Engebene Biblia
Komanyola ya ndenge nini epesaka matomba?
“TIKÁ ETE MALOBA YA MONƆKƆ NA NGAI MPE MAKAMBO OYO NAZALI KOMANYOLA NA MOTEMA NA NGAI ENDIMAMA LIBOSO NA YO, E YEHOVA, LIBANGA NA NGAI MPE MOSIKOLI NA NGAI.—NZEMBO 19:14, NW.
MPO na yo, “komanyola” elimboli nini? Soki olandaka mateya ya mangomba mosusu ya Azia, mbala mosusu okanisaka ete komanyola ezali eloko moko oyo engɛngisaka makanisi polele mpe epesaka mayele ya sika. Na Lingomba ya Bouddha, komanyola esɛngaka kolongola makanisi nyonso na motó. Nzokande na mangomba mosusu, komanyola esɛngaka kotondisa motó na “makambo oyo eyebani ete ezali nzela ya mayele mpe endimami na mokili mobimba.”
Likanisi ya Biblia mpo na likambo etali komanyola ekeseni na makanisi ya mangomba. Ekeseni na nini? Tótalela ndakisa ya mobali moko oyo alobelami na Biblia, nkombo na ye Yisaka, ntango akómaki na mbula 40, azalaki na makambo mingi ya komanyola. Genese 24:63 elobi ete: “Na mpokwa Yisaka abimaki mpo na [komanyola, NW ] na elanga.” Ntina moko ezali te ya kokanisa ete Yisaka alongolaki makanisi nyonso na motó na ye to ete azalaki bobele kokanisa ‘likambo moko oyo eyebani ete ezali nzela ya mayele mpe endimami na mokili mobimba.’ Yisaka azalaki mpenza na makambo ya sikisiki oyo asengelaki kokanisa likoló na yango, lokola bomoi na ye ya mikolo ezali koya, liwa ya mama na ye, to akobala nani. Azalaki komanyola makambo wana ya ntina na mpokwa ntango azalaki ye moko. Na kati ya Biblia, komanyola ezali kaka likambo ya kotambwisa makanisi mpambampamba te.
Komanyola esɛngaka makambo mingi
Tótalela ndakisa ya Davidi mokomi ya nzembo. Akutanaki na mikakatano minene ebele, mpe ayebaki malamu ete lokola azalaki moto ya kozanga kokoka, azalaki na mposa ya lisalisi ya Nzambe mpo amitambwisa malamu. Nini elendisaki Davidi na ntango ya mikakatano? Lokola ekomami na Nzembo 19:14 (NW ) Davidi alobaki ete: “Tiká ete maloba ya monɔkɔ na ngai mpe makambo oyo nazali komanyola na motema na ngai endimama liboso na yo, Ɛ Yehova Libanga na ngai mpe Mosikoli na ngai.” Liloba ya Liebele oyo ebongolami awa na “komanyola” elimboli “kolobaloba yo moko.” Ɛɛ, Davidi ‘azalaki kolobaloba ye moko’ mpo na Yehova, mpo na makambo na ye, misala na ye, mibeko na ye mpe bosembo na ye.—Nzembo 143:5.
Ndenge moko mpe, baklisto ya liboso bazalaki kotalela ntango ya komanyola makambo ya elimo lokola eteni moko ya losambo ya solo. Yango wana ntoma Paulo alendisaki bango ete: “Makambo nyonso na solo, na makambo nyonso na lokumu, na makambo nyonso na sembo, na makambo nyonso na pɛto, na makambo nyonso na boboto, na makambo nyonso na ngɔlu, soko malamu ezali mpe soko lisanzoli ezali, bókanisa makambo yango.” (Bafilipi 4:8) Ya solo mpenza, “makambo” oyo Paulo alobeli mpo na kokanisa makambo ya kolendisa, esengeli kokɔta na bɔɔngɔ na biso malamu. Ndenge nini?
Mokomi ya nzembo apesi eyano. Nzembo 1:1, 2 elobi ete: “Esengo ezali na moto oyo aboi [kolanda] toli na bato mabe . . . Mposa na ye ezali kati na Mobeko na [Yehova; akotánga] mpe Mobeko na ye butu na moi.” Ya solo, mokomi ya nzembo azalaki kotánga mobeko ya Nzambe mbala na mbala. Yango wana, akokaki komanyola makambo oyo azalaki koyekola, makambo oyo etali Mozalisi.
Komanyola lelo oyo
Kotánga Biblia epesaka matomba mingi, kasi nsima ya kotánga, tosengeli komanyola, kokanisa malamumalamu, to “kolobaloba biso moko” makambo oyo totángaki. Soki tolingi ete biloko oyo tolei epesa biso makasi, esengeli ete enikama malamu na libumu, bobele bongo komanyola ezali na ntina mingi mpo na kokɔtisa makambo oyo totángaki na Biblia na kati ya bɔɔngo na biso. Komanyola ya malamu esɛngaka kaka kolongola makanisi mabe te. Esalisaka biso mpe tóyeba ndenge tokoki kosilisa mikakatano na biso na nzela ya Biblia. Komanyola ya ndenge wana ekoki kosalisa biso tólonga mitungisi ya mokolo na mokolo.—Matai 6:25-32.
Davidi mokomi ya nzembo ayebaki ntina ya komanyola mpo na kosepelisa Nzambe. Alobaki ete: “Monɔkɔ na moyengebene ekobimisa maloba na mayele.” (Nzembo 37:30) Ɛɛ, moto oyo azali kosambela na bosembo amanyolaka. Soki Nzambe azali kotalela moto ete azali sembo, yango ezali mpenza lipamboli oyo ekopesa ye matomba na elimo. Na ndakisa, Biblia elobi ete ‘nzela ya moyengebene ezali lokola pole oyo ekongɛnga lisusu mpe lisusu kino mokolo na malamu koleka.’ (Masese 4:18) Yango wana, moklisto ya botosi oyo ‘akobimisaka maloba ya mayele’ akoki kozala na elikya ete akokóma na bososoli malamu ya Biblia.
Biblia ezali mpe kolendisa baklisto ete bámanyolaka likoló na mikumba na bango oyo esɛngami na Makomami. Ntoma Paulo ayebisaki Timote ete: “Otyaka motema na makambo oyo, omipesa na yango, ete bato nyonso bámona polele ete ozali kotambola liboso. Omisɛnzɛla yo moko mpe [mateya] na yo; ɛɛ, oumela na yango, zambi ekosalaka yo boye okomibikisa yo mpenza mpe bango bazali koyoka yo.” (1 Timote 4:15, 16) Ya solo, makambo oyo tolobaka mpe oyo tosalaka ekoki kosimba mitema ya bato mosusu.
Emonani polele ete tozali na bantina mingi ya komipesa na kokanisa malamumalamu makambo ya ntina. Ezali malamu kokanisa makambo oyo tokutanaki na yango kala, kotalela na likebi makambo oyo ezali kosalema sikawa, mpe kokanisa bomoi ya mikolo ezali koya. Kasi oyo eleki nyonso, komanyola ekosalisa biso mingi soki tozali kotya makanisi na biso na mayele ya Mozalisi, Yehova Nzambe.
[Elilingi na lokasa 17]
“Azali komanyola,” esalemi na Rodin