Loyembo 57
Komanyola ya motema na ngai
Ya Papye
1. Komanyola ya motema,
Makambo nakanisaka—
Esepelisa yo, Nkolo,
Na yo tiká nakangama.
Ntango mitungis’ezwi ngai,
Mpe ezangisi ngai mpɔngi,
Boye nakokanisa yo,
Mpe malamu’oyo nayebi.
2. Makambo nyonso ya pɛto,
Ya malamu mpe ya solo,
Elobelami malamu—
Epesa ngai kimya solo.
Ee Yah, oleki na bwanya!
Ekoki te kotángama.
Tiká namanyola yango,
Namipesa n’ango mpenza.
(Talá mpe Nz. 49:3; 63:6; 139:17, 23; Flp. 4:7, 8; 1 Tim. 4:15.)