Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/3 nk. 3-4
  • Mangomba ya boklisto ekolimwa te?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mangomba ya boklisto ekolimwa te?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nani azali kobikisa nani?
  • Likoló ekómi koyinda
  • Mbuma oyo boklisto ya lokutá esili kobuka na Afrika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Nini ezali kokómela mangomba?
    Lamuká!—2007
  • Lingomba ya Katolike ya Amérique latine, lizali kati na mpasi​—Mpo na nini bamilió na bato bazali kotika yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mpo na nini bato bazali kolongwa na mangomba ya kala?
    Lamuká!—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/3 nk. 3-4

Mangomba ya boklisto ekolimwa te?

STEPHEN TIRWOMWE, pastɛrɛ moko oyo azali moto ya Ouganda, alobaki boye: “Bato ya Angleterre bazali naino kondima ete Nzambe azali, kasi balingi komipesa na Klisto te.” Eleki sikoyo mbula 20, mobali yango abikaki na liwa ntango bakonzi ya Ouganda babomaki bandimi mosusu ya lingomba na bango. Lelo oyo, akómá koteya na engumba Leeds, na Angleterre; asalaka masolo ya miniti zomi liboso bato bábanda kobɛta lisano ya bingo.

Ebongiseli moko ya sika na États-Unis (Mission anglicane en Amérique) ezali mpe na mokakatano yango. Na Internet, bato yango bakomaki boye: “Lelo oyo, na kati ya bamboka nyonso oyo bato balobaka Lingelesi, États-Unis ekómi mboka oyo eleki na bato oyo bazali na lingomba te mpe oyo bakipaka makambo ya Nzambe te. Mboka na biso ebandi kokóma mboka oyo basengeli kotinda bamisionɛrɛ.” Lokola bato ya ebongiseli yango balɛmbi nzoto mpo bazali kokoka te kobongola makambo na kati ya lingomba, batiki mimeseno ya kala mpe balandi lokolo ya bapastɛrɛ ya Azia mpe ya Afrika mpo na kobanda “mosala ya misionɛrɛ na États-Unis.”

Kasi, mpo na nini bamisionɛrɛ ya Afrika, Azia mpe Amerika ya Sudi bazali kokende ‘kobikisa milimo’ na Mpoto mpe na Amerika ya Nɔrdi, mikili oyo mangomba ya boklisto epiká misisa banda kala?

Nani azali kobikisa nani?

Na boumeli ya mbula koleka 400, bamisionɛrɛ ya Mpoto bazalaki kokende na bamboka oyo mikili ya Mpoto ekómaki koyangela na Afrika, na Azia, na bisanga ya Pasifike, mpe na Amerika ya Sudi. Bazalaki kokende koteya “bapakano” na mikili wana. Na nsima, bato ya bitúká ya Amerika, oyo balobaka ete elandaka mitinda ya boklisto, basalaki lokola baninga na bango ya Mpoto na mosala ya misionɛrɛ na mokili mobimba mpe balekaki bango kutu na mosala yango. Lelo oyo, makambo ebongwani.

Andrew Walls, mokambi ya ebongiseli moko (Observatoire du christianisme dans le monde non occidental) alobaki ete “esika oyo bato mingi bamipesi na [mangomba ya boklisto] ekómi epai mosusu. Na mobu 1900, baklisto mingi (80 %) bazalaki bato ya Mpoto to ya Amerika. Lelo oyo, baklisto mingi (60 %) bazali bato ya Afrika, ya Azia, mpe Amerika ya Sudi. Lisolo euti kobima na zulunalo moko elobaki boye: “Baparwasi ya Mpoto ezali kotambwisama na basango oyo bazali kouta na Philippines mpe na Inde,” mpe “na baparwasi ya Amerika, soki totángi basango motoba, moko na bango azali mopaya.” Bato mingi ya Afrika, mingimingi bato ya ekólo Ghana, oyo bazali koteya nsango malamu na Pays-Bas, bazali koloba ete bazali “lingomba ya bamisionɛrɛ na mokili oyo bayebi Nzambe te.” Lisusu, bateyi oyo bazali kouta na Brésil bazali kosala bakampanye ya koteya na bamboka ndenge na ndenge na Angleterre. Moto moko akomaki boye: “Bamisionɛrɛ bakómi kouta na bamboka oyo bamisionɛrɛ bazalaki kokende.”

Likoló ekómi koyinda

Ezali komonana ete mposa ya bamisionɛrɛ ekómi monene na mikili ya Mpoto mpe Amerika ya Nɔrdi. Na zulunalo moko bakomaki boye: “Na Écosse, soki tokamati bato monkama, baoyo bakendaka ndako-nzambe bakoki ata zomi te.” Na France mpe na Allemagne, bazali moke lisusu koleka. Lisolo ya zulunalo mosusu elobaki ete na ankɛti moko, “bato 40 likoló ya monkama na États-Unis mpe bato 20 likoló ya monkama na Canada balobaki ete bakendaka ndako-nzambe pɔsɔ na pɔsɔ.” Nzokande, na Philippines, balobaka ete bato 70 likoló ya monkama bakendaka ndako-nzambe, mpe ezali bongo na mikili mosusu ya bobola.

Kutu, ezali komonana ete bandimi na mikili ya bobola bazali kokangama mpenza na mateya ya lingomba koleka bandimi ya mikili ya bozwi. Na ndakisa, soki batuni bandimi ya Lingomba ya Katolike na États-Unis mpe na Mpoto, bazali koloba ete bazali kotyela bakonzi ya lingomba motema te mpe balingi ete bandimi bázala na likambo ya koloba na ndenge ya kotambwisa lingomba mpe ete basi bázala na ntomo ndenge moko na mibali. Nzokande, na mikili ya bobola, bandimi ya Lingomba ya Katolike balandaka kaka oyo lingomba elobaka. Lokola bandimi bazali kokóma mingi na mikili ya bobola mpe bazali kokóma moke na mikili ya Mpoto mpe ya Amerika, mosika te, likambo yango ekobimisa matata kati na bango. Philip Jenkins, moto ya mayele na makambo ya kala mpe ya mangomba, alobi boye: “Ezali komonana mpenza ete nsima ya mbula zomi to ntuku mibale, baklisto ya mikili ya bobola bakondima lisusu te ete baklisto ya mikili ya bozwi bazali bandeko na bango, ndenge moko mpe, baklisto ya mikili ya bozwi bakondima te ete baoyo ya mikili ya bobola bazali baklisto.”

Na kotalela ndenge makambo ezali kotambola, Walls alobi ete likambo oyo tosengeli kotalela nokinoki ezali ya koyeba “ndenge nini baklisto ya Afrika, ya Azia, ya Amerika ya Sudi, ya Amerika ya Nɔrdi mpe ya Mpoto bakoki kozala liboke moko na kati ya lingomba moko, mpe kozala na kondima moko.” Okanisi boni? Mangomba ekoki kotikala na bomoko na kati ya mokili oyo ekabwani? Nini ekoki kotya bomoko ya solosolo kati na baklisto? Lisolo oyo elandi ekopesa biyano euti na Biblia, mpe ekomonisa polele ete lingomba ya boklisto oyo ezali mpenza na bomoko ezali kokola na mokili mobimba.

[Elilingi na lokasa 4]

Oyo ezalaká ndako-nzambe, ekómá nganda

[Eutelo ya bafɔtɔ]

AP Photo/Nancy Palmieri

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto