Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g02 Juillet nk. 7-11
  • Kotángisa​—Mosala oyo esɛngaka makambo mingi mpe ezali na makama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kotángisa​—Mosala oyo esɛngaka makambo mingi mpe ezali na makama
  • Lamuká!—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kozanga limemya
  • Bangi mpe mobulu
  • Mindoki na biteyelo?
  • Bana oyo bakómi baboti
  • “Bakɛngɛli-bana ya lokumu”
  • Mpo na nini balakisi bazali komonana lisusu te?
  • Balakisi moke, bana-kelasi ebele
  • Mpo na nini kozala molakisi?
    Lamuká!—2002
  • Ndenge nini nakoki koyokana na molakisi na ngai?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Kotángisa​—Esengo na yango
    Lamuká!—2002
  • Balakisi​—Mpo na nini tosengeli na bango?
    Lamuká!—2002
Lamuká!—2002
g02 Juillet nk. 7-11

Kotángisa​—Mosala oyo esɛngaka makambo mingi mpe ezali na makama

“Mosala ya molakisi esɛngaka makambo mingi, nzokande mbala mingi balakisi ya biteyelo na biso oyo bamipesá na mosala yango . . . bamikumisaka bango mpenza te mpo na milende na bango.”—Ken Eltis, Iniversite ya Sydney, na Australie.

ESENGELI koyeba ete mosala yango “ya ntina mingi mpenza,” ndenge babengi yango, ezali na mikakatano mingi. Na ndakisa, bazali kofuta balakisi malamu te, mateya ezali kopesama na bakelasi oyo ebongi mpenza te, balakisi basengeli kotalela ebele ya bapapye ya bana-kelasi, bakelasi etondá na bana, bana-kelasi bazali komemya balakisi na bango te mpe bazali kosala mobulu mingi; lisusu, baboti bazali komibanzabanza te mpo na kelasi ya bana na bango. Kasi, ndenge nini balakisi mosusu basalaka liboso ya mikakatano yango?

Kozanga limemya

Ntango totunaki balakisi minei ya engumba New York mpo na koyeba mikakatano minene oyo bakutanaka na yango, bango nyonso bayanolaki ete: “Kozanga limemya.”

Mpo na William, ye atángisaka na Kenya, likambo wana ekómi mpe komonana na Afrika. Alobaki ete: “Bana-kelasi bazali lisusu kotosa balakisi mpenza te. Ntango nazalaki kokola [azali sikoyo na mbula koleka 40], na Afrika, balakisi bazalaki na kati ya bato oyo moto nyonso azalaki kopesa bango limemya mpenza. Bilenge mpe mikóló bazalaki ntango nyonso kotalela balakisi lokola bato oyo esengeli kolanda ndakisa na bango. Limemya yango ezali lisusu komonana mpenza te. Mimeseno ya bato ya Mpoto ezali kobongola mokemoke bizaleli ya bilenge, ata na bamboka ya mike ya Afrika. Bafilme, bakasɛti video, mpe mikanda emonisaka bato oyo bamemyaka bakonzi te lokola nde bazali bilombe.”

Giuliano atángisaka na Italie, ye alobi na mawa nyonso ete: “Elimo ya botomboki, ya kozanga limemya epai ya bakonzi, mpe ya kozanga botosi oyo ezali komonana epai ya bato nyonso ekɔteli mpe bana.”

Bangi mpe mobulu

Likambo ya mawa, komɛla bangi na biteyelo ekómi likambo oyo ezali mpenza kopesa mpasi; yango etindaki LouAnne Johnson, molakisi mpe mokomi na États-Unis, akoma ete: ‘Na biteyelo mingi bakɔtisi mateya ya kolakisa bana-kelasi ndenge ya koboya komɛla bangi, kobanda na eteyelo ya bana mike. Bana bayebi makambo mingi oyo etali bangi . . . koleka mikóló mingi.” Abakisi ete: “Bana-kelasi oyo bamiyokaka ete bazangi moto ya kosalisa bango, to balingaka bango mpenza te, to bazali kaka bango moko, to bazali komiyoka malamu te, to bazali komiyoka ete bazali na likama, mingimingi bango nde bakoki komipesa na komɛla bangi.”—Two Parts Textbook, One Part Love.

Ken, molakisi na Australie, atunaki boye: “Ndenge nini balakisi bakoki kotángisa mwana-kelasi ya mbula libwa oyo baboti na ye moko balakisá ye ndenge ya komɛla bangi, mpe sikoyo azali momɛli-bangi?” Michael, azali na mbula koleka 30, ye atángisaka na eteyelo moko ya Leta na Allemagne. Akomi ete: “Toyebi malamu ete batɛkaka bangi mpe bamɛlaka yango na eteyelo, kasi tomonaka yango te.” Alobeli mpe ezaleli ya kozanga botosi ete “ezali komonana mingi na mposa oyo ebele ya bana-kelasi bakómi na yango ya kobebisa biloko.” Abakisi ete: “Bazali kotya salite na bamesa mpe na bifelo; bazali kobebisa bakiti mpe biloko mosusu. Bapolisi bakangaki to basambisaki bana-kelasi na ngai mosusu mpo bayibaki na bamagazini to mpo na makambo mosusu ya ndenge wana. Ezali likambo ya kokamwa te soki moyibi ezali mpe mingi na eteyelo!”

Amira atángisaka na etúká ya Guanajuato, na Mexique. Alobi ete: “Na mabota mingi, bato basalaka mobulu mpe bamɛlaka bangi, mpe nyonso wana ezali mpenza kobebisa bana. Bazali kofanda na bisika oyo bazali koyekola maloba ya bosɔtɔ mpe makambo mosusu ya mbindo. Mokakatano mosusu monene ezali bobola. Atako awa kelasi ezali ofele, baboti basengeli kosomba bakaye, babiki mpe biloko mosusu ya kelasi. Kasi kolya nde ezali likambo ya liboso.”

Mindoki na biteyelo?

Na États-Unis, masasi oyo ebɛtamaki na biteyelo na mikolo oyo euti koleka emonisi ete mobulu ya ndenge wana ezali mokakatano ya moke te na ekólo yango. Lapolo moko emonisi ete: “Mindoki soki 135 000 ekɔtaka mokolo na mokolo na kati ya biteyelo 87 125 ya Leta na ekólo yango. Mpo na kosala ete mindoki yango ekɔta lisusu mingi te na biteyelo, bakonzi ya biteyelo bazali kosalela biloko lokola bamasini oyo elukaka esika moto abombi mondoki, bakamera oyo elakisaka makambo oyo ezali koleka, bambwa oyo balakisá bango ndenge ya koyeba nsolo ya mondoki oyo babombi; bakómi kotalatala baarmware esika bana-kelasi batyaka biloko na bango, kopesa bango bakalati oyo ezali komonisa soki moto na moto azali nani, mpe kopekisa bango komema basakosi na eteyelo.” (Koteya na Amerika, na Lingelesi) Makambo nyonso wana ekoki kotinda moto amituna ete, ‘bazali kolobela biteyelo to bolɔkɔ?’ Kaka lapolo yango emonisi ete balongolaki bana-kelasi koleka 6000 mpo bakɔtaki na mindoki na eteyelo!

Iris, molakisi moko na engumba New York, ayebisaki Lamuká! ete: “Bana-kelasi bakɔtisaka mindoki na mayele. Bamasini oyo elukaka esika moto abombi mondoki ya ebende ezali kolonga te. Ezalela ya kobebisa biloko ya eteyelo na nko ezali mokakatano mosusu ya monene.”

Atako mobulu ya ndenge wana ezali, balakisi ya malamu bazali kosala makasi mpo na kopesa bana-kelasi boyebi mpe bizaleli ya malamu. Ezali likambo ya kokamwa te soki balakisi mingi bazali konyokwama na makanisi mpe bazali kolɛmba. Rolf Busch, mokambi ya lisangani ya balakisi ya etúká ya Thuringe, na Allemagne, alobaki ete: “Na kati ya milio moko ya balakisi oyo bazali na Allemagne, soki 300000 na ndambo babɛlaka mpo na motungisi ya mosala. Bayokaka lokola mosala na bango ezali kolɛmbisa bango.”

Bana oyo bakómi baboti

Mokakatano mosusu ya monene oyo balakisi bazali kokutana na yango ezali ndenge bilenge bakómi komipesa na kosangisa nzoto. George Morrison, mokomi ya buku Kotángisa na Amerika (na Lingelesi), alobi mpo na ekólo yango ete: “Bilenge soki milio moko (11 % ya bilenge basi ya mbula 15 tii 19) bazali kozwa zemi mbula na mbula.” Kati na bikólo nyonso ya bozwi, États-Unis ezali na esika ya liboso na oyo etali motángo ya bilenge oyo bazali kozwa zemi.

Iris andimi mpe likambo yango, ye alobaki ete: “Bilenge basololaka kaka makambo ya kosangisa nzoto mpe bafɛti. Bakanisaka makambo mosusu te. Mpe sikawa tozali na Internet na baordinatɛrɛ na biteyelo! Yango ezali kopesa bana-kelasi nzela básololaka na bato mosusu mpe bátalaka bililingi ya bato oyo bazali bolumbu!” Angel, afandaka na Madrid, alobaki ete: “Bana-kelasi mingi basangisaka nzoto. Tosili komona bana-kelasi oyo bazalaki bilenge mpenza bazwi zemi.”

“Bakɛngɛli-bana ya lokumu”

Balakisi mosusu bazali komilela ete baboti mingi bazali lisusu kokokisa mokumba na bango te ya koteya bana na bango na ndako. Mpo na balakisi, baboti nde basengeli kozala bateyi ya liboso ya bana na bango. Bonkonde mpe bizaleli malamu mosusu esengeli kobanda na ndako. Ezali likambo ya kokamwa te soki Sandra Feldman, mokambi ya lisangani ya balakisi ya États-Unis, alobi ete “balakisi basengeli kotalelama mpenzampenza lokola balakisi, yango nde mosala na bango, kasi te lokola bakɛngɛli-bana ya lokumu.”

Mbala mingi baboti bapesaka mabɔkɔ te na disipilini oyo eteyelo epesaka bana. Leemarys, oyo totángaki na lisolo oyo eleki, ayebisaki Lamuká! ete: “Soki okei kofunda mwana moko ya mobulu epai ya mokambi ya eteyelo, yebá libelalibela ete, nsima na yango, baboti na ye bakoswanisa yo!” Busch, oyo totángaki mwa liboso, alobi boye mpo na bana ya motó makasi: “Mabota ezali koteya lisusu bana mpenza te. Tokoki lisusu kolikya te ete bana mingi bazali kozwa mateya ya malamu mpe oyo elongobani na mabota na bango.” Estela afandaka na Mendoza, na Argentine; ye alobaki ete: “Biso balakisi nde tokómi kobanga bana-kelasi. Soki topesi bango bapwɛ ya mabe, babambaka biso mabanga to babundisaka biso. Soki ozali na motuka, bakobebisa yango.”

Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te soki, na bikólo mingi, balakisi bazali komonana lisusu te. Vartan Gregorian, mokambi ya ebongiseli moko (Carnegie Corporation of New York), apesaki likebisi oyo: “Na boumeli ya mbula zomi oyo ezali koya, biteyelo na biso [ya États-Unis] ekozala na mposa ya balakisi ya sika milio mibale na ndambo.” Bingumba minene “ezali koluka mpenza balakisi na Inde, na Antilles, na Afrika ya Sudi, na Mpoto mpe na bisika mosusu, epai nyonso oyo bakoki kozwa balakisi ya malamu.” Yango elingi koloba ete bikólo wana mpe ekoki kozanga balakisi.

Mpo na nini balakisi bazali komonana lisusu te?

Yoshinori azali molakisi na Japon mpe akokisi mbula 32 na mosala yango; ye alobaki ete: “Kotángisa ezali mosala ya lokumu mpe efutaka malamu, mpe bapesaka yango limemya mingi na Japon.” Kasi, ezali bongo te na bikólo mosusu. Gregorian, oyo totángaki mwa liboso, ye mpe alobaki ete bato “bazali komemya balakisi te, bazali kotɔndɔ bango te to mpe bazali kofuta bango malamu te. . . . Na bitúká mingi [ya États-Unis] bafutaka balakisi mbongo moke koleka misala mosusu nyonso oyo esɛngaka diplome ya graduat to ya licence.”

Ken Eltis, oyo totángaki na ebandeli ya lisolo oyo, akomaki ete: “Nini esalemaka ntango balakisi bamonaka ete misala mingi oyo ezali kosɛnga moto atánga bakelasi mingi te ezali kofuta malamu koleka mosala ya kotángisa? To ntango bana-kelasi oyo bango batángisaki eleki kaka sanza zomi na mibale mpamba . . . bazali kozwa mbongo mingi koleka oyo bango bazali kozwa sikoyo to mpe koleka oyo bakozwa nsima ya mbula mitano? Na ntembe te, ntango bayebaka makambo ya ndenge wana, bamonaka ete bazali mpenza na valɛrɛ te.”

William Ayers akomaki ete: “Balakisi bazali kofutama malamu te . . . Mbongo bafutaka biso ekokani na mbongo oyo bafutaka baavoka kabolá yango na minei, to kabolá na mibale mbongo oyo bafutaka ba comptable; ezali mpe moke koleka mbongo oyo bafutaka basofɛlɛ ya mituka ya minene mpe oyo bafutaka bato oyo basalaka na bisika oyo batongaka to babongisaka bamasuwa. . . . Mosala moko te esɛngaka milende mingi lokola mosala ya kotángisa, kasi kaka mosala ya kotángisa nde efutamaka mbongo moke.” (To Teach—The Journey of a Teacher) Na likambo yango kaka, Janet Reno, ministre ya kala ya makambo matali Bosembo na États-Unis, alobaki na sanza ya Novɛmbɛ 2000 ete: “Tokoki kotinda bato na sanza. . . . Tofutaka bato ya masano mbongo mingi. Mpo na nini tokoki te kofuta balakisi na biso malamu?”

Leemarys alobaki ete: “Soki totali malamu, balakisi bafutamaka malamu te. Atako natángaki bambula ebele, nazali kaka kozwa lifuti moke awa na engumba New York, bakisa mitungisi ya kofanda na engumba ya monene.” Valentina atángisaka na engumba Saint-Pétersbourg, na Russie; ye alobaki ete: “Na oyo etali kofuta, mosala ya kotángisa ekokani na mosala ya mpunda. Bafutaka biso mbongo moke koleka mbongo oyo Leta asɛngi mpo na kofuta basali nyonso.” Marlene afandaka na Chubut, na Argentine; ye mpe azali na likanisi ndenge yango, alobaki ete: “Mbongo moke oyo bapesaka biso etindaka biso tósala na bisika mibale to misato; mpe mpo na yango, esɛngaka biso tópotaka mbangu mpo na kolongwa na esika moko tii na esika mosusu. Yango ezali kosala ete tótángisa mpenza malamu te.” Arthur azali molakisi na Nairobi, na Kenya; ye ayebisaki Lamuká! ete: “Lokola nkita ezali kokwea, kozala molakisi ezali mpenza pɛtɛɛ te mpo na ngai. Ebele ya balakisi mosusu lokola ngai bakondima mpe likambo yango: lokola lifuti na biso ezalaka mpenza malonga te, yango epekisaka ntango nyonso bato mpo básala mosala na biso.”

Diana azali molakisi na engumba New York; ye amilelaki ete kotalela ebele ya bapapye ya bana-kelasi ezwaka balakisi bangonga mingi. Molakisi mosusu akomaki ete: “Ntango mingi tolekisaka yango na kozongela kosala makambo oyo tomeseni kosala mokolo na mokolo.” Balakisi mingi bamilelaki mpo na likambo oyo: “Mokolo mobimba kaka kotalela bapapye na bapapye!”

Balakisi moke, bana-kelasi ebele

Berthold afandaka na Düren, na Allemagne; ye alobelaki likambo mosusu oyo balakisi mingi bazali komilelalela mpo na yango: “Bana baleki ebele na kelasi moko! Balakisi mosusu awa bazali na bana tii 34 na kelasi moko. Mpo na yango, tokoki te kotya likebi na bana-kelasi oyo bazali na mikakatano. Ezali mpasi mpo na koyeba bango. Tozali kokoka te kokokisa bamposa ya mwana mokomoko.”

Leemarys oyo totángaki liboso, alobaki ete: “Na mbula oyo eleki, longola ndenge baboti mosusu bazalaki komibanzabanza te mpo na kelasi ya bana na bango, mokakatano oyo eleki monene oyo nazwaki ezalaki ya kozala na bana 35 na kelasi na ngai. Kanisá naino, kosala na bana 35 ya mbula motoba!”

Iris alobaki ete: “Awa na New York, balakisi bazali komonana te, mingimingi balakisi ya matematiki mpe ya siansi. Bazali kozwa misala ya malamu bipai mosusu. Yango wana, engumba ezwaki na mosala balakisi ebele oyo bautaki na mikili ya bapaya.”

Ya solo, kotángisa ezali mosala moko oyo esɛngaka kosala mpenza milende. Kasi, nini elendisaka balakisi? Mpo na nini bakobaka na mosala na bango mpe bayikaka mpiko? Lisolo na biso ya nsuka ekotalela mituna yango.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 9]

Mindoki soki 135000 ekɔtaka mokolo na mokolo na biteyelo ya États-Unis

[Etanda/Elilingi na lokasa 10]

Molakisi ya malamu ezali molakisi ya ndenge nini?

Mpo na yo, molakisi ya malamu ezali molakisi ya ndenge nini? Ezali oyo azali na likoki ya kokolisa mayele ya mwana mpo akóma kokanga mateya na motó mpe kolonga na ɛkzamɛ? To ezali nde moto oyo ateyaka mwana ayeba komituna mpe kokanisa? Ezali nde oyo asalisaka mwana akóma moto ya malamu mpenza?

“Ntango biso balakisi tondimi ete tozali kosala elongo na bana-kelasi na biso mobembo moko molai oyo esengeli koumela bomoi mobimba, ntango tobandi kozwa bango lokola bato oyo babongi na lokumu mpe na limemya, na ntango wana nde tozali na nzela ya malamu mpo na kokóma balakisi ya malamu. Ezali pɛtɛɛ, kasi mpe mpasi.”​—To Teach​—The Journey of a Teacher.

Molakisi ya malamu asosolaka makoki ya mwana-kelasi mokomoko mpe ayebaka ndenge ya kokolisa yango. William Ayers alobaki ete: “Tosengeli koluka lolenge ya malamu ya koteya, lolenge oyo ezali kotonga likoló ya makasi, makambo oyo mwana akutaná na yango, mayele mpe makoki na ye. . . . Nazali komikundola ndenge mama moko Indien ya Amerika akɔtelaki mwana na ye ya mobali ya mbula mitano oyo bapesaki ye nkombo ‘motó mabanga’; mama yango alobaki boye: ‘Mwana na ngai Wind-Wolf ayebi bankombo ya bandɛkɛ koleka ntuku minei mpe ndenge oyo balongwaka na esika moko mpo na kokende na esika mosusu. Ayebi ete mpongo ezalaka na nsala zomi na misato na nsima na yango. Mwana na ngai azali na mposa nde ya molakisi oyo ayebi makoki na ye nyonso.’”

Mpo na kozwa epai ya mwana mokomoko makambo na ye ya malamu, molakisi asengeli koyeba makambo oyo mwana asepelaka na yango to oyo elendisaka ye mpe makambo oyo esalaka ete akanisa mpe amitambwisa na lolenge moko boye. Mpe molakisi oyo amipesi asengeli kolinga bana.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Nations unies/ fɔtɔ ya Saw Lwin

[Etanda na lokasa 11]

Koyekola esengeli ntango nyonso kozala lokola lisano?

Molakisi William Ayers akomaki makanisi zomi oyo elongobani te, oyo bato bazalaka na yango likoló ya mosala ya kotángisa. Moko na yango ezali oyo: “Balakisi ya malamu bakómisaka koyekola lokola lisano.” Akobi ete: “Lisano esɛkisaka. Bato oyo basalaka masɛki basɛkisaka. Masɛki ekoki kosɛkisa. Nzokande, koyekola ebendaka likebi ya moto, ezwaka makanisi na ye nyonso, ekamwisaka, ebulunganisaka mpe mbala mingi esepelisaka mpenza. Soki esɛkisaka, mabe ezali te. Kasi esengeli te kozala ntango nyonso bongo.” Abakisi ete: “Kotángisa esɛngaka koyeba makambo mingi, kozala na makoki, na mayele, na bososoli mpe koyeba kokanga ntina ya makambo; mpe oyo eleki ntina, esɛngaka moto oyo amibanzabanzaka mpe oyo atyelaka bato mosusu likebi.”​—To Teach​—The Journey of a Teacher.

Sumio atángisaka na engumba Nagoya, na Japon; ye amonaka mokakatano oyo epai ya bana-kelasi na ye: “Bana-kelasi mingi ya eteyelo ya ntei (secondaire) balingaka kaka kosakana mpe makambo ya pɛtɛpɛtɛ.”

Rosa, oyo apesaka bana-kelasi toli, ye afandaka na Brooklyn, na etúká ya New York, alobaki ete: “Bana-kelasi mingi bamonaka ete koyekola ezali motungisi. Molakisi atungisaka. Bakanisaka ete makambo nyonso esengeli kozala lokola lisano. Babosanaka ete makambo oyo moto ayebaka ntango azali koyekola etalelaka milende oyo asalaka.”

Lokola bilenge bakanisaka kaka kosakana, yango wana balingaka kosala milende te mpe komipimela makambo mosusu te. Sumio, oyo toutaki kolobela, alobaki ete: “Ebandeli mpenza ya mokakatano yango ezali ete bakokaka te komona mosika. Bana-kelasi oyo bakanisaka ete soki basali milende mpenza mpo na likambo moko lelo, bakozwela yango matomba na mikolo ezali koya bazali mingi te.”

[Elilingi na lokasa 7]

DIANA, ÉTATS-UNIS

[Elilingi na lokasa 8]

‘Batɛkaka bangi mpe bamɛlaka yango na eteyelo, kasi tomonaka yango te.’​—MICHAEL, ALLEMAGNE

[Elilingi na lokasa 8]

“Na mabota mingi, bato basalaka mobulu mpe bamɛlaka bangi.”​—AMIRA, MEXIQUE

[[Elilingi na lokasa 9]

“Balakisi basengeli kotalelama mpenzampenza lokola balakisi, yango nde mosala na bango, kasi te lokola bakɛngɛli-bana ya lokumu.”​—SANDRA FELDMAN, MOKAMBI YA LISANGANI YA BALAKISI NA ÉTATS-UNIS

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto