Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g02 Octobre nk. 5-7
  • Mpo na nini bato bazali kolongwa na mangomba ya kala?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini bato bazali kolongwa na mangomba ya kala?
  • Lamuká!—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mabe oyo lingomba esalá
  • Nini ezali kokómela mangomba?
    Lamuká!—2007
  • Mangomba ya boklisto ekolimwa te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Losambo ezali na ntina nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Lolenge nini boklisto ya lokuta ekómaki eteni ya mokili oyo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Lamuká!—2002
g02 Octobre nk. 5-7

Mpo na nini bato bazali kolongwa na mangomba ya kala?

MANGOMBA OYO ELOBAKA ete mateya na yango euti na mateya ya Yesu Klisto, ezali na bandimi soki miliare 1,7. Lingomba ya boklisto nde ezali lingomba ya monene na mokili mobimba; eleki kutu mangomba mosusu oyo mpe ezali na bato ebele, na ndakisa Lingomba ya Bouddha, ya Bahindu mpe ya Bamizilma. Nzokande, balapolo ezali komonisa ete na mikili mingi oyo emikumisaka ete ezali mikili ya boklisto, bato mingi bazali lisusu kozwa lingomba yango ya boklisto na valɛrɛ te.

Bato ya lolenge nyonso bazali kolongwa na mangomba na bango. Ronald Inglehart, ye asalaka bolukiluki na Iniversite ya Michigan (na États-Unis) mpe azali mokambi ya lisangá moko oyo esalaka ankɛtɛ (World Value Survey), alobaki ete na mikili ya bozwi, mangomba ezali kosila valɛrɛ na yango mokemoke. Zulunalo moko (Bible Review) ekomaki maloba oyo moto yango alobaki: “Ezali bobele te ete motuya ya bato oyo bakendaka ndako-nzambe pɔsɔ na pɔsɔ ekiti makasi, kasi lisusu mikili ya Amerika ya Sudi ezali kotinda bamisionɛrɛ mpo na kobikisa milimo ya bato oyo, kala, bakangaki bamboka na bango na boombo.” Alobi ete ekómi mpenza komonana ete “lingomba ekwei,” mingimingi na mikili mosusu ya Mpoto ya Nɔrdi. Na Norvège mpe na Danemark, kaka mwa bato moke (5 %) nde bakendaka ndako-nzambe mbala na mbala. Na Suède, motango ezali kutu moke koleka (4 %) mpe na Russie, baleki lisusu moke (2 %).

Balapolo oyo euti na Allemagne emonisi ete kobanda na 1984 tii na 1993, motango ya bato oyo bankombo na bango ezalaki na molɔngɔ ya bandimi ya Lingomba ya Katolike mpe oyo bazalaki kokende ndako-nzambe mbala na mbala, ekitaki makasi mpenza (25,3 % tii na 19 %). Na 1992, kaka mwa bandimi moke (4 %) ya Lingomba ya Protesta bazalaki kokende mbala na mbala na ndako-nzambe mokolo ya eyenga. Na 1999, zulunalo moko (Christianity Today) eyebisaki ete: “Na Allemagne, soki tozwi bato zomi, kaka moto moko nde akendaka ndako-nzambe pɔsɔ na pɔsɔ.”

Na kotalela ndenge motango ya bandimi ezali kokita se kokita na Angleterre, zulunalo moko (The Guardian) elobi ete: “Naino lingomba ya boklisto emoná likambo ya nsɔmɔ boye te.” Zulunalo yango elobi ete “mbula 50 oyo euti koleka, kobanda na 1950 tii na 2000, ezalaki bambula oyo elekaki mabe mpo na basango.” Zulunalo yango elobaki makambo oyo lapolo moko ya ntina mingi eyebisaki mpo na mangomba na Angleterre mpe emonisaki ete ezali kaka bilenge te nde bazali kolongwa na mangomba, kasi ata mpe mikóló. Zulunalo yango elobi ete: “Mikóló bazali lisusu kondima Nzambe te wana bazali konuna. Makambo oyo bautaki kolukaluka emonisi ete likambo yango ezali solo mpe ekobakisa lisusu mpasi ya mangomba ya Angleterre, oyo ezali se kokwea mpe oyo tii lelo etalelaka mibange ete bazali makonzí oyo esimbi masangá na bango oyo esili kolɛmba.”

Longola mikili ya Mpoto, likambo yango mpe ekómi komonana na mikili mosusu. Na ndakisa, zulunalo moko ya Canada (Alberta Report) elobi ete Canada ezali komona ndenge “bindimeli mpe mangomba ya minene ezali kokwea” mpe “bato mingi ya Canada, mbala misato koleka, bakómi kotalela Nzambe na ndenge na bango moko, na esika ya kondima mateya ya lingomba moko boye.”

Bato mingi bamonaka ete bazwaka mpenza litomba moko te na elimo to bateyaka bango likambo moko te ya sika ntango bakendaka ndako-nzambe. Zulunalo mosusu ya Canada (Maclean’s) elobi ete, ezala Bayuda to Bakatolike oyo batunaki bango mituna na Himalaya, likindo moko ya Bahindu, bango nyonso balobaki ete: “Milulu makasimakasi ya lingomba esimbaka lisusu elimo mpe mitema na biso te.” Ata kutu nsima ya kokenda ndako-nzambe mbala na mbala na boumeli ya bambula ebele, bamosusu basukaka na komituna ete: ‘Makambo nini mpenza bateyi ngai kuna na lingomba? Lingomba yango ekómisi ngai mpenza penepene na Nzambe?’ Ezali likambo ya kokamwa te soki Gregg Easterbrook, mokomi ya babuku, akomi ete: “Na mikili ya Wɛsti, bobola ya elimo ezwi esika ya bobola ya biloko ya mokili, oyo ezali na esika ya liboso na mikolo na biso.”

Ya solo, na bikólo mosusu bato ebele bazali naino kokende kosambela na bandako-nzambe. Nzokande, kokende kosambela na ndako-nzambe elimboli ntango nyonso te kondima na bosembo mpenza mateya ya lingomba. Na ndakisa, zulunalo moko ya Australie (The Age) elobi ete na mikili ya Mpoto mpe ya Amerika, “motango ya baklisto oyo batosaka mpenza mibeko ya lingomba na bango ezali kokita se kokita. Na bisika mingi ya Afrika, ya Azia mpe ya Amerika ya Sudi, mangomba ya boklisto ezali lokola ezipeli oyo bato mingi bazali naino kobatama nsima na yango mpo na kolanda bindimeli ya ekólo to bonkɔkɔ na bango, oyo ezali ata na boyokani moko te na mateya ya lingomba ya boklisto, mpe oyo kutu mbala mingi eyokanaka na yango te, mpe esilá kopekisama eleki bambula ebele.”

Mpo na nini bato mingi, bilenge mpe mikóló, bazali kokima mangomba na bango? Emonani lokola ete ntina ya monene ezali mpo bafungoli miso.

Mabe oyo lingomba esalá

Zulunalo moko (The Guardian) elobi boye: “Na boumeli ya ekeke ya 20, Lingomba ya Katolike ekendaki mpenza mosika ndenge eyokanaki na bato ya politiki ya fascisme, kobanda ntango epesaki général Franco longonya nsima ya etumba ya bana-mboka oyo esalemaki na Espagne, tii na milende oyo yango euti kosala mikolo oyo mpo na kobatela général Pinochet.” Zulunalo yango emonisi lisusu ete Pie XII, oyo azalaki pápa na ntango ya etumba yango, “asepelaki mingi ndenge ayokanaki na [Hitler] mpe aboyaki mikakatano oyo elingaki kokómela bango, na ndakisa aboyaki koloba polele ndenge bazalaki kosilisa Bayuda na ndenge ya nsɔmɔ.”

Zulunalo mosusu (The Age) elobi ete: “Mbala ebele, lingomba ya boklisto elongaki te kosala makambo oyo yango emikumisaki ete ekosala. Baklisto balongi te kobatela kimya mpe bomoko kati na bango moko. . . . Bitumba mingi oyo babundaki mpe ndenge babɔtɔlaki biloko ya bato mpo balingaki kokómisa bapakano baklisto, endimisi likambo yango. Kondima, elikya mpe bolingo ekoki kozala bizaleli malamu oyo esengeli komonana mingi epai ya baklisto. Nzokande, baoyo bato mosusu bakanisaka ete bango nde basengeli komonisa bizaleli yango, bazali na mitema malamu te, bazangi elikya, mpe bazali mpenza na boboto te, se lokola bato oyo bazali baklisto te. . . . Koboma oyo Banazi babandaki koboma bato ebele mbala moko ebandaki kaka na ekólo moko ya boklisto. Etumba ya nsɔmɔ ya babɔmbi atɔmiki oyo ebwakamaki na Japon, ebandaki kaka na ekólo moko ya boklisto.”

Bamosusu bakoki koloba ete banda kala, mangomba ya boklisto elendisaka bato bákolisa bizaleli lokola bokɛngi, mpiko, bokatikati mpe bosembo. Nzokande, zulunalo yango (The Age) elobi ete: “Ya solo, mbala mingi baklisto ya Mpoto, ya Amerika mpe ya Australie basalelaka bozwi ya mokili koleka baklisto mosusu mpe batikaka te kopesa nzela na bizaleli lokola komonela bamboka mosusu oyo ezali na makasi te, konyokola yango mpe kobebisa zamba na yango, mai na yango mpe mopɛpɛ na yango mpo na kokokisa bamposa na bango moko.”

Mpo na oyo ekokómela mangomba ya boklisto na mikolo ezali koya, zulunalo yango elobi ete: “Soki ebongiseli moko ya malamu ezwami te, mangomba ya boklisto ekoki soki moke te kozwa lisusu makasi oyo ezalaki na yango na bikeke oyo eleká. Bato mosusu bakoki komona yango malamu, kasi bamosusu bakoki komona yango mabe. Nzokande yango nde likambo ya solo oyo ezali kozela mangomba ya boklisto na bambula oyo ezali koya.”

Ntango bato mingi bazali komona ndenge mangomba minene ya mokili ezali kokwea bongo, bazali kolongwa na mangomba yango. Kasi lolenge ya losambo oyo bakómi kolanda na esika ya mangomba ya kala ezali nde kokokisa mpenza bamposa na bango? Yango ezali nde lolenge malamu ya kosambela?

[Bililingi na lokasa 7]

Bato mingi balongwaki na mangomba ya kala ntango bamonaki ndenge yango ezali kopesa mabɔkɔ na bitumba mpe na bibongiseli ya politiki oyo ezali konyokola bato

[Elilingi na lokasa 7]

Milulu ya minene ezali kokokisa te mposa ya bato na elimo

[Eutelo ya bafɔtɔ]

foto: age fotostock

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto