Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g00 Octobre nk. 13-15
  • Esengeli kobota mpo na kozala mobali ya solo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esengeli kobota mpo na kozala mobali ya solo?
  • Lamuká!—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntina ya mobulu yango
  • Likanisi ya Nzambe
  • ‘Bózala mibali mpenza’
  • Batata oyo bakimaka bana na bango​—Bakoki mpe kokima mikumba na bango?
    Lamuká!—2001
  • Kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali mabe?
    Lamuká!—2005
  • Nasala nini soki baninga na ngai bazali kotya ngai mbamba nasangisa nzoto?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Biblia mpe ezaleli ya bilenge
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Lamuká!—2000
g00 Octobre nk. 13-15

Mituna oyo bilenge batunaka . . .

Esengeli kobota mpo na kozala mobali ya solo?

“Nayebi [baninga] mingi oyo balobaka: ‘Nazali na mwana moko awa, mosusu kuna;’ mpe balobaka yango lokola nde bazali komitungisa te.”​—Harold.

MBULA na mbula na États-Unis, bilenge basi pene na milio moko bazwaka zemi. Bana mingi oyo babotamaka na bamama yango, bazali bana ya makango. Soki bilenge basi yango oyo babotá bazali 4, nsima ya mbula mibale, moko na bango akobota mwana ya mibale. Zulunalo moko (Atlantic Monthly) elobi boye: “Soki likambo oyo ezali se kokoba, bana mingi te kati na bana oyo bazali kobotama lelo oyo bakokola esika moko na baboti na bango nyonso mibale. Bana mingi ya Amerika bakokola kozanga tata.”

Atako ezali na États-Unis nde bilenge mingi bazwaka zemi koleka na mikili nyonso mosusu ya bozwi, likambo ya bana ya makango ezali na mokili mobimba. Na mikili mosusu ya Mpoto, lokola na Angleterre mpe na France, bana ya makango bazali mingi kaka ndenge bazali na États-Unis. Na mikili mosusu ya Afrika mpe ya Amerika ya sudi, bana basi yango oyo bazali kozwa zemi bazali mingi mbala mibale koleka na États-Unis. Nini esali ete mobulu yango epalangana boye?

Ntina ya mobulu yango

Mbala mingi, likambo yango ezali mpenza komonisa ndenge bizaleli ya bato esili mpenza kobeba na “ntango ya mpasi” oyo tozali na yango. (2 Timote 3:1-5) Na bambula oyo euti koleka, mabala mingi mpenza ekufaki. Kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi mpe bizaleli mosusu ya mabe epalangani mpenza. Televizyo, radio mpe bazulunalo ezali kosopela bilenge makambo ebele mpenza: miziki mpe miziki na kasɛti video oyo ezali kolamusa mposa ya mbindo, bazulunalo ya bato balingá bisengo mpe bapiblisite oyo ezali kolakisa makambo ya lokuta, baemisyo ya televizyo mpe bafilme oyo ezali kokumisa pite. Lokola kosopa zemi mpe myango ya kokanga kobota epalangani bipai nyonso, bilenge mingi bazali kokanisa ete kosangisa nzoto ezali na yango mabe te. Elenge mobali moko oyo azali monzemba kasi abotá alobi boye: “Nalingi kosangisa nzoto, kasi nalingi kobokola bana te.” Mosusu alobi ete: “Kosangisa nzoto ezali kosakana, ezali lisano.”

Ekoki kozala ete makanisi ya boye epalangani mingi mpenza epai ya bilenge oyo bazali babola. Elijah Anderson, ye asalaka bolukiluki, asololaki na bilenge oyo bafandaka na bakartye ya babola mpe alobaki ete: “Bilenge mibali mingi bamonaka ete kosangisa nzoto epesaka moto lokumu na esika afandi; kosangisa nzoto na basi mingi ezali lokola mpɛtɛ oyo moto azali kozwa.” Ya solo, elenge mobali moko oyo azali monzemba kasi abotá alobaki na Lamuká! ete bato bazali kotalela kosangisa nzoto na basi mingi lokola “nkɛni (coupe) oyo ozwi.” Makanisi ya mabe boye euti wapi? Anderson alobi ete mbala mingi, bato oyo bazali na ntina mingi na bomoi ya elenge oyo afandaka na kartye ya babola “ezali baninga na ye. Bango nde bamonisaka na ye makambo nini asengeli kosala mpe akosala nyonso ete atosa makambo yango.”

Anderson amonisi lisusu ete mpo na bilenge mibali mingi, kozwa mwana mwasi mpo na kosangisa na ye nzoto ezali bobele lisano, “mpo na kokosa moninga, mingimingi mwana mwasi.” Alobi lisusu ete “na lisano yango, mwana mobali alukaka komilakisa: ndenge na ye ya kolata, ya kokata nsuki, ya kotala, ndenge na ye ya kobina, mpe akolakisa ete ayebi koloba.” Bilenge mibali mingi bayebi mpenza “lisano” yango malamu. Kasi Anderson amonisi ete: “Ntango mwana mwasi azwi zemi, elenge mobali akómi koluka kokima.”—Buku Bilenge mibali minzemba oyo babotá: likambo oyo ezali kobongwana mpe bizaleli ya sika (na Lingelesi), ya Robert Lerman mpe Theodora Ooms.

Likanisi ya Nzambe

Kasi esengeli nde kobota mpo na kozala mobali ya solo? Kosangisa nzoto ezali kaka lisano mpamba? Ezali bongo te mpo na Yehova Nzambe, Mozalisi na biso. Na kati ya Biblia, Liloba na ye, Nzambe amonisi polele ete kosangisa nzoto ezali na ntina monene. Nsima ya kolobela kozalisama ya mobali na mwasi ya liboso, Biblia elobi ete: “Nzambe mpe apambolaki bango, mpe Nzambe alobelaki bango ete, Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili.” (Genese 1:27, 28) Nzambe akanaki ata moke te ete batata básundolaka bana na bango. Nzambe asalaki mobali na mwasi ya liboso ete bazala esika moko mpe báfanda na libala mpo na libela. (Genese 2:24) Yango wana, mokano ya Nzambe ezalaki ete mwana na mwana azala na mama na ye mpe na tata na ye.

Kasi eumelaki te mibali bakómaki kobala basi ebele. (Genese 4:19) Genese 6:2 elobi ete ata baanzelu mosusu “bamonaki ete bana basi ya bato bazalaki na bonzenga.” Baanzelu yango balataki nzoto ya bato mpe “bakamataki kati na bango basi mpo na bango kobala;” na lokoso nyonso, bazwaki “baoyo [nyonso, NW ] eponaki bango.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Mpela ya ntango ya Noa nde esalaki ete bademo wana bázongela nzoto na bango ya elimo. Kasi Biblia emonisi ete Nzambe abwaki bango zingazinga na mabele. (Emoniseli 12:9-12) Yango wana, lelo oyo, Satana na bademo na ye bazali na nguya makasi likoló ya bato. (Baefese 2:2) Kozanga koyeba, bilenge mibali bazali komitya na nse ya nguya wana mabe ntango bazali kobota bana oyo bango bakanaki te mpe bazali kolinga bango te.

Yango wana, Makomami ezali koloba solo ete: “Mokano ya Nzambe ezali boye ete bóbulisama ete [bóboya pite, NW ]. Moto na moto ayeba [kobatela mbeki, NW ] na ye moko kati na bulɛɛ mpe na [kotosa], mpo na mposa mabe ya nzoto te, [ndenge] ekosalaka bapakano baoyo bayebi Nzambe te, ete moto moko akwea te mpe asalela ndeko na ye mabe na likambo oyo te. Zambi Nkolo [akopesa etumbu mpo na, NW ] makambo oyo nyonso.”—1 Batesaloniki 4:3-6.

‘Koboya pite’? Bilenge mibali mingi bakoki kotyola likanisi oyo. Bakoloba ete bazali bilenge mpe bamposa na bango ezali makasi! Kasi omoni ete pite ezali mpe ‘kosalela bato mosusu mabe.’ Ezali mpenza kosalela mwana mwasi mabe soki otiki ye na bebe na mabɔkɔ, kozanga tata oyo akosunga ye, boye te? Kobosana te ete likama mpe ezali ya kopesa ye maladi oyo ezwamaka na kosangisa nzoto, lokola herpès génital, kasɛndɛ, sopisi to sida. Ezali solo ete mbala mosusu okoki kopɛngola makama oyo. Atako bongo, kosangisa nzoto liboso ya libala ebebisaka lokumu malamu ya mwana mwasi mpe ekopekisa ye kokɔta na ndako ya libala lokola moseka. Yango wana, koboya pite ezali likambo ya mayele mpe emonisaka ete moto akɔmɛli. Ya solo esengeli kozala na komipekisa mpe kozwa ekateli makasi mpo na ‘kobatela mbeki na yo moko’ mpe koboya kosangisa nzoto liboso ya libala. Kasi Yisaya 48:17, 18 elobi na biso ete na nzela ya mibeko na ye, Nzambe ‘azali koteya biso mpo na litomba na biso moko.’

‘Bózala mibali mpenza’

Kasi ndenge nini elenge mobali akoki komonisa ete azali mpenza mobali ya solo? Ezali te na kobotabota bana ya makango. Biblia epesi toli oyo: “Bókɛngɛla, bótɛlɛma kati na kondima, bózala [mibali] mpenza, bókemba na nguya. Tiká ete makambo nyonso na bino masalama na bolingo.”—1 Bakolinti 16:13, 14.

Omoni ete ‘kozala mobali mpenza’ elimboli kozala na bokɛngi, kotɛlɛma ngwi na kondima, kozala na mpiko mpe na bolingo. Ya solo, etinda oyo etali mibali mpe basi, bango nyonso. Kasi soki oloni bizaleli ya elimo lokola oyo, bato bakomemya yo mpenza mpe bakosepela na yo mpo ozali mobali ya solosolo! Talá ndakisa ya Yesu Klisto, moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Kanisá naino makasi na ye, mpiko oyo amonisaki liboso ya minyoko, ata mpe liboso ya kufa. Kasi Yesu azalaki na ezaleli nini liboso ya basi?

Ya solo, Yesu azalaki na bantango mosusu, kosepela kofanda esika moko na basi. Azalaki na bayekoli mingi ya basi mpe kati na bango ezalaki na bamosusu oyo “bazalaki kosalela [Yesu na bantoma na ye] na biloko na bango.” (Luka 8:3, NW ) Yesu azalaki mpenza moninga ya bandeko basi mibale ya Lasalo. Kutu Biblia elobi ete “Yesu alingaki Malata mpe ndeko mwasi na ye.” (Yoane 11:5) Na ntembe te, lokola Yesu azalaki moto ya kokoka, azalaki na mayele mpe bonzenga, kasi asalelaki yango mpo na kokosa basi wana mpe kobenda bango na makambo ya mbindo? Soki moke te, kutu Biblia elobi mpo na Yesu ete “asalaki lisumu moko te.” (1 Petelo 2:22) Azalaki na makanisi ya mbindo te ata ntango mwasi moko oyo ayebanaki lokola moto ya masumu, mbala mosusu ndumba, “alelaki, mpe abandaki kopolisa makolo na ye na mpisoli, mpe kokɔmba yango na nsuki na moto na ye.” (Luka 7:37, 38) Yesu akanisaki ata mbala moko te kosalela bolɛmbu ya mwasi wana mpo na kosala na ye makambo ya mbindo! Amonisaki ete ayebi komipekisa, ezaleli oyo ezali komonisa ete moto azali mpenza mobali ya solosolo. Azalaki kotalela basi lokola bato oyo ebongi kolinga bango mpe komemya bango, kasi lokola biloko mpo na kokokisa mposa ya nzoto te.

Soki ozali elenge mobali moklisto, landá ndakisa ya Klisto kasi ya baninga na yo te; yango ekobatela yo ‘osalela moto mosusu likambo mabe te.’ Ekobatela yo ete obota mwana ya makango te mpe yango ememela yo mikakatano mingi. Ezali solo ete bato mosusu bakoki kosɛka yo mpo oboyi kosala pite. Kasi nsukansuka, kosepelisa Nzambe ekomemela yo matomba mingi koleka kosepelisa baninga na yo mpo na mwa ntango moke.—Masese 27:11.

Bongo soki elenge moko azalaki na bomoi ya mbindo kala, kasi asili kobongwana na bizaleli wana ya mbindo mpe abongoli mpenza motema? Soki ezali bongo, akoki kondima ete Nzambe akolimbisa ye, lokola alimbisaki Mokonzi Davidi oyo asalaki lisumu kasi abongolaki motema. (2 Samwele 11:2-5; 12:13; Nzembo 51:1, 2) Kasi soki apesaki mwana mwasi moko zemi, mbala mosusu elenge mobali yango asengeli kondima komema mokumba yango. Asengeli nde kobala mwana mwasi yango? Asengeli kobokola mwana na ye? Lisolo moko ekolobela mituna yango na nimero mosusu.

[Bililingi na lokasa 15]

Bilenge mingi bamikosaka ntango bakanisaka ete kosangisa nzoto ezali na mikakatano te

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto