Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g01 Janvier nk. 26-27
  • Kolela ezali mabe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kolela ezali mabe?
  • Lamuká!—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokonzi moko ya kompanyi oyo esalaka sanduku ya bibembe apesi makanisi na y
  • Bato na bato bazali na ndenge na bango ya kolela
  • Masolo oyo ezali na kati: Okoki kolonga mpasi ya kobungisa moto na liwa
    Lamuká!—2018
  • Ndenge ya komesana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Lolenge nini nakoki koyika mpiko na mawa na ngai?
    Ntango moto oyo olingaka akufi
  • Kozala na mayoki motindo oyo ezali mabe?
    Ntango moto oyo olingaka akufi
Makambo mosusu
Lamuká!—2001
g01 Janvier nk. 26-27

Kolela ezali mabe?

NA MOKANDA na ye Liwa ya bana (na Lingelesi), monganga Elisabeth Kübler-Ross, akomaki boye: “Mikóló mingi banyokwamaka mpo ete basilisaki te mpasi moko ya bomwana. Yango wana, ntango mwana azali kolela, ezali malamu te kopekisa ye mpe koloba na ye ete azali ‘bilelalela’ to azali ‘mwasi,’ to koloba na ye ete ‘Mobali alelaka te.’”

Likanisi oyo ekeseni mpenza na mimeseno ya bikólo mosusu esika balobaka ete ezali malamu te komonisa na miso ya bato ete ozali na mawa.

Mokonzi moko ya kompanyi oyo esalaka sanduku ya bibembe apesi makanisi na y

Robert Gallagher, mokonzi ya kompanyi moko oyo esalaka sanduku ya bibembe na New York, alobi makambo oyo ekeseni mpenza na yango. Asololaki na bakomi ya Lamuká! mpe batunaki ye soki amonaki bokeseni oyo ezali kati na lolenge bato oyo babotami na États-Unis balelaka bibembe mpe lolenge bato oyo bautá na mikili ya sudi ya Amerika balelaka bibembe.

Alobaki boye: “Namoni mpenza bokeseni. Ntango nabandaki mosala oyo na bambula ya 1950, tozalaki na bato mingi oyo bautaki Italie mpe bayaki kofanda na kartye na biso. Bazalaki mpenza komonisa polele soki bazali na mawa to na esengo. Lelo oyo, tokutanaka na bana na bango mpe bankɔkɔ na bango na ntango ya kokunda bibembe, kasi bamonisaka lisusu mawa lokola bango te. Balelaka mpenza na miso ya bato te.

Na ntango oyo bazalaki kokoma Biblia, Baebele bazalaki komonisa polele soki bazali na mawa to na esengo. Talá ndenge Biblia emonisi likambo Yakobo asalaki ntango bakosaki ye ete nyama moko ya zamba elei Yosefe, mwana na ye. Biblia elobi boye: “Bongo Yakobo apasolaki bilamba na ye mpe alataki ngɔtɔ na loketo na ye mpe alelaki mwana na ye mikolo mingi. Bana na ye babali mpe bana na ye basi balongwaki mpo na kobɔndisa ye. Nde ye aboyaki kobɔndisama mpe alobaki ete, Te, nakokita na [sheol, NW] epai ya mwana na ngai bobele na kolela. Bongo tata na ye alelaki ye.” (Biso nde totɛngisi makomi; Genese 37:34, 35) Ya solo, Yakobo ayokaki nsɔni te mpo na kolela mwana na ye oyo akufaki.

Bato na bato bazali na ndenge na bango ya kolela

Ya solo, mimeseno ekeseni. Na ndakisa, na bisika mingi ya Nigeria, mabota mingi ezalaka na bana mingi mpe bana mingi bakufaka mpo na maladi ndenge na ndenge. Atako bongo, moto moko oyo akomaka mikanda mpe afandi na Afrika mbula 20, alobi boye: “Balelaka mingi na liwa ya mwana, mingimingi soki azali mwana ya liboso. Mpe bakolela mingi lisusu soki azali mwana mobali. Bokeseni ezali ete na Nigeria, bazalaka na mawa makasi, kasi na boumeli ya ntango mokuse. Eumelaka basanza to bambula te.”

Na mikili oyo ezali mpembenimpembeni ya Méditerranée to na Amerika ya Sudi, bato bamonaka ete kolela to kosepela na miso ya bato nyonso ezali mabe te. Kuna, bamonisaka mawa to esengo na bango na miso ya bato nyonso. Ntango bapesanaka mbote, basukaka kaka te na koningisana mabɔkɔ, kasi bayambanaka mpenza. Ndenge moko mpe, na ntango ya mawa, balelaka mpe bagangaka mpenza na miso ya bato.

Katherine Fair Donnelly, ye akomaka mikanda, alobi ete tata oyo akufeli mwana “azali kaka te konyokwama na makanisi mpo na liwa ya mwana na ye, kasi azali lisusu kobanga ete bábenga ye ‘mwasi’ mpo aleli na miso ya bato nyonso.” Kasi, Katherine alobi lisusu boye: “Ntango okufeli mwana, mibeko ya bizaleli oyo etali kolela ezalaka te. Mposa wana ya kolela mpo na kosilisa mawa na yo ezali lokola kopasola bibɔ mpo na kobimisa mafina nyonso.”

Na yango, na mikili mosusu bato balelaka mpo na komonisa mawa na bango polele, nzokande na bisika mosusu ezalaka bongo te. Kasi tosengeli te kotalela yango lokola bolɛmbu. Ata Yesu Klisto mpe ‘atangisaki mpisoli’ na liwa ya moninga na ye Lasalo, atako ayebaki ete etikali moke asekwisa ye.​—Yoane 11:35.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 26]

Yakobo ayokaki nsɔni te mpo na kolela mwana na ye oyo akufaki

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto