Bitumba ya mikolo na biso
BASALAKI kaa nokinoki mpo na koyamba bato 1548 oyo bakimaki bitumba oyo ezalaki kosalema na ekólo moko ya pembeni, na Afrika. Bapikaki bakapo ya langi ya kaki mpe ya bulɛ na esika moko ya polele mpe ya pɔtɔpɔtɔ, na katikati ya zamba moko ya mbila. Kura ezalaki te, mbeto ezalaki te, mai ya pɔmpi ezalaki te, batwalɛti mpe ezalaki te. Mbula ezalaki kobɛta. Na lisalisi ya mwa banzete, bato yango oyo bakimaki bitumba batimolaki mwa banzela ya kolekisa mai ya mbula mpo etonda na kati ya bakapo te. Bato ya bibongiseli mibale ya mokili mobimba oyo esalisaka bato oyo bakutani na mpasi ya ndenge wana bazalaki wana mpe bazalaki kosala nyonso mpo na kosalisa bato yango.
Mwa mikolo liboso, bato yango bamataki na masuwa moko ya mabemabe oyo ememaka biloko, mpe bakimaki etumba oyo bato ya ekólo yango bazalaki kobunda bango na bango kobanda bambula mingi; etumba yango ebebisaki mpenza ekólo na bango. Ezalaki etumba oyo basoda bazalaki kobunda na ba chars ya bitumba te to na bampepo minene ya kobwaka babɔmbi te. Ebandaki nde ntango basoda 150 oyo bazalaki na mindoki ya bitumba bakɔtaki na ekólo yango na lofundo nyonso. Na bambula oyo elandaki, basoda yango babandaki kobɔtɔla mboka moko nsima na mosusu, bazalaki kobɔtɔla basivili biloko mpe mbongo, bazalaki kokɔtisa bato na mosala ya soda na makasi, mpe koboma moto nyonso oyo akoboya kosala oyo bango balobi. Nsukansuka, bazwaki ekólo yango mobimba.
Elenge mwasi Esther azalaki kati na bato oyo bakimaki bitumba, oyo bazalaki na kati ya kaa wana. Alobaki ete: “Banda nabotamá, likambo ya mpasi mingi oyo nakutaná na yango ezali nde liwa ya mobali na ngai na etumba yango. Babɛtaki ye masasi. Ezalaki nsɔmɔ mpenza. Soki oyoki moto moko azali koganga, mbala moko okanisi ete bazali koya koboma yo. Ntango nyonso oyo omoni moto asimbi mondoki, okanisi ete akoboma yo. Nazalaki na kimya na makanisi te. Kaka awa [na kaa] nde nakómi kolala na butu. Kuna na ndako na ngai, nazalaki kolala te. Awa nazali kolala mpɔngi lokola mwana moke.”
Mokomi moko ya Lamuká! atunaki ete: “Ata na kati ya mwa ndako oyo ya bakapo oyo epɔli na mbula?”
Esther asɛkaki mpe alobaki ete: “Ata soki nalali na pɔtɔpɔtɔ oyo, nakozwa kaka mpɔngi malamu koleka epai nauti.”
Ambrose, mwana moko ya mbula zomi, ye azalaki kokimakima bitumba na boumeli ya bambula mingi elongo na libota na bango. Alobaki ete: “Nalingi kimya ezala mpo nazonga na kelasi, mpamba te nakóli.”
Kpana, mwana moko ya mbula libwa, azali na miso kitoko. Ntango batunaki ye eloko ya liboso oyo abosanaka te, ayanolaki mbala moko ete: “Bitumba!”
Eleki mpenza bambula mingi te, bitumba ya ndenge wana, oyo bato yango bakimaki, ekómi kosalema mingi. Mokanda moko elobi ete kati na bitumba 49 ya minene oyo ebimi kobanda 1990, bitumba 46 ezalaki kosalema na bibundeli ya mike. Na kokesena na mopanga to na likonga, oyo esɛngaka mayele mpe makasi mpo na kosalela yango malamu na etumba, ezala soda to sivili akoki kosalela bibundeli ya mike malamu na bitumba.a Yango wana, mbala mingi bazali kokɔtisa bilenge mpe bana mike na mosala ya soda mpe bazali kotinda bango bábɔtɔlaka biloko ya bato, bákataka bato biteni mosusu ya nzoto to mpe bábomaka bato.
Mingi kati na bitumba yango esalemaka te kati na basoda ya bikólo ekeseni oyo bameseni na bitumba oyo bazali kobunda esika moko boye. Kasi ezalaka nde bitumba kati na bana-mboka, mingimingi basivili, oyo bazali kobunda mpenza na kati ya bingumba to na kati ya bamboka. Lokola mingi kati na bitumba yango ezali kosalema na bato oyo bayekolá ata moke te mosala ya soda, bazali kobunda bibundela; bazali ata na nsɔmɔ moko te ya kotosa mibeko oyo batyá mpo na ntango ya bitumba. Na yango, mbala mingi bazali kobundisa mibali, basi mpe bana oyo bazangi bibundeli. Bato ya mayele bakanisi ete na bitumba oyo ezali kosalema lelo, soki ozwi bato mokama oyo bakufi na etumba, bato 90 kati na bango bazali basivili. Na bitumba ya ndenge wana, bibundeli ya mike mpe ya mikemike nde ezali mpenza kosala mosala.
Ya solo, bibundeli yango ezali mpenza te eloko ya liboso oyo ezali kobimisa bitumba—bato bazalaki kobunda banda kala, liboso kutu masasi ebima. Kasi, kozala na bibundeli ebele ekoki nde kotinda bato bábunda na esika ete básolola mpo na kosilisa matata na bango. Bibundeli yango ekoki kobenda etumba molai mpe kobomisa bato mingi.
Atako bibundeli oyo bazali kosalela na bitumba ya lelo ezali ya mike, kasi ezali koboma bato mingi. Na bambula ya 1990, bibundeli ya ndenge wana ebomaki bato koleka milio minei. Bato mosusu koleka milio 40 bakómi bato oyo bakimá bitumba to bakendá kofanda epai mosusu. Na bamboka oyo bitumba ezali kongala, bibundeli ya mike ebebisi makambo mingi ya politiki, ya bomoi ya bato, ya nkita mpe ya zamba, mai mpe mopɛpɛ. Mbongo oyo bikólo mosusu ya mokili mobimba ezali kobimisa—mpo na kosunga bato oyo bakimá bitumba, kobatela kimya, mpe kotinda basoda oyo bakozongisa kimya—ekómi bamiliare ebele ya badolare.
Mpo na nini bibundeli ya mike ekómi kosala mosala monene na bitumba ya mikolo na biso? Bibundeli yango eutaka wapi? Nini ekoki kosalema mpo na kolɛmbisa to kosilisa mokakatano yango? Tokotalela mituna yango na masolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Elobeli “bibundeli ya mike” esalelamaka mpo na kolobela mindoki ya mabɔkɔ—oyo moto moko kaka akoki kosalela yango; nzokande elobeli “bibundeli ya minene” esalelamaka mpo na kolobela bibundeli oyo mbala mosusu esɛngaka bato mibale mpo na kosalela yango, na ndakisa bibundeli lokola mitrailleuse, mortier, mpe lance-grenades.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
UN PHOTO 186797/J. Isaac