Ozali na mposa na mino ya kosalisa?
MINO ya kosalisa ezalaka ntina na masoló mingi ya kosekisa, kasi mpo na bato mingi oyo bazali na yango, ezali mpenza mabe te. Soki ozali naino na mino na yo nyonso mpe soki nyonso ezali malamu, mbala mosusu ozali komona ntina moko te ya kozala na mino ya kosalisa. Nzokande, atako likambo ya mino ya kosalisa ekotala yo ata mokolo moko te, lisoló oyo ekosalisa yo na kosepela na mino malamu oyo ozali na yango mpe ekolendisa yo ete obatelaka mino na yo malamu na meko nyonso ekoki na yo.
Mingi na bato oyo bakanisaki ete bazali kobatela mino na bango malamu bakamwaki mokolo mosusu na komona ete mino na bango makomi koningana. Tokolimbola yango lolenge nini? Tuná ata monganga nini ya mino, akoyebisa yo ete nsima na kolekisa mibu 30, mino ekómaka kolongwa, mingimingi soki bibubutu to misuni ya mino ekómi kobela maladi mabengami parodontale. Kasi mino makoki mpe kolongwa na likámá moko to mpe soki mabebi.
Ozali mpenza na mposa ya mino ya kosalisa, mpo ete mwa mosusu kati na mino na yo malongwe to mpe nyonso malongwe?a Mpo na nini bato mosusu basalelaka yango te? Ezali bobele bisalasala mpo na koluka kozwa mbongo?
Mpo na nini kozala na mino ya kosalisa?
Mpo na koyanola na motuna oyo, totala naino mosala ya mino. Yango ezali bobele mpo na kitoko ya monoko te. Ntango tozali konyamuta, mino mazali kokatakata bilei, mai ya misopó ya libumu ezali kosangana na bilei; nzoto ekoki bongo kobenda biloko ya litomba bizwami kati na bilei. Nzokande soki moto azali na mino te, to azali na mino bobele moke, akokoka mpenza konyamuta bilei te. Ata mikuwa ya nsonge oyo etikalaka na nsuka ya monoko mpe ezipami na bibubutu soki mino malongwe, ekokaka mpenza konyamuta bilei te lokola esengeli, atako mikuwa yango mizali makasi. Yango wana, bato oyo mino masili nyonso kolongwa bakoki kozwa mpasi na libumu soki bameki kokitisa bilei mbala moko na libumu nzela moko na café, na ti to na bimeli mosusu. Ata ezali bobele mwa mino nde ezangi, kolya ekómaka ya kopona, mpamba te bilei makasi to oyo ezali na misisa, mpe esengaka konyamuta yango mingi, ekómi koboyama.
Mino makosalisaka mpe biso mpo na koloba malamu, likambo oyo mbala mingi tokanisaka yango te wana mino na biso nyonso mazali. Mino makosalisaka lolemo mpe mbebu ete ebimisa mileli mpe milelisi oyo, soki yango te, bato bakoki koyoka te eloko nini tozali koloba. Na ndakisa, maloba makosukaka na mileli lokola [v], [s], [f] ezali mpasi mpo na koloba yango soki monoko mozali na mino te. Na ntembe te osili komona ete ezali boye solo, wana ezalaki yo koyoka moto oyo azangi mino azali koloba. Moto oyo azali na mino ya kosalisa asengeli komesenisa lisusu lolemo na ye na kobimisa maloba polelepolele. Yango ekoki kosenga ntango, kasi matomba makozala malamu koleka moto oyo azangi mino.
Okoki koyemba to mpe kobeta miziki ya monoko, wana ezali yo na mino ya kosalisa? Mingi bakokaka, soki babongisi malamu mino oyo basalisaki. Bayembi, babeti miziki ya monoko, bateyi, basaní mpe balakisi na midele ya bilamba, mbele bakosala misala na bango na mpasi soki bazangi mino.
Kozanga mino ekoki mpe kobebisa elongi. Mbebu elembi, zolo mpe mbangá eyei molai, mpe moto akomi mobange. Basusu bazalaka lisusu na bosepeli te to mpe babulungani mpenza.
Kolongwa ya lino moko ekoki kobebisa molongo mobimba ya mino. Mpamba te mino na biso masimbami kati na yango, lokola mabanga ya bitóngeli oyo Baloma bazalaki kotónga na lolenge ya litimbo. Na yango, soki moko ezangi, mosusu ekotika bisika na yango, kotikáká bongo ntaka to espace kati na lino moko mpe lino mosusu; bilei mosusu bikobanda kotikala na bisika yango, mpe mbala mingi bibubutu to misuni ya mino ekobanda kobela. Ekoki mpe kotya lino moko liboso lino mosusu nsima, mpe moto akozala na mpasi mpo na konyamuta.
Mino ya solo mpe mino ya kosalisa
Mino ya solo mpe mino ya kosalisa ekeseni mpenza na likambo oyo ete mino ya solo epiká misisa na yango na mozindo mpenza kati na mikuwa ya mbánga. Ekoki bongo kokata mpe konyamuta bilei malamumalamu. Mino ya nse ezalaka mwa moke nsima na mino ya likoló, na motindo boye ete mbánga ekoki kokangama malamu, ndenge moko biteni mibale ya sizó ekangamaka malamu, moko likoló na mosusu.
Mino ya kosalisa efandaka se likoló ya bibubutu to likoló ya mikuwa ya bibubutu. Esimbami bobele na lisalisi ya lolemo, ya matama mpe na makasi ya bikangiseli mosusu. Lokola mino ya kosalisa ekangami na misisa te oyo esimbi yango makasi lokola mino ya solo, ekoki koningana ata na eloko ya moke.
Mino ya kosalisa ekosimbaka malamu to malamu te engebene moto na moto. Kasi makasi na yango ekoki kokokana te na oyo ya mino ya solo. Lolenge mpe molai ya mbánga, lolenge ya misuni, ata mpe makanisi ya moto ye moko, bakisa makoki na ye ya komesena na mino ya kosalisa, nyonso oyo nde ekokata soki mino na ye oyo asalisi na masini ekosimba malamu to ekosimba te. Likambo na yango ya mabe ezalaka mingimingi koningana. Kasi mpo na bonzengá, mino ya kosalisa ekoki kokokana na mino ya solo.
Na mawa nyonso, esengeli mbala mosusu kozala na mino ya kosalisa mpo okoka kososola matomba ya mino ya solo mpe mayele mamonisami na yango. Bato bakoki komekola, kasi bakolónga te kosala mino oyo ekobonga mpenza lokola oyo ya solosolo.
Mbala mosusu ekosengela na yo kosomba mino ya kosalisa, na lolenge ya prothèse ya mobimba to ya ndambo. Ezali ekateli oyo yo moko osengeli kokamata; nzokande tokoki komonisa awa matomba na yango: ekosunga yo ete omelaka bilei te kozanga konyamuta yango, soki te ekosala yo mpasi na libumu, ekosunga yo ete okoka kolya biloko bikeseni, na esika ete okima mosusu mpo ete ozangi mino; ekobongisa mpe elobeli na yo. Bakisa lisusu ete ekobongisa monoko na yo.
Atako baoyo bazali na mino ya kosalisa bakokanisaka ntango oyo bazaláká na mino na bango ya solosolo, nde ata bongo, mino ya kosalisa esungi bamilió mingi ya bato kati na mokili kino kopesa bango mwa bosepeli mpe liyoki ya kozala malamu.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kati na lisolo oyo, liloba “mino ya kosalisa to prothèse” elimboli biloko oyo bisalemi na lolenge ya mino mpenza mpo na kotya yango na esika ya mino oyo mazangi: prothèse ya mobimba ekotyamaka ntango mino nyonso elongwé, prothèse ya ndambo ekotyamaka na eteni moko soki mwa ndambo moke etikali. Lisoló oyo ekolobela lolenge oyo mibale ya prothèse to mino ya kosalisa.
[Etanda na lokasa 16]
Mpo na kobatela mino na bino
KOKENDE epai ya monganga ya mino ekoki kosenga mosolo mingi. Nzokande, mwa bokundoli mosusu, ya litomba mpo na bana na yo, ekokitisa motema na yo.
Engebene zulunalo The New York Times, “soki ba Américains mingi bazali na mino matandami malamu te mpe na mbánga etengami ezali mpo ete bazali kolya biloko mingi ya petepete.” Liteya ezali boye: bilei oyo bizali kosenga konyamuta makasi “ezali kokólisa malamu mbánga (na bongo, lino mokomoko ekozwa esika ekoki na yango), ekobongisa malamu molongo ya mino oyo makotikala libela mpe ekobongisa elongi mpe monoko.”
Bato na mayele bamekaki komona bosolo ya liteya oyo; bapesaki na makaku moko bilei makasi mpe na makaku mosusu bilei ya petepete. Matomba nini mamonanaki? Makaku oyo bapesaki ye bilei makasi azalaki na “mbánga malamu” koleka makaku oyo bapesaki ye bilei ya petepete. Soki okopesa na mwana na yo bilei makasi oyo bizali kosenga konyamuta makasi, ekoki kobongisa malamu mino na ye mpe mbánga na ye. Mwango mosusu ezali ya komesenisa bana na yo kosukola mino na bango na brosse mpe kosalela cure-dents mpo na kolongola bitika ya bilei oyo bikangamaka na mino.
[Elilingi na lokasa 17]
Mino masimbami na lisalisi na oyo mosusu. Soko “moninga ya pembeni” azali te, mosusu ekoninganaka mpe ekopusanaka