Ndenge nini okoki kozala na bomoi ya malamu atako ozali na maladi moko oyo esilaka te?
KOBANGA te, mayoki oyo ozali na yango ezali na ntina. Nzoto na yo oyo ezali konyokwama, kasi makanisi na yo ezali koboya kondima makambo oyo maladi yango ememeli yo. Ekoki komonana lokola ete yo na maladi bozali kobunda etumba moko monene, etumba kati na ndenge ozalaká mpe ndenge okoki kokóma. Nzokande, sikoyo ekoki komonana lokola maladi nde elongi etumba. Kasi okoki kobongola likambo yango. Ndenge nini okoki kosala yango?
Kitty Stein, ye azali pisikologe, alobi ete: “Soki maladi na yo epekisi yo kosalaka makambo mosusu, okoyoka lokola nde okufeli mpenza moto.” Soki ozalaki na eloko moko ya ntina mingi, na ndakisa nzoto kolɔngɔnɔ, kasi sikoyo ozali na yango lisusu te, ezali mabe te ete oyoka mawa mpe olela mpo na yango, lokola nde okufeli moto moko oyo olingaki mingi. Kutu, soki obɛli okoki mpe kozanga makambo mosusu. Na ndakisa, mwasi moko alobi boye: “Nasengelaki kotika mosala na ngai. . . . Nazalaká komisalela makambo nyonso ngai moko, kasi nazalaki lisusu na likoki te ya kosala yango ngai moko.” Ata soki ezali bongo, osengeli kotalela makambo na ndenge ezali mpenza. Kitty Stein, ye moko abɛlaka maladi ya misisa (sclérose en plaques), alobi lisusu boye: “Ezali solo ete osengeli kolela eloko oyo obungisi, kasi osengeli mpe kotya makanisi likoló ya biloko oyo ozali na yango naino.” Soki mpasi oyo ozalaki na yango na ebandeli eleki, na nsima okomona ete ozali kaka na makambo mosusu ya ntina oyo ebebi ata moke te. Moko na yango ezali likoki oyo ozali na yango ya komesana na ndenge oyo bomoi na yo ekómi.
Motambwisi-masuwa akoki kopekisa mbonge te, kasi akoki koleka yango soki atɛlɛmisi malamu bilamba oyo etambwisaka masuwa (voiles). Ndenge moko mpe na yo, mbala mosusu okoki te kopekisa maladi oyo ebɛti yo makasi lokola mbonge, kasi okoki kobundana na yango soki otɛlɛmisi malamu “bilamba oyo etambwisaka masuwa”, elingi koloba makoki ya nzoto na yo, ya makanisi na yo, mpe ya motema na yo. Eloko nini esalisaki bato mosusu oyo mpe babɛlabɛlaka básala likambo yango?
Luká koyeba maladi na yo
Bato mingi bamonaka ete malamu oyoka mpasi mpo monganga ayebisi yo maladi nini ozali kobɛla na esika ete ozalaka kaka kobangabanga mpo oyebi te maladi nini ozali kobɛla. Soki ozali kobangabanga, okosala eloko moko te; kasi soki oyebi likambo oyo ekómeli yo, ekoki kosalisa yo mpo otala makambo oyo okoki kosala, mpe ekosalisa yo okitisa motema. Monganga David Spiegel ya Iniversite ya Stanford alobi boye: “Atako likambo oyo ezali kotungisa yo ezali ndenge nini, omonaka te ete omiyokaka malamu soki obongisi makanisi ya malamu oyo ekosalisa yo olonga yango? Liboso ete osala likambo moko, motema na yo ekobanga te soki obongisi likambo oyo osengeli kosala.”
Ekoki kozala malamu soki oluki koyeba makambo mwa mingi oyo etali kwɔkɔsɔ oyo ozali na yango sikoyo na nzoto. Lokola Biblia elobi yango, “moto ya boyebi aleki kokembisama.” (Masese 24:5) Moto moko oyo atɛlɛmaka lisusu te na mbeto mpo na maladi apesi toli oyo: “Defá babuku na bibliotɛkɛ. Salá makasi oyeba makambo nyonso oyo etali maladi na yo.” Ntango okoyeba bankisi oyo esalisaka maladi yango mpe makambo oyo okoki kosala mpo na komesana na maladi yango, okomona mbala mosusu ete maladi na yo ezali makasi te ndenge ozalaki kokanisa yango. Okoki kutu kosepela mpe kozala na elikya ete makambo na yo ekotambola sikoyo malamu.
Nzokande, mokano na yo ya nsuka mpenza na ntango ozali kosala nyonso wana ezali te ya koluka kaka koyeba malamumalamu makambo nyonso mpenza oyo etali maladi na yo. Monganga Spiegel alobi lisusu boye: “Koluka koyeba makambo oyo etali maladi na yo ezali moko ya makambo oyo esalemaka mokemoke mpo esalisa yo ondima maladi na yo, oyeba yango mpe otalela yango mpenza ndenge ezali.” Ezalaka mpasi mpe eyaka malɛmbɛmalɛmbɛ mpo ete ondima ya solo ete atako ozali kaka na bomoi kasi bomoi yango etikali lisusu ndenge ezalaki liboso te. Koyeba maladi na yo na nzela ya mayele na yo, mpe kondima yango na motema na yo ezali makambo mibale oyo ekeseni mpenza oyo okoki kosala. Kasi, ndenge nini?
Ezali lisɛki te mpo na kozala na bokatikati
Kondima maladi na yo elakisi nini mpo na yo? Ntango mosusu oyebi yango ndenge mosusu; soki ezali bongo, ekosɛnga mbala mosusu obongisa likanisi na yo. Soki totali malamu, tokomona ete kondima maladi na yo elingi koloba te ete maladi elongi yo, ndenge moko mpe tokoki koloba te ete mbonge elongi motambwisi-masuwa mpo kaka andimi ete ya solo masuwa na ye ezali na kati ya mbonge. Kasi, ndenge ayebi ete azali na kati ya mbonge ekotinda ye nde aluka likambo oyo asengeli kosala. Ndenge moko mpe, soki ondimi maladi na yo elingi koloba te ete maladi elongi yo, kasi ezali nde kolakisa ete “ozwi nzela mosusu,” ndenge mwasi moko oyo abɛlá maladi moko oyo eumelaka alobaki.
Ata soki ozali lisusu na nzoto makasi te, osengeli kobosana te ete yango elakisi te ete bɔɔngɔ na yo, mayoki na yo mpe bizaleli na yo ya elimo mpe ebebi. Na ndakisa, mayele na yo ezali kaka mpe ozali kaka na makoki ya kobongisa makambo mpe ya kokanisa, boye te? Ntango mosusu mwa kosɛka na yo ya esengo ezali kaka, obungisi mpe te ezaleli na yo ya komibanzabanza mpo na bato mosusu, bakisa mpe makoki na yo ya koyeba koyokela bato mpe kozala moninga malamu. Mpe eloko oyo eleki ntina, ozali kaka na kondima na yo epai ya Nzambe.
Lisusu, kobosana te ete atako okoki te kobongola makambo oyo ekweli yo, kasi yo kaka nde okoki kozwa mokano mpo na yo etali ezaleli oyo osengeli kozala na yango liboso ya makambo yango. Irene Pollin, oyo asalaka na Institut américain de cancérologie alobi: “Yo moko nde ozali na mokumba ya kozwa ezaleli moko boye liboso ya maladi na yo. Ata soki maladi yango elingi nini, nguya ezali kaka epai na yo moko.” Hélène, mwasi moko ya mbula 70, abɛlaka maladi ya misisa ya makasi mpenza, alobi boye: “Ezali mpenza maladi te nde ekolakisa soki makanisi na yo ekozonga malamu, kasi ezali nde ezaleli oyo yo moko okomonisa liboso ya maladi yango.” Mobali moko oyo azali kobunda na maladi moko esali sikoyo bambula mingi, alobi boye: “Kozala na makanisi ya malamu, oyo mpe etondi na elikya ekokani na eteni moko ya masuwa oyo babengaka quille (eteni ya masuwa oyo ezalaka na nse na yango mpe oyo esalaka ete masuwa etɛlɛma ntango nyonso semba).” Ezali solo, mpamba te Masese 18:14 (NW) elobi boye: “Elimo ya moto ekoki koyikela maladi na ye mpiko; kasi nani akoki koyikela elimo oyo elɛmbi mpiko?”
Tambwisá lisusu bomoi na yo
Mokemoke, ntango mayoki na yo ezali kozonga na esika na yango, na esika omituna lisusu motuna oyo: ‘Mpo na nini likambo oyo ekómeli ngai,’ okomituna nde motuna oyo: ‘Lokola likambo oyo ekómeli ngai, nakosala nini?’ Na ntango wana nde okoki kozwa mokano ya kobakisa makambo mosusu likoló ya oyo osili kosala. Tiká tótalela ndambo ya makambo oyo okoki kosala.
Talelá malamu makambo na yo, kanisá oyo osengeli kobongisa mpe luká kosala mbongwana na esika oyo ekoki kosalema. Monganga Spiegel alobi boye: “Maladi oyo ozali kobɛla epesi yo libaku ya kotalela lisusu bomoi na yo malamu—ezali lokola ngonga oyo ebɛti mpo na kolamwisa yo na mpɔngi, kasi ezali te elembo oyo emonisi ete olingi kokufa. Omituna mituna oyo: ‘Liboso nabɛla maladi oyo, eloko nini ezalaki na ntina mingi na miso na ngai? Bongo sikoyo, ekómi ndenge nini?’ Ntango ozali komituna mituna wana, ezali te mpo na koluka makambo nini oyo okosala te, kasi ezali mpo na koyeba makambo nini oyo okoki kosala, ntango mosusu na kosaláká makambo na ndenge mosusu. Tókamata ndakisa ya Hélène oyo tolobelaki liboso.
Ekoki sikoyo mbula 25 mobimba banda maladi ya misisa ezali kolɛmbisa misisa na ye mokemoke. Na ebandeli, azalaki kosalela kiti moko ya kotambolisa (déambulateur) mpo na kokende epai na epai. Na nsima, ntango lobɔkɔ na ye ya mobali ekokaki kosala lisusu eloko te, akómaki kosalela lobɔkɔ ya mwasi. Na nsima, lobɔkɔ na ye ya mwasi ezwaki mpe mindɔndɔ. Bongo, ekómi sikoyo mbula mwambe banda akokaka lisusu kotambola te. Sikoyo esengeli bato mosusu básukolaka ye, báleisaka ye, mpe bálatisaka ye. Yango eyokisaka ye mawa, kasi atako bongo, alobi boye: “Nzembo na ngai ya mikolo nyonso yango oyo: ‘Kanisá makambo oyo okoki kosala, kasi kokanisa te oyo ozalaki kosala liboso.’ ” Na lisalisi ya mobali na ye mpe ya mafulume oyo bayaka kosalisa ye, bakisa mwa makambo mosusu oyo asali na mayele na ye moko, azali kokoba kosala makambo mosusu oyo azalaki kosepela mingi kosala liboso. Na ndakisa, banda ntango azalaki na mbula 11, kosakola elikya ya Biblia oyo ezali kolobela mokili ya kimya oyo ezali koya ezalaki moko ya makambo ya ntina mingi na kati ya bomoi na ye, mpe tii lelo asakolaka yango pɔsɔ na pɔsɔ. (Matai 28:19, 20) Hélène ye moko alimboli boye ndenge asalaka:
“Nasɛngaka na lifulume oyo ayei kotala ngai asimbela ngai zulunalo. Natángaka elongo na ye esika bayebisaka bankombo ya bato oyo bakufi mpe bomoi na bango, mpe toponaka mwa ndambo ya bankombo. Na nsima, nayebisaka lifulume yango makambo oyo nalingi kokomela bato oyo bakufeli moto yango, nsima na yango lifulume abɛtaka mokanda yango na masini. Mpe natindaka mokanda yango elongo na mwa buku Ntango moto oyo olingaka akufi...,a oyo elobelaka elikya ya kobɔndisa oyo Biblia epesi, elingi koloba elikya ya lisekwa. Nasalaka bongo mikolo nyonso ya lomingo na nsima ya midi. Nayokaka esengo mpo nazali naino na likoki ya koyebisa bato mosusu nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.”
Omityela mikano oyo ekoki na yo mpe oyo okoki kokokisa. Moko ya bantina oyo etindaki Hélène ameka kosala mbongwana na bisika oyo asengelaki kosala mpe ezali mpo ete yango esalisaka ye amityela mikano mpe akokisa yango. Mpo na yo mpe, yango ezali na ntina. Mpo na nini? Mpo soki omityeli mikano, ekosalisa yo otya makanisi na yo na mikolo ezali koya; mpe soki okokisi mikano na yo, ekopesa yo esengo mpo osali likambo moko. Ekoki mpe kosalisa yo okóma lisusu komityela motema. Kasi, talá malamu soki mokano oyo omityeli ezali mpenza polele. Na ndakisa, okoki koloba: ‘Lelo nakotánga mokapo mobimba ya Biblia.’ Lisusu, omityelaka mikano oyo ekoki na yo. Lokola nzoto na yo mpe ndenge ozali sikoyo koyoka na motema ekeseni na oyo ya bato mosusu oyo bazali mpe na maladi oyo eumelaka, okoki te kokokisa mikano oyo ezali ndenge moko na oyo ya bango.—Bagalatia 6:4.
Lex afandaka na Pays-Bas, ye alobi boye: “Ata mokano oyo omityeli ezali kaka ya moke, soki okokisi yango, ekotinda yo osala lisusu mingi.” Mbula koleka 20 banda akutanáki na likama oyo ekómisá ye ebɔsɔnɔ, ntango wana azalaki na mbula 23. Nsima na yango, na ntango nyonso oyo minganga bazalaki kosalisa ye na nzela ya bangalasisi (rééducation), bazalaki kolendisa ye amityela mikano, na ndakisa kosukola ye moko elongi na ye na eteni moko ya elamba. Ezalaki kolɛmbisa ye, kasi akokaki. Ntango amonaki ete akokisi mokano wana, amityelaki mokano mosusu, ete akangaka mpe afungolaka ye moko molangi ya nkisi na ye ya mino. Wana mpe akokaki kosala yango. Lex alobi ete: “Atako ezalaki mpasi, nayaki komona ete nakokaki kosala mingi koleka oyo nazalaki kokanisa.”
Kutu, lokola mwasi na ye Tineke azalaki kosalisa ye, Lex akokisaki mikano ya minene lisusu koleka. Na ndakisa, sikoyo elongo na mwasi na ye Tineke, akendaka ndako na ndako na kiti na ye ya kotindika mpo na koteya bato mosusu Biblia. Pɔsɔ na pɔsɔ akendaka kotala mobali moko oyo maladi ebebisá nzoto na ye makasi mpenza mpo na kolendisa ye mpe koyekola na ye Biblia. Lex alobi boye: “Kosalisa bato mosusu epesaka ngai esengo mingi.” Lokola Biblia endimisi yango: “Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.”—Misala 20:35.
Yo mpe, okoki komityela mokano ya kosalisa bato mosusu, boye te? Lokola ozali na maladi to lokola nzoto na yo ebebi na maladi, yango ekoki kosalisa yo okóma moto oyo ayebi mpenza kobɔndisa bato mosusu mpo bampasi na yo esali ete oyeba mpenza koyokela bato mosusu oyo bazali na maladi mawa.
Kangamá na bato mosusu. Minganga bamoni ete kofanda na bato esika moko ezali malamu mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto na yo. Soki osali bongo te ezali mabe mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto na yo. Moto moko ya mayele alobaki ete: “Lokola bato oyo bamɛlaka likaya bakufaka mingi . . . ndenge moko mpe bato oyo bafandaka kaka bango moko . . . bakufaka mingi.” Alobi lisusu ete: “Mpo moto azala na nzoto kolɔngɔnɔ asengeli kotika komɛla likaya, ndenge moko mpe kozala esika moko na bato mosusu ekoki kosalisa yo ozala nzoto kolɔngɔnɔ.” Yango wana, likambo oyo alobi na nsuka ekoki kokamwisa biso te, ete koyeba kofanda na bato ezali “nzela ya lobiko”!—Masese 18:1.
Nzokande, lokola lisolo oyo eleki elobelaki yango, mokakatano ekoki nde kozala ete baninga na yo mosusu batiká koya kotala yo. Tiká kozalaka kaka yo moko, ezali mpo na bolamu na yo. Kasi, ndenge nini okoki kosala yango? Okoki kobengaka baninga na yo báyaka kotala yo.
Sepelisaká bato oyo bazali koya kotala yo. b Okoki kosepelisa bango soki ozali kolobela maladi na yo mingimingi te, noki te bakolɛmba koyoka yo. Mwasi moko oyo abɛlaka maladi oyo eumelaka asalaki bongo; na masolo na ye na mobali na ye, amityelaki ntango ya kolobela maladi na ye mpe asengelaki kolekisa ntango yango te. Alobi boye: “Esengelaki mpenza tótyela yango ndelo.” Maladi na yo esengeli te kozala kaka lisolo moko oyo okosolola na bato. Moto moko akendaki kotala moninga na ye oyo akokaki lisusu te kotɛlɛma na mbeto na ye mpo na maladi; nsima ya kosolola na ye makambo etali misala ya ntɔki, istware, mpe ntina ya kondimela Yehova Nzambe, moto yango alobaki boye: “Okoyeba te ete azali moto ya maladi. Nasepelaki mingi kosolola na ye.”
Soki mpe oyebi kosɛkisa bato, baninga na yo bakozala na esengo ya kolekaka epai na yo. Kutu, kosɛka ezali malamu mpo na yo moko. Moto moko oyo abɛlaka maladi ya Parkinson (maladi ya kolɛmbisa nzoto) alobi ete: “Koyeba kosɛkisa ekosalisa yo oyeba eloko oyo osengeli kosala ntango okutani na mikakatano ata ya ndenge nini.” Ya solo, kosɛka ekoki kozala nkisi ya malamu mpenza. Yango wana Masese 17:22 emonisi yango na maloba oyo: “Motema ya kosepela ekosalaka malamu lokola nkisi.” Ata soki osɛki kaka mwa moke, ekosalisa yo mingi. Lisusu, mokomi moko ya mikanda, ye moko mpe abɛlaka maladi moko oyo eumelaka, nkombo na ye Susan Milstrey Wells alobi boye: “Na bankisi nyonso oyo tosalelaka, kaka kosɛka nde ezali ata na mabe moko te, ezali na pwazɔ te, mpe eyokisaka nsai. Eloko oyo tobungisaka ntango tosɛkaka yango oyo: elongi na biso ekangamaka te.”
Luká ndenge ya kosala mpo ete omitungisaka mingimingi te. Bato ya mayele baluki mpe bamoni ete komitungisa mingi ekómisaka maladi makasi, nzokande kokitisa motema esalaka ete mpasi oyo ozali koyoka emonana lokola likambo ya moke . Yango wana na bantango moko boye, osengeli kopemaka. (Mosakoli 3:1, 4) Kokanisaka maladi na yo ntango nyonso te. Soki obimaka lisusu te na ndako mpo na maladi, okoki kokitisa makanisi na yo na kosaláká makambo oyo: koyoka miziki oyo ebɛtaka malɛmbɛ, kotánga mokanda moko boye, koumela na kosukola nzoto, kokoma mikanda to maloba ya ntɔki, koyema, kobɛta mondule, kosolola na moninga moko oyo otyelaka motema, mpe bongo na bongo. Elingi koloba te ete soki osali bongo nde mpasi na yo nyonso ekosila, kasi ekosalisa yo opema ata mpo na mwa ntango moke.
Soki maladi na yo efandisá yo na ndako te, zalá na momeseno ya kotambola na makolo to na motuka, kokende na wenze, kosala mwa bilanga, to soki likoki ezali, kende kopema mosika. Ya solo, kosala mobembo ekoki kozala mpasi mpo na yo mpo na maladi na yo, kasi soki omibongisi malamu liboso mpe okani kosala mwa makambo mosusu ntango okokóma epai okokende, okolongola makambo nyonso oyo ekoki kotya yo nkaka. Na ndakisa, Lex na Tineke oyo tolobelaki liboso, bakendaki na mboka mopaya. Lex alobi boye: “Na ebandeli tozalaki kobanga, kasi tolekisaki ntango malamu mpenza!” Ya solo, maladi na yo ekómi lokola eteni ya bomoi na yo, kasi esengeli te kozala na bokonzi likoló na bomoi na yo.
Zwá makasi na kati ya kondima na yo. Baklisto ya solo oyo bakoki kofanda na maladi na bango to mpe na kwɔkɔsɔ mosusu ya nzoto balobaka ete kondima na bango epai ya Yehova Nzambe mpe kosangana na lisangá ya boklisto ezali makambo mibale oyo ebɔndisaka bango mpe epesaka bango makasi.c Talá ndenge balobeli matomba ya libondeli, ya koyekola Biblia, ya kokanisa malamumalamu mikolo oyo ezali koya, ya koyangana na makita ya boklisto na Ndako ya Bokonzi.
● “Na bantango mosusu nakómaka mawamawa. Soki esalemi bongo, nasambelaka Yehova, mpe apesaka ngai lisusu makasi ya kokoba kosala oyo nakoki kosala.”—Nzembo 55:22; Luka 11:13.
● “Kotánga Biblia mpe kokanisa likoló na makambo oyo nazali kotánga esalisaka ngai nazalaka ntango nyonso na kimya na makanisi.”—Nzembo 63:6; 77:11, 12.
● “Koyekola Biblia esalisaka ngai nabosana te ete bomoi ya solosolo ezali se mpo na mikolo oyo ezali koya mpe nakotikala ebɔsɔnɔ mpo na libela te.”—Yisaya 35:5, 6; Emoniseli 21:3, 4.
● “Kozala na kondima mpo na mikolo oyo ezali koya, ndenge Biblia elobeli yango, epesaka ngai makasi ya koyikela makambo oyo nakutanaka na yango mpiko mokolo na mokolo.”—Matai 6:33, 34; Baloma 12:12.
● “Kozala na kati ya makita na Ndako ya Bokonzi esalisaka ngai natyaka makanisi na ngai ntango nyonso na makambo ya malamu kasi kaka na maladi na ngai te.”—Nzembo 26:12; 27:4.
● “Kozala esika moko na bandeko ya lisangá elendisaka ngai mpe esepelisaka motema na ngai.”—Misala 28:15.
Biblia epesi biso elaka oyo: “[Yehova] azali malamu, ndako makasi na mokolo ya mpasi, ye ayebi bango bakotalelaka ye.” (Nahumu 1:7) Kozala na boyokani malamu na Yehova Nzambe mpe kosangana na lisangá ya boklisto ebɔndisaka mpe epesaka makasi.—Baloma 1:11, 12; 2 Bakolinti 1:3; 4:7.
Zalá motema molai
Kozala kaka na bomoi ya malamu atako ozali kobɛla maladi moko ya makasi mpenza to ozali na kwɔkɔsɔ mosusu ya nzoto ezali likambo moko oyo eyaka malɛmbɛmalɛmbɛ. Yango ezali likambo oyo mwasi moko, oyo asalisaka bato ya maladi oyo eumelaka mingi báyikela bampasi na bango mpiko, amonaki mpe alobaki ete, “likambo yango esɛngaka ntango mingi.” Moto mosusu oyo ayebi likambo yango malamu apesi toli ete esengeli kozala motema molai, mpamba te ozali koyekola “kosala likambo moko oyo oyebaki yango liboso ata moke te, likambo yango ezali nde koyeba komesana na maladi ya makasi oyo ekómeli yo.” Yebaká ete ata soki ozali na makanisi ya malamu ndenge nini, ekoki kokómela yo ete olekisa mikolo to bapɔsɔ mosusu mabe ntango oyo maladi na yo etomboki. Nzokande, nsima ya mikolo okoki komona ete mokemoke okómi koyoka lisusu malamu. Yango nde ekómelaki mwasi moko, oyo alobaki ete: “Nasepelaki mingi ntango namonaki ete nalekisaki mokolo mobimba kozanga kokanisa kanser na ngai. . . . Eleki mikolo mingi te, nakanisaki ata moke te ete likambo ya ndenge wana ekokaki kosalema.”
Ya solo, soki kobanga oyo ezalaka na ebandeli eleki mpe okani kosala makambo mosusu, okoki kokamwa ndenge oyo okomesana malamu na maladi na yo—ndenge lisolo oyo elandi ekomonisa yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Makanisi oyo epesami mpo na ndenge ya kosala epai ya bato oyo bayaka kotala yo, osengeli kosalela yango mpe epai ya molongani na yo, bana na yo, mpe bato oyo bazali kosalisa yo.
c Minganga mingi bamoni ete kondima esalaka ete moto azala nzoto kolɔngɔnɔ mpe na bomoi ya malamu. Dale Matthews, molakisi na kelasi ya monganga na Iniversite ya Georgetown alobi boye: “Emonani mpenza ete kondima ezali na ntina mingi.”
[Elilingi na lokasa 7]
Soki oyebi makambo oyo etali maladi na yo ekosalisa yo ondima yango malamu
[Elilingi na lokasa 8]
Na lisalisi ya bato mosusu, Hélène azali kobongisa mikanda ya kolendisa
[Elilingi na lokasa 8]
“Nayokaka esengo mpo nazali koyebisa bato mosusu nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe”
[Bililingi na lokasa 9]
“Nayaki komona ete atako nazali ebɔsɔnɔ, nasalaki mingi koleka oyo nazalaki kokanisa.”—Lex