Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/3 lok. 15
  • “Mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Kobɔkɔla Nzoi: mosala “Kitoko”
    Lamuká!—1997
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mafuta ya nzoi Nkisi moko elɛngi
    Lamuká!—2002
  • Biloko ya kolya na mokili ya ndaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/3 lok. 15

“Mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi”

NTANGO Yehova Nzambe asikolaki Bayisraele na Ezipito, alakaki ete akomema bango “na mokili moko malamu mpe monene, na mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.”​—Kobima 3:8.

Ntango Bayisraele bazalaki kofanda na Mokili ya Ndaka, babɔkɔlaki bangɔmbɛ, bampate mpe bantaba, mpe yango esalaki ete bázala na miliki mingi. Kasi, tokoloba nini mpo na mafuta ya nzoi? Bato mosusu bakanisaka ete maloba yango elimboli mai ya sukali oyo bakamoli na mbuma ya date, figi to vinyo. Mpe bisika mingi oyo Biblia elobeli mafuta ya nzoi, ezali mafuta ya nzoi ya zamba, kasi te mafuta ya nzoi oyo eutaka na kobɔkɔla banzoi. (Basambisi 14:8, 9; 1 Samwele 14:27; Matai 3:1, 4) Mokili yango ‘etondaki’ mpenza na mafuta ya nzoi mpe miliki?

Makambo oyo bato ya arkeoloji bauti komona na Israël esalisi biso tómona polele likambo yango. Mpo na biloko yango, Amihai Mazar, profesɛrɛ moko alobaki boye mpo na nsango oyo iniversite hébraique elobaki: “Yango ezali esika ya liboso oyo tomonaki epai bazalaki kobomba banzoi na esika oyo batimolaka biloko ya kala na Moyen-Orient. Biloko yango ezali ya siɛklɛ ya 10 tii na ebandeli ya siɛklɛ ya 9 liboso ya ntango na biso.”

Bato ya arkeoloji bamonaki bandako ya kobɔkɔla banzoi koleka 30 oyo etandamaki na milɔngɔ misato, mpe balobaki ete esika yango ekokaki kozala na bandako soki nkama ya kobɔkɔla banzoi. Bato oyo bayekolaki bandako yango bakutaki banzoi ekufá mpe mwa mafuta na yango na banzoi yango. Bato ya mayele balobi ete bandako yango ekokaki kobimisa “ata litre 500 ya mafuta ya nzoi mbula na mbula.”

Na ntango ya kala, mafuta ya nzoi ezalaki kaka te bilei ya elɛngi kasi bazalaki mpe kosalela yango na bakompanyi ya bibende mpe ya mposo ya nyama. Bazalaki mpe kosalela yango mpo na batablo, oyo ezalaki na mabaya pembenipembeni mpe ezalaki na mwa madusu oyo bazalaki kotondisa mafuta ya nzoi, oyo bakokaki konyangwisa mpo na kosalela yango lisusu nsima. Bato ya arkeoloji balobi nini mpo na biloko yango oyo bakundolaki?

Lapolo ya iniversite ekobi koloba ete: “Atako Biblia eyebisi biso likambo moko te na oyo etali kobɔkɔla banzoi na Yisraele na ntango wana, ndenge bakundolaki ndako wana ya banzoi na Tel Rehov emonisi ete kobɔkɔla banzoi mpe kobimisa mafuta na yango mpe bandako na yango ezali mosala oyo ezalaki kosalema mingi liboso tempelo ya liboso ya [Salomo] etongama. Yango wana, ekoki kozala ete na Biblia maloba ‘mafuta ya nzoi’ ezali mafuta oyo eutaka mpenza na banzoi.”

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 15]

Institute of Archaeology/​Hebrew University © Tel Rehov Excavations

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto