Sida epalangani na Afrika
“Tozali kobundana na nsuka na likama na mikolo na biso.”
MALOBA wana ya Stephen Lewis, motindami ya ONU na Afrika mpo na makambo ya VIH/sida, emonisi ndenge likambo ya sida ezali kobangisa bato mingi na Afrika na nse ya Sahara.
Makambo oyo ezali kosala ete sida epalangana ndenge wana ezali mingi. Epai mosusu, sida yango moko eyei kobakisa mikakatano mosusu. Mbala mingi makambo oyo ezalaka na bikólo mosusu ya Afrika mpe na bisika mosusu ya mokili epai sida ezali kopalangana mingi, ezali kouta na bantina oyo elandi:
Bizaleli malamu. Lokola kosangisa nzoto ezali nzela ya libosoliboso oyo bato bazwaka sida, na ntembe te eloko oyo ezali kosala ete maladi yango epalangana mingi ezali nde kozanga mitinda ya polele oyo bato basengeli kotosa. Nzokande, bato mingi bakanisi ete kopekisa minzemba kosangisa nzoto ezali na ntina moko te. Na zulunalo moko (The Star) ya Johannesburg, na Afrika ya Sudi, François Dufour akomi ete: “Koloba na bilenge ete básangisaka nzoto te ekosala eloko te. Mikolo nyonso, bazali komona bililingi ya basi ná mibali bazali bolumbu, bazali komonisa ndenge ya kolinga mwasi to mobali mpe ndenge ya kosala mpo bálinga yo.”
Soki tolandeli bomoi ya bilenge mingi, tokomona ete maloba wana ezali solo. Na ndakisa, ankɛtɛ oyo basalaki na ekólo moko emonisaki ete soki tozwi bilenge misato oyo bazali na mbula kobanda 12 tii 17, moko asilá kosangisa nzoto.
Na Afrika ya Sudi, kokanga basi na makasi mpo na kosangisa na bango nzoto ezali likama monene oyo ezali kosalema na ekólo mobimba. Zulunalo moko (Citizen) ya Johannesburg, elobaki ete: “Likambo yango epalangani mingi mpe ekómi likama oyo eleki makama nyonso ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto mpo na basi ya ekólo yango, ezala mpe mpo na bana mike.” Zulunalo yango ebakisaki ete: “Mikolo oyo, bato bakómi kokanga bana mike na makasi mpo na kosangisa na bango nzoto mbala mibale koleka liboso . . . Emonani ete bato bazali kosala makambo wana mpo bazali kondima makambo ya lokuta oyo balobaka ete soki moto oyo azali na mikrobe ya sida asangisi nzoto na mwasi oyo ayebi naino mibali te, akobika.”
Maladi oyo ezwamaka na kosangisa nzoto. Na eteni wana ya mokili, bato ebele bazali na bamaladi oyo ezwamaka na kosangisa nzoto. Zulunalo moko (South African Medical Journal) elobaki ete: “Soki moto azali na maladi oyo ezwamaka na kosangisa nzoto, moto yango azali na likama ya kozwa VIH-1 mbala mibale to mbala mitano koleka.”
Bobola. Bikólo mingi ya Afrika ezali kobundana na bobola, mpe yango efungoli nzela mpo sida epalangana. Biloko oyo na mikili ya bozwi moto nyonso akoki kozala na yango, na mikili mingi ya bobola biloko yango ezali te. Bato mingi bazali na kura te mpe mai ya pɛto ya komɛla ezali te. Na bamboka, banzela ezali malamu te to mpe ezali mpenza te. Bato mingi balyaka malamu te, mpe balopitalo ezali mingi te mpe ezali ya malamu mpenza te.
Sida ezali mpe kobimisa mikakatano na misala ya mombongo mpe na bakompanyi. Lokola basali mingi bazali kozwa sida, bakompanyi oyo elukaka mabanga ya ntalo ekómi komona ete mosala ezali lisusu kopesa matomba malamu te. Mpo mosala ekufa te, bakompanyi mosusu ezali kokana kotya barobo mpe bamasini mpo esalaka misala mosusu oyo bato bazalaki kosala. Na kompanyi moko oyo etimolaka mabanga ya ntalo babengi platine, bamonaki ete, na mobu 2000, basali oyo bazwaki sida bakómaki mbala mibale koleka ndenge ezalaki liboso, mpe basali ebele (26 %) bazalaki na sida.
Mokakatano mosusu oyo sida ezali kobimisa yango oyo: bana ebele bazali kotikala bitike mpo baboti na bango bazali kokufa na sida. Longola ndenge baboti na bango bakufi mpe bayebi te ndenge ya kozwa mbongo, bana yango mpe bazali koyoka nsɔni mpo baboti na bango bakufi na sida. Mbala mingi, bandeko na bango to bato ya mboka na bango bazali babola, bazali kokoka kosalisa bana yango te, to mpe balingi kosalisa bango te. Ebele ya bana oyo bazali bitike batángaka lisusu kelasi te. Basusu bakómi bandumba, yango wana bazali kopalanganisa maladi yango. Na bikólo mosusu, Leta to mpe bibongiseli mosusu ezali kosalisa bitike.
Kozanga koyeba. Bato mingi bazali na mikrobe ya sida kasi bayebi te. Mingi balingaka kosalisa ekzame te mpo babangaka makambo oyo ekobima soki bato bayebi ete bazali na sida. Lapolo moko ya Onusida elobaki ete: “Bato oyo bazali na mikrobe ya sida, to oyo bamonanaka lokola bazali na yango, balopitalo mosusu elingaka kosalisa bango te, balingaka kopesa bango ndako te, bakompanyi elingaka kozwa bango na misala te, baninga na bango mpe baninga ya misala bakimaka bango, bazwaka polices d’assurance te, mpe bakoki kokende mboka mopaya te.” Basusu kutu, babomamaki kaka ntango eyebanaki ete bazali na mikrobe ya sida.
Mimeseno ya mboka. Na mimeseno mingi ya Afrika, mbala mingi mwasi akoki te kotuna mobali soki azali na makango, to akoki te koboya kosangisa nzoto na mobali na ye, to mpe kopesa likanisi ya komibatela na ntango ya kosangisa nzoto. Mbala mingi mpo na mimeseno ya mboka, bato bandimaka sida te to bandimaka mpenza te ete sida ezali. Na ndakisa, bakoki koloba ete ezali bandɔki nde balei moto wana mpo abɛla maladi yango, mpe bakendeke epai ya banganga-nkisi mpo na komisalisa.
Kozanga balopitalo ya malamu. Balopitalo ezali kutu mingi te, kasi etondi na bato ya sida. Lopitalo mibale ya minene eyebisi ete soki bakaboli bato ya maladi oyo bazali na balopitalo yango na mibale, ndambo moko bazali na mikrobe ya sida. Monganga oyo azali mokonzi ya lopitalo moko na etúká ya KwaZulu-Natal alobaki ete bapaviyo ya lopitalo na ye ezalaka na bambeto mpo na bato 100, kasi ezali koyamba bato 140. Mbala mosusu, ekómaka ete bato mibale bálala mbeto moko, mpe moto ya misato alala na nse, pembeni ya mbeto!—South African Medical Journal.
Atako likambo yango esili kokóma nsɔmɔ na Afrika, makambo nyonso ezali komonisa ete ekokóma lisusu nsɔmɔ koleka. Peter Piot, asalaka na Onusida, alobi ete: “Tozali naino kaka na ebandeli ya maladi yango oyo ekopalangana lisusu mingi.”
Ezali solo ete na bikólo mosusu bazali kosala milende mpo na kosilisa maladi yango. Mpe mpo na mbala ya liboso, na sanza ya Yuni 2001, Assemblée générale ya ONU esalaki likita moko ya monene mpo na kolobela likambo ya VIH/sida. Milende oyo bato bazali kosala ekolonga? Ntango nini sida, maladi oyo ezali kosilisa bato, ekosila?
[Etanda/Elilingi na lokasa 5]
NKISI YA SIDA OYO BABENGI NÉVIRAPINE EZALI KOBIMISA MOKAKATANO NA AFRIKA YA SUDI
Nkisi babengi névirapine ezali nini? Mopanzi-nsango Nicole Itano alobi ete ezali “nkisi moko oyo elɛmbisaka makasi ya sida, oyo ntango bamekaki yango, emonisaki ete ekoki kokitisa likama oyo mwasi ya zemi azali na yango ya kopesa mwana oyo azali na kati ya libumu na ye sida.” Kompanyi moko oyo esalaka bankisi na Allemagne, endimaki kopesa Afrika ya Sudi nkisi yango ofele na boumeli ya mbula mitano. Kasi, na sanza ya Augusto 2001, guvɛrnema ya Afrika ya Sudi eboyaki likabo yango. Mpo na nini?
Na Afrika ya Sudi, bato milio 4,7 bazali na mikrobe ya sida; ekólo yango ezali na bato ya sida mingi koleka bikólo nyonso na mokili. Na sanza ya Febwali 2002, zulunalo moko (The Economist) ya Londres elobaki ete Thabo Mbeki, prezida ya Afrika ya Sudi, “andimaka te, atako bato mingi bandimaka yango, ete VIH epesaka sida; aboyi mpe kondima ntalo oyo batye mpo na nkisi yango mpe azali kobanga makama na yango mpe ayebi te soki ezali mpenza makasi. Apekisi nkisi yango te, kasi bazali nde kolendisa minganga ya Afrika ya Sudi ete básalela yango te.” Mpo na nini likambo yango esengeli kotungisa bato? Mpamba te, mbula na mbula, na Afrika ya Sudi, bankóto ya bana bazali kobotama na mikrobe ya sida mpe ebele ya basi ya zemi (25 %) bazali na mikrobe yango.
Kozanga koyokana wana esalaki ete báfunda guvɛrnema na tribinale mpe tribinale etindaki guvɛrnema endima kokabola névirapine. Tribinale (Cours constitutionnelle) ya Afrika ya Sudi ekataki likambo yango na sanza ya Aprili 2002. Ravi Nessman akomaki na zulunalo moko (Washington Post) ete tribinale yango ekataki ete “guvɛrnema esengeli kopesa nkisi yango na balopitalo oyo ezali na makoki ya kopesa yango na bato oyo bazali kobɛla sida.” Ntango guvɛrnema ya Afrika ya Sudi epesaki nkisi yango mpo bákabola yango na bisika 18 na ekólo mobimba, bato mingi balobaki ete mobeko wana ya sika epesi basi nyonso ya zemi oyo bazali na sida na ekólo yango elikya.
[Etanda/Elilingi na lokasa 6]
NDENGE MIKROBE YA SIDA EKOSAKA BASELILE
Tótalela naino mwa mikrobe ya moke mpenza: VIH (virus de l’immunodéficience humaine). Moto moko ya siansi alobaki boye: “Nsima ya kolekisa bambula ebele kotalatala bavirisi (virus) na mikroskɔpɛ ya makasi mpenza (électronique), nakamwaka kaka na bosikisiki mpe na lolenge ya kokamwa oyo mwa biloko wana ya mikemike esalemá.”
Mikrobe babengi virisi ezali moke koleka bakteri (bactérie), oyo mpe ezali moke mpenza koleka baselile ya moto. Moto moko oyo ayebi malamu makambo ya mikrobe yango alobaki ete virisi ya sida (VIH) ezali mwa eloko ya moke mpenza mpe “esengeli kosangisa bavirisi yango milio 230 mpo bámonana lokola mputu oyo ezali na nsuka ya fraze oyo.” Virisi moko ekoki kobota bavirisi mosusu kaka soki ekɔti na kati ya selile mpe ebandi kotambwisa biloko oyo ezali na kati ya selile yango.
Ntango mikrobe ya sida ekɔtaka na nzoto ya moto, ekutanaka na biloko ya nguya oyo ezalaka na nzoto ya moto, oyo ebundisaka maladi na kati ya nzoto.a Globile ya mpɛmbɛ (globule blanc) oyo ebundisaka mikrobe na nzoto, ebotamaka na kati ya mafuta ya mikuwa. Globile ya mpɛmbɛ yango ezalaka na lɛmfosite (lymphocytes) mitindo mibale: lɛmfosite T mpe lɛmfosite B. Globile ya mpɛmbɛ mosusu babengaka yango fagosite (phagocytes) to “balei ya baselile.”
Motindo mokomoko ya lɛmfosite T ezali na mosala na yango. Oyo babengi lɛmfosite T basungi (lymphocytes T auxiliaires), esalaka mosala monene na etumba yango. Mosala na yango ezali ya koyeba monguna oyo akɔti na nzoto mpe kopesa malako mpo nzoto ebota ebele ya baselile oyo ekobundisa mpe ekoboma monguna yango. Kati na etumba yango, mikrobe ya sida elukaka mpenzampenza nde balɛmfosite T basungi. Mosusu, oyo babengi lɛmfosite T sitotɔksike (lymphocytes T cytotoxiques), mosala na yango ezali ya koboma baselile oyo mikrobe ekɔteli yango. Lɛmfosite B nde ebimisaka baantikɔre (anticorps), oyo ebundisaka maladi oyo mikrobe epesaka.
Mayele mabe ya etumba
Mikrobe ya sida ezali na molɔngɔ ya bamikrobe babengi rétrovirus. Mikrobe yango esalemi na ARN (acide ribonucléique) na esika esalema na ADN (acide désoxyribonucléique). Mikrobe ya sida ezali na libota ya mikrobe oyo babengi rétrovirus, oyo eyebani na nkombo ya lentivirus, mpo ekoki kokɔta na nzoto mpe ekopesa naino maladi te ntango molai liboso ete bilembo ya maladi ebanda komonana.
Soki mikrobe ya sida ekɔti na kati ya selile moko, ezali na likoki ya kosalela biloko ya selile yango ndenge yango moko elingi. “Ekobongola programɛ” ya ADN ya selile mpo ebota ebele ya bamikrobe mosusu ya sida. Kasi liboso ekoka kosala bongo, mikrobe ya sida esengeli kosalela “kode” mosusu. Esengeli kokómisa ARN na yango ADN mpo baselile eyeba kotánga yango mpe eyeba ntina na yango. Mpo na kosala mbongwana yango, mikrobe ya sida esalelaka eloko babengi transcriptase inverse oyo ezalaka na kati ya virisi yango. Nsukansuka, selile yango ekokufa, kasi liboso ekufa, mikrobe ya sida esili kobotana bankóto na bankóto. Na ngala na yango, bavirisi wana ya sika, ekokɔtela mpe baselile mosusu mpe ekobanda kobebisa yango.
Soki lɛmfosite T basungi ezali lisusu mingi te, banguna mosusu bakoki noki mpenza kokɔta na nzoto kozanga kobanga ete bakobundisa bango. Maladi mpe mikrobe ya ndenge na ndenge ekobanda kokɔta na nzoto ndenge yango elingi. Ezali na ntango wana nde balobaka ete moto azali kobɛla maladi ya sida. Mikrobe ya sida elongi kopanza ebongiseli oyo ebundisaka maladi na nzoto.
Wana ezali kaka ndimbola ya mokuse. Tosengeli kobosana te ete ezali naino na makambo mingi oyo bato ya mayele bayebi naino te, ezala mpo na ebongiseli oyo ebundisaka maladi na nzoto to mpo na lolenge oyo mikrobe ya sida esalaka.
Esili koleka mbula soki 20 mobimba, bato ya mayele oyo bayebani mingi babimisi mayele mpe makasi na bango nyonso kaka mpo na mwa mikrobe wana ya moke, likambo yango esɛngi mbongo mingi. Yango esali ete báyekola mpe makambo mingi oyo etali mikrobe yango. Eleki mwa bambula, monganga Sherwin Nuland alobaki boye: “Makambo oyo tosili koyekola mpo na mikrobe ya sida mpe ndenge tokolisi mayele ya kobundisa mikrobe yango, ezali likambo ya moke te.”
Atako bongo, maladi ya sida ezali se kosilisa bato, ekómi koboma bato na ndenge moko ya nsɔmɔ.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Lamuka! ya Yuli-Sɛtɛmbɛ 2001, nkasa 15-17.
[Elilingi]
Mikrobe ya sida ekɔtelaka balɛmfosite ya ebongiseli oyo ebundisaka maladi na nzoto mpe na kati ya yango bamikrobe mosusu ya sida ebotanaka
[Eutelo ya bafɔtɔ]
CDC, Atlanta, Ga.
[Elilingi na lokasa 7]
Bankóto ya bilenge bazali na bomoi oyo eyokani na mitinda ya Biblia