Kotángisa—Esengo na yango
“Eloko nini etindaka ngai nakoba na mosala na ngai? Atako kotángisa ekoki kozala mosala moko ya mpasi mpe oyo elɛmbisaka, kasi ntango namonaka bana bazali na esengo ya koyekola mpe bazali kosala makasi, nyonso wana nde etindaka ngai nakoba na mosala na ngai.”—Leemarys, molakisi na engumba New York.
ATAKO bazali kokutana na mikakatano, na bampasi mpe na makambo oyo elɛmbisaka bango nzoto, bamilio ya balakisi na mokili mobimba bazali kokoba kaka na mosala oyo baponaki. Mpe eloko nini etindaka bankóto ya bana-kelasi básala makasi mpo na kokóma balakisi atako bayebi ete bakopesa bango te lokumu oyo ebongi na bango? Mpo na nini basalaka nyonso wana?
Inna azali molakisi na Russie, ye alobaki ete: “Epesaka esengo mingi ntango omoni lisusu bana-kelasi oyo otángisaki bakómi sikoyo mikóló, mpe bayebisi yo ete bamoni mpenza ete makambo oyo otángisaki bango ezalaki na ntina mingi. Elendisaka biso mpenza ntango balobaka ete bazali na basuvenire ya malamu ya bambula oyo balekisaki elongo na biso.”
Giuliano, molakisi oyo tolobelaki na masolo oyo eleki, alobaki ete: “Moko ya makambo oyo epesaka ngai esengo mingi ezali soki namoni mpenza ete nalongi kolamusa mposa ya bana-kelasi mpo na liteya moko boye. Na ndakisa, nsima ya kolimbolela bango likambo moko na liteya ya Istware, bana-kelasi mosusu balobaki na ngai ete: ‘Lobá kaka. Yebisá biso makambo mosusu!’ Maloba wana ya kolendisa ekoki kosala ete mokolo eleka malamu na eteyelo mpamba te oyebi ete olamusi makanisi ya sika na mitema ya bilenge. Epesaka mpenza esengo ntango omoni bilongi na bango etondi na nsai mpo bakangi ntina ya likambo moko oyo olimboleli bango.”
Elena, molakisi na Italie, ye alobaki ete: “Nakanisi ete esengo eutaka mbala mingi na makambo mikemike ya mokolo na mokolo, na makambo mikemike ya malamu oyo bana-kelasi basalaka, kasi te na makambo mineneminene oyo kutu basalaka mpenzampenza te.”
Connie afandaka na Australie mpe azali na mbula koleka 30 mwa moke; ye alobaki ete: “Epesaka esengo mingi ntango mwana-kelasi oyo ozalaki koyokana na ye malamu atindeli yo mokanda mpe na kati na yango apesi yo matɔndi mpo na milende na yo.”
Oscar atángisaka na engumba Mendoza, na Argentine; ye mpe azali na likanisi ndenge yango, alobaki boye: “Ntango nakutanaka na bana-kelasi na ngai na nzela to na esika mosusu mpe ntango bapesaka ngai matɔndi mpo na makambo oyo natángisaki bango, namonaka ete nasalaki mosala ya mpunda te.” Angel afandaka na engumba Madrid, na Espagne; ye alobaki ete: “Na ntembe te, likambo oyo epesaka ngai esengo mingi koleka na mosala kitoko oyo, atako ezali mpe makasi, mosala oyo nasali na boumeli ya bambula ebele ya bomoi na ngai, ezali ntango namonaka bilenge oyo natángisaki bakómi mibali mpe basi ya sembo mpo na milende oyo ngai mpe nasalaki mpo na bango.”
Leemarys, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, alobaki ete: “Namonaka mpenza ete balakisi bazali bato ya lolenge mosusu. Tokeseni mpe na bato mosusu na ndenge tondimi mokumba monene mpenza ndenge wana. Kasi soki okoki kobongola makambo—ezala mpo na bana zomi to kaka mpo na mwana moko—na ntango wana okoki koloba ete osali mosala na yo, mpe esengo oyo okoyoka ekokani na mosusu te. Ozali kosala yango na esengo.”
Opesaki balakisi na yo matɔndi?
Ozala mwana-kelasi to moboti, osilá kopesa molakisi moko matɔndi mpo na ntango, milende mpe likebi oyo amoniselaka bana-kelasi? To osilá kotindela ye ata mwa kalati to mwa mokanda ya komonisa botɔndi? Arthur afandaka na Nairobi, na Kenya, ye alobaki likambo moko oyo ebongi mpenza: “Balakisi mpe bazalaka na mposa bápesaka bango longonya. Leta, baboti mpe bana-kelasi basengeli kokumisa bango mingi mpe kokumisa mingi mosala oyo bazali kosala.”
LouAnne Johnson azali molakisi mpe mokomi, ye akomaki boye: “Mpo na mokanda mokomoko oyo batindelaka ngai mpo na komonisa mabe ya molakisi moko, nazwaka mikanda soki nkama mosusu oyo emonisaka malamu oyo balakisi bazali kosala. Yango endimisaka ngai ete balakisi ya malamu bazali mingi koleka oyo ya mabe.” Likambo ya esengo, bato mingi bafutaka bato mosusu mpo na “kolukela bango esika molakisi na bango moko ya kala azali. Mposa na bango ezalaka bákutana na ye lisusu mpo na kopesa ye matɔndi.”
Balakisi babandisaka mosala oyo ezalaka na ntina mingi mpo na kelasi oyo moto akotánga nsima. Ata baprofɛsɛrɛ ya minene mpenza oyo batángisaka na bainiversite ya lokumu mingi basengeli kozala na botɔndi epai ya balakisi oyo basalelaki ntango, makasi mpe mayele na bango mpo na kolamusa mpe kokolisa epai na bango mposa ya koyekola, ya koyeba makambo mpe ya kokanga ntina ya makambo. Arthur, oyo afandaka na Nairobi, alobi boye: “Bakonzi minene mpenza ya Leta mpe ya bakompanyi oyo ezali ya Leta te bateyamaki na molakisi moko na eleko moko boye ya bomoi na bango.”
Tosengeli mpenza kozala na botɔndi mpo na basi mpe mibali yango oyo balamusaki mposa na biso ya koluka koyeba, oyo bakolisaki makanisi mpe motema na biso, oyo bamonisaki biso ndenge ya kokokisa mposa na biso ya kozwa boyebi mpe bososoli!
Tosengeli kozala lisusu na botɔndi koleka mpo na Molakisi na biso Monene, Yehova Nzambe, oyo apemisaki maloba ya Masese 2:1-6 oyo elobi ete: “Mwana na ngai, soko okozwa maloba na ngai mpe okobomba maloba na ngai kati na yo, ete osembola litoi na yo epai na mayele mpe ete otya motema na yo koluka boyebi; ɛɛ, soko okolela mpo na bososoli mpe soko okoganga mpo na boyebi; soko okoluka [yango] lokola palata, mpe okolukaluka [yango] lokola na biloko na motuya bibombami; mbɛlɛ, okososola botosi na kotosa [Yehova] mpe okozwana na boyebi na koyeba Nzambe. Mpo ete [Yehova] akopesaka mayele; boyebi mpe bososoli ekoutaka na monɔkɔ na ye.”
Omoni ndenge liloba “soko” esalelami mbala ebele na bavɛrsɛ yango oyo ezali kotinda mpenza na kokanisa. Kanisá naino, soki tondimi kosala makambo oyo basɛngi biso, tokoki ‘kozwa boyebi ya Nzambe’! Ya solo mpenza, wana nde kelasi oyo eleki bakelasi mosusu nyonso.
[Etanda na lokasa 13]
Mama moko oyo azali na esengo
Mokanda oyo elandi batindelaki yango molakisi moko ya engumba New York:
“Nalingi kopesa yo matɔndi oyo euti mpenza na motema na ngai mpo na oyo osali mpo na bana na ngai. Mpo na likebi na yo, boboto na yo, mpe makoki na yo, osalisi bango básala makambo ya minene oyo, na ntembe te, bakokaki kosala yango te soki ezalaka yo te. Osali ete nasepela na bana na ngai mingi—nakobosana esengo yango ata mokolo moko te. Matɔndi mingi, S. B.”
Oyebi molakisi moko oyo okoki kolendisa?
[Elilingi na lokasa 12]
‘Epesaka mpenza esengo ntango omoni bilongi ya bana—kelasi etondi na nsai mpo bakangi ntina ya likambo moko oyo olimboleli bango.’—GIULIANO, ITALIE
[Bililingi na lokasa 13]
‘Epesaka esengo mingi ntango mwana-kelasi moko atindeli yo mokanda mpo na kotɔnda yo.’—CONNIE, AUSTRALIE