Basinzili oyo babatelaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto na yo
NTANGO monganga asalaki ekzame ya makila ya Veronica, alobaki boye: “Mama, biloko oyo ebundisaka maladi na nzoto ezali lisusu makasi mingi te.” Banda mwa mikolo Veronica azalaki koyoka nzoto malamu te. Mbala na mbala azalaki kobɛla kɔsukɔsu (bronchite) mpe yango elɛmbisaki ye mingi; mikolo oyo euti koleka abɛlaki litoi mpe abɛlaki sinizite moko ya makasi.
Biloko yango oyo ebundisaka maladi na nzoto ezali nini, mpe yango ezali na ntina nini? Ndenge nini biloko yango esalaka mosala na yango?
Nzoto ebatelami liboso na banguna
Ebongiseli oyo ebundisaka maladi na nzoto esalemi na ebele ya biteni mikemike ya nzoto oyo babengaka bamolekile (molécule) oyo ekangamá mpe na baselile mosusu oyo esalaka elongo mpo na kobundisa maladi. Mosala na yango ezali ya kobatela biso mpo na bamikrobe oyo ekɔtelaka biso na nzoto, na ndakisa bamikrobe oyo babengaka bakteri (bactérie) to oyo babengaka virise (virus).
Tokoki kokokanisa nzoto na biso na engumba moko ya ntango ya kala. Bingumba ya ntango ya kala ezalaki kotongama likoló ya mwa bangomba mpo bákoka komona banguna oyo bazali koya na mosika. Mpo na kobatela bingumba yango, bifelo ebele na bikuke ya makasi ezalaki; bongo mpo na kokɛngɛla bikuke yango bazalaki kotya basinzili. Soki engumba ebatelami motindo wana, bato oyo bazalaki kofanda na kati na yango bazalaki kobanga ata eloko moko te. Soki tokokanisi nzoto na biso na engumba moko ya ndenge wana, tokoki koyeba malamu biloko oyo nzoto na biso esengeli na yango mpo na komibatela na ntango oyo bamikrobe ebundisi yango.
Mpo na nzoto na biso, soki bamikrobe oyo epesaka maladi ekɔti, ekutaka molɔngɔ ya liboso ya babateli ya nzoto, elingi koloba loposo ya nzoto mpe loposo ya binama ya kati ya nzoto (na ndakisa loposo oyo ezalaka na kati ya zolo mpe na mongongo). Lokola efelo, loposo na biso epekisaka biloko ya mabe koleka. Ebele ya mikrobe oyo ezalaka likoló ya loposo ya nzoto na biso elongwaka nzela moko na mposo ya likolólikoló.
Loposo ya binama ya kati ya nzoto to ba muqueuse ezalaka makasi te lokola loposo ya libanda; yango wana ezokaka mpambampamba. Kasi na kati na yango, ezalaka na biloko mingi oyo ebundisaka mikrobe. Moko ya biloko yango ezali lizozime (lysozyme); ezalaka na kati ya mai ya miso, na nsɔi, mpe na motɔki. Aside oyo ezalaka na kati ya motɔki epekisaka mikrobe ekóma mingi, kasi lizozime oyo ezalaka na kati ya motɔki ebomaka mikrobe yango nde koboma. Ezali mpo na ntina wana nde banyama balɛmbolaka bampota na bango mpo na kobelisa yango.
Basinzili ya liboso ezali baglobile ya mpɛmbɛ
Tózwa naino ndakisa oyo: mikrobe moko oyo ekoki kopesa yo maladi ekɔti na kati ya “engumba” na yo, na nzela ya mpota to moto mosusu oyo azali na mikrobe yango nde apesi yo yango. Na ntango wana kaka, limpinga ya baselile ekobanda mosala na yango; mokano na yango ezali se moko, elingi koloba kolongola mikrobe wana ya mabe mpe kosala ete nkolo nzoto abika. Baselile oyo ebundaka mpo na kobatela nzoto babengaka yango lekosite (leucocyte) to globile ya mpɛmbɛ (globule blanc). Ntango etumba ezali naino na esika oyo, mitindo minene misato ya baglobile ya mpɛmbɛ nde ebundaka; mitindo yango ezali: monosite (monocyte), netrofile (neutrophile) na lɛmfosite (lymphocyte).
Soki bamonosite “eyoki” ete eteni moko ya nzoto ezali kovimba, elongwaka na nzela oyo makila elekaka mpe ekendaka kokɔta na eteni yango, mpe kuna ekómaka bamakrofaje (macrophage), elingi koloba “balei minene.” Kuna elyaka eloko nyonso oyo ezali mopaya na kati ya nzoto. Lisusu, bamonosite ebimisaka sitokine (cytokine); basitokine yango nde ebongisaka nzoto mpo ekoka kobundisa maladi. Moko ya makambo oyo basitokine esalaka ezali oyo: kopesa fiɛvrɛ. Fiɛvrɛ ezalaka na ntina mingi, mpamba te yango nde emonisaka ete biloko oyo ebundisaka maladi na nzoto esi ebandi kobundisa maladi. Ekoki kosala ete moto abika nokinoki mpe ekoki kozala elembo ya malamu oyo ekoki kosalisa minganga báyeba maladi oyo moto azali na yango.
Na nsima, banetrofile “eyoki” ete eteni moko ya nzoto ezali kovimba, mpe na mbangu nyonso ekei kosalisa bamakrofaje. Banetrofile mpe emɛlaka bamikrobe. Ntango banetrofile yango ekufaka, ekómaka mafina. Na ndenge yango, kosalema ya mafina ezali mpe motindo mosusu ya kobatela nzoto mpo na maladi. Yango wana, banda kala minganga basalelaka mingi lisese ya Latini oyo elobi ete: pus bonum et laudabile, elingi koloba “mafina ezali malamu mpe ebongi na lokumu.” Na bongo, tokoki koloba ete kosalema ya mafina yango mpe esalisaka na kokangela maladi nzela. Nsima ya kolya mikrobe oyo ekɔtaki, bamakrofaje “ekolakisa” biteni mikemike ya mikrobe yango epai ya balɛmfosite mpo na koyebisa bango ete banguna basi bakɔti.
Na kati ya etumba ya nzoto na maladi, balɛmfosite ezalaka lokola etuluku moko ya babateli oyo baleki bamosusu nyonso. Mosala na yango ezali ya kobimisa baantikɔre (anti-corps), mpe baantikɔre yango ekendeke komikangisa kaka na eteni moko boye ya mikrobe. Ezali na mitindo minene mibale ya balɛmfosite; motindo na motindo ezalaka na mosala na yango. Oyo ya liboso babengaka yango lɛmfosite B (lymphocyte B); mosala na yango ezali ya kobimisa baantikɔre mpe kokɔtisa yango na nzela oyo makila elekaka. Na kotalela biloko nyonso oyo esalaka mosala ya kobatela nzoto, bakokanisi balɛmfosite B na limpinga ya basoda ya makasi koleka; mpamba te ebwakaka mbanzi na yango, elingi koloba baantikɔre, kaka na bisika oyo esengeli mpenza kokende. Baantikɔre “ekoluka” mikrobe oyo yango eyebi mpe ekobɛta mikrobe yango na esika oyo ekoki kobika te. Motindo ya mibale ya balɛmfosite babengaka yango lɛmfosite T (lymphocyte T); yango ebombaka likoló na yango moko baantikɔre oyo ebimisaka. Esalelaka yango mpo na kobɛta banguna na etumba moko ya kokanganakangana na nzoto.
Sikoyo makambo eyei ndongo. Na kati ya balɛmfosite T ezali na mwa etuluku mosusu oyo babengaka balɛmfosite T-basungi; yango esalisaka baninga na yango balɛmfosite B mpo na kobimisa baantikɔre ebele. Liboso ya kobunda, balɛmfosite T-basungi esololaka yango na yango. Euti komonana na mikolo oyo eleki ete baselile yango “esololaka” na kopesanáká bilembo (signal chimique), eyebisanaka soki mikrobe oyo ekɔti ezali ya ndenge nini.
Etuluku mosusu ya monene epesaka mpe mabɔkɔ, yango esalemi na baselile oyo ebomaka baselile mosusu. Yango ebimisaka baantikɔre te, kasi ebomaka baselile oyo ekómi lokola “mopaya” na kati ya nzoto mpo ezwi maladi. Na ndenge yango, baselile yango esalisaka mpe na kobatela nzoto mpo ete etikala kaka malamu.
Mpo na kosukisa, na lisalisi ya likoki na yango ya komikundola ndenge bitumba ya kala na bamikrobe elekaka, balɛmfosite ebosanaka te makambo nyonso oyo etali mikrobe moko boye; ezalaka lokola nde ebombaka makambo yango na kaye moko boye. Na ndenge yango, soki mikrobe ya ndenge wana ezongi lisusu, ekokuta balɛmfosite ebongisá baantikɔre oyo esengeli mpenza mpo na koboma mikrobe yango mbala moko.
Bamakrofaje, baselile oyo ebundisaka maladi na nzoto, ebandaka mosala na yango mpe ekobaka kosala yango tii ntango banguna nyonso bakosila na esika oyo evimbaki. Bamakrofaje elongolaka baselile nyonso oyo ekufi mpe biteni ya baselile oyo etikalaka nsima ya etumba na esika oyo maladi ezalaki, na bongo ezongisaka kimya na kati ya “engumba.”
Ntango babateli balɛmbi
Tolobeli kaka na mokuse ndenge oyo ekanisamaka ete nzoto na biso emibatelaka. Kasi, biloko yango oyo ebundisaka maladi na nzoto ekoki kolɛmba mpo na bantina ebele: Ekoki kozala ete biloko yango ezalaki ya kobeba na bisika mosusu banda kaka kobotama ya moto to mpe ekoki kozala ete eyei nde kobeba mpo na bamaladi oyo moto azwi na bomoi na ye.
Na bamaladi yango, oyo eleki makasi ezali sida, maladi ya nsɔmɔ oyo ebandaki kongala mpenza na bambula ya 1980. Maladi yango eutaka na virise moko nkombo na yango VIH; virise yango ekɔtaka mpenza na kati ya ebongiseli oyo ebundisaka maladi na nzoto na biso, mpe ebomaka mokemoke motindo moko boye ya balɛmfosite. Na bongo, eteni monene ya biloko oyo ebundisaka maladi na nzoto ebebisamaka. Na nsima na yango, bamaladi ekokóma kokɔta mbala na mbala na nzoto mpe eloko moko te ekokoka lisusu kosilisa yango nyɛɛ. Kutu, bamaladi yango ekómaka nde makasi koleka, mpe nzoto ezalaka lisusu te na eloko ya kobatela yango. Ekómi lokola engumba oyo esili kobeba, oyo ezangi bifelo; bongo monguna nyonso akoki kokɔtela yango.
Kasi, elingi koloba te ete kwɔkɔsɔ nyonso oyo ebebisaka biloko oyo ebundisaka maladi na nzoto na biso ezalaka kaka makasi motindo moko na oyo sida ekɔtisaka. Veronica oyo tolobelaki na ebandeli, azalaki na mwa kwɔkɔsɔ moke oyo ezalaki kosala ete nzoto na ye ebimisa mingi te lolenge moko boye ya baantikɔre oyo ezalaka mingimingi na kati ya loposo ya binama ya kati ya nzoto, mingimingi na banzela oyo mopɛpɛ elekaka. Yango esalaki ete bamaladi oyo azalaki kobɛla ezongaka mbala na mbala.
Lelo oyo, Veronica akómi malamu mpo azwaki mokano ya kolanda malamumalamu makambo mpe nkisi oyo monganga na ye apesaki ye. Ntango sinizite na ye esilaki, andimaki batubaka ye bantonga oyo esalaka ete baantikɔre ebotama mingi.a Atikaki mpe komɛla likaya mpe akómaki kopɛmisa nzoto mingi. Mwa moke na nsima, nzoto na ye ekómaki lisusu kolɔngɔnɔ koleka.
Ɛɛ, tosalemá mpo tózala na bomoi mpe na nzoto kolɔngɔnɔ. Ntango tozali kokanisa lolenge ya kokamwa oyo biloko oyo ebundisaka maladi na nzoto na biso esalemá, bakisá mpe bibongiseli mosusu ya kokamwa oyo ezali kati na nzoto na biso, yango etindaka biso tókumisa Mozalisi na biso mpe tópesa ye matɔndi mpo na bwanya na ye. (Nzembo 139:14; Emoniseli 15:3) Atako sikoyo tokoki kozala nzoto kolɔngɔnɔ te mpo tozali bato ya kozanga kokoka, Liloba epemami ya Nzambe ezali kopesa biso elikya ete na mokili ya sika oyo etikali moke eya, bato bakozonga lisusu bato ya kokoka na makanisi mpe na nzoto, bongo “mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na maladi.”—Yisaya 33:24.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lamuká! etindi moto te asalela nkisi moko, koyebáká ete likambo yango etali moto na moto.
[Etanda na lokasa 15]
MILƆNGƆ YA BILOKO OYO EBUNDISAKA MALADI NA NZOTO:
• MPOSO YA NZOTO MPE MPOSO YA BINAMA YA KATI YA NZOTO
• BALEKOSITE TO GLOBILE YA MPƐMBƐ
Bamonosite ekɔtaka na esika oyo ezwi maladi mpe elyaka bamikrobe oyo ekɔti na nzoto
Banetrofile emɛlaka bamikrobe mpe ebimisamaka na nzoto lokola mafina
Balɛmfosite ezalaka na likoki ya komikundola ndenge bitumba ya kala na bamikrobe eleká; soki mikrobe oyo yango eyebi ezongi lisusu, baantikɔre ekoboma yango mbala moko
• Balɛmfosite B ebimisaka baantikɔre oyo tokoki kokokanisa yango na mbanzi oyo ebwakami kaka na esika oyo esengeli; mbanzi yango elukaka bamikrobe mpo na kobundisa yango
• Balɛmfosite T ebimisaka baantikɔre mpe ebundisaka bamikrobe etumba moko “ya kokanganakangana na nzoto”
—Balɛmfosite T-basungi esalisaka balɛmfosite B mpo ebimisa baantikɔre ebele
—Baselile oyo ebomaka, yango ebomaka baselile oyo ezwi maladi kozanga kobimisa baantikɔre
[Elilingi na lokasa 17]
Baglobile ya mpɛmbɛ ebundisaka bamikrobe
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Lennart Nilsson