Na ekólo Géorgie bazali konyokola bato mpo na lingomba na bango—Likambo yango ekosila mokolo nini?
LONGWA NA BOKULA ya mer Noire, epai mpiɔ mpe molunge ezalaka mpenza makasi te, kino na bangomba ya Caucase oyo bansɔngɛ na yango ezipami na ngalasi, ekólo Géorgie ezali mpenza mokili moko kitoko. Ekólo yango ya bangombangomba, oyo ndambo na yango mosusu ezali na Mpoto mpe ndambo mosusu na Azia, ezali na bazamba minene, mingala oyo etiyolaka makasi mpenza, mpe mabwaku oyo etondi na bazamba. Tbilissi, mboka-mokonzi ya Géorgie ezali engumba ya bato oyo bamipesi na makambo ndenge na ndenge, ezali na babuludingi oyo bazali kotonga mikolo oyo mpe na bamonima ya kala. Kasi biloko ya motuya mingi mpenza oyo Géorgie ezali na yango ezali nde bato ya mboka yango oyo bayebani na mokili mobimba ete mabota na bango ezalaka na bomoko mpe bayambaka bapaya na esengo mpenza.
Masolo ya kala ya Géorgie emonisi ete ekólo yango ekutaná na minyoko mingi. Mbala na mbala mboka yango ekweyaki na mabɔkɔ ya Baloma, Baperse, bato ya Byzance, Baarabe, bato ya Turquie, bato ya Mongolie, bato ya Russie mpe bato ya bikólo mosusu. Balobaka ete engumba Tbilissi ebebisamaki mbala 29!a Atako bongo, bato ya Géorgie balingaka kaka bomoi, balingaka misala ya ntɔki, koyemba mpe kobina; bazalaka mpe kaka na lokumu na bango ete bandimaka mpe makanisi ya bato mosusu atako ekeseni na oyo ya bango.
Nzokande, ezali mawa ete lelo oyo tokoki lisusu te koloba bongo mpo na bato nyonso ya Géorgie. Na bambula mibale oyo euti koleka, mwa etuluku moke ya bato ya mboka Géorgie banyokolaki bankama ya bato mosusu bobele ya mboka yango; nyonso wana ebebisaki lokumu ya mboka na bango. Ebele ya bato oyo bazalaki na nkanda makasi babɛtaki mibali, basi, bana na mibange mpe bibɔsɔnɔ oyo basalaki likambo moko te ya mabe. Babɛtaki bango na banzete oyo batyaki nsɛtɛ mpe bibende, mpe bazokisaki bango na bilongi mpe na mitó. Mpo na nini babɛtaki bato mpenza ya mboka na bango moko bongo oyo bazali ata likama moke te epai na bato? Mpo kaka bazali Batatoli ya Yehova, lisangá moko ya baklisto oyo babandaki mosala na bango na Géorgie kutu liboso ete mingi kati na bato wana oyo bazali konyokola bango bábotama.
Nsima ya kofundafunda bango, minyoko elandi
Atako mibeko ya ekólo Géorgie ezali kopesa na mwana-mboka nyonso bonsomi ya losambo, mbala na mbala babɔtɔlaki mikanda ya Batatoli ya Yehova. Na sanza ya Aprili 1999, bakonzi ya duanɛ balobaki ete liboso bázongisa mikanda oyo babɔtɔlaki, esengeli Mokonzi Monene ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse (Patriarche) ya Géorgie, apesa ndingisa. Na sanza oyo elandaki, batángaki lisusu nkombo ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse, kasi mbala oyo na tribinale ya etúká ya Isani-Samgori. Kuna, Gouram Charadze, oyo azali depite mpe mokambi ya lisangá moko ya politiki oyo ezali na nkombo “Liboso Géorgie!” afundaki na tribinale ete báboma na mikanda ya Leta masangá mibale oyo esalemi na kolanda mibeko ya Leta oyo Batatoli ya Yehova basalelaka na ekólo yango. Afundaki ete Batatoli bazali banguna ya ekólo mpe ete bazali bato oyo esengeli mpenza kokeba na bango. Nani apesaki Charadze mabɔkɔ na likambo yango? Ntango Charadze akɔtisaki mikanda mpo na kofunda makambo na tribinale, atyaki mpe mokanda ya mokomeli ya Mokonzi Monene (Patriarche-Catholicos) ya lingomba ya Géorgie mobimba oyo andimaki bifundeli yango.
Na mokolo ya 20 Mai 1999, ekólo Géorgie etyaki mabɔkɔ na mokanda ya Boyokani ya mikili ya Mpoto mpo na kobatela ntomo mpe bonsomi monene ya bato, mpe na yango endimaki kotosa makambo oyo elobami na boyokani yango. Artikle 10 ya boyokani yango elobi boye: “Moto nyonso azali na lotomo ya kozala na bonsomi ya koloba. Lotomo yango etali bonsomi ya kozala na makanisi mpe bonsomi ya kozwa mpe koyebisa nsango mpe makanisi kozanga ete bakonzi ya mboka bápekisa yango, mpe kozanga kotalela bandelo ya bikólo.” Lotomo yango epekisaki banguna ya Batatoli ya Yehova ete bátika koluka kopekisa mikanda na bango ya lingomba? Soki moke te!
Na mokolo ya 21 Yuni 1999, Biro ya Mokonzi-Monene ya Lingomba ya Géorgie mobimba, etindaki mokanda moko epai na mokambi ya misala ya duanɛ, mpe na mokanda yango balobaki makasi ete “esengeli kopekisa kokabola mikanda ya mangomba oyo euti na bamboka mosusu.” Lisusu, Giorgi Andriadze, molobeli ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Géorgie, alobaki ete Batatoli ya Yehova bazali lingomba moko oyo esengeli mpenza kokeba na yango; mpe mpo na yango, esengeli kopekisa bango. Bifundeli wana nyonso ekɔtaki na matoi ya bato. Kobanda wana, bato oyo bamipesi na lingomba na bango na koleka ndelo, bato oyo kala batumbaki mikanda ya Batatoli ya Yehova, bazwaki sikoyo nzela ya konyokola Batatoli, mpe bakosala bango eloko moko te. Na mokolo ya lomingo, mwa 17 Ɔkɔtɔbɛ 1999, bayaki lisusu konyokola Batatoli.
Bato ya mobulu basali mabe kasi bazwi etumbu moko te
Mokolo wana ya lomingo, na Tbilissi, Batatoli ya Yehova soko 120, mibali, basi na bana bayanganaki mpo na losambo. Na mbala moko, Basil Mkalavichvili, oyo kala azalaká sango na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse, akɔtaki na esika ya likita elongo na bato na ye 200.b Bazingaki Batatoli mpe babandaki kobɛta bango na ndenge ya nsɔmɔ na banzete mpe na bikulusu ya bibende oyo bazalaki na yango. Kati ya banguna yango, minei bakangaki Motatoli moko na mabɔkɔ mpe na nkingo, bakitisaki ye motó na nse mpe babandaki kokokola ye nsuki na motó, wana basusu ebele bazalaki kotala mpe kozomela ye. Ntango etuluku yango ya bato ya mobulu oyo bazalaki lokola bato ya ligboma bakendaki, Batatoli 16 bakɔtaki lopitalo mpo na kozwa lisalisi ya minganga. Babukaki ndeko moko ya mobali mikwa misato ya mpanzi. Phati, Motatoli ya mwasi ya mbula 40 alobaki na nsima ete: “Babandaki kofinga ngai, mpe moko na bango abɛtaki ngai na makasi na ye nyonso. Abɛtaki ngai na elongi mpe na miso. Namekaki kobomba elongi na ngai na mabɔkɔ. Makila ezalaki kotanga na misapi na ngai.” Ntango moto yango ya mobulu atikaki kobɛta Phati, liso na ye ya mwasi ekokaki lisusu komona te. Tii lelo oyo liso yango ebɛbá mpo na kobɛta oyo babɛtaki ye.
Ntango balakisaki likambo wana ya nsɔmɔ na televizyo, yango etindaki Eduard Chevardnadze, prezida ya Géorgie, amonisa polele makanisi na ye. Na mokolo oyo elandaki alobaki boye: “Nakoki soki moke te kondima likambo ya boye mpe nakanisi ete bibongiseli ya Leta oyo elandelaka baoyo babuki mibeko esengeli kosambisa bato oyo babimisaki mobulu yango.” Lokola mokambi ya etuluku mpe bato mosusu ya etuluku yango bamonanaki polele na televizyo, ezalaki mpasi te mpo na kokanga bango mpe kokweisa bango. Nzokande tii lelo oyo, mbula mibale na nsima, bazuzi bakweisi ata moko te.
Bakómi mitó makasi mpo bazwi etumbu te
Lokola bakonzi ya mboka mpe bakonzi ya lingomba basalaki eloko te, yango etindaki bato wana ya mobulu bákanisa ete bakonzi wana bakolanda kokanga miso likoló ya mobulu na bango. Lokola bakómi mitó makasi mpo bazali kozwa etumbu te, bakómi lisusu kosala mobulu makasi: bakómi koyiba biloko ya Batatoli ya Yehova mpe kobɛta bango, ezala na bandako na bango, na balabala to na bisika na bango ya losambo. Kobanda na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1999 kino na sanza ya Augusto 2001, bakɔtelaki Batatoli ya Yehova mbala 80 mpo na kosalela bango mobulu, bilembeteli oyo ezali komonisa bosolo ya makambo yango ezali; na bambala nyonso wana Batatoli koleka 1 000 banyokwamaki. Atako bongo, na mwa 9 Febwali 2001, procureur moko ya engumba Tbilissi ayebisaki bapanzi-nsango ete ankɛtɛ mpo na likambo ya Basil Mkalavichvili “ezali se kokoba.” Likambo ya mawa, na ntango lisolo oyo ezalaki kokomama, bakonzi ya Géorgie bazali kaka kotika nzela na banguna ya Batatoli ya Yehova ete bálanda kosala mobulu na bango oyo ezali komonisa likunya oyo bazali na yango.—Talá etanda “Bato ya mobulu bazali se kokoba na mobulu na bango.”
Bapolisi basali nini na likambo yango? Bansango mpe bilili oyo bazwaki emonisi polele ete bapolisi basukaki kaka te na kotika ete bato wana bányokola Batatoli ya Yehova, kasi lisusu bango moko mpe basanganaki na makambo yango! Na ndakisa, na mwa 8 Sɛtɛmbɛ 2000, na engumba Zugdidi, bapolisi oyo bazalaki na mangenda bapanzaki liyangani moko oyo Batatoli ya Yehova 700 bazalaki kosala na kimya nyonso. Baoyo bamonaki likambo yango balobaki ete bapolisi yango, oyo babombaki bilongi na bango, “babebisaki biloko nyonso na esika yango,” mpe babɛtaki Batatoli koleka 50. Nkolo esika oyo basalaki liyangani alobaki ete: “Ezalaki mpenza nsɔmɔ.” Alobaki bongo ntango akanisaki lisusu nsɔmɔ oyo ezalaki komonana na bilongi ya bana ntango babɔmbi oyo babwakelaka mituka ya bitumba (chars) ya banguna oyo ezalaki na eloko te na kati, ezalaki kolekaleka likoló ya mitó ya bana yango. Bapolisi bakɔtaki na esika yango mpe batumbaki yango na mɔ́tɔ. Nzokande, kino sikoyo, bapesi bango ata etumbu moko te.
Lokola ezalaki mbala ya liboso te ete bapolisi básala likambo ya mabe mpenza ya ndenge wana (Talá etanda “Bapolisi bazali mpe kosangana na makambo yango ya mobulu”), yango wana, na mwa 7 Mai 2001, Komite moko ya ONU oyo epekisaka minyoko (Comité des Nations unies contre la torture) emonisaki ete ezali komitungisa mingi ndenge “bato oyo basengeli kotosisa mibeko na Géorgie bazali bango moko kotika te konyokola bato mpe kopesa bango bitumbu to kosalela bango makambo mosusu ya bonyama to ya koyokisa bango nsɔni; Komite yango ezali lisusu komitungisa na ndenge bato bazali kofunda ebele ya makambo ete bazali konyokwama, kasi bakonzi bazali kosala ata eloko moko te mpo ete baankɛtɛ ya malamu mpenza ekoka kosalema nokinoki mpe na kozanga koponapona mpo na makambo oyo bato bazali kofunda mpo na minyoko.”c Ezali mpenza solo, mpamba te Batatoli ya Yehova bafundaki makambo koleka 400 epai ya bapolisi mpe ata na moko te bapolisi bakangaki bato wana oyo basalaki mabe oyo bafundamaki na yango, oyo mpe bayebani malamu. Moto oyo akɔtelaka bana-mboka ya Géorgie soki bazali na likambo na bakonzi ya Leta (Ombudsman), oyo aponamaka na badepite, alobaki boye: “Baoyo bazali kotyola ntomo ya bato ezali mpenza bato oyo bazali na mokumba ya kobatela yango. Mpo na bango, ntomo ya bato ezali makambo oyo ekomamá na mikanda mpe esengeli kosuka kaka na mikanda.”
Ekateli ya esambiselo monene ebebisi makambo
Lokola nde mobulu oyo epekisami na mibeko, oyo bato ya mobulu na bapolisi bazali kosala ekokaki te, Esambiselo Monene ya Géorgie euti kozwa ekateli moko oyo ebebisi makambo mpo na ntomo ya Batatoli ya Yehova.
Tiká tólobela naino makambo oyo ememaki na ekateli yango. Gouram Charadze, ye azali moto ya politiki, afundaki likambo na ye na tribinale mpo báboma na mikanda ya Leta masangá oyo esalemi na kolanda mibeko ya Leta oyo Batatoli ya Yehova basalelaka na ekólo yango. Na mwa 29 Febwali 2000 tribinale eboyaki kotalela likambo oyo ye afundaki. Kasi, Charadze asɛngaki tribinale mosusu etalela likambo yango mpe mbala wana alongaki na tribinale. Batatoli ya Yehova bango mpe basɛngaki Esambiselo Monene ya mboka etalela lisusu likambo yango. Na mwa 22 Febwali 2001, Esambiselo Monene ekweisaki Batatoli ya Yehova, mpenzampenza na likambo etali kolanda matambe mpo na kozwa mikanda ya Leta. Esambiselo Monene elobaki ete na kotalela Mibeko ya mboka (constitution), mangomba esengeli komikomisa na Leta na kolanda mobeko moko, kotaleláká ntomo ya bato banso (droit public), kasi mobeko yango esalemi naino te, oyo esengeli komonisa polele ndenge ya kokomisa mangomba na mikanda ya Leta. Esambiselo yango esukisaki na koloba ete lokola mobeko wana ezali naino te, esengeli te kokomisa masangá ya Batatoli ya Yehova na ndenge mosusu. Nzokande, masangá 15 oyo mangomba mosusu ezali kosalela ekomami mpenza na kolanda mibeko ya Géorgie.
Mpo na likambo yango, ntango bazalaki kotuna Mikheil Saakachvili, ministre ya Justice ya Géorgie na televisyo, amonisaki makanisi na ye mpo na ekateli wana oyo Esambiselo Monene ezwaki; alobaki boye: “Soki totaleli mpenza mibeko, ekateli yango ezali kobimisa ntembe mingi. Nandimi te ete ekateli yango epesi mpenza lokumu na Esambiselo Monene koleka bikateli mosusu oyo ezwá banda esalemá.” Zourab Adeichvili, prezida-molandi ya badepite oyo batalelaka makambo ya mibeko na kati ya parlema ya Géorgie ayebisaki lisangá ya bapanzi-nsango Keston ete azalaki “kobanga mingi” mpo na ekateli yango mpamba te “ekotinda bato oyo bamipesi na [Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse] na koleka ndelo, báboma mangomba nyonso ya mike.” Likambo ya mawa ezali ete makambo oyo eyaki nsima emonisaki ete Adeichvili abangaki mpenza na ntina. Mwa mikolo nsima ya ekateli yango, mobulu oyo bazalaki kobimisela Batatoli ya Yehova ebandaki lisusu. Na mobu 2001, bato ya mobulu, bapolisi na basango ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse banyokolaki Batatoli na mwa 27 Febwali, mwa 5 Marsi, mwa 6 Marsi, mwa 27 Marsi, mwa 1 Aprili, mwa 7 Aprili, mwa 29 Aprili, mwa 30 Aprili, mwa 7 Mai, mwa 20 Mai, mwa 8 Yuni, mwa 17 Yuni, mwa 11 Yuli, mwa 12 Augusto, mwa 28 Sɛtɛmbɛ mpe na mwa 30 Sɛtɛmbɛ. Tolobeli kutu nyonso te.
Wana minyoko yango oyo ebandaki lisusu ezali kongala makasi, Esambiselo Monene esalaki likambo moko oyo esalemaka mpenza te, ya kolimbolela bato ekateli oyo ezwaki; elobaki boye: “Ezali mawa ete bato bakangaki ntina malamu te na ekateli ya Esambiselo Monene ya koboma mokanda oyo emonisaki ete Leta endimi Lisangá ya Batatoli ya Yehova . . . Ntango tolongolaki nkombo ya lisangá oyo efundami na mikanda ya Leta, bobele nkombo mpamba nde elongwe na mikanda ya Leta, yango elingi koloba te ete totyolaki to tokitisaki na ndenge ya polele to na ndenge ya polele te lotomo na bango ya kozala na bonsomi ya makanisi, ya lisosoli mpe ya lingomba. Tokitisaki mpe te bonsomi na bango ya kobongola bindimeli na bango, ezala moto na moto ye moko to elongo na basusu, ezala na miso ya bato to na bisika bafandi. . . . Ekateli oyo Esambiselo ezwaki ekitisi te lotomo ya bato yango oyo bafundami ya kozwa mpe koyebisa bato mosusu makanisi mpe makambo na bango. Epekisaki te lotomo na bango ya kosala makita na kimya nyonso.”
Bankóto ya bato ya Géorgie bamonisi polele ete baboi minyoko yango
Atako maloba wana ya Esambiselo Monene esali mpenza eloko te epai ya bato oyo bazali kobimisa mobulu, nzokande ezali likambo ya kolendisa na komona ete bankóto ya bato ya Géorgie basili komonisa ete ezali mpenza mabe ndenge bazali konyokola Batatoli. Kobanda na mwa 8 Yanuali Batatoli ya Yehova bakomaki mokanda moko oyo etambolaki na mboka yango mobimba mpo bato bátya mabɔkɔ, mpe mokanda yango ezalaki kosɛnga ete bábatela bana-mboka ya Géorgie na makambo ya mobulu mpe bákanga baoyo bazali kobimisa mobulu. Nsima ya pɔsɔ mibale mpamba, bana-mboka ya mikóló 133 375 ya bitúká nyonso ya Géorgie batyaki mabɔkɔ na mokanda yango. Lokola, na Géorgie mobimba, Batatoli ya Yehova bazali 15 000 mpamba, tokoloba ete ebele ya bato oyo batyaki mabɔkɔ na mokanda yango bazalaki solo bato ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Géorgie. Kasi na mwa 22 Yanuali 2001, mokanda wana elimwaki. Ndenge nini?
Mokolo yango, likita moko elongo na bapanzi-nsango esalemaki na biro ya Nana Devdariani, mwasi oyo azali na mokumba ya kokɔtela bana-mboka ya Géorgie soki bazali na likambo na bakonzi ya Leta. Likita yango esalemaki mpo na kolakisa na miso ya bato nyonso mokanda yango oyo ezalaki na basinyatire. Mbala moko, na ntango oyo likita yango ezalaki kosalema, Basil Mkalavichvili elongo na bato na ye mosusu zomi bakɔtaki na makasi na biro mpe babɔtɔlaki mokanda yango, oyo ezalaki nde mwa babuku 14 oyo ezalaki na basinyatire yango. Momonisi ya ebongiseli moko ya Caucase oyo etalelaka makambo etali kimya mpe demokrasi amekaki kopekisa ete bázwa mokanda yango te, kasi bato yango bakwelaki ye. Ntango Mkalavichvili azalaki kofinga na ebele ya maloba, bato na ye babɔtɔlaki bato oyo babongisaki likita yango mwa babuku yango 12, mpe bakendeki na yango. Mosali moko na ambasadɛ ya ekólo moko oyo azalaki wana ntango likambo yango esalemaki agangaki ete: “Oyo ezali mpenza likambo ya kokamwa!” Likambo ya esengo, na mwa 6 Febwali, Batatoli ya Yehova bazwaki lisusu mwa babuku yango, mpe na mwa 13 Febwali 2001, bapesaki yango epai ya prezida ya Géorgie.
“Likambo nyonso oyo ekosalema mpo na kotungisa bato . . . bakokanga bato yango”
Batatoli ya Yehova ya Géorgie mpe ya mokili mobimba bazali na elikya ete mokanda wana ekotinda prezida ya Géorgie azwa bikateli. Kutu kala, na maloba na ye moko, Prezida Chevardnadze amonisaki mbala na mbala ete asepelaka te na minyoko nyonso oyo babimiselaka Batatoli ya Yehova. Na ndakisa na mwa 18 Ɔkɔtɔbɛ 1999, prezida alobaki ete mobulu oyo bazalaki kobimisela Batatoli ya Yehova ezali “minyoko oyo ebongisami malamu mpo na kosilisa bango nyɛɛ” mpe ete likambo ya ndenge wana “ekoki kondimama soki moke te.” Na mwa 20 Ɔkɔtɔbɛ 2000, akomelaki moko ya bato oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova ete: “Tokosala nyonso mpo na kosilisa mobulu.” Abakisaki boye: “Osengeli koyeba ete bakonzi ya Géorgie bakozala kaka na mokano makasi ya kobatela ntomo ya bato mpe bonsomi ya lisosoli.” Lisusu, na mwa 2 Novɛmbɛ 2000, kati na mokanda moko oyo akomelaki Lisangá mpo na libateli mpe boyokani na Mpoto (Commission sur la sécurité et la coopération en Europe), Prezida Chevardnadze alobaki ete: “Likambo [ya mangomba mike na Géorgie] ezali likambo oyo bato na biso na guvɛrnɛma bazali komitungisa mingi mpo na yango.” Mpo na komonisa ete guvɛrnɛma ekokanga lisusu mabɔkɔ te, abakisaki boye: “Likambo nyonso oyo ekosalema mpo na kotungisa mpe kobɛta bato, bakokanga bato oyo basali yango mpe bazuzi bakosambisa bango.”
Bato nyonso ya mikili ya Mpoto to ya mikili mosusu oyo batungisami na makambo yango bazali kolikya ete Prezida Chevardnadze akoumela te kokokisa maloba na ye. Wana bazali kozela kokokisama ya maloba yango, Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazali kotika te kobondela mpo na bandeko na bango ya Géorgie, oyo bazali kokoba kosalela Yehova na mpiko nyonso atako minyoko wana makasi ezali.—Nzembo 109:3, 4; Masese 15:29.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali Géorgie, talá lisolo “Géorgie: un héritage ancien mais toujours vivant,” oyo ebimaki na Lamuká! ya 22 Yanuali 1998 (ebimeli ya Lifalanse).
b Balongolaki Basil Mkalavichvili na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Géorgie na katikati ya bambula ya 1990 mpo alobaki mabe mpenza na ndenge oyo lingomba yango ekɔtaki na lisangá oyo babengi Conseil œcuménique des Églises. (Na nsima, Lingomba yango emilongolaki na lisangá wana.) Nzokande, Mkalavichvili akendaki kokɔta na lingomba ya paléo-stylistes grecs oyo ekambami na mokonzi oyo babengi métropolite Cyprien.
c Géorgie ezali moko ya bikólo 123 oyo etyaki mabɔkɔ na mokanda ya Boyokani ya ONU oyo epekisaka minyoko mpe makambo mosusu to bitumbu mosusu ya mabe, ya bonyama to oyo eyokisaka bato nsɔni. Yango emonisi ete Géorgie endimi yango moko ete “konyokola moto ezali likambo oyo eyokani na mibeko te.”
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 18]
“Likambo nyonso oyo ekosalema mpo na kotungisa mpe kobɛta bato, bakokanga bato oyo basali yango mpe bazuzi bakosambisa bango.”—Eduard Chevardnadze, prezida ya Géorgie, mwa 2 Novɛmbɛ 2000
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 18]
“Tozali kolikya ete likambo oyo [ya konyokola bato ya mangomba ya mike] ekosila mpe mangomba nyonso na Géorgie ekozwa bonsomi ya solosolo ya kolobela bindimeli na bango.”—David Soumbadze, mopesi-toli na ambasadɛ ya Géorgie na Washington, États-Unis, mwa 3 Yuli 2001
[Etanda/Elilingi na lokasa 14]
BATO YA MOBULU BAZALI SE KOKOBA NA MOBULU
Lokola bakonzi ya Géorgie bazali kosala eloko te mpo na kokanga bato oyo bazali konyokola Batatoli ya Yehova, yango esali ete bányokola bango lisusu koleka.
Na ndakisa, na mwa 22 Yanuali, na Svanetis Ubani, kartye moko ya engumba Tbilissi, Basil Mkalavichvili, oyo azalaká kala sango na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse, na bato na ye bakɔtaki na mobulu na esika oyo Batatoli 70 bazalaki kosala makita na bango. Bato yango babɛtaki Batatoli makofi, banyataki bango na makolo mpe babɛtaki bango na bikulusu ya mabaya mpe ya bibende. Moko na bango abɛtaki Motatoli moko ekulusu ya monene ya libaya na motó na makasi nyonso mpe ekulusu yango ebukanaki. Bakɔtisaki Batatoli mosusu na kati ya ndako moko ya molili, kuna bato ebele babɛtaki bango. Batindaki Batatoli mosusu ya mibange bákima mbangu na katikati ya milɔngɔ mibale ya bato yango oyo bazalaki kotutatuta bango makofi mpe kobɛta bango na bikulusu. Mibali mibale ya mikóló balandaki elenge mobali moko ya mbula 14 mpe babɛtaki ye makofi mpe batutaki ye na makolo. Mobali mosusu ya mbula 30 alandaki mwana moko ya mobali ya mbula 12 mpe abɛtaki ye na Biblia moko monene ya monɔkɔ ya Géorgien na motó. Na ntango wana kaka, Motatoli moko abimaki mbangu mpo na kokende kobenga bapolisi, kasi bato yango ya mobulu balandaki ye mpe bakangaki ye. Babɛtabɛtaki ye na elongi kino monɔkɔ na ye etondaki na makila mpe abandaki kosanza. Nsukansuka, bato yango ya mobulu, oyo bazangi mawa, bapanzanaki. Kino sikoyo bato wana bazwi naino etumbu te mpo na likambo oyo basali.
Na mwa 30 Aprili 2001, bato ya Mkalavichvili bapanzaki lisusu likita ya lisangá bobele wana ya Batatoli ya Yehova. Babimisaki Batatoli libándá mpe babandaki kobɛta bango na banzete oyo batyaki bansɛtɛ. Babɛtaki Motatoli moko na nkombo Tamaz na nsɛtɛ yango mpe ezokisaki ye mpota na lobɔkɔ ya mobali, na litando ya mwasi, na lokolo ya mwasi mpe na litama ya mwasi. Lisusu, esengelaki bátonga ye mpota monene oyo azokaki na motó, na nsinga mitano. Bato yango bapunzaki nyonso oyo ezalaki na ndako yango esika Batatoli bazalaki kosala makita, babebisaki bakiti, biloko ya kura mpe maninisa nyonso. Na nsima, batumbaki mikanda ya Batatoli ya Yehova. Na mwa 7 Yuni 2001, ebongiseli moko oyo etalelaka makambo ya ntomo ya bato (Human Rights Watch) esɛngaki mpenza na Kakha Targamadze, ministre ya Intérieur ya Géorgie, mpe na Gia Mepharichvili, procureur général ya Géorgie, báyebisa makambo nini basali mpo na kolandela bato oyo babimisaki minyoko wana mpe mosusu oyo esalemaki liboso. Kino sikoyo eloko moko esalemi te mpo na kosambisa bato yango ya mobulu.
[Etanda na lokasa 15]
BAPOLISI BASANGANI NA MOBULU
Na mwa 16 Sɛtɛmbɛ 2000, bapolisi ya engumba Marneuli bakangaki nzela mpo na kopekisa bisi 19 oyo ezalaki komema Batatoli ya Yehova na esika ya liyangani na bango ya etúká. Na esika mosusu oyo bakangaki mpe nzela, bato mosusu bazalaki kobamba babisi ya Batatoli mabanga, mpe libanga moko ezwaki Motatoli moko na motó. Babimisaki Batatoli mingi na babisi mpe babɛtaki bango, na ntango wana kaka bayibaki Batatoli mosusu biloko na bango. Kaka na ntango wana, bapolisi bafungolaki nzela mpo na kolekisa babisi oyo etondanaki na bato ya Mkalavichvili, oyo bazalaki kokende kobebisa esika ya liyangani yango ya etúká. Bato yango ya mobulu batumbaki tɔni moko na ndambo ya mikanda oyo elimbolaka Biblia. Bapolisi oyo bazalaki wana, bango mpe babɛtaki Batatoli.
Lisangá moko ya bapanzi-nsango (Caucasus Press) elobaki ete ministre ya Intérieur akolandela likambo yango mpe akokamata “meko oyo ebongi mpenza.” Baoyo bakolandela likambo yango bazangi te bantina ya sikisiki oyo esengeli kotinda bango bákweisa bato yango. Artikle 25 ya Mibeko ya mboka Géorgie ezali kopesa bato nyonso lotomo ya kosala mayangani oyo bato nyonso bakoki komona. Atako bongo, ata moto moko te kati na bango akangami. Sanza mitano nsima ya mobulu wana, lisangá moko ya bapanzi-nsango (Keston News Service) eyebisaki ete avoka moko ya Gouram Charadze, mokambi ya lisangá moko ya politiki oyo ezali na nkombo “Liboso Géorgie!,” andimaki ete Charadze asɛngisaki bakonzi ya bingumba Marneuli na Zugdidi bápekisa mayangani mibale ya etúká oyo Batatoli ya Yehova balingaki kosala.
[Etanda na lokasa 15]
MIBEKO YA GÉORGIE ENDIMI KOBATELA BATO
Mibeko ya Géorgie, ya mwa 25 Augusto 1995 epesi bonsomi ya losambo mpe endimi kobatela bato mpo bányokola bango te. Mwa baartikle oyo elandi ezali komonisa yango:
Artikle 17—(1) Lokumu mpe valɛrɛ ya moto ekoki soki moke te kobebisama. (2) Konyokola moto mpe kopesa ye etumbu to kosalela ye makambo ya bonyama to ya koyokisa ye nsɔni ezali likambo oyo eboyami mpenza.
Artikle 19—(1) Moto nyonso azali na lotomo ya kozala na bonsomi ya koloba, ya kokanisa, ya lisosoli, ya kopona lingomba mpe bindimeli na ye. (2) Epekisami konyokola moto mpo na makanisi, bindimeli to lingomba na ye.
Artikle 24—(1) Moto nyonso azali na lotomo ete ayebisa makambo mpe apanza makambo yango na bonsomi nyonso; azali mpe na lotomo ya koyebisa mpe kopanza makanisi na ye na maloba, na mikanda to na lolenge mosusu.
Artikle 25—(1) Longola kaka basoda, bapolisi na bato ya sirɛtɛ, moto nyonso azali na lotomo ya kosala mayangani na polele; ekoki kosalema kozanga kosɛnga ndingisa ya bakonzi, ezala na kati ya ndako to na libándá, kasi mindoki esengeli kozala te.
[Etanda na lokasa 16]
MOKILI MOBIMBA EZALI KOTALA
Ndenge nini bato na mokili mobimba bazali kotalela lolenge oyo ekólo Géorgie ezali kokoka te kosilisa minyoko oyo bato ya mboka yango bazali kobimisela Batatoli ya Yehova?
Guvɛrnɛma ya États-Unis mpe ya Grande-Bretagne bakomaki mokanda moko oyo ezali na maloba oyo: “Bapanzaki likita moko ya Batatoli ya Yehova, ebele ya bato babɛtamaki, mpe bapekisaki basusu kokóma na esika ya likita yango. Ambasadɛ ya États-Unis na oyo ya Grande-Bretagne etungisami mingi na likambo yango mpe na makambo mosusu oyo eyokani mpenza te na mibeko ya Géorgie, mpamba te ezali kotyola bonsomi ya losambo ya bato oyo basalelaki bango makambo yango . . . Tozali kosɛnga na guvɛrnɛma ya ekólo Géorgie elandela makambo yango mpe efungola miso mpo na kosala ete ntomo ya bato nyonso na makambo ya losambo etosama.”
Ursula Schleicher, prezida ya etuluku ya badepite ya Parlement européen oyo batalelaka boyokani kati na Union européenne na Géorgie alobaki boye: “Na nkombo ya badepite ya Parlement européen oyo nazali kokamba, nalingi komonisa ete na makambo ndenge na ndenge oyo ezali kosalema mpo na konyokola bapanzi-nsango, bato oyo basalaka nyonso mpo na kotombola ntomo ya bato, na Batatoli ya Yehova, likambo oyo euti kosalema mikolo oyo etungisi ngai mingi . . . Mpo na ngai, makambo yango ezali nde kotyola mpenza ntomo minene ya bato, ntomo oyo Géorgie endimaki kotosa yango ntango etyaki mabɔkɔ na Boyokani ya mikili ya Mpoto mpo na kobatela ntomo mpe bonsomi minene ya bato.”
Ebongiseli moko (Commission sur la sécurité et la coopération en Europe) ekomelaki Prezida Chevardnadze na likambo etali minyoko oyo bazali konyokola Batatoli ya Yehova, ete: “Makambo oyo euti koleka ezali solo kobangisa mpe komonisa ete na Géorgie, makambo ekóma kolekela bakonzi. Soki bosali eloko te, baoyo bazali kotinda bato mosusu básalela bato ya mangomba mike mobulu bakokoba se kokoba na kosala mobulu. Tozali kolikya ete yo, prezida ya Géorgie, okopesa bato mpe bakonzi ya Leta na Géorgie ndakisa; mpo na yango okoyebisa bango na makasi nyonso makambo mibale oyo: ya liboso, ata soki moto moko atalelaka mangomba mosusu ndenge nini, yango epesi ye nzela soki moke te ya kosalela bandimi ya mangomba yango mobulu ata ya lolenge nini; ya mibale, bato oyo bazali kosala mobulu wana, mingimingi bapolisi oyo bazali kotikela makambo ya nsɔni motindo wana nzela to bazali bango moko kosala yango, basengeli kosambisama mpenza na ndenge mibeko esɛngi yango.” Badepite nsambo ya Parlema ya États-Unis (Congrès américain) batyaki mabɔkɔ na mokanda yango.
Christopher Smith, depite na Parlema ya États-Unis mpe moko ya baprezida mibale ya ebongiseli moko (Commission sur la sécurité et la coopération en Europe), alobaki boye: “Mpo na nini bakonzi ya Géorgie bazali te kobatela bonsomi ya losambo mpe ntomo ya bato ndenge balakaki ete bakosala? . . . Ndenge mikanda ezali kotumbama eyokani soki moke te na Boyokani ya Helsinki mpe yango ezali kozongisa na makanisi ya basangani mosusu ya ebongiseli na biso ndenge oyo Banazi mpe bazalaki kotumba babuku.”
Mokambi-molandi ya biro oyo etalelaka misala ya ebongiseli moko (Human Rights Watch) na mikili ya Mpoto mpe ya Azia ya Ntei akomaki boye: “ Ebongiseli na biso (Human Rights Watch) ezali mpenza kobanga ete makambo mosusu ya mobulu esalema, lokola guvɛrnɛma ya Géorgie ezali kokoka te kokanga bato oyo basalelaki mangomba mike mobulu na bambala oyo eleki. Tozali kosɛnga bino bósilisa nokinoki minyoko wana mpe bósambisa baoyo basalaki yango.”
Mokili mobimba ezali kotala. Ekólo Géorgie ekotosa makambo oyo elakaki na bikólo mosusu? Lokumu ya Géorgie ezali mpenza na likama.
[Etanda na lokasa 17]
BATATOLI BAFUNDI LIKAMBO YANGO NA TRIBINALE MONENE YA MPOTO
Na mwa 29 Yuni 2001, Batatoli ya Yehova batindaki na tribinale moko ya mikili ya Mpoto (Cour européenne des droits de l’homme) mokanda moko oyo ezali kofunda bakonzi ya Géorgie mpo bazali kosala eloko te na makambo ya mobulu oyo ezali kosalema na ekólo yango. Nsima ya mwa mikolo, na mwa 2 Yuli 2001 tribinale yango monene (Cour européenne) epesaki eyano na yango. Grɛfiɛ ya tribinale yango akomaki ete Prezida ya komite oyo elandelaka makambo bafundi mpo na kosambisa yango, alobaki ete likambo yango “esengeli kotalelama liboso mpenza ya makambo mosusu.”
[Karte na lokasa 12]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
RUSSIE
GÉORGIE
MER NOIRE
TURQUIE
[Elilingi na lokasa 12]
13 MAI 2001-Ndako ya libota ya Chamoyan ezikaki nyonso mpo moto moko ya mangomba atumbaki yango
[Elilingi na lokasa 12]
17 YUNI 2001—Babɛtaki Giorgi Bagichvili mabe na kati ya makita ya Batatoli ya Yehova
[Elilingi na lokasa 13]
11 YULI 2001—Babɛtaki David Salaridze na motó, na mokɔngɔ mpe na mpanzi na kati ya makita ya Batatoli ya Yehova
[Elilingi na lokasa 17]
28 YUNI 2000—Bato ya mobulu batumbaki depo ya mikanda ya Batatoli ya Yehova na engumba Tbilissi
[Elilingi na lokasa 17]
16 AUGUSTO 2000—Na tribinale ya Gldani-Nadzaladevi, moto moko ya Basil Mkalavichvili azali kopɔsɔla lobɔkɔ ya Warren Shewfelt, Motatoli ya Yehova ya Canada
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 18]
AP Photo/Shakh Aivazov