango. Bilenge mibali mosusu bandimaka mokumba ya kobɔkɔla bana na bango mpe na yango balingaka kosalisa bango mpo bákola malamu. Nzokande, mbala mingi, likambo yango ezalaka pɛtɛɛ mpo na koloba kasi mpasi mpo na kosala. Na ndakisa, na kotalela mibeko, elenge mobali oyo azali monzemba kasi azali na mwana, azalaka na bokonzi mingi te likoló ya mwana na ye; na yango, ekosɛnga na ye atikela elenge mwasi na baboti na ye nzela bázwa ekateli mpo na koyeba mbala boni—akobanda koya kotala mwana na ye. Jim oyo tolobelaki na ebandeli alobi ete: “Esengeli ntango nyonso kosala makasi mpo na kopesa mpe likanisi na yo mpo na bomoi ya mwana.” Na yango, elenge mobali oyo abotisi mwana mwasi akoki koboya kondima makambo mosusu, na ndakisa kopesa mwana epai ya moto mosusu—to ata kosopa zemi.c Elenge mobali moko oyo azali na mwana amileli ete: “Ezali mpasi mpo na ngai natika bango bápesa mwana epai ya moto mosusu, kasi namoni ete nakoki kosala eloko mosusu te.”
Bilenge mibali mosusu basɛngaka kobala mwana mwasi oyo ye apesi zemi.d Ya solo, libala ekoki kolongola elenge mwasi na mikakatano mosusu mpe kopesa mwana nzela ya kobɔkwama na baboti na ye nyonso mibale. Atako bazali na etamboli mabe, ekoki mpe kozala ete elenge mobali na elenge mwasi balingani mpenza. Kasi, elingi koloba te ete lokola elenge mobali azali na likoki ya kobota, yango emonisi ete akɔmeli mpe akómi mpenza mobali mpe akokokisa mokumba ya tata. Elingi mpe koloba te ete azali na likoki ya koleisa mwasi na mwana. Baankɛtɛ emonisi ete mabala oyo esalemaka mbangumbangu mpo ete mwasi azwaki zemi eumelaka te. Kobala mbangumbangu ezalaka ntango nyonso likanisi ya malamu te.
Bilenge mibali mingi bamonaka malamu kopesa mbongo ya kobɔkɔla bana na bango. Lokola elobelamaki liboso, yango esɛngaka mpenza milende mpo ete elenge mobali oyo abotisi mwana mwasi, akoba kosalisa mwana na ye na boumeli ya ntango molai—mbala mosusu ekoki koumela mbula 18 to koleka! Na yango, soki mama na mwana bazali kozwa lisalisi wana ntango nyonso, yango ekosalisa bango mingi.
Tokoloba nini mpo na likambo ya kopesa mabɔkɔ na koteya mwana? Yango mpe ekoki kozala mokakatano monene. Mbala mosusu baboti ya elenge mobali mpe ya elenge mwasi bazali kobanga ete bana na bango bakosala lisusu pite, yango wana bakolinga te—to bakopekisa—bana na bango ete bámonana lisusu. Elenge mwasi ye moko akoki kozwa ekateli ete alingi te ete mwana na ye ‘akangama’ na moto oyo azali mobali na ye te. Ata ndenge nini, soki bapesi tata nzela ya kotalaka mwana na ye mbala na mbala, libota ya mwasi mpe libota ya mobali basengeli kokeba ete moto mosusu azalaka elongo na bango mpo ete bákwea lisusu na etamboli ya mbindo te.
Lokola bazalaka na mposa ya kozala pene ya bana na bango, bato mosusu oyo bazali minzemba kasi bazali na bana, bayekoli ndenge ya kokokisa mikumba mosusu ya moboti, na ndakisa kosukola mwana, koleisa ye, to kotángela ye masolo na buku moko. Elenge mobali oyo ayebaki mitinda ya Biblia akoki kutu koteya mwana na ye mitinda yango. (Baefese 6:4) Atako mwa likebi ya bolingo ya tata ezalaka mpenza na ntina, kasi kozala na tata oyo azali wana mokolo na mokolo ezali mpenza malamu koleka. Mpe soki nsukansuka mama ya mwana abali, elenge mobali oyo abotisaki mwana mwasi yango, akotika mobali mosusu azwa mosala ya kobɔkɔla mwana na ye.
Ezali mpenza polele ete kobota mwana ya makango ebimisaka bampasi mingi—ezala mpo na baboti to mpo na mwana. Longola bampasi oyo ekoki kobima, bato oyo basali likambo ya ndenge wana bazali na likama ya koboyama na Yehova Nzambe, ye aboi pite. (1 Batesaloniki 4:3) Atako elenge akoki koyika mpiko na mabe lokola kozwa zemi na bolenge, kasi ezali malamu liboso koboya etamboli ya mbindo. Elenge mobali moko abotisaki mwana mwasi alobaki ete: “Kobanda ntango oyo okómi na mwana kasi obali naino te, bomoi na yo ebongwani mpo na libela.” Ya solo, elenge oyo akómi tata akoki kobunda na mikakatano oyo eutaki na etamboli na ye mabe na boumeli ya bomoi na ye mobimba. (Bagalatia 6:8) Lisusu, toli ya Biblia oyo ezali mpenza malamu ntango elobi ete: “Bókima pite.”—1 Bakolinti 6:18.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Wana ezali mpenza bankombo na bango te.
b Talá lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Esengeli kobota mpo na kozala mobali ya solo?” kati na Lamuká! ya Ɔkɔtɔbɛ-Desɛmbɛ 2000. Mpo na koyeba makambo mosusu oyo ekómelaka bilenge basi oyo baboti kasi naino babali te, talá lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Kobota ntango ozali naino monzemba—Ekoki mpe kokómela ngai?” kati na Lamuká! ya 8 Mai 1990, ebimeli ya Lifalanse.
c Talá lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Kosopa zemi—Yango ezali nde mwango ya malamu?” na Lamuká! ya Aprili-Yuni 95.
d Mobeko ya Mose ezalaki koloba ete soki mobali moko asali pite na elenge mwasi moko oyo ayebaki naino mibali te, asengeli kobala ye. (Deteronome 22:28, 29) Nzokande, libala yango ekokaki kosalema to mpe ekokaki kosalema te, mpamba te tata ya elenge mwasi akokaki koboya yango. (Exode 22:16, 17) Atako lelo baklisto bazali na nse ya Mobeko ya Mose te, kasi ezali polele ete pite ezali lisumu monene.—Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 1989, ebimeli ya Lifalanse.
[Elilingi na lokasa 16]
Ezali malamu liboso koboya etamboli ya mbindo