Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp19 No. 2 nk. 10-11
  • Ntango obɛli maladi ya makasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango obɛli maladi ya makasi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAKAMBO OYO BATO MOSUSU BASALAKI
  • Ndenge nini okoki kozala na bomoi ya malamu atako ozali na maladi moko oyo esilaka te?
    Lamuká!—2001
  • Ntango mosangani moko ya libota azali kobɛla
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Ozali na motuya na miso ya Yehova Nzambe na yo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Mpo na nini nasengeli kobɛla boye?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
wp19 No. 2 nk. 10-11

Ntango obɛli maladi ya makasi

“Ntango monganga ayebisaki ngai ete nazali na kanser, nayokaki lokola bakateli ngai etumbu ya liwa. Kasi, ntango nazongaki na ndako, nalobaki boye na motema: ‘Nakanisaki te ete ekozala bongo; sikoyo, nasengeli koluka makasi ya koyika mpiko.’”​—Linda, azali na mbula 71.

“Nabɛlaka maladi oyo ebomaki ngai elongi na ngámbo ya lobɔkɔ ya mwasi. Lokola mpasi elekaka makasi, na ntango moko boye, nakómaki konyokwama na makanisi. Mbala mingi ekómelaki ngai namona ete nazangi moto ya kosalisa ngai mpe nakanisaki komiboma.”​—Elise, azali na mbula 49.

Tata moko oyo abɛlaka afandi na kiti ya bibɔsɔnɔ, azali elongo na bato oyo balingaka ye

SOKI yo moko, ndeko to moninga na yo asilá kobɛla maladi oyo ekoki komema na liwa, oyebi ete likambo yango etungisaka mingi. Longola mpasi ya maladi yango moko, moto akómaka konyokwama na makanisi. Kobanga mpe motungisi ekoki kobakisama mpo na makambo lokola kokutana na monganga, mokakatano mpo na kozwa lisalisi to kofuta mbongo ya lopitalo, mpe mpasi oyo bankisi mosusu to bantonga esalaka. Motungisi mpo na maladi moko ya makasi ekoki mpenza konyokola moto.

Nani akoki kosalisa biso na likambo ya ndenge wana? Bato mingi bamonaki ete kobondela mpe kotánga mikapo ya Biblia oyo elendisaka esalisaki bango mingi. Likambo mosusu oyo esalisaka mingi ezali bolingo mpe lisungi ya bandeko mpe baninga.

MAKAMBO OYO BATO MOSUSU BASALAKI

Robert, oyo azali na mbula 58, apesi toli oyo: “Ntango ozali kobunda na maladi, batelá kondima epai ya Nzambe, mpe ye akopesa yo makasi. Bondeláká Yehova. Yebisáká ye ndenge ozali koyoka. Sɛngáká ye elimo santu. Sɛngáká ye makasi mpo olendisaka libota na yo mpe omitungisaka mingi te mpo na maladi na yo.”

Abakisi boye: “Esalaka malamu mingi soki libota na yo ezali kolendisa yo, soki bazali kotika yo te. Mokolo na mokolo, ata moto moko to bato mibale babengaka ngai na telefone mpo na kotuna soki nalamuki ndenge nini. Baninga ya bipai na bipai balendisaka ngai. Bapesaka ngai mpenza makasi, mpe yango esalisaka ngai nalɛmba nzoto te.”

Soki okei kotala moninga moko oyo azali maladi, kobosana te likambo oyo Linda alobi: “Moto ya maladi alingaka azala na bomoi lokola moto nyonso mpe ntango mosusu akoki kolinga ete bóbɛta na ye lisolo ya maladi te. Yango wana, sololá na ye makambo mosusu oyo bomesaná kosolola.”

Soki Nzambe azali kopesa yo makasi mpe Liloba na ye ezali kolendisa yo, bandeko ya libota mpe baninga bazali kotika yo te, okomona ete kozala na bomoi ezali kaka na ntina, ata soki ozali kobɛla maladi ya makasi.

Makanisi ya Biblia oyo ekoki kosalisa

Tyelá Nzambe motema.

“Natunaki Yehova, mpe ayanolaki ngai, mpe abikisaki ngai na makambo nyonso oyo ezalaki kopesa ngai nsɔmɔ. Moto oyo ya mpasi abelelaki, mpe Yehova ye moko ayokaki.”​—Nzembo 34:4, 6.

Linda alobi lisusu boye: “Na libondeli nasɛngaka te ete, ‘Salisá ngai nayoka malamu.’ Nalobaka kaka, ‘Salisá ngai nazala na makasi, mpe salisá ngai nayikela maladi na ngai mpiko.’”

Makambo oyo Biblia elaki epesa yo makasi.

“Moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’”​—Yisaya 33:24.

Kanisá na mozindo makambo oyo Nzambe alaki mpo na mikolo ekoya; ekosalisa yo oyika mpiko.

Luká bandeko mpe baninga básalisa yo.

“Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.”​—Masese 17:17.

Elise alobi lisusu boye: “Kokima bato te. Ndimá baninga básalisa yo. Ntango mosusu okoki komona lokola ozali na moto te mpe ata Nzambe ye moko azali koyoka yo te, kasi kokima bato te.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto