“Makamwisi” mibale na liyangani moko na ekólo Géorgie
“MAKAMWISI” mibale esalemaki na liyangani moko na Géorgie na 2006. Na boumeli ya mikolo misato, elingi koloba mwa 7 tii na mwa 9 Yuli, liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova oyo ezalaki na motó ya likambo “Lobiko ekómi pene!” esalemaki na bisika motoba na kati ya ekólo Géorgie. Ezalaki fɛti ya elimo oyo esangisaki bato koleka 17 000.
Na Yanuali 2006, bandeko basalaki milende mpo na kozwa esika oyo ebongi mpo na koyanganisa bankóto ya bato na Tbilisi, mboka-mokonzi ya ekólo Géorgie, epai liyangani esengelaki kosalema. Esengelaki bandeko oyo bakoyangana na bisika mosusu bálanda liyangani yango na nzela ya telefone.
Batatoli ya Géorgie bazwaki bonsomi ya losambo malɛmbɛmalɛmbɛ na boumeli ya ebele ya bambula. Na yango, atako Batatoli bakutanaki na botɛmɛli makasi na bambula elekaki, basalaki nyonso na elikya ete bakozwa esika ya kosala liyangani ya etúká na Tbilisi. Bato ya Géorgie bazalaka boboto mingi mpe bayambi minene ya bapaya. Nzokande, bakonzi mosusu bayinaka mpenza bato ya mangomba mosusu. Bakokaki mpenza kokanga miso mpo na kopesa Batatoli nzela ya kofutela esika mpo na liyangani?
Bandeko ya komite mpo na liyangani bakendeki kotala bisika ndenge na ndenge ya masano. Bakambi ya bisika mingi bandimaki Batatoli básalela yango, kasi ntango batunaki bango soki bakoki kosalela yango na dati nini, baboyaki lisusu. Kasi, bandeko ya komite ya liyangani bakamwaki ntango bakambi ya ndako moko ya miziki na Tbilisi bandimaki ete Batatoli ya Yehova báfutela esika na bango. Ndako yango ezali na vile mpenza, esika makambo mingi ya minene esalemaka.
Lokola bamonaki ete milende na bango efuti, bandeko ya komite babandaki kobongisa liyangani ya Tbilisi mpe mayangani mosusu oyo esengelaki kosalema na bamboka mpe bingumba mosusu ya Géorgie lokola Tsnori, Kutaisi, Zugdidi, Kaspi mpe Gori. Mosala makasi esalemaki mpo na kokangisa bisika nyonso wana na telefone mpo bandeko ya bisika yango nyonso bálanda yango mbala moko. Bibongiseli nyonso esilaki. Na mbala moko, pɔsɔ moko liboso ya liyangani, mokambi ya ndako yango ayebisaki bandeko ete bakosala liyangani wana te. Ayebisaki mpe ntina oyo aboyaki te.
“Likamwisi” ya liboso
Bandeko bakokaki kosala nini na mikolo moke wana oyo etikalaki? Esika kaka moko oyo etikalaki ezalaki Marneuli, mboka moko ya basali bilanga oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 40 longwa na Tbilisi. Mayangani mingi ezalaki kosalema kuna, na lopango ya libota moko oyo bazali Batatoli ya Yehova. Esika yango ezalaki liboso elanga moko monene. Banda mbula zomi, ezalaki esika kaka moko oyo Batatoli ya Tbilisi bazalaki kosala mayangani ya etúká. Nzokande, Marneuli ezali mpe esika oyo Balekaki konyokola Batatoli ya Yehova.
Tózwa ndakisa ya oyo esalemaki mwa 16 Sɛtɛmbɛ 2000. Bapolisi ya mboka Marneuli bakangaki banzela mpo na kopekisa Batatoli bákóma na esika ya liyangani. Na nsima, Basil Mkalavichvili, oyo azalaká sango na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse, kasi balongolá ye mpo na etamboli na ye ya mabe, ayaki na bisi moko oyo etondaki na bato ya mobulu. Batɛlɛmisaki mituka mpe babisi oyo ezalaki kokende na liyangani na Marneuli. Bakitisaki bandeko mingi mpe babɛtaki bango lokola banyama, mpe bapunzaki biloko ya bamosusu, ná Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia.
Bato soki 60 babimisaki mpe mobulu na esika ya liyangani na Marneuli. Batatoli soki 40 bazokaki. Batɔbɔlaki ndeko moko mbeli na ntolo. Bato yango bazalaki na mindoki oyo bazalaki kobɛta na likoló na nkanda nyonso. Moko na bango atyaki ndeko mwasi, mokolo esika yango mondoki na motó mpe asɛngaki ye abimisa mbongo mpe babiju. Bato wana ya mobulu bapanzaki biloko nyonso na ndako na ye, mpe bayibaki biloko na ye ya motuya. Nsima ya kobuka maninisa nyonso ya ndako, batumbaki mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe bakiti oyo bandeko basalaki mpo na liyangani. Tonɛ moko na ndambo ya mikanda ebebisamaki. Na esika ya kopekisa mobulu wana, bapolisi oyo bazalaki wana bakɔtaki mpe na mobulu yango.a
Bandeko ya Komite ya Liyangani bazalaki kobunda na mikakatano mibale: bákanisa bato ya mobulu, bákanisa mpe ndenge ya koyamba bato 5 000 na esika oyo ekoki koyamba kaka bato soki 2 500. Ndenge nini bakokaki kolonga mokakatano yango na mwa ntango mokuse boye? Emonanaki lokola likamwisi ntango bato mibale oyo bilanga na bango ezalaki esika moko bayaki kosɛnga bandeko báfutela yango.
Kobongisa esika yango ekóma esika ya liyangani ezalaki mpenza mosala monene. Mbula ebebisaki mpenza makambo. Enɔkaki pɔsɔ mobimba liboso liyangani ebanda. Bilanga yango ezalaki na mbálá oyo ekɔmɛlaki mpe esengelaki bábimisa yango. Bandeko babimisaki naino mbálá yango mbulambula. Na nsima, balongolaki lopango oyo ekabolaki bilanga yango mpe bazipaki na likoló mpo na kobatela bayangani na moi mpe na mbula. Basengelaki kobakisa bakiti ya kofanda mpe bikoliseli-lolaka mosusu. Butu mpe moi, bandeko bazalaki kopasola mabaya, kobɛta nsɛtɛ, kotɔbɔla madusu mpe bongo na bongo; bamosusu kutu bazalaki kolala te.
Moto nyonso azalaki komituna: “Tokosala nini soki mbula ebɛti tii na ntango ya liyangani?” “Bayangani bakozinda nde na kati ya pɔtɔpɔtɔ?” Basombaki matiti ya kokauka mpo na kozipa pɔtɔpɔtɔ. Nsukansuka, moi ebimaki! Moi ebimaki mikolo nyonso misato ya liyangani.
Bayangani bayaki kokuta esika yango kitoko. Kimya oyo ezalaki wana ekómisaki esika yango lokola mokili ya sika. Bandeko bafandaki malamu mpenza mpe banzete ya figi ná banzete mosusu ya mbuma mpe bilanga ya masango mpe ya tomati ezalaki pembeni pembeni na bango. Bakembisaki estrade na mbuma ya vinyo. Ntango programɛ ezalaki kosalema, mwa mbala mokomoko bayangani bakokaki koyoka nsoso mibali ezali kolela mpe nsoso ya basi ezali kosala makelele ntango bazali kolɔkɔta maki na yango. Bazalaki mpe koyoka makelele ya bandɛkɛ mpe banyama mosusu ndenge ezalaka na bamboka nyonso ya zamba. Kasi, atako makelele yango ezalaki elengi na matoi, bayangani bazalaki kokipe yango mpenza te, mpo likebi na bango nyonso ezalaki na mateya kitoko ya Biblia oyo bazalaki koyoka. Nzokande, makambo wana kaka te nde ebakisaki esengo na liyangani wana.
“Likamwisi” ya mibale
Na nsuka ya eteni ya ntɔngɔ na mokolo ya mitano, bayangani bakamwaki ntango ndeko Geoffrey Jackson oyo azali na Lisangani ya Mikolo-Bakambi ya Batatoli ya Yehova ayebisaki bango ete Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu na mobimba na yango ebimi na monɔkɔ ya Géorgien.b Bandeko mingi oyo bazalaki kokanisa ata moke te ete likambo ya ndenge wana ekoki kosalema batangisaki mai ya miso. Libota moko balobaki na esengo nyonso boye: “Tokotika te kotɔnda Nzambe mpo na likamwisi oyo; ezali mpenza likamwisi ya Yehova. Mosala monene wana esalemi kaka na mwa ntango mokuse boye!”
Ndeko mwasi moko ya engumba Tsalendjikha oyo alandaki liyangani yango na telefone alobaki boye: “Nazangi maloba mpo na kolobela esengo oyo nayokaki ntango tozwaki Biblia ya mobimba. Nalingi kotɔnda bino mpo na liyangani kitoko wana ya mikolo misato. Tokobosana yango ata mokolo moko te.” Libota moko na lisangá moko ya Wɛsti ya Géorgie, oyo ezali na bokula ya Mer noire, balobaki boye: “Banda kala, libota na biso mobimba tozalaka kaka na Biblia moko, kasi sikoyo biso nyonso minei tozwi moto na moto Biblia na ye moko ya Libongoli ya Mokili ya Sika. Sikoyo, mokomoko na biso akoki koyekola Biblia ye moko.”
Nzokande, longola makambo oyo bandeko bazalaki komona na miso, makambo mosusu etambolaki malamu te. Na ndakisa, banyataki Libongoli ya Mokili ya Sika na mobimba na yango mpe ekómaki na Géorgie na ntango ebongi mpo ekabolama na liyangani, kasi bakonzi ya duane baboyaki ekɔta na Géorgie. Bandeko ya komite ya liyangani bakendeki kofunda likambo yango na biro oyo ekataka makambo ya bana mboka na Leta. Biro yango esalaki nyonso mpo Babiblia yango ebima liboso ya liyangani. Mokonzi ya biro yango atindaki kutu molandi na ye na liyangani ya Marneuli mpo azwela bango Babiblia mpo na biro na bango.
Boyei malamu na monɔkɔ ya Géorgie
Liyangani ya etúká oyo esalemaki na Marneuli ezalaki libaku monene mpo na Batatoli ya Yehova ya Géorgie mpo na ntina mosusu. Ndeko moko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova azalaki mpe wana. Bayangani nyonso bazalaki na esengo makasi mpenza mpe balingaki koyamba ye na ndenge ya mboka na bango. Ndeko Jackson asengelaki kotɛlɛmaka mpo na kopesa bandeko mbote na boumeli ya bangonga ebele liboso liyangani ebanda, ntango liyangani ezali kosalema mpe na nsima ya liyangani. Kasi, asalaki yango na esengo.
Na 1903, na nsuka ya liyangani ya Etúká mosusu, ndeko moko alobaki boye: “Nazali na ngai mobola, kasi ata soki bapesi ngai nkóto boni ya dolare, nakondima te kotɛka matomba oyo nazwi na liyangani oyo.” Mbula koleka 100 na nsima, Batatoli oyo bayanganaki na mayangani oyo esalemaki na eleko ya molunge ya mobu 2006 na ekólo Géorgie bayokaki mpenza ndenge ndeko wana ayokaki.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba malamumalamu ndenge banyokolaki Batatoli ya Yehova na Géorgie, talá Lamuká ya Aprili-Yuni 2002, nkasa 12-18 to ya 22 Yanuali 2002, nkasa 18-24 (na Lifalanse).
b Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto na monɔkɔ ya Géorgien ebimaki na mobu 2004.
[Etanda na lokasa 19]
“Oyo moke” ekómi monene
Yisaya 60:22 ekokisami na Géorgie: “Oyo moke akokóma nkóto mpenza, oyo eleki moke akokóma libota ya makasi. Ngai nazali [Yehova]; na ntango na yango, nakoyeisa yango mbangu.” Mbula ekoki ata 20 te, basakoli oyo bakokaki ata 100 te na Géorgie bakómi soki 16 000. Basakoli wana ya molende ya Liloba Ya Nzambe bazali koyekola Biblia na bato soki 8 000 pɔsɔ na pɔsɔ na bandako na bango. Yango ezali komonisa ete na mikolo oyo ezali koya motángo ya basakoli ekobakisama na Géorgie.
[Etanda/Karte na lokasa 16]
RUSSIE
GÉORGIE
⇨ Zugdidi
⇨ Kutaisi
Marneuli ⇨ Gori
⇨ Kaspi
⇨ Tsnori
TBILISI
TURQUIE
ARMÉNIE
AZERBAÏJAN
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Globe: Euti na NASA/Visible Earth imagery
[Elilingi na lokasa 16]
Ekeko na engumba Tbilisi
[Bililingi na lokasa 17]
Bandeko oyo bayanganaki na bisika mosusu mitano balandaki liyangani ya Marneuli na nzela ya telefone
[Bililingi na lokasa 18]
Bayangani batikalaki monɔkɔ polele ntango bayebisaki bango ete “Libongoli ya Mokili ya Sika,” na mobimba na yango, ebimi na monɔkɔ ya Géorgien