Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g01 Juillet lok. 3
  • Ntango nzoto ezali kotungisa yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango nzoto ezali kotungisa yo
  • Lamuká!—2001
  • Masolo mosusu
  • Etanda ya makambo ezali na kati
    Lamuká!—2001
  • Makanisi ya ndenge na ndenge ezali kotungisa yo
    Lamuká!—2001
  • Biblia ekoki kosalisa ngai soki nazali na maladi oyo eumeli mingi?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ndenge nini okoki kozala na bomoi ya malamu atako ozali na maladi moko oyo esilaka te?
    Lamuká!—2001
Makambo mosusu
Lamuká!—2001
g01 Juillet lok. 3

Ntango nzoto ezali kotungisa yo

“Namiyokaki lokola nde babambi ngai ebakata ya nzete na motó.” Maloba ya John, ntango ayokaki ete azali kobɛla maladi moko oyo ekopekisa ye asala misala.

“Nazalaki lisusu ngai te.” Beth moto alobaki bongo, ntango ayaki koyeba ete maladi na ye ekosila lisusu te.

NA BOMOI ya moto, moko ya makambo oyo eleki mpasi mingi ezali ya koyoka ete ozali na maladi moko oyo esilaka te to oyo ebukaka bato to mpe koyoka ete mbeba ya nzoto oyo ozwi na likama moko boye ekofandisa yo na ndako libela. Ezala bayebisi yo maladi yango na kati ya biro ya monganga epai makɛlɛlɛ ezalaka te to yo moko omoni mbeba ya nzoto na yo na ndako ya lopitalo, na esika bayambaka bato ya maladi makasi, ekozala kaka mpasi mpo ondima yango. Na kati ya bomoi, ezali na eloko mpenza te oyo ekoki kosalisa yo omibongisa libela mpo na koyeba ndenge ya kokanga motema na bampasi oyo moto ayokaka ntango maladi moko ya mabe ezali konyokola ye.

Mpo na kozwa makanisi oyo ekoki kosalisa bato oyo bauti kozwa maladi ya ndenge wana sika, tosololaki na bato ya mikili ndenge na ndenge oyo basali bambula mingi na bamaladi oyo esilaka te, kasi bazali kaka kokangela yango motema. Tosɛngaki bango bápesa makanisi na bango na mituna lokola oyo: Omiyokaki ndenge nini? Nini esalisaki yo oyika mpiko na mokakatano yango mpe okitisa motema? Osalaki nini mpo ozongela kotambwisa bomoi na yo ndenge ozalaki kosala liboso, atako ezali mwa mpasi? Mpo na kosalisa bato oyo nzoto na bango ezali kotungisa bango mikolo oyo, topesi makanisi oyo tozwaki na mituna totunaki bato wana ya maladi, sangisa mpe makanisi oyo tozwaki epai ya bato mosusu ya mayele, oyo bayekolaka bampasi oyo euti na bamaladi oyo eumelaka mingi; okokuta makanisi yango na masolo oyo elandi.a

[Maloba na nse ya lokasa]

a Masolo oyo etaleli mingimingi bato ya maladi to bato oyo bázwa mbeba minene ya nzoto. Kasi masolo oyo ezali na motó ya likambo “Ntango moto moko ya libota azali maladi” ezali na makanisi oyo etali mingimingi bato oyo bazali kokɛngɛla baoyo bazali kobɛla (Lamuká ya 22 Mai 2000, ebimeli ya Lifalanse).

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto