Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/1 nk. 3-4
  • Bitumba ekómi ndenge mosusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bitumba ekómi ndenge mosusu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini bazali kobunda?
  • Bitumba ya mikolo na biso
    Lamuká!—2001
  • Bitumba ekosila mokolo nini?​—Biblia elobi nini?
    Makambo mosusu
  • Nani akoki kotya kimya ya seko?
    Lamuká!—1996
  • Bitumba ekosila
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/1 nk. 3-4

Bitumba ekómi ndenge mosusu

ETUMBA ezalaka kaka eloko mabe. Ebele ya basoda bakufaka mpe basivili bakómaka na mpasi. Kasi na mikolo na biso, bitumba ekómi ndenge mosusu. Na ndenge nini?

Na bitumba ya lelo, ezali mingimingi bato ya ekólo moko nde bazali kobunda bango na bango. Bitumba ya ndenge yango eumelaka mingi, etikaka bato na mpasi koleka mpe ebebisaka mpenza mboka koleka bitumba kati na bikólo ekeseni. Julián Casanova, moto ya Espagne mpe moto ya mayele na masolo ya kala, alobaki boye: “Bitumba ya bato ya ekólo moko ezalaka nsɔmɔ mingi mpo ebomaka ebele ya bato, basoda basangisaka nzoto na basi na makasi, bato bakimaka bamboka na bango mpe ntango mosusu, babomaka bato ya etuluku moko na mokano ya kosilisa bango nyɛɛ.” Soki bato oyo bafandaka esika moko basalani mabe, esɛngaka bambula mingi mpo bábosana mpasi yango.

Banda kowelana kati na États-Unis ná URSS (guerre froide) esilá, bitumba kati na bikólo ezali lisusu mingi te. Lapolo ya ebongiseli moko (Institut international de recherches pour la paix de Stockholm, na mokuse SIPRI) emonisaki boye: “Longola kaka bitumba misato, bitumba mosusu nyonso ya minene oyo esalemaki banda 1990 tii 2000 ezalaki bitumba kati na bato ya ekólo moko.”

Ezali ya solo ete soki bato ya ekólo moko bazali kobunda bango na bango, ebangisaka mpenza bato ya bamboka mosusu te mpe bapanzi-nsango balobelaka yango mingi te, kasi bato banyokwamaka mpe biloko ebebaka. Bitumba ya ndenge yango ebomi ebele ya bato. Na mbula 20 oyo euti koleka, pene na bato milio mitano bakufi na mikili misato (Afghanistan, République démocratique du Congo mpe Soudan), epai bato ya bikólo yango bazali kobunda bango na bango. Na mikili ya Balkans, bitumba makasi kati na bato ya bituluku ndenge na ndenge ya bikólo yango ebomi pene na bato 250 000, mpe na Colombie, etumba oyo eumeli bambula ebele kati na barebɛlɛ mpe basoda ya guvɛrnema ebomi bato 100 000.

Ntango bato ya ekólo moko bazali kobunda bango na bango, bato oyo banyokwamaka mingi koleka ezali bana. Lapolo moko ya ebongiseli ya ONU mpo na bato bakimá mboka (HCR) elobi ete na boumeli ya mbula zomi oyo euti koleka, bana koleka milio mibale bakufaki na bitumba ya ndenge wana. Pene na milio motoba ya bana bazokaki. Bazwi ebele ya bana na mosala ya soda. Soda moko ya mwana moke alobaki boye: “Bapesaki ngai formasyo ya mosala soda. Bapesaki ngai mondoki. Nazalaki komɛla bangi. Nabomaki basivili ebele. Tozalaki na kati ya etumba . . . Nazalaki kaka kotosa mitindo. Nayebaki ete ezali mabe. Kasi, nazalaki kosala yango na mposa na ngai moko te.”

Na bikólo oyo bitumba ezali kosila kaka te, bana mingi bayebi ndenge mokili ya kimya ezalaka te. Biteyelo ekufá, bato balobanaka kaka na lokito ya mindoki. Dunja, elenge ya mbula 14 alobi boye: “Ebele ya bato babomami . . . Toyokaka lisusu nzembo ya bandɛkɛ te, kaka mongongo ya bana oyo bazali kolela mama, tata to ndeko na bango oyo akufi.”

Mpo na nini bazali kobunda?

Nini etindaka bato bábunda bitumba ya nsɔmɔ ndenge wana? Mingimingi ezali mpo bato oyo bazali etuluku moko te to lingomba moko te bazali koyinana, mpo bosembo ezali te mpe mpo bato ya politiki bazali koyokana te. Ntina mosusu ezali lokoso ya kozwa bokonzi mpe lokoso ya mbongo. Mbala mingi, lokoso etindaka bakonzi ya politiki bálona koyinana na mitema ya bato mpe yango nde ebimisaka bitumba. Lapolo moko ya SIPRI elobi ete bato mingi oyo bazali kobunda “balukaka nde matomba na bango moko.” Lapolo yango ebakisi boye: “Lokoso yango emonanaka na ndenge mingi, bakonzi ya basoda ná bakonzi ya politiki bazali kotɛka diama mpe bilenge oyo bazali na mindoki bazali kopunza biloko ya bato.”

Bato bazali kobomama mingi mpo mindoki ezali kosombama na ntalo moke. Na mbula moko, bato soki 500 000, mingimingi basi ná bana bazali kobomama na mindoki ya mike. Na ekólo moko ya Afrika, moto akoki kosomba mondoki AK-47 na ntalo ya nsoso moko. Likambo ya mawa ezali ete na bisika mosusu, mindoki yango ekómi ebele lokola kaka bansoso. Na mokili mobimba, mindoki yango ya mike ekoki kozala sikoyo ata milio 500​—elingi koloba, soki okamati bato 12, moko kati na bango akoki kozala na mondoki.

Tokoki kokanisa ete bitumba ya ndenge yango nde ekoleka mingi na bambula ya 2 000? Bitumba yango ekoki nde kosila? Bato bakotika nde kobomana? Lisolo oyo elandi ekoyanola na mituna yango.

[Etanda na lokasa 4]

Mabe ya bitumba na kati ya bato ya ekólo moko

Ntango bato ya ekólo moko bazali kobunda bango na bango na mindoki ya mikemike, soki bato 10 bakufi, mbala mosusu basivili bakoki kozala 9 mpe soda kaka moko. Graça Machel, mosali moko ya ONU oyo atalelaka mbuma mabe ya bitumba epai ya bana alobaki boye: “Emonani polele ete na bitumba yango, bakómi nde koluka kosala bana mike mabe, kasi ezali te ete bana bazali kokufa mpo bakweli libabe ya kozala na esika ya bitumba.”

Mayele mosusu oyo bakómi kosalela na bitumba yango ezali kosangisa nzoto na basi na makasi. Na bisika mosusu oyo bitumba ezali kosalema, basoda bazali kosangisa nzoto na makasi na bilenge nyonso ya basi oyo bazali kokuta na mboka oyo bakɔti. Bazali kosala bongo mpo bato bázala na nsɔmɔ mpe mpo na kokabola mabota.

Bitumba yango mpe ememaka nzala ná bamaladi. Ntango bato ya ekólo moko bazali kobunda bango na bango, babosanaka mosala ya bilanga, balopitalo ekangamaka, mpe ekómaka mpasi mpo lisalisi oyo ezali kouta na mikili mosusu ekómela bato oyo bazali na bosɛnga. Lapolo moko oyo elobelaki etumba na ekólo moko ya Afrika emonisaki ete bato 20 likoló ya monkama bakufaki na bamaladi mpe bato 78 likoló ya monkama bakufaki na nzala. Kaka bato mibale likoló ya monkama nde babomamaki na etumba.

Na mwayene, nsima ya miniti 22 moto moko azali konyata mine mpe kokatana lokolo to lobɔkɔ to mpe kokufa. Balapolo ezali komonisa ete bamine soki milio 60 to milio 70 ekundami na mabelé na mikili koleka 60.

Bato bazali kokima bamboka na bango. Na mokili mobimba, bato milio 50 bakimá bamboka to bazali kofanda na bisika mosusu mpo na bitumba​—mpe kati na bato yango, 50 likoló ya monkama bazali bana mike.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Fɔtɔ ya Chris Hondros/Getty Images

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto