Ndenge ya kobatela mino ya ebandeli
OBANDAKI kobima mino ntango okokisaki sanza boni? Mbala mosusu okokamwa soki oyoki ete obandaki kobima mino ntango ozalaki naino na libumu ya mama, liboso kutu mama na yo ayeba ete azali na zemi! Yango wana ezali na ntina mingi ete mama oyo azali na zemi alyaka mingi biloko oyo etongaka nzoto, lokola biloko oyo ezali na calcium, phosphore, proteine mpe vitamini.
Tokoloba nini mpo na bana oyo bauti kobotama? Bato ya mayele balobi ete bana mike oyo bamɛlisaka bango na bibɛrɔ bazali mpenza na likama ete mino na bango ebeba mpe yango ebandaka mingimingi na mino ya liboso, oyo ezali likoló. Kasi esalemaka ndenge nini? Bana mosusu balalaka mbala na mbala na bibɛrɔ ya miliki, ya mai ya mbuma, ya mai ya sukali to ya masanga ya sukali na monɔkɔ. Atako biloko yango epɔlaka, ezalaka na proteine, esika oyo mikrobe elingaka kofanda. Na nsima, mikrobe yango ekobimisa acides oyo ekoki kobebisa mino ya mwana, mingimingi soki acides yango efandi na mino ya mwana na boumeli ya butu mobimba. Mino ya bana mike mosusu ebebá mpenza makasi, yango esalaka ete mino na bango elongwa liboso ya ntango. Yango ekoki mpe kosala ete na nsima, ntango akokóma mokóló, mino na ye ebeba.
Ndenge nini baboti bakoki kobatela mino ya ebandeli ya bana na bango? Ezali malamu komɛlisa bango mabɛlɛ, mpamba te mabɛlɛ ya mama ezali na mikrobe te mpe ezali na ba anticorps mpo na kobundisa maladi. Nzokande, bato ya mayele balobi ete soki osalelaka bibɛrɔ, ntango mwana akokisi mbula moko na ndambo, osengeli kotika komɛlisa ye bibɛrɔ. Balobi lisusu ete osengeli kosalela bibɛrɔ kaka mpo na koleisa mwana, kasi ezala te mpo na kobondela ye ntango azali kosala makɛlɛlɛ. Lisusu, soki olalisi mwana na bibɛrɔ na monɔkɔ, ekozala malamu ezala kaka na mai mpamba na kati. Ntango nyonso, soki mwana asilisi kolya, okoki kosalela elamba moko ya pɛtɛpɛtɛ mpe ya pɛto mpo na kopangusa mino na ye.
Okoki kobatela mino ya ebandeli ya mwana na yo ete ebeba te. Kobatela mino ezala pɛto ezali na ntina mingi, ata mpo na bana mike!