Mpo na nini kozala molakisi?
“Balakisi mingi baponaka mosala na bango mpo ezali mosala oyo esalisaka bato. [Kotángisa ezali] komipesa mpo na kobongola bomoi ya bana.”—Balakisi, biteyelo, mpe bato.
ATAKO balakisi mosusu bamonisaka lokola ete mosala ya kotángisa ezali mosala moko ya pɛtɛɛ, kotángisa ezali mosala oyo etondi na mikakatano oyo esengeli kolonga yango—na ndakisa molakisi akoki kozala na bana ebele na kelasi moko, akoki kozala na ebele ya bapapye oyo asengeli kotalela, ntango mosusu makambo oyo asengeli na yango azali kozwa yango noki te mpo basali ya babiro balingi makambo ya mindɔndɔmindɔndɔ, akoki kozala na bana-kelasi oyo bazali kotya likebi te na mateya, mpe ekoki kozala ete bafutaka ye malamu te. Pedro azali molakisi na engumba Madrid, na Espagne; ye alobaki boye: “Kozala molakisi ezali lisɛki te. Yango esɛngaka komipimela makambo mingi. Kasi, atako mikakatano ezali mingi, natalelaka kotángisa kaka lokola mosala oyo ezali na ntina mingi koleka kosala na makambo etali mombongo.”
Mikakatano yango ekoki koleka ndelo mingimingi na biteyelo oyo ezali na bingumba minene, ezala ya ekólo nini. Bangi, mobulu, bizaleli mabe, mpe mbala mosusu lolenge oyo baboti bazali kosala eloko te mpo na bana na bango, nyonso wana ezali kobebisa mpenza ezalela mpe disipilini oyo esengeli kozala na eteyelo. Bizaleli oyo euti na makanisi ya botomboki ezali komonana mbala mingi. Kasi, mpo na nini bato mingi boye oyo batángá mingi baponaka kozala balakisi?
Leemarys mpe Diana bazali balakisi na engumba New York. Batángisaka bana ya mbula mitano kino mbula zomi. Bango nyonso mibale balobaka nkota mibale (Lingelesi mpe Espagnol) mpe batángisaka mingimingi bana oyo balobaka Espagnol. Totunaki bango boye:
Eloko nini epesaka mposa ya kozala molakisi?
Leemarys alobaki boye: “Eloko nini epesaki ngai mposa? Ezali mpo nalingaka bana. Nayebi ete mpo na bana mosusu, longola ngai, ezali na moto mosusu te oyo azali kosalisa bango na milende oyo bazali kosala.”
Diana alobaki ete: “Natángisaki mwana ya yaya na ngai ya mobali na ndako, mwana yango azalaki na mbula mwambe mpe azalaki na mikakatano na kelasi—mingimingi na botángi. Nazalaki na esengo mingi ntango nazalaki komona ye na bana mosusu bazali koyekola! Yango wana, nazwaki ekateli ya kokóma molakisi, mpe natikaki mosala na ngai na banki.”
Lamuká! etunaki motuna yango mpe na balakisi ya bikólo mosusu, mpe talá mwa ndambo ya biyano oyo bapesaki.
Giuliano, mobali moko ya Italie oyo azali na mbula koleka 40, alobaki ete: “Naponaki mosala yango mpamba te ezalaki kosepelisa ngai mingi ntango nazalaki na kelasi (na lobɔkɔ ya mobali). Nazalaki komona mosala yango lokola mosala moko oyo epesaka moto makanisi ya kosala makambo ya sika mpe oyo etondi na makambo oyo ekoki kopesa basusu makanisi ya malamu. Esengo na ngai ya ebandeli esalisaki ngai nalonga mikakatano oyo nakutanaki na yango na bambula ya ebandeli na mosala yango.”
Nick afandaka na Nouvelle-Galles du Sud, na ekólo Australie; ye alobaki ete: “Natángaki kelasi oyo etali ndenge ya kolukaluka makambo ya sika na Chimie, kasi misala oyo eyokani na makambo oyo natángaki ezalaki mpenza komonana te; nzokande na bisika mingi bazalaki na mposa ya balakisi. Banda wana, namonaki ete nalingaki mosala ya kotángisa, mpe emonani ete bana oyo natángisaka bango mpe balingaka natángisa bango.”
Mbala mingi, ndakisa ya baboti ezalaka ntina ya libosoliboso oyo esalaka ete moto apona kozala molakisi. William afandaka na Kenya; ye ayanolaki na motuna na biso boye: “Nazwaki mpenza mposa ya kozala molakisi mpo tata na ngai azalaki molakisi na 1952. Lokola nayebi ete mosala yango esalisaka ngai mpo nabongisa makanisi ya bilenge, yango wana natikaka yango te.”
Rosemary afandaka mpe na Kenya; ye ayebisaki biso boye: “Nazalaki ntango nyonso na mposa ya kosalisa babola. Kasi, nazalaki koyeba te soki nasengelaki kopona kozala lifulume to molakisi. Mosala ya kotángisa nde emonanaki liboso. Nalingi mosala yango mingi lisusu mpo nazali mama ya bana.”
Berthold afandaka na Düren, na Allemagne; ye akómaki molakisi mpo na ntina mosusu. Alobaki boye: “Mwasi na ngai andimisaki ngai ete nakozala molakisi malamu.” Mpe emonanaki ete alobaki solo. Abakisaki ete: “Mosala na ngai ezali kopesa ngai sikoyo esengo mingi. Molakisi oyo andimaka mpenza te ete kelasi ezali na ntina mingi, oyo mpe amitungisaka te mpo na bilenge, ezali mpasi mpo azala molakisi ya malamu, oyo alingi mosala na ye mpe oyo azali na esengo.”
Masahiro azali molakisi mpe afandaka na engumba Nakatsu, na Japon; ye alobaki ete: “Molakisi oyo nazwaki ntango nakómaki na mbula ya nsuka ya eteyelo ya ebandeli azalaki molakisi moko malamu mpenza; ye moto apesaki ngai mposa ya kokóma molakisi. Azalaki kotángisa biso na molende mpenza. Mpe soki nazali kaka kokoba na mosala yango, ezali mingimingi mpo nalingaka bana.”
Yoshiya azali sikoyo na mbula 54, ye mpe afandaka na Japon. Azalaki kosala na kompanyi moko oyo ezalaki kofuta ye malamu, kasi azalaki komimona ete azalaki moombo ya kompanyi yango mpe moombo ya transport oyo asengelaki kozwa mikolo nyonso mpo na kokende mpe kozonga. Alobaki boye: “Mokolo moko namitunaki ngai moko ete, ‘Tii ntango nini nakozala na bomoi ya boye?’ Nazwaki ekateli ya koluka mosala oyo ekopesa ngai likoki ya kozalaka mingi elongo na bato na esika ya kozalaka mingi na biloko. Kotángisa ekeseni mpenza na misala mosusu nyonso. Ozali kosala elongo na bilenge. Etalelaka mpenza bomoi ya bato.”
Valentina afandaka na Saint-Pétersbourg, na ekólo Russie; ye mpe asepelaka na mosala yango mpo na bongo. Alobaki ete: “Kotángisa ezali mosala oyo ngai naponaki. Nazali molakisi na eteyelo ya ebandeli na boumeli ya mbula 37. Nasepelaka kosala elongo na bana, mingimingi oyo ya mike. Nalingaka mosala na ngai mingi, yango wana tii lelo nazwi naino epaso te.”
William Ayers, ye moko molakisi, akomaki ete: “Bato baponaka kotángisa mpamba te balingaka bana mpe bilenge, to mpo balingaka kozala elongo na bango, komona bango bazali kofungwama, kokola mpe kokóma na makoki, na mayele mpe na nguya mingi koleka na kati ya mokili. . . . Mpo na bango, kotángisa . . . ezali komipesa mpo na basusu. Ngai, natángisaka mpo na kokómisa mokili esika moko ya malamu mpenza.”
Ya solo, atako mosala ya kotángisa ezali na mikakatano mpe bampasi, bankóto ya mibali mpe basi oyo bamipesi bazali kopona kosala mosala yango. Mikakatano nini ya minene bakutanaka na yango? Lisolo oyo elandi ekotalela motuna yango.
[Etanda na lokasa 6]
Mwa makanisi mpo na kosalisa balakisi mpe baboti ya bana básololaka malamu
✔ Luká koyebana na baboti ya bana-kelasi. Kosala yango ezali kolekisa ntango mpamba te. Ntango wana ekozala na litomba mpo na yo mpe mpo na baboti. Yango ezali libaku mpo na yo ya kobandisa boyokani na bato oyo ntango mosusu bakopesa yo mpenza mabɔkɔ na mikolo oyo ekolanda.
✔ Sololá na baboti lokola baninga—kokitisa bango te. Ntango ozali kosolola na bango, kosalela te maloba oyo balakisi basalelaka soki bazali bango na bango.
✔ Ntango ozali koyebisa bango makambo ya bana na bango, lobelá mingi makambo ya malamu oyo bana basalaka. Kopesa mwana longonya ezalaka malamu koleka kopamela ye. Yebisá baboti nini bakoki kosala mpo na kosalisa mwana na bango akende liboso.
✔ Tikelá baboti ntango báloba, mpe landá maloba na bango na likebi mpenza.
✔ Luká koyeba ezalela ya libota ya mwana. Soki likoki ezali, kende kotala epai afandaka.
✔ Tyá dati oyo bokokutana lisusu. Kolanda kotalela makambo oyo bolobeli ezali na ntina mingi. Ekomonisa ete ozali mpenza komitungisa mpo na likambo yango.—Euti na buku Koteya na Amerika (na Lingelesi).
[Elilingi na lokasa 6]
‘Tata na ngai azalaki mpe molakisi.’—WILLIAM, KENYA
[Elilingi na lokasa 7]
“Nasepelaka kosala elongo na bana.”—VALENTINA, RUSSIE
[Bililingi na lokasa 7]
“Kotángisa ekeseni mpenza na misala mosusu nyonso. Ozali kosala elongo na bilenge.”—YOSHIYA, JAPON