Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g01 Octobre nk. 5-8
  • Bibundeli ya mike, mikakatano minene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bibundeli ya mike, mikakatano minene
  • Lamuká!—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bibundeli oyo bato balingaka mingi
  • Mindoki, bangi mpe diamá
  • Ntango mindoki etiki kolela
  • Nini ekokómela bibundeli na mikolo ezali koya?
    Lamuká!—2001
  • Bitumba ya mikolo na biso
    Lamuká!—2001
  • Nani akoki kotya kimya ya seko?
    Lamuká!—1996
  • Bitumba ekómi ndenge mosusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Lamuká!—2001
g01 Octobre nk. 5-8

Bibundeli ya mike, mikakatano minene

NA BOUMELI ya mbula mingi, soki bakonzi ya mokili bafandaki mpo na kolobela ndenge oyo bakoki kosala mpo na kopekisa kopalangana ya bibundeli, mingimingi bazalaki kolobela kaka bibundeli ya nikleere. Yango ezali likambo ya kokamwa te, mpamba te bɔmbɛ moko mpamba ya nikleere ekoki kobebisa engumba mobimba ya monene. Kasi, esili koleka mbula 50, basaleli lisusu bibundeli wana ya minene mpe ya nguya na bitumba te, basaleli nde bibundeli ya mike.

John Keegan, moto oyo ayekolaka makambo ya basoda mpe ayebani mingi, akomi ete: “Kobanda mwa 9 Augusto 1945, bibundeli ya nikleere ebomi lisusu moto te. Soki tozwi bato milio 50 oyo bakufi na bitumba kobanda ntango wana, tokomona ete mingi kati na bango babomaki bango na bibundeli oyo basombaki yango na ntalo mingi te, oyo bazali kosala yango mingi mpe babomamaki na masasi ya mikemike. Ntalo ya bibundeli yango eleki kaka mwa moke oyo ya radio mpe oyo ya pile, biloko oyo bobele na ntango wana etondi na mokili mobimba. Lokola bibundeli yango oyo ezali ntalo mingi te ezalaki mpenza te kotya bomoi ya bato ya mikili ya bozwi na likama, longola kaka na bakartye ya bobola epai batɛkaka bangi mpe epai mobulu ya makambo ya politiki ezali mingi, ezwi mwa ntango mpo bato ya mikili ya bozwi bámona mpenza mpasi oyo bibundeli wana ezali kobimisa.”

Moto moko ayebi te soki bibundeli ya mike boni mpe bibundeli ya minene boni ezali na mabɔkɔ ya bato, kasi bato ya mayele bakanisi ete bibundeli oyo esalemi kaka mpo na basoda, ekoki kozala milio 500. Lisusu, bamilio ebele ya mindoki mpe barevolvɛrɛ oyo esalemi mpo na basivili ezali na mabɔkɔ ya bato. Likambo ya mabe koleka, mbula na mbula bibundeli ya sika ezali kosalema mpe ezali kotɛkama.

Bibundeli oyo bato balingaka mingi

Mpo na nini na bitumba ya mikolo oyo, bato bakómi kosalela mingi bibundeli ya mike? Moko ya bantina yango ezali boyokani oyo ezalaka kati na bitumba mpe bobola. Bitumba mingi oyo esalemaki na bambula ya 1990, ezalaki na kati ya mikili ya bobola​—bobola yango ezalaki mpenza makasi na boye ete bazalaki na makoki te ya kosomba bibundeli ya makasi mpenza. Bibundeli ya mike ezalaka na yango ntalo malamu. Na ndakisa, dolare milio 50, oyo ekoki kozala ntalo ya mpepo moko kaka ya bitumba na mikolo na biso, ekoki kosalisa limpinga moko ya basoda ezwa mindoki 200 000 ya bitumba.

Mbala mosusu, bibundeli ya mike mpe ezalaka mpenza ntalo moke koleka ndenge touti kolobela. Soki etumba moko esili to soki balongoli basoda mosusu to soki balongoli bibundeli mosusu, basoda oyo balongoli bango bakendaka na ebele ya bibundeli. Na mikili mosusu, mindoki ya bitumba etondi mpenza na boye ete bakómi kotɛkatɛka yango na ntalo ya mangondo: mosusu kutu na dolare motoba mpamba, mosusu bazali kosombitinya yango na ntaba, na nsoso, to na sakosi moko ya bilamba ya kala.

Kasi, longola likambo oyo ete bibundeli ya mike ezali ntalo mingi te mpe ndenge moto akoki kozwa yango kozanga nkaka, ezali na bantina mosusu oyo ezali kosala ete bibundeli yango etonda na mokili. Ebomaka mingi. Mondoki ya etumba ya automatique ekoki kobɛta masasi soki 300 na miniti moko. Lisusu, bibundeli yango ya mike ezalaka mpasi te mpo na kosalela yango mpe kobatela yango. Bakoki kolakisa mwana ya mbula zomi kopanza bibende nyonso ya mondoki yango mpe kozongisa yango ndenge ezalaki. Mwana yango akoki mpe koyekola noki kotala malamumalamu esika bato ebele bazali mpe kobɛta bango masasi.

Ntina mosusu oyo bato balingaka bibundeli yango mingi ezali ete ezalaka makasi mpe eumelaka bambula mingi. Mindoki lokola AK-47 mpe M16, oyo babundaki na yango na bitumba ya Viêt Nam, ezali kosalelama tii na bitumba ya moi ya lelo. Mindoki mosusu oyo bazali kosalela lelo na Afrika ezalaki na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Lisusu, ezalaka mpasi te mpo na komema mindoki yango mpe kobomba yango. Mpunda moko ekoki komema mindoki soki zomi na mibale tii esika basoda babombami na mwa zamba to na mwa ngomba moko. Soki bampunda yango ezali mwa mingi, ekoki komema mindoki mingi mpo na limpinga moke ya basoda.

Mindoki, bangi mpe diamá

Ezali mpasi mpenza mpo na koyeba ndenge mombongo ya mindoki ezali kosalema na mokili mobimba. Ebele ya mindoki ezali kolongwa na ekólo moko mpe kokɔta na ekólo mosusu na ndingisa ya bakonzi ya Leta. Nsima ya kowelana kati na mikili ya nguya (guerre froide), mampinga ya basoda na mikili ya Mpoto ya Ɛsti mpe na Mpoto ya Wɛsti balongolaki basoda mosusu, mpe baguvernema ya mikili wana epesaki to etɛkelaki bamboka mosusu oyo ezalaki na bango na boninga bibundeli oyo bamonaki ete ntina ya kotikala na yango ezali te. Mokomi moko oyo asalaka na lisangá moko oyo ezalaka na engumba Oslo, na ekólo Norvège, oyo etalelaka makambo etali kimya (Institut de recherche pour la paix), alobaki ete kobanda 1995, kaka États-Unis ekabi mindoki, ba barevolvɛrɛ, ba mitrailleuse mpe ba lance​-grenades koleka 300000. Ntina oyo epusi bango básala bongo ezali ete kokaba bibundeli esɛngaka mbongo mingi te koleka kopanza bibende na yango to kobomba yango mpe kobatela yango. Bato mosusu ya mayele bakanisi ete mbala mosusu motuya ya bibundeli ya mike mpe ya minene oyo ekɔtaka mbula na mbula na bikólo mosusu na ndingisa ya bakonzi ya Leta ekoki kozala dolare miliare misato.

Nzokande, ekoki kozala ete mombongo oyo eyebani na mibeko ya Leta te nde eleki oyo ezali kosalema na ndingisa ya bakonzi ya Leta mpamba te bibundeli mingi etɛkamaka na mombongo yango. Na ntango ya bitumba mosusu oyo esalemaki na Afrika, mampinga ya batomboki basombaki bibundeli ya mike mpe ya minene na mbongo te, kasi na diamá oyo babɔtɔlaki na bisika batimolaka diamá. Zulunalo The New York Times elobaki ete: “Na bikólo oyo bakonzi ya mboka bandimaka kanyaka, batomboki bayokelaka bato mawa te mpe ezalaka mpasi te mpo na kokɔta na bikólo yango . . . Mpo na diamá, bazali kokómisa bato baombo, bazali koboma bato, kokata bato biteni mosusu ya nzoto, bato bazali kozanga bisika ya kolala mpe yango nde ezali kosala ete nkita ya bikólo ekwea makasi.” Oyo nde likambo ya mawa komona ete libanga ya ntalo oyo basombitinyaki yango na mindoki ya bitumba, na nsima batɛki libanga yango na ntalo makasi na butiki moko oyo batɛkaka babiju ya ntalo mpo bato bábomba yango lokola elembo ya bolingo ya libela!

Bibundeli mpe mombongo ya bangi etambolaka elongo. Mbala mingi emonanaka ete banzela oyo batɛki ya bibundeli basalelaka, yango kaka esalelamaka mpo na kotɛka bangi. Na yango, bibundeli ekómi lokola mbongo mpo na kosomba bangi.

Ntango mindoki etiki kolela

Ntango bitumba esilaka, mindoki oyo basalelaki na ntango ya bitumba yango mbala mingi ekweaka na mabɔkɔ ya babomi. Na ndakisa, tótalela likambo oyo esalemaki na ekólo moko na sudi ya Afrika. Lokola yikiyiki ya makambo ya politiki esilaki, koboma bato ezwaki esika. Mobulu oyo ebimaki mpo na makambo ya politiki ebomaki bato soki 10 000 na boumeli ya mbula misato. Ntango matata yango esilaki, koboma bato nde engalaki kongala. Kowelana kati na batambwisi ya taksi ebimisaki oyo babengaki “bitumba ya bataksi”; kompanyi na kompanyi ya bataksi ekómaki kofuta bato ya matata mpo na koboma batambwisi ya taksi ya bakompanyi mosusu, bakisa mpe bato oyo bazalaki komata na bataksi na bango. Bakómaki kosalela mingi mindoki ya basoda mpo na koyiba mpe koboma. Na bambula oyo euti koleka, bato 11000 babomamaki na masasi na ekólo yango na mbula moko mpamba; soki tokokanisi motángo yango na mitángo ya bikólo mosusu oyo ezali na bitumba te, tomoni ete ekólo yango ezali na esika ya mibale.

Koyeba ete babomi bazali na mindoki mpe bakakatanaka te mpo na kosala bato mabe ebangisaka mpe ekómisaka bato mitema likoló. Na mikili mingi ya bobola, bato ya mbongo bafandaka na bandako oyo ebatelami malamu mpenza; na bifelo ya mapango na bango batyá kurá, mpe mapango yango ekɛngɛlamaka butu na moi. Bato oyo bafandaka na mikili ya bozwi bamibatelaka kaka ndenge wana. Ezali mpe bongo ata na bisika oyo bitumba ya bana-mboka ezali te.

Yango wana, ezala na bikólo oyo bitumba ezali to na bikólo oyo ezali na “kimya,” mindoki ezali kaka kokɔtisa yikiyiki. Moto moko te akoki kotánga makambo ya mabe oyo mindoki ezali kobimisa; ezala ata kopesa motángo ya bato oyo bakufi, bazoki, bakufeli bato mpe baoyo bomoi na bango ebebi kaka mpo na mindoki. Nzokande, toyebi mpenza ete mokili etondi na bibundeli mpe motángo na yango ezali se komata. Bipai na bipai, motángo ya bato oyo bazali kosɛnga ete likambo yango esuka ezali kobakisama se kobakisama. Kasi, nini mpenza ekoki kosalema? Nini ekosalema? Tokoyanola na mituna yango na lisolo oyo elandi.

[Etanda/Elilingi na lokasa 7]

Mwana moko oyo azalaki soda amimoni “mpenza zoba”

Mwana mobali moko ya soda oyo abundaki etumba oyo esalaki ete bato oyo tolobelaki na lisolo ya ebandeli bákima mboka na bango, ayaki komona mbala moko ete azali na mosala ya kosala te mpe azali ata na mbongo te ntango bakómaki na engumba oyo abundelaki mpo na kozwa yango. Akómaki koloba na mawa mpenza ntango azalaki komona mwana ya mokonzi na ye azali kotambolatambola na engumba yango na tukutuku moko ya sika mpenza mpe ntango azalaki komona bakonzi na bango bakómi kowelana mpo na kozwa bokonzi. Soda yango alobaki ete: “Soki nakanisi mbula mitano oyo nalekisaki na kati ya zamba, kobomáká bato mpe kokimáká masasi oyo banguna bazalaki kobɛta ngai, namimoni zoba mpenza. Tozalaki kotya bomoi na biso na likama mpo na bato oyo lobi bakoyeba lisusu ata moke te ndenge nini bakómaki na esika bazali sikoyo.”

[Eutelo ya bafɔtɔ]

EZIPELI mpe lokasa 7: Soda moko ya mwana: Nanzer/Sipa Press

[Etanda/Elilingi na lokasa 8]

“Okoki komibomba te”

Mindoki ya bitumba ya mikolo na biso, atako ebomaka, kasi ezali na makambo mosusu oyo ekoki kosala te. Ebɛtaka kaka masasi. Ekoki te koboma bato oyo babombani nsima ya bifelo ya minene to nsima ya biloko mosusu ya minene. Na ntango ya etumba, kobanga ekoki kosala ete mbala mosusu soda atala malamumalamu te mpo na kobɛta masasi. Soki basimbi mindoki yango kaka na mabɔkɔ, ata soki soda atɛlemi mpenza na esika ebongi, mpo ete masasi ebɛta mpenza eloko to moto oyo alingi kobɛta masasi, esengeli ete eloko to moto yango azala na ntaka ya mɛtrɛ koleka 500 te.

Basoda ya États-Unis bauti kozwa ndenge ya kosilisa “mikakatano” ya ndenge wana—​babimisi mondoki moko ya sika ya makasi mpenza, babengi yango Objective Individual Combat Weapon (OICW). Lokola ezali mondoki ya mabɔkɔ, soda moko mpamba akoki kosalela yango. Mondoki yango ezali na likoki ya kobɛta kaka masasi mpamba te kasi mpe kobwaka bagrenade oyo tiyo na yango ezali monene ya milimɛtrɛ 20. Likambo mosusu oyo ekesenisi mondoki yango na mindoki mosusu ezali ete ekoki koboma moto oyo abombami na nsima ya biloko ya minene. Nyonso oyo soda asengeli kosala ezali kaka kotalisa mondoki yango mwa likoló to pembeni na esika moto oyo alingi kobɛta ye masasi abombami. Mondoki yango moko ekomonisa ntaka oyo moto yango azali mpe ekobongisa yango moko mwa ebwakeli elektroniki ya grenade mpo grenade ekende kopanzana na esika mpenza monguna azali. Molobeli moko ya kompanyi oyo ezali kosala mondoki yango alobaki ete: “Mondoki yango ezali mpenza makasi mpe ekokani na mosusu te, ekosalisa basoda ya États-Unis mpo na kobɛta masasi nzingazinga ya esika moto abombami.” Mondoki yango ezali na mwa esika moko ya kotala oyo ekopesa nzela na moto oyo akosalela yango atala malamu mpenza esika ya kobɛta ata na molili.

Basali ya mondoki yango bazali koloba na lolendo nyonso ete “okoki komibomba te” liboso ya mondoki yango; bazali mpe koloba ete mondoki yango ekoboma bato mbala mitano koleka mondoki M16 mpe lance-​grenades M203 mpe ekokenda mosika mbala mibale koleka. Basoda oyo bakosalela yango bakomitungisa lisusu te mpo na kotalisa mondoki yango malamumalamu epai balingi kobɛta; ekosɛnga na bango kaka kotya miso na bango na mwa esika ya kotala oyo ezali likoló ya mondoki yango mpe nsima na yango kofina mwa ebɛtɛli na yango mpo na kosopa masasi mpe bagrenade lokola mbula. Soki mosala ya kosala mondoki yango esili na ntango oyo bakani, liboso ete mobu 2007 esila, mondoki yango ekokóma na mabɔkɔ ya basoda oyo babundaka na mabele.

Kasi, bato ya mayele bazali komituna: Ndenge nini basoda bakosalela mondoki yango ntango bakobanda kosala ekombela (patrouille) na bakartye oyo etondi na bato epai banguna bakoki kozala esika moko na basivili oyo basali likambo te? Nini ekosalema ntango mondoki OICW ekotɛkama epai ya basoda na mokili mobimba, basoda oyo bakoki kobalukela bana-mboka na bango moko? Mpe nini ekosalema soki ebundeli yango ekwei na mabɔkɔ ya bato ya mobulu mpe babomi?

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Alliant Techsystems

[Bililingi na lokasa 6]

Mbala mingi basombitinyaka mindoki ya mike na ya minene na diamá mpe na bangi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto