Nkoma ya batángi
Libɔndisi mpo na bato ya maladi Matɔndi mingi mpo na masolo oyo ezalaki na motó ya likambo “Libɔndisi mpo na bato ya maladi.” (Yuli-Sɛtɛmbɛ 2001) Nazwaki likama moko esili koleka mbula minei. Mbala mingi nazalaki kokanisa ete ekokaki kozala malamu soki nakufaki. Nakómá kobosanabosana makambo mpe yango esalaka ete nalekisa mikolo mosusu malamu te. Kasi, ntango natángaki masolo yango, elendisaki ngai.
T. M., Japon
Banda nazalaki na mbula 15, nabɛlaka maladi babengi polyarthrite rhumatoïde. Makambo oyo bolobeli esalisaki ngai nayeba ete nasengeli koyekola kotyela Yehova motema lisusu koleka, mpo ye azali “ndako makasi na mokolo ya mpasi.”—Nahumu 1:7.
Y.F.R., Colombie
Nazali mopalanganisi ya nsango malamu ya ntango nyonso. Ntango nakendaki kosala na esika mosusu oyo bautaki kotinda ngai, eumelaki te bayebisaki ngai ete nazali na diabɛtɛ. Bolobelaki malamu mpenza ndenge oyo moto oyo azali na maladi oyo esilaka te amiyokaka! Masolo yango esalisaki ngai natalela lisusu ezalela na ngai na bokatikati mpe nasala mbongwana na bomoi na ngai.
L. A., Italie
Tozali kobɛla te, kasi mitinda oyo ezali na lisolo yango esalisaki biso mingi mpo na kobundana na mokakatano moko oyo tozali na yango. Lokola esalemaka bongo mbala mingi, lisolo oyo ebimi na zulunalo yango ezalaki eyano na likambo moko oyo tosɛngaki na libondeli.
R. P. mpe L. P., Sri Lanka
Eleki mwa bapɔsɔ, bayebisaki ngai ete libale (foie) na ngai evimbi. Lokola nazalaki nzoto kolɔngɔnɔ kino ntango wana, bokoki bino moko kokanisa mpasi oyo nayokaki. Lelo, nazwaki nimero ya 22 Yanuali 2001 (Yuli-Sɛtɛmbɛ na Lingala) mpe natángaki masolo na yango nyonso. Masolo yango elobelaki ntembe oyo nazalaki na yango, makanisi na ngai mpe mayoki na ngai nyonso, kasi elobelaki makambo na ndenge ya kopesa mpenza moto elikya.
J. E., Espagne
Lisolo ya moto moko Nazali kokomela bino mpo na lisolo ya Bill mpe Rose Meiners, “Amityelaki mikano mpo na kobunda na mikakatano na ye.” (Yuli-Sɛtɛmbɛ 2001) Koyeba ete bazali koyika mpiko na boumeli ya mbula koleka ntuku mitano, yango ezali mpenza likambo ya kolendisa. Masolo yango ya bomoi ezali mpenza kosimba motema. Nalingi Bill na Rose báyeba ete nazali mpenza kobondela mpo na bango.
V. G., Italie
Mpo na biso oyo tozali nzoto kolɔngɔnɔ, lisolo yango ya mobali oyo azali kobundana na maladi na boumeli ya mbula koleka 50 ezali mpenza kosimba motema. Esalisi ngai nayeba ete lokola nazali mwasi mpe nazali nzoto kolɔngɔnɔ, nasengeli kobatela bokolɔngɔnɔ ya nzoto na ngai mpe kosalela bomoi na ngai malamu.
P. V., République tchèque
Mama na ngai azali kobɛla eumeli sikoyo pene na mbula 20. Sikoyo, azali lisusu na elikya te mpe azali komituna mpo na nini bakoki kokitisa mpasi na ye ata mwa moke te. Natángelaki ye lisolo yango, kasi ngai moko mpe nazwelaki yango litomba. Sikoyo nayebi mpo na nini anyokwamaka na makanisi mbala mingi.
G.O.A., Nigeria
Bill na Rose, bakisa mpe bato mosusu oyo bazali na maladi moko ya makasi, bazali mpenza bato ya mpiko! Nakanisi ete ndakisa na bango ekoki kopesa liteya na biso baoyo tozali nzoto kolɔngɔnɔ. Bill na Rose, bólɛmba te! Bozali ndakisa mpo na biso!
I. S., Allemagne
Kobima na mwa moto na yo ntango ozali elenge Nazali na mbula 15, mpe nasepelaki mingi na lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Nakosala nini soki baboti na ngai bakanisi ete nakɔmɛli te mpo nabanda kobima na mwa moto na ngai?” (Yuli-Sɛtɛmbɛ 2001) Lokola nazali mwasi, bilenge mosusu batunaka ngai na eteyelo soki nasangisaka nzoto na basi, mpo nabimaka na mwana mobali te. Nayebisaka bango ete baboti na ngai bapesaka ngai nzela te ya kobimaka na mwana mobali, kasi ntango nyonso nalingaka kopesa bango eyano ya malamu koleka oyo wana. Lokola natángi lisolo yango, sikoyo nayebi ndenge ya koyanola na mituna na bango. Matɔndi mingi ndenge bozali kokanisa biso bilenge.
C. G., États-Unis