Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/3 lok. 11
  • Likambo na bango ekatami

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Likambo na bango ekatami
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Masolo mosusu
  • Na ekólo Géorgie bazali konyokola bato mpo na lingomba na bango—Likambo yango ekosila mokolo nini?
    Lamuká!—2002
  • Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato elongisi Batatoli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Babundi mpo na kozwa bonsomi ya losambo
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Basakoli ya Bokonzi liboso ya batribinale
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/3 lok. 11

Likambo na bango ekatami

MOKOLO ya 3 Mai 2007, Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato (Cour européenne des droits de l’homme) oyo ezali na engumba Strasbourg, na France, eyebisaki ekateli na yango oyo elongisaki Batatoli ya Yehova ya ekólo Géorgie. Tribinale yango emonaki ete Batatoli na Géorgie banyokolamaki mpe lotomo na bango ya kosambela na bonsomi ebatelamaki te. Lisusu, tribinale ekweisaki guvɛrnema oyo ezalaki na ntango wana na Géorgie na ndenge elandelaki te bato oyo basalaki makambo wana ya mabe. Ndenge nini likambo ekómaki na tribinale yango?

Mokolo ya 17 Ɔkɔtɔbɛ 1999, Batatoli soki 120 ya lisangá ya Gldani na Tbilissi, engumba-mokonzi, bayanganaki na makita. Na mbala moko, Vasili Mkalavishvili, mobali moko oyo balongolá mokumba ya sangó na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse, ayaki na ebele ya bato mpe bakɔtaki na esika oyo makita ezalaki kosalema. Bato yango oyo bazalaki na banzete mpe bikulusu ya bibende, babandaki kobɛta bayangani, bazokisaki bamosusu bampota minene. Liso ya ndeko mwasi moko emonaka lisusu te mpo na ndenge oyo babɛtaki ye. Bato soki 16 bakɔtaki lopitalo. Ntango Batatoli mosusu bakendaki kobenga bapolisi, mokonzi ya bapolisi ayebisaki bango ete soki azalaki wana, alingaki kosala bango mabe koleka! Moto moko oyo azalaki na etuluku wana azwaki bililingi ya makambo nyonso mpe na nsima balakisaki yango na batelevizyo; bato oyo basalaki likambo yango bamonanaki polele.a

Batatoli bafundaki likambo yango na Leta, kasi bakonzi ya Leta basalaki eloko moko te. Soda moko oyo asengelaki kosala ankɛti na likambo yango alobaki ete lokola azali mondimi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse, akosala mosala yango na bosembo te. Lokola bakonzi basalaki eloko moko te, bato mabe babakisaki molende mpo na kosala makambo ya ndenge wana na bisika mosusu.

Yango wana, na mokolo ya 29 Yuni 2001, Batatoli ya Yehova bamemaki likambo yango na Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato.b Tribinale ekataki likambo yango na mokolo ya 3 Mai 2007; elimbolaki polele ndenge oyo makambo elekaki mpe ekweisaki bakonzi ya Leta na ndenge balandelaki likambo yango te. Tribinale elobaki boye: “Bakonzi ya Leta . . . bazalaki na mokumba ya kolandela nokinoki likambo oyo bayebisaki bango.” Ebakisaki boye: “Kokanga miso na makambo wana ekokaki se kotinda bato bátyela lisusu bakonzi motema te mpe bándima te ete Leta alendisaka bato bátosa mibeko ya mboka.”

Tribinale esukisaki boye: “Likambo oyo basalaki Batatoli ya Yehova na mokolo ya 17 Ɔkɔtɔbɛ 1999 ezalaki mobulu ya liboso ya makasi oyo basalelaki bango; lokola bakonzi ya Leta basalaki eloko te, epesaki bato wana nzela ya kosala makambo ya ndenge wana na bisika mosusu na ekólo Géorgie.”

Yango wana, tribinale elongisaki bato oyo babɛtamaki mpe esɛngisaki guvɛrnema ya ekólo Géorgie efuta amande epai ya Batatoli ya lisangá ya Gldani. Batatoli ya Yehova na ekólo Géorgie bazali na esengo ya komona ete mobulu ezali kosalema lisusu te; kasi, basepeli mingi na komona ete Tribinale ya Mpoto elongisi lotomo na bango ya koyangana na kimya mpo na kosambela. Mpo na yango, bazali mpenza kotɔnda Yehova Nzambe, Tata na bango ya likoló, oyo azalaki ntango nyonso kotambwisa mpe kobatela bango.​—Nzembo 23:4.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Lamuká! ya Aprili-Yuni 2002, nkasa 12-18, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

b Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato ezali tribinale ya mikili oyo ezali na Conseil de l’Europe; esambisaka makambo ekweisami na mobeko babengi Convention européenne de sauvegarde des droits de l’homme et des libertés fondamentales. Ekólo Géorgie endimaki mobeko yango na mokolo ya 20 Mai 1999, mpe na ndenge yango, endimaki kotosa yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto