Batelá mino na yo mpo osɛkaka malamu
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA CANADA
NTANGO omitalaka na talatala, otalaka mpenza nini? Ekoki kozala ete otalaka nsuki na yo to eloko mosusu na ndenge ozali komonana. Bongo kosɛka na yo? Oyebi ete mino nde ekómisaka kosɛka kitoko? Na bongo, soki olingi osɛkaka malamu, osengeli kobongisaka mino na yo. Mino na yo ya mokóló, esalemi mpo eumela bomoi na yo mobimba. Ebongi mpenza otyelaka yango likebi. Longola ete mino esalisaka yo otafuna biloko mpe oloba malamu, ebatelaka mbɛbu ná matama na yo, mpe esalisaka yo osɛkaka malamu mpe na ndenge oyo ekosepelisa bato. Ya solo, mino na yo ezali na ntina mingi!
Okoki kosala nini mpo na kobatela mino na yo?
Kozala na mino ya malamu etalelaka biloko oyo moto alyaka. Kolya bilei ya ndenge na ndenge oyo ezali na kalsiumu mpe vitamini A, C mpe D mingi, esalaka ete mino ekola malamu, kobanda ntango mwana azali na libumu ya mama tii ntango akokokisa mino nyonso.a Soki olyaka bilei ya malamu, okozala ntango nyonso na mino ya malamu, kasi kebá na biloko ya sukali mingi! Mbala mingi, yango nde ebɛlisaka maladi ya mino. Atako bakebisaka bato mbala na mbala ete sukali ebebisaka mino, na Amerika ya Nɔrdi moto moko alyaka kilo 50 tii 60 ya sukali mbula na mbula! Mpo na nini sukali ekoki kobebisa biso mino?
Maladi ya mino eutaka na mikrobɛ ya ndenge mibale—Streptococcus mutans mpe lactobacilles, oyo ekolaka na salite oyo ekangamaka na mino. Mikrobɛ yango elyaka sukali mpe ebongolaka yango na baaside oyo ebebisaka mino. Sukali mosusu ebongwanaka aside noki to ekangamaka makasi na mino, mpe ntango ezali koumela mingi na lino epesaka maladi ya mino.b Soki balongoli basalite yango te, ekómaka makasi mpe ekangamaka mpenza na nse ya mino.
Mpo na komibatela na maladi ya mino, esengeli kotika salite na mino ntango molai te mpe komibatela na mikrobɛ babengi Streptococcus mutans, oyo ebebisaka mino. Na bongo, soki olingi osɛkaka malamu, osengeli kosukolaka mino mokolo na mokolo. Na Iniversite moko (The Columbia University School of Dental and Oral Surgery) balobi ete: “Mpo na kobatela mino na yo mpe misuni oyo ezalaka pembenipembeni na mino, mpe mpo eumela, ezali na ntina mingi olekisaka nsinga ya mino (fil dentaire) na kati ya mino, mpe [osukolaka mino na brɔsi].” Na lokasa oyo mpe lokasa elandi, bamonisi ndenge ya kosalela brɔsi mpe nsinga ya mino. Mbala mosusu, monganga na yo ya mino akolakisa yo biloko mosusu to mayele mosusu ya kosukola mino malamu mpo osɛkaka malamu.
Soki mino ezali kozwa baaside mbala na mbala, yango esilisaka baminero oyo ezalaka na mino to etɔbolaka mino mwa madusu mikemike. Nzokande, baminero ezipaka mwa madusu yango mokolo na mokolo. Ndenge nini? Emonani ete fluor ebatelaka mino mpo ezongiselaka baminero na mino. Na bongo, atako maladi ya mino eutaka na mikrobɛ, ezali na biloko oyo ebatelaka mino mpo ebeba te, na ndakisa fluor. Ya solo, mino emibatelaka yango moko!
Ntango okei epai ya monganga ya mino
Ankɛtɛ moko emonisi ete na makambo mingi oyo ebangisaka bato, kokende epai ya monganga ya mino ezali likambo ya mibale; likambo ya liboso ezali koloba liboso ya bato. Esengeli mpenza kobanga? Na mikili ya bozwi, bamasini ya kolongola mino oyo esalaka mbangu, ba anesthésie ya kopakola to ya ntonga oyo ebomaka nzoto kaka esika oyo batye yango, esalisaka minganga ya mino básalisa moto kozanga ayoka mpasi mingi to anyokwama. Soki oyebi makambo oyo minganga basalaka mpo na kobanda kopesa nkisi tii bakosilisa, yango ekoki kosalisa yo obanga mingi te.
Ntango okei kokutana na monganga ya mino, mbala mingi akobanda na kosukola yo mino na ndenge ya monganga, mpe mingimingi lifulume oyo asukolaka mino (hygiéniste) nde akosala yango. Ntango azali kosala, akolongola salite nyonso oyo ekangamá na mino, oyo ezali na bisika oyo brɔsi mpe nsinga ya mino ekoki kokóma te. Na nsima, bakosebisa mino na yo mpo salite ekangama lisusu makasi te mpe mpo na kolongola salite oyo ebebisaka kosɛka na yo.
Lokola eyebani ete fluor ebatelaka mino na mikrɔbɛ oyo ebebisaka yango, mbala mingi bapakolaka bana fluor [ya gel, ya mai, to ya verni] na mino na lopitalo ya mino. Na mikili mingi, batyaka fluor na mai ya pompi, mpe mbala mingi batyaka yango na nkisi ya mino mpo ebatela mino.
Monganga ya mino akoki kosala nini?
Minganga ya mino bazali kozwa formasyo mingi mpo báyeba ndenge ya kosalisa bato báyeba kobatela mino mpo esila baminero te. Mbala mingi, soki moto azwi nkisi ntango mwa madusu mikemike ebandi na mino, akobɛla maladi ya mino te. Na bongo, soki okokutana na monganga ya mino mpo na koyeba soki mino na yo ezali malamu to mpo na kobatela yango, osengeli kobanga te.
Nzokande, soki baaside ya salite ya mino elongwe nyonso te, maladi ya mino ekoki lisusu kozonga. Soki lino ezwi nkisi ya malamu te, ekoki kutu kotɔbɔka. Na ntango wana, esengeli kozwa nkisi nokinoki. Soki lidusu ekómi naino na misuni ya lino te, batyaka eloko moko mpo na kokanga yango.
Monganga ya mino asalelaka masini babengi fraise mpo na kosukola lidusu yango mpe kobongisa yango mpo na kotya eloko oyo ekokanga yango. Na nsima, batyaka nkisi babengi Amalgame to résine composite mpo ekanga lidusu yango. Amalgame ekaukaka noki, kasi résine composite ekómaka makasi kaka soki batyeli yango mwinda moko ya langi ya bule. Soki lidusu yango ezwi nkisi te, ekokóma tii na misuni ya lino, na ntango wana ekosɛnga koboma mosisa ya lino mpo moto ayokaka lisusu mpasi te, to kolongola lino mobimba. Mbala mingi soki babomi mosisa ya lino, ntina ezalaka lisusu te ya kolongola lino mobimba. Soki lino ebebi mingi, bakoki mpe kotya yango couronne to kolongola yango mpo na kotya lino oyo basali kosala.c
Ntina oyo esengeli kosala milende
Ntango mosusu obangaka kaka kokende kokutana na monganga ya mino. Soki ezali bongo, yebisá ye makambo oyo ezali kobangisa yo. Liboso abanda kosalisa yo, bóyokana bajɛstɛ nini oyo okosala (na ndakisa kotombola lobɔkɔ) soki mpasi eleki. Sɛngá ye alimbolela yo likambo mokomoko oyo akosala ntango akosalisa yo. Okoki mpe kosalisa mwana na yo azalaka na mino ya malamu soki ozali koyebisa ye ntina ya kokendeke epai ya monganga ya mino, lobelá likambo yango na ndenge ya malamu, kasi te lokola etumbu oyo okopesa ye soki asali mabe.
Doktɛrɛ Daniel Kandelman, profɛsɛrɛ na Iniversite moko (University of Montreal’s Department of Oral Health), alobi boye: “Lelo oyo, mayele oyo minganga ya mino bakómi na yango ekoki kosalisa bato bakokisa mposa oyo moto nyonso azalaka na yango: mino na ye ezala makasi, mpɛmbɛ, mpe kitoko bomoi na ye mobimba.” Na bongo, esengeli kosala milende mpenza!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Biloko oyo mama alyaka ntango azali na zemi mpe ntango azali komɛlisa mwana, esalaka ete mwana azala na mino ya malamu to te, mpo ezali na ntango wana nde mino ebandaka kobima. Mino esilisaka kokola ntango mwana akómi na mbula 19 to mwa moke koleka 20.
b Minganga ya mino bamoni ete sukali moko oyo babengaka xylitol ebomaka mikrobe oyo epesaka maladi ya mino. Batyaka sukali yango na babazoka mosusu.
c Mpo na koyeba makambo etali mino ya kosala, talá lisolo “Avez-vous besoin d’une prothèse dentaire? [Ozali na mposa ya mino oyo basali kosala?]” na Lamuká! ya 22 Febwali 1993, nkasa 18-20 (na Lifalanse).
[Etanda/Bililingi na lokasa 28]
Ndenge ya kosukola mino
Ezali na ndenge mingi ya kosukola mino, kasi kebá osalela nkisi ya mino mingi te. Nkisi ya mino ezalaka na biloko oyo esukolaka mino, mpe mbala mosusu “biloko yango ezalaka makasi mbala nkama koleka lino yango moko.”
1 Tyá brɔsi esika mino ebandi na angle ya 45°. Niká mino malɛmbɛmalɛmbɛ, bandá na nse tii na nsɔngɛ na yango. Niká yango na kati mpe na libándá.
2 Baloláká brɔsi na bisika oyo mino enikaka biloko.
3 Mpo na konika mino ya liboso na kati, tɛlɛmisá brɔsi likoló ya mino. Bendá brɔsi kobanda na nse ya mino tii na bansɔngɛ.
4 Niká lolemo mpe monɔkɔ na yo mobimba.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Kobanda na 1-4: Na ndingisa ya www.OralB.com
[Etanda/Bililingi na lokasa 29]
Saleláká nsinga ya mino
Minganga ya mino balobi ete esengeli kolekisaka nsinga na katikati ya mino mikolo nyonso mpe kosukola mino soki osilisi kolya.
1 Katá ndambo ya nsinga ya mino mpe zingá bansuka na yango mibale na misapi na yo ya katikati, mpe tiká mwa ndambo ya nsinga na katikati.
2 Sembolá nsinga yango na mosapi moko ya monene ya lobɔkɔ moko mpe na mosapi oyo elandi oyo ya monene ya lobɔkɔ mosusu. Bandá kokɔtisa mpe kobimisa nsinga na kati ya mino mbala na mbala.
3 Lingá nsinga na lino mopanzi moko mpe mopanzi mosusu, mpe niká yango na lino mbala na mbala. Kotisá nsinga malɛmbɛ na nse mpenza ya mino, kasi kosala makasi te na esika wana mpe kolekisa nsinga mbala na mbala te.
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Euti na: The Columbia University School of Dental and Oral Surgery’s Guide to Family Dental Care
Kobanda 1-3: na ndingisa ya www.OralB.com